Bolukiluki ya bisakweli oyo bibongi na kotyela motema
“YE OYO akoki kosakola makambo mikolo misato liboso ete masalema akozala mozwi mpo na bankóto na bambula.” Wana ezali lisese moko ya ba Chinois.
Bato balingaka koyeba makambo nini makobima lobi, mpe mingi bakobungisa ebele na mosolo mpo na kozwa nsango motindo wana oyo bakoki kotyela yango motema. Bazali kolukaluka bisakweli oyo bibongi kotyela motema. Tomibanzabanzaka na makambo mazali liboso, lokola emonanaka na makambo matali méteorologie mpe makambo matali komata to kokita ya nkita. Epai mosusu, boyebi ya sikisiki ya avenir mbele elingaki kopesa biso makoki ya kobongisa malamu bomoi na biso.
Mposa ya koyeba makambo mazali liboso ezali kotinda bato mingi na kokende epai na bato oyo basakolaka makambo, ba gourous, ba astrologues (bato oyo batalaka minzoto mpo na kosakola makambo) mpe banganga nkisi. Bisika ya koteka mikanda mpe batekisi ya bazulunalo batondi na mikanda ya kala mpe ya sika, ya bato oyo bazali koloba ete bayebi kosakola makambo mazali liboso. Kasi lolenge wana ya kosakola makambo ezali kokutana na ntembe monene. Caton, moto monene ya Leta na Loma alobaki ete: “Nazali kokamwa ete nganga nkisi asekaka te soki amoni nganga nkisi mosusu.”
Ya solo, bisakweli bizali na mitindo mikeseni. Na 1972, etuluku moko ya bato basilisa ba univeraités mpe bato ya mombongo oyo eyebani na nkombo Club de Rome, ebimisaki boyekoli moko oyo esakolaki ete mosika te mokili ekozanga biloko mosusu oyo bikoki kozwama lisusu te. Wolo esengelaki kosila na 1981, mercure na 1985, zinc na 1990, pétrole na 1992, mpe bongo na bongo. Lelo oyo tozali komona ete bisakweli wana bikokisamaki te.
Bisakweli mingi bisimbami na makanisi ya mangomba. Na ndakisa: Episkopo Wulfstan, moto ya mboka Saxe akanisaki ete bakoti ya ba Danois mpo na kokamata Angleterre na ebandeli ya ekeke ya zomi na moko ezalaki elembo emonisaki ete nsuka ya mokili ebelemi. Na 1525, Thomas Munzer atombokisaki basali bilanga ya ekolo Allemagne mpo ete azwaki emonaneli ya baanzelu bazali kopelisa mbɛngo na bango mpo na oyo azalaki kokanisa ete, esengelaki kozala kobuka monene ya mbuma. Na ntembe te. bisakweli wana nyonso bizalaki lokuta.
Lokola oyebi yango mbala mosusu, Biblia ezali na bisakweli. Lisusu, bakomi na Biblia balobaki ete bapemamaki na Nzambe. Ntoma Petelo alobaki ete: “Moko te na bisakweli na Makomami ebimaki na makanisi na bato mpenza. Mpo esakweli moko te ebimaki na mokano na moto, kasi bato bauti na Nzambe balobi wana ezalaki bango kopusama na elimo santu.”—2 Petelo 1:20,21.
Kati na makambo mosusu, Biblia esakolaki ebele na makambo makeseni oyo mazali kopesa nzela na koyeba libota oyo ekomona kozala ya Yesu Klisto oyo azwi nguya kati na Bokonzi ya likolo. Bitumba, nzala, koningana ya mabele mpe kobeba ya bizaleli na bato—makambo oyo nyonso na motindo oyo esalema naino liboso te—makozala elembo oyo ekomonisa oyo Biblia ebengi “mikolo ya nsuka.” (2 Timote 3:15 Matai 24:3-14, 34) Engebene Biblia, kolongolama ya biloko ya ntango oyo ekofungola nzela na bolamu mpo na bato kati na mokili ya sika epai mapamboli ya seko makopesama.—2 Petelo 3:13; Emoniseli 21:14.
Lolenge nini otalelaka bisakweli wana ya Biblia? Ezali bobele makanisi mpamba, lokola bisakweli mosusu? Tokoki kondima bosolo ya bisakweli ya Biblia oyo bikokisami naino te na kotala soki oyo etali makambo ya ntango na kala ebongaki kotyela motema. Tokotalela mwa ndambo na yango kati na lisolo oyo elandi.