Esaleli ya sika mpo na kosalisa bato ete báyeba masɛngami ya Nzambe
“LOLENGE na yango ya pɛtɛɛ, ya polele, mpe ya boboto mpo na kokɔta na lisoló ekobimisa matomba minene mpenza. Masoló na yango mamonisami na lolenge lozangi mindɔndɔ́ mpe na motindo ya kosepelisa na boye ete moto nyonso ya kolongobana, oyo azali kolukaluka, akopusama solo na koloba ete, ‘Nzambe azali mpenza kati na bino.’” (1 Bakolinti 14:25) Wana ezali maloba ya Motatoli moko ya Yehova na mboka Thaïlande, ntango azalaki kolobela mwa búku ya sika, Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? Yango ebimisamaki na la Société Watch Tower na mayangani ya etúká “Bamemi-nsango ya kimya ya Nzambe,” na 1996/1997.
Mwa búku yango ya nkasa 32, mpe ya lángi ndenge na ndenge esalemi mpo na kopesa mateya ya boyekoli Biblia. Yango ezali kolobela mateya ya moboko ya Biblia. Maloba na yango mazali pɛtɛɛ mpe sikisiki, mazali kolimbola polele makambo oyo Nzambe azali kosɛnga epai na biso. Batángi bakozala na mokakatano te mpo na kososola yango. Ndenge nini okoki kotambwisa boyekoli ya Biblia na mwa búku oyo ya sika?
Salelá mituna. Ezali na mituna na ebandeli ya liteya nyonso. Na baparanteze oyo elandi motuna moko na moko, okomona nimero ya baparagrafe epai kuna biyano bizali. Mituna yango mikoki kosalelama na ebandeli lokola bomonisi makambo oyo makoyekolama mpe na nsuka lokola bozongeli. Na ndakisa, na ebandeli ya boyekoli ya Biblia na ndako ya moto, okoki kotuna na moyekoli mituna yango mpo na koyeba makanisi na ye. Na esika ya kosembola nokinoki biyano oyo bibongi te, ekozala malamu obanda boyekoli. Na nsuka ya liteya, okoki kozongela mituna yango mpo na komona soki moyekoli akoki sikawa koyanola engebene Biblia.
Luká mikapo. Na liteya mokomoko, maloba mikuse ya solo ya Biblia makomami elongo na mikapo oyo mizali kosimba yango. Lokola mikapo mingi mityami sé bongo, kozanga kotánga maloba na yango, ezali likambo ya ntina ete olendisa moyekoli aluka mikapo yango kati na Biblia na ye moko. Mpo ete asalela Liloba ya Nzambe kati na bomoi na ye, asengeli kotánga mpe komanyola likoló na yango.—Yosua 1:8.
Limbolá bililingi. Mwa búku yango etondi mpenza na bafɔtɔ́ mpe na mayemi—motángo na yango nyonso mozali ya bililingi koleka 50 biuti na mosala ya ntɔ́ki. Bililingi yango bityamaki bobele mpo na bonzenga ya kotala te, kasi lisusu mpo na kopesa lisalisi na ntango ya koteya. Na ndakisa, mateya mibale ya nsuka (oyo mokomoko na yango ezwi lokasa moko, na nkasa mibale oyo etalani) ezali na mitó na makambo ete “Tósalisa basusu ete básala mokano ya Nzambe” mpe “Ekateli na yo ya kosalela Nzambe.” Bafɔtɔ́ oyo etandami likoló na nkasa mibale wana ezali komonisa lolenge moto bobele moko azali kosala bokóli na elimo; amonisami ntango azali kopesa litatoli ya libaku malamu, ntango azali kosangana na mosala ya kosakola ndako na ndako, ntango azali komipesa, mpe ntango azali kozwa batisimo. Na kobendáká likebi ya moyekoli ya Biblia likoló na bililingi wana, okosalisa ye na komona matambe oyo masɛngami mpo na kosalela Nzambe.
Tokoloba boni soki moto moko oyo azali komonisa bosepeli ayebi kotánga malamu te to soki ayebi kotánga ata moke te? La Société azali kokɔtisa mwa búku yango ya sika na kasɛ́ti na nkótá mingi. Kasɛ́ti yango ezali na makambo nyonso makomami na mwa búku wana, bakisá mpe maloba ya mikapo mingi oyo mityami wana. Makambo yango makɔtisami boye: Motuna ya liboso etunami, na nsima paragrafe (to baparagrafe) oyo epesi eyano na motuna yango, elongo na mwa mikapo oyo mityami wana. Na nsima, motuna molandi motángami, kolandamáká na mokapo to mikapo oyo mizali kopesa eyano, mpe bongo na bongo. Moyekoli akoki koyoka kasɛ́ti yango ntango azali komibongisa mpo na boyekoli. Kasɛ́ti yango ekoki mpe kosalelama ntango ozali kotambwisa boyekoli.
Baoyo bayaki na liyangani bazalaki na mposa makasi ya kosalela mwa búku yango ya sika kati na mosala na bango ya kosakola. Na ndakisa, mwa mikolo moke nsima ya kozwa mwa búku yango, babongisi-nzela mibale (bapalanganisi ya nsango malamu ya ntango nyonso) na mboka États-Unis batikaki yango epai na babalani mibale ya sika oyo babongisi-nzela yango bakendaki kotala. Ntango babalani yango batalaki etánda ya makambo mazali na kati, likebi na bango ebendamaki na liteya oyo elobi “Misala oyo Nzambe ayini.” Elenge mwasi alobaki ete: “Nateyamaki ntango nyonso ete Nzambe akoki koyina soko moke te—azali mpenza bolingo. Oyo ezali liteya nakotánga libosoliboso.” Ntango babongisi-nzela wana mibale bazongelaki bango na pɔ́sɔ elandaki, elenge mwasi wana alobaki ete: “Natángaki mwa búku yango ya sika. Ezali mpasi mpenza kosala makambo nyonso oyo tosɛngisami na kosala. Yehova azali kosepela na biso te—mpo ete tobalani naino te. Kasi tosili kozwa ekateli. Tosili kokamata bibongiseli ya kobalana na Mwamitano oyo ezali koya.” Bayambaki babongisi-nzela wana mibale na mabɔkɔ na bango, mpe babakisaki ete: “Bólimbisa biso mpo ete likoki ezali te mpo na kosala boyekoli mbala na mbala, kasi ekateli ya kobalana ememeli biso lisungi monene.”
Na mitindo nyonso mpenza, salelá mwa búku ya sika Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? Yango ezali esaleli ebongi mpo na kosalisa basusu ete báyeba masɛngami ya Nzambe.
[Bililingi na lokasa 17]
Lolenge nini okosalela mwa búku yango ya sika?