Ozali komikundola?
Osepelaki mpenza na botángi ya banimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo euti kobima? Na bongo, talá soki okoki kopesa biyano na mituna milandi:
• Tribinale oyo etalaka mibeko ya mboka (Tribunal constitutionnel fédéral) ya Allemagne elongisaki likambo nini ya lingomba?
Tribinale yango eboyaki ekateli mabe oyo tribinale mosusu ezwaki mpo na Batatoli ya Yehova, mpe mpo ete lingomba na bango endimama te na mibeko ya mboka. Tribinale yango oyo elongisaki bango emonisaki ete na makambo nyonso oyo moto akoki kosala lokola azali na bonsomi ya losambo, akoki mpe ‘kotosa mateya ya lingomba na ye’ liboso ya mibeko ya mboka.—15/8, lokasa 8.
• Bampasi ya Yobo eumelaki ntango boni?
Mokanda ya Yobo emonisi te ete eumelaki mpenza bambula mingi. Ekoki mpenza kozala ete banda bampasi ya Yobo ebandaki tii eyaki kosila, eumelaki kaka mwa basanza, ntango mosusu ekokaki ata mbula mobimba te.—15/8, lokasa 31.
• Mpo na nini tokoki kondima ete Zabolo azali mpenza, ezali kaka biyambayamba te?
Yesu Klisto ayebaki ete Zabolo azali mpenza. Yesu amekamaki mpenza na ekelamu ya solo, ezalaki te mabe moko oyo ezalaki kati na ye nde emekaki ye. (Matai 4:1-11; Yoane 8:44; 14:30)—1/9, nkasa 5-6.
• Masese 10:15 (NW) elobi ete: “Bozwi ya moto ya mbongo ezali mboka na ye makasi. kozanga ya baoyo mike ezali bobola na bango.” Ndenge nini maloba yango emonanaka ete ezali solo?
Bozwi ekoki kobatela moto na makambo mosusu oyo eyaka mbalakaka, se lokola mboka oyo ezali na lopango ya makasi ebatelaka moke bato oyo bafandi kati na yango. Epai mosusu, bobola ekoki kobebisa moto soki azali na elikya moko te ete ekosila.—15/9, lokasa 24.
• Na ndimbola nini bato babandaki ‘kobelela nkombo ya [Yehova]’ na ntango ya Enosa? (Genese 4:26)
Bato babandaki kosalela nkombo ya Nzambe banda ebandeli ya lisolo ya bato. Yango emonisi ete kobelela oyo ebandaki na ntango ya Enosa ezalaki te kobelela Yehova na kondima. Ekoki kozala ete bato bazalaki komipesa nkombo ya Nzambe na ndenge ya kotyola to bazalaki kopesa yango na bato mosusu, oyo bango bazalaki kokanisa ete bazali kosambela Nzambe na nzela na bango.—15/9, lokasa 29.
• Na Biblia, liloba “disiplini” elimboli nini?
Liloba yango elimboli te konyokola to kosala mabe. (Masese 4:13; 22:15) Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “disipilini” ezali libosoliboso na likanisi ya koteya, kolakisa, kosembola, mpe ntango mosusu, kopesa mpenza etumbu, kasi na bolingo. Lolenge malamu oyo baboti bakoki komekola Yehova ezali ya kosala nyonso ete eloko moko te ekanga bango nzela ya kosolola na bana na bango. (Baebele 12:7-10)—1/10, nkasa 8, 10.
• Ndenge nini baklisto ya solo bamonisaka lelo oyo ete bazali na ngámbo ya Bokonzi ya Nzambe?
Batatoli ya Yehova bakɔtaka na makambo ya politiki te mpe batombokelaka baguvɛrnɛma te, ata na mikili oyo bapekisi mosala na bango; basalaka bongo mpo ete bazali na ngámbo ya Bokonzi ya Nzambe. (Tito 3:1) Bazali nde kosalisa mpenza baguvɛrnɛma, ndenge oyo Yesu na bayekoli na ye basalaki yango na ekeke ya liboso. Batatoli ya Yehova bazali kosala makasi mpo na kosalisa bato ete bálanda mitinda malamu ya Biblia, na ndakisa, ezaleli ya kolongobana, bizaleli malamu mpe kosala mosala malamu.—15/10, lokasa 6.
• Ndenge nini mai ya bomoi ezali kotiyola na Bangomba ya Andes?
Batatoli ya Yehova oyo bazali kuna bazali kosala makasi mpo na komema mateya ya solo ya Biblia epai ya bato, ezala na monɔkɔ ya Quechua to ya Aymara, minɔkɔ mibale oyo bato ya esika wana balobaka. Batatoli bakendaka kotala bato oyo bafandaka na bisanga ya Laki Titicaca, ezala mpe na bisanga oyo “etepeka” likoló ya mai mpe na bisika oyo mingendu ebotaka na bisika ya mozindo mingi te na kati ya laki.—15/10, nkasa 8-10.
• Nzambe apesaki biso nini mpo etambwisaka biso, oyo tokoki kokokanisa yango na ordinatɛrɛ oyo esalisaka mpo na kotambwisa bampɛpɔ lelo oyo?
Nzambe apesá bato likoki ya koyeba kokesenisa makambo, likoki ya kokesenisa malamu na mabe. Yango ezali bongo lisosoli na biso oyo tobotamaka na yango. (Baloma 2:14, 15)—1/11 nkasa 3-4.
• Mpo na nini liwa ya Yesu ezali na motuya monene?
Ntango Adama, moto ya kokoka asalaki lisumu, abungisaki bomoi mpo na ye moko mpe mpo na bato nyonso oyo balingaki kobotama na nsima. (Baloma 5:12) Lokola azalaki moto ya kokoka, Yesu apesaki bomoi na ye; apesaki bongo lisiko oyo esali ete bato ya sembo bázwa lisusu likoki ya kozala na bomoi ya seko.—15/11, nkasa 5-6.
• Basukute, oyo Bakolose 3:11 elobeli, bazalaki banani?
Basukute bazalaki bato ya ekólo moko oyo bafandaka esika moko te; kobanda soki mobu 700 tii na mobu 300 liboso ya ntango na biso (L.T.B), bayangelaki bamboka mwa mingi ya Mpoto mpe ya Azia, oyo ezalaka mpenza na bazamba mingi te. Bayebaki mpenza kotambola na mpunda mpe bazalaki bilombe ya bitumba. Ntango mosusu Bakolose 3:11 elobelaki mpenza te ekólo moko boye, kasi elobelaki nde bato oyo bazalaki nsuka mpenza ya basɛnzi.—15/11, nkasa 24-25.
• Mpo na nini tokoki koloba ete Lilako Lileki Malamu ezali liteya oyo esengeli ntango nyonso kobenda likebi na biso?
Liteya wana oyo elendisaka bizaleli malamu ezali mpe na Lingomba ya Bayuda, ya Bouddha, na mateya ya filozofi ya Bagrɛki mpe na Lingomba ya Confucius. Kasi, oyo Yesu alobaki na Lisolo na ye Likoló ya Ngomba esɛngi kozala moto ya liboso ya kobanda kosalela basusu malamu, mpe liteya yango etali bato nyonso, bázala na esika nini to bázala na bomoi na eleko nini. (Matai 7:12)—1/12, lokasa 3.