Mituna ya batángi
Moto oyo azali kosala makambo ya mbindo akoki mpe kobimisama na lisangá, ndenge moto akoki kobimisama mpo na etamboli ya nsɔni to mpo na pite?
Moto oyo azali kosala pite, makambo mosusu ya mbindo, to mpe oyo azali na etamboli ya nsɔni, akoki kobimisama na lisangá soki abongoli motema te. Ntoma Paulo atángaki masumu wana misato esika moko na masumu mosusu oyo mpo na yango moto akoki kobimisama na lisangá. Akomaki boye: “Misala ya mosuni ezali komonana polele, mpe yango ezali pite, makambo ya mbindo, etamboli ya nsɔni. . . . Nazali kokebisa bino . . . ete baoyo bazali na momeseno ya kosala makambo ya ndenge wana bakozwa libula ya bokonzi ya Nzambe te.”—Bagalatia 5:19-21.
Pite (na Grɛki, pornêia) ezali lisumu nyonso etali kosangisa nzoto. Liloba yango esangisi misala lokola ekobo, kindumba, kosangisa nzoto kati na bato oyo babalani te, ezala na monɔkɔ, na esumbeli, to mpe kosimbasimba binama ya kobotela ya moto oyo azali molongani na yo te. Soki moto ya pite abongoli motema te, akoki kotikala na lisangá ya boklisto te.
Etamboli ya nsɔni (na Grɛki, asélgêia) elimboli “mobulu ya basi to ya mibali; makambo ya salite; kosala makambo oyo ezali mabe na miso ya bato kozanga koyoka nsɔni.” Diksionɛrɛ moko (The New Thayer’s Greek-English Lexicon) elimboli liloba wana ya Grɛki lokola “mposa makasi, oyo ezangi komipekisa ya kosala makambo ya mabe, . . . kosala makambo na kotuka, kozanga nsɔni, mpe na nko.” Buku mosusu elobi ete kozala na etamboli ya nsɔni elimboli kosala makambo oyo “endimami te na miso ya bato.”
Ndenge bandimbola wana emonisi yango, “etamboli ya nsɔni” esangisi makambo mibale: (1) Likambo yango moko ezali mpenza kobuka mibeko ya Nzambe, mpe (2) moto oyo azali kosala yango azali na limemya ata moke te, azali kosala makambo na nko.
Nyonso wana emonisi ete “etamboli ya nsɔni” ezali te mabunga ya mikemike. Ezali nde misala oyo ezali mpenza kobuka mibeko ya Nzambe, oyo moto azali kosala na kozanga nsɔni, na kozanga limemya, na kotyola mitinda, mibeko mpe bokonzi to komona yango mpamba. Paulo alobelaki etamboli ya nsɔni esika moko na pite. (Baloma 13:13, 14) Lokola Bagalatia 5:19-21 etángi etamboli ya nsɔni na kati ya masumu oyo ekoki kozangisa moto Bokonzi ya Nzambe, oyo amipesi na yango asengeli kozwa mpamela, to mpe kobimisama na lisangá.
Mbindo (na Grɛki, akatharsia) esangisi makambo nyonso wana, ezala liloba oyo ebongolami na “pite,” na “mbindo,” to mpe na “etamboli ya nsɔni.” Yango ekoki kolimbola mbindo ya ndenge nyonso: ezala na makambo ya kosangisa nzoto, na maloba, na misala, mpe na makambo ya elimo. “Mbindo” esangisi makambo ndenge na ndenge oyo ezali masumu minene.
Ndenge 2 Bakolinti 12:21 elobi yango, Paulo alobeli bato oyo “kala basalaki masumu kasi babongolaki mitema te na oyo etali mbindo na bango mpe pite mpe etamboli ya nsɔni oyo bamipesaki na yango.” Lokola batángi “mbindo” esika moko na “pite mpe etamboli ya nsɔni,” emonisi ete bankulutu bakoki kosambisa moto oyo azali kosala makambo mosusu oyo ezali mbindo. Kasi, liloba mbindo esangisi makambo mingi, mosusu mpe esɛngaka te ete bankulutu básala komite mpo na kosambisa moto oyo asali yango. Tokoki kolimbola yango na ndakisa ya ndako: ndako ekoki kozala na mwa salite to mpe ekoki kozala na bosɔtɔ makasi; ndenge moko mpe, misala ya mbindo ekoki kozala mwa makambo ya mikemike, kasi mosusu mpe ekoki kozala makambo ya mabe mingi.
