Bilaka ya nani okoki kotyela motema?
NA MOBU 1893 etuluku moko ya bato 74 oyo bayekolaka bolamu ya bato bayanganaki na foire monene ebengami “Exposition universelle” na engumba Chicago mpo na kosolola na ntina na mikolo mizali koya. (Etánda na yango emonisami likoló.) Kotaláká mbula 100 oyo ezalaki liboso kino na 1993, basakolaki makambo mingi, mosusu yango oyo: “Bato mingi bakokokisa mbula 150 na bomoi na bango.” “Babolɔ́kɔ ekozala lisusu mingi te mpe koboma libala ekozala lisusu na ntina te.” “Bibongiseli ya politiki ekozala lisusu na mindɔndɔ mingi te, wana lokumu ya ekólo ezali koluka kokómisa ntango nyonso makambo pɛtɛɛ.”
Motindo moko, na 1967 búku The year 2000 esakolaki boye: “Kino tokokóma na mobu 2 000, emonani ete baordinatɛrɛ ekokokana, ekomekola, to ekoleka makoki mosusu ya mayele ya moto, kati na yango mbala mosusu makoki na bango ya kopesa bonzenga mpe, ya koyema biloko ya sika.” “Likanisi ya kosala robot ya ntalo moke oyo ekosala misala mingi na ndako . . . emonani lokola ebongi kondimama ete ekosalama kino ntango tokokóma na mobu 2000.”
Kozanga makoki ya bato ya komona mosika makambo oyo makoya ekeseni na makoki ya Nzambe. Na ndakisa, kokanisá makambo oyo masakolamaki liboso na Biblia esili koleka bikeke 20 na ntina na eleko oyo ete: “Bato bakozala bamikumisi na bango mpenza, baluki na mosolo, bato na lolɛndɔ, bato na ngambo, batuki, bato bazangi kokumisa baboti, bato bazangi matɔ́ndi, bato bazangi bulɛɛ, bato bazangi bolingo, bazangi boboto, batɔ́ngi, batomboki, bato na yauli, bayini na malamu, bakosi, bato na nkó, bato babimbi na lolɛndɔ, baoyo bakolingaka malamu na bango mpenza koleka bolingo epai na Nzambe, bato bazali na lolenge na kosambela nde bazali kowangana nguya na yango.”—2 Timoté 3:1-5.
Esakweli oyo ya Biblia na ntina na “mikolo ya nsuka” ezali bobele moko kati na bisakweli mingi oyo ezali kokokisama na mikolo na biso. Liloba ya Nzambe esakolaki ete “elembo” ya kozala ya Yesu ekosangisa bitumba na mokili mobimba, banzala, maladi, koningana ya mabelé, mpe kosakolama ya nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe na mokili mobimba.—Matai 24:3-14; Luka 21:11.
Bosolo ya bisakweli ya Nzambe oyo ekoki kokweisama te epusaki mokomi moko ya Biblia na koloba maloba oyo esili koleka bikeke mingi ete: “Eloko moko ezangi te na makambo malamu nyonso oyo [Yehova] Nzambe na bino atyaki ndaka na yango na ntina na bino. Yango nyonso ebimelaki bino, mpe eloko moko na yango ezangaki te.”—Yosua 23:14.
Ɛɛ, tokoki kondimisama ete bilaka nyonso ya Nzambe mosika te bikokokisama. Bokonzi ya Nzambe ekosukisa maladi, mobulu, kosalela bilangwiseli, nzala, mpe bitumba—mabelé mobimba ekokóma paladiso. (Nzembo 37:10, 11, 29; Emoniseli 21:3, 4) Okoki kotya motema na kokokisama ya esakweli oyo! Euti epai ya Mozalisi na biso, oyo “akobukaka lokuta te.”—Tito 1:2; kokanisá na Baebele 6:13-19.