Mituna ya batángi
Nsima ya Mpela, Noa atindaki ebenga mpe ezongaki na “lokasa ya olive.” Ebenga ezwaki lokasa yango wapi?
Biblia eyebisi biso ete “mai ebutaki lisusu mingi, mpe ngomba molai nyonso na nse ya likoló ebombamaki.” (Genese 7:19) Ntango mai ebandaki kokita, Noa azalaki kotinda ebenga moko nsima ya pɔsɔ moko tii na oyo ya misato. Na mbala ya mibale, ebenga ezongaki na “lokasa ya nzete ya olive oyo ebukami sika na monɔkɔ na yango; na ndenge yango Noa ayebaki ete mai ekiti na mokili.”—Genese 8:8-11, NW.
Lelo oyo tokoki te koyeba ntango boni esika boye to boye ya mabelé eumelaki na nse ya mai, mpamba te, nsima ya Mpela, bangomba mpe bitando mosusu ezalaki lisusu lokola liboso ya Mpela te. Kasi, emonani ete mai ezindisaki bisika mingi ntango molai mpe banzete mingi ekufaki. Nzokande, banzete mosusu ekufaki mpenza te, yango wana ebimisaki nkasa ya sika ntango mai ekitaki.
Buku moko (The New Bible Dictionary) elobi boye mpo na nzete ya olive: “Soki bakati yango, ekumu na yango ebimisaka bana, yango wana ekoki kobimisa ata nzete mitano ya sika. Mbala mingi, ata nzete ya olive oyo ekómi pene na kokufa esalaka mpe bongo.” Buku moko (The New Schaff-Herzog Encyclopedia of Religious Knowledge) elobi ete, “tokoki koloba ete nzete yango ekufaka te.” Lelo oyo moto moko te ayebi soki mai yango ezalaki mungwamungwa, ezalaki malili to mɔ́tɔ. Yango wana, tokoki koyeba te ndenge nini mai yango esalaki banzete ya olive mpe banzete mosusu.
Kasi, nzete ya olive ya zamba ekufaka na malili makasi, lokola oyo ezalaka na likoló ya bangomba milaimilai. Mbala mingi, yango ekolaka malamu na bisika oyo ezali na nse ya mɛtrɛ 1000, banda na nivo ya mai monene, na bisika oyo malili ezalaka makasi mingi mpenza te (ekitaka na nse ya 10°C te). Buku moko (The Flood Reconsidered) elobi ete: “Yango wana, lokasa yango ya sika esalisaki Noa ayeba ete mai esilaki kokauka na mabwaku.” Ntango Noa atindaki lisusu ebenga yango pɔsɔ moko na nsima, ezongaki lisusu te, yango emonisaki ete ezwaki banzete mpe bisika ya kofanda.—Genese 8:12.