Na Baefese 4:19, Paulo alobaki ete bato mosusu ‘babungisaki bizaleli nyonso ya malamu’ mpe ‘bamipesaki na etamboli ya nsɔni mpo na kosala makambo ya mbindo ya ndenge nyonso na lokoso.’ Tomoni ete Paulo atye na molɔngɔ moko ‘kosala makambo ya mbindo na lokoso’ ná kozala na etamboli ya nsɔni. Soki moto oyo azwá batisimo azali kosala makambo ya “mbindo . . . na lokoso” mpe abongoli motema te, akoki kobimisama na lisangá.
Tópesa ndakisa: bafianse bakómaki kosimbanasimbana mpe kopesana babizi na ndenge oyo ezali kolamusa mposa ya nzoto mpe bazongelaki yango mbala na mbala. Nsima ya kosolola na bango, bankulutu bakoki komona ete bakweaki mpenza na etamboli ya nsɔni te, elingi koloba basalaki makambo na ndenge ya nko te to na kozanga limemya; atako bongo, bazalaki na lokoso na etamboli na bango. Na ntango wana, bankulutu bakoki kosambisa bango mpamba te basalaki makambo ya mbindo na ndenge ya lokoso. Moto oyo azali mbala na mbala kobenga moto mosusu na telefone mpe azali koloba na ye polele makambo ya kosangisa nzoto, bakoki mpe kosambisa ye ete azali kosala likambo ya mbindo na ndenge ya lokoso, mingimingi soki bapesaki ye toli mpo na yango.
Bankulutu basengeli kozala na bososoli ntango bazali kotalela makambo ya ndenge wana. Liboso ya kokata soki komite ya kosambisa esengeli kotalela likambo moko boye, bankulutu basengeli koyeba naino malamumalamu likambo nini mpenza esalemaki mpe ekómaki tii wapi. Bankulutu bakoki te koloba mbala moko ete moto akwei na etamboli ya nsɔni mpo kaka aboyaki toli ya Biblia oyo bapesaki ye. Elakisi mpe te ete basengeli kotánga mbala boni moto akoki kosala lisumu moko boye liboso báloba ete komite ya kosambisa ekoki kotalela likambo na ye. Bankulutu basengeli kotalela malamu likambo na likambo mpe kobondela mpo na koyeba nini mpenza esalemaki mpe soki ezalaki kozongelama, ezali etamboli ya ndenge nini mpe na meko nini moto amipesaki na yango, mpe na elimo to na makanisi nini moto azalaki kosala yango.
Kosala likambo ya mbindo na ndenge ya lokoso esuki kaka te na makambo ya kosangisa nzoto. Na ndakisa, ekoki kokóma ete elenge moko oyo azwá batisimo amɛli likaya mbala moko to mibale; na nsima abombi likambo yango te, ayebisi yango epai ya baboti na ye. Alaki ete akozongela lisusu te. Likambo wana ezali likambo ya mbindo, kasi tokoloba te ete elenge yango amipesaki na likambo ya “mbindo . . . na lokoso.” Likambo na ye ekoki kosɛnga kaka ete bankulutu mibale bápesa ye toli euti na Biblia mpe baboti na ye básalisa ye mpo azongela yango lisusu te. Nzokande, soki elenge yango amɛlaka likaya mbala na mbala, elingi koloba ete azali kokɔtisa mbindo na nzoto, bankulutu bakosambisa ye mpamba te azali komipesa na likambo ya mbindo na ndenge ya lokoso. (2 Bakolinti 7:1) Soki elenge yango abongoli motema te, bakobimisa ye na lisangá.
