Zongisáká matɔndi mpe zaláká na esengo
ZULUNALO moko (Calgary Herald) oyo ebimaka na ekólo Canada elobaki ete: “Kozongisa matɔndi ezali likambo ya ntina mingi mpo na moto.” Zulunalo yango ezongelaki maloba ya bana-kelasi ya eteyelo ya yambo, oyo bazali na mbula libwa. Balakisi na bango basɛngaki bango bákoma makambo nyonso oyo bazali na botɔndi mpo na yango. Mwana moko akomaki ete azali kozongisa matɔndi mpo na libota na ye ‘mpo bazali kobatela ye.’ Mwana mosusu ya mwasi azongisaki mpe matɔndi mpo na libota na ye, na maloba oyo: “Babatelaka ngai nazwa likama te mpe nazala nzoto kolɔngɔnɔ, basungaka ngai, balingaka ngai, baleisaka ngai, mpe soki baboti na ngai te, mbɛlɛ nazali na mokili oyo te.”
Moto oyo azongisaka matɔndi te azalaka na esengo ata moke te. James Packer, moto ya filozofi mpe ya teoloji, alobaki ete “tosalemá na ndenge oyo ezali kosɛnga ete Nzambe asungaka biso na bomoi na biso mpe tósunganaka biso na biso.” Maloba oyo ezali kotinda biso na kokanisa toli ya mayele oyo euti na Biblia, oyo ekomamaki esili koleka bankama ya bambula, ete: “Bózalaka mpe na matɔndi.” (Bakolose 3:15) Kozongisela bamosusu matɔndi ebatelaka boyokani malamu.
Lisusu, ntango tozali kozongisana matɔndi mpe kopesana kilo, tozali mpe kozongisa matɔndi epai ya Yehova mpe ye amonaka yango. Biblia elobi ete: “Miso na [Yehova] ekotambolaka kati na mokili mobimba ete amonisa nguya na ye mpo na bango baoyo bazali na mitema pɛto liboso na ye.” (2 Ntango 16:9) Nzambe alobi na biso ete akoki kobosana te bolingo oyo bato bamonisaka mpo na nkombo na ye. (Baebele 6:10) Ya solo, tozali na bantina malamu ya kozongisa matɔndi mpo na ezaleli malamu wana ya Nzambe, mpe ntango tozali kozongisa matɔndi mokolo na mokolo, yango esepelisaka Yehova mpe ebakiselaka biso esengo. Ndenge Masese 15:13 elobi yango, “Motema na esengo ekopelisa elongi, nde mawa na motema ekobuka [elimo, NW].”