Baklisto mosusu mpe bakweaki na likambo mabe ya kotala bililingi ya bato oyo bazali bolumbu. Likambo yango ezali mabe na miso ya Nzambe mpe bankulutu bakoki koyoka mpasi na motema soki ndeko moko asali likambo ya ndenge wana. Kasi, yango elingi koloba te ete soki kaka ndeko moko atali bililingi ya mabe ndenge wana, komite ya kosambisa ekotalela likambo na ye. Tózwa ndakisa ete ndeko moko azongelaki mbala na mbala kotala bililingi ya bato oyo bazali bolumbu. Lisosoli na ye etungisami mpe akei koyebisa yango epai ya nkulutu moko, mpe azwi ekateli ete akozongela yango lisusu te. Nsima ya kosolola na ye, nkulutu yango akoki komona ete ndeko yango amipesaki mpenza te na likambo ya “mbindo . . . na lokoso.” Lisusu, ndeko yango amonisaki te ezaleli ya kozanga nsɔni, ya kosala makambo na nko oyo, na maloba mosusu ezali etamboli ya nsɔni. Atako bakosala komite te mpo na kosambisa ye, bankulutu bakopesa ye toli oyo esengeli mpenza mpe mbala mosusu bakopona bankulutu mpo básolola na ye mbala mingi mpo na kolendisa ye azongela lisusu likambo yango te.
Kasi, tózwa sikoyo ndakisa ya moklisto moko oyo, banda kala azalaka na momeseno ya kotala na kobombana bililingi ya bato oyo bazali kosala makambo ya nsɔmɔ mpenza ntango bazali kosangisa nzoto mpe asalaka nyonso mpo eyebana te. Ekoki kozala ete atalaka bafilme to bafɔtɔ oyo ezali kolakisa bato ya mobulu bazali kosangisa nzoto na mwasi moko na makasi, to bakangi mwasi bansinga mpe bazali kosangisa na ye nzoto, to bazali konyokola basi mpe kosala bango makambo ya nsɔni na nko, to mpe bato bazali kosangisa nzoto na bana mike. Ntango bato mosusu bayei koyeba ezaleli na ye wana, ndeko yango ayoki mpenza nsɔni. Atako asalaki te likambo na kozanga limemya na miso ya bato, bankulutu bakoki komona ete ‘amipesaki’ na momeseno mabe wana mpe asalaki likambo ya ‘mbindo na lokoso.’ Na ntango wana komite ya kosambisa ekotalela likambo yango. Moto ya ndenge wana akobimisama na lisangá soki abongoli motema te mpe azwi te ekateli ya kotika kotala bililingi ya bato bazali kosangisa nzoto. Soki azalaki kobenga bato mosusu na ndako na ye mpo na kotala bililingi ya ndenge wana (na maloba mosusu, azalaki kolendisa likambo yango), ekomonisa ete azalaki na nko mpe bakosambisa ye mpo na etamboli ya nsɔni.
Na Biblia, liloba oyo ebongolami na “etamboli ya nsɔni” elimbolaka kaka lisumu ya monene, mbala mingi na makambo ya kosangisa nzoto. Mpo na koyeba soki misala ya moto ezali etamboli ya nsɔni, bankulutu basengeli komituna soki azalaki kosala makambo na nko, azalaki kobanga te kosala makambo oyo ezali nsɔni na miso ya bato. Moto mosusu akoki kobuka mobeko moko ya Nzambe kasi azali kosala makambo na nko te to na kozanga nsɔni, kasi akoki kosala yango na “lokoso.” Makambo ya ndenge wana ekotalelama ete ezali makambo ya mbindo na ndenge ya lokoso.
Kokata soki likambo oyo moto asali ezali mbindo to etamboli ya nsɔni ezali lisɛki te, mpamba te ezali likambo oyo ekoki kozangisa moto bomoi ya seko. Bankulutu oyo bazwi mokumba ya kosambisa likambo ya ndenge wana basengeli kobondela Yehova, kosɛnga ye elimo santu, bososoli mpe mayele. Bankulutu basengeli kobatela lisangá mpo etikala pɛto mpe, ntango bazali kokata makambo, basengeli kolanda Liloba ya Nzambe mpe malako ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Matai 18:18; 24:45) Na mikolo ya mabe oyo, bankulutu basengeli kobosanaka te maloba oyo: “Bangá likambo lizali bino kosala, zambi bokosambisa mpo na moto te nde mpo na [Yehova].”—2 Ntango 19:6.