Mituna ya batángi
Moklisto asengeli koboya komɛla masanga to kolya biloko oyo ezali na caféine?
Biblia epekisi te baklisto bámɛla biloko lokola kafe, ti, shokola, ti oyo babengaka maté, mpe masanga ya sukali oyo ezali na caféine. Atako bongo, Biblia ezali na mitinda oyo ekoki kosalisa biso tózwa bikateli ya malamu. Tótalela naino ntina oyo bato mosusu baboyaka komɛla to kolya biloko oyo ezali na caféine.
Ntina ya libosoliboso ezali ete caféine ekoki kobongola mayoki ya moto, kolongola ye mpɔngi mpe kosala ete akóma na mwa loyenge. Moto akoki mpe kokóma moombo na yango. Buku moko ya minganga elobi boye: “Soki moto aumeli na momeseno ya komɛla masanga to kolya biloko oyo ezali na caféine, nsukansuka nzoto na ye ekobanda kosɛnga alya to amɛlaka yango mingi mpo ayoka malamu mpe akokóma moombo na yango. Soki atiki yango na mbalakaka akoki kobanda koyoka motó mpasi, akokóma nkandankanda, akobanda komitungisa mingi mpe akoyoka kizunguzungu.” Buku moko (Diagnostic and Statistical Manual of Mental Disorders) etángi makambo oyo emonanaka epai ya moto oyo atiki komɛla to kolya biloko oyo ezali na caféine na kati ya makambo oyo emonanaka epai ya moto oyo atiki komɛla bangi. Yango wana, tokoki kokamwa te soki baklisto mosusu bamitungisaka mpo balingaka te kokóma baombo ya eloko moko mpe mposa na bango ezali ete bázala na komipekisa.—Bagalatia 5:23.
Bato mosusu mpe bakanisaka ete caféine ekoki kobebisa kolɔngɔnɔ ya nzoto ya mwana oyo azali naino na libumu ya mama. Baklisto basengeli kolinga Nzambe na ‘molimo na bango mobimba’; yango wana, baboyaka makambo nyonso oyo ekoyeisa bomoi na bango mokuse. Lisusu, lokola Biblia esɛngi bango bálingaka bazalani na bango, bakimaka makambo nyonso oyo ekoki kobebisa bomoi ya mwana oyo azali naino na libumu.—Luka 10:25-27.
Ezali mpenza na ntina bámitungisa bongo? Bato bazalaka na makanisi ndenge moko te mpo na ndenge oyo caféine esalaka na nzoto ya moto; basusu balobaka ete epesaka maladi ndenge na ndenge, kasi bamosusu bandimaka likambo yango te. Minganga mosusu kutu balobaka ete kafe ezalaka malamu mpo na kolɔngɔnɔ ya nzoto. Na 2006, zulunalo moko (Time) elobaki boye: “Bolukiluki oyo esalemaká kala emonisaki [ete caféine] ekoki kopesa moto maladi ya kanser ya libenga ya masuba, maladi ya tansiɔ mpe bamaladi mosusu. Nzokande, bolukiluki oyo esalemi mikolo oyo emonisi ete makambo yango ezali solo te; kutu emonisi matomba ya komɛla to kolya biloko oyo ezali na caféine na kati. Balobi ete caféine ebatelaka libale (foie), epekisaka maladi ya Alzheimer, maladi ya nsɔngi (calculs biliaires), konyokwama na makanisi, ata mpe maladi mosusu ya kanser.” Na likambo etali komɛla to kolya biloko oyo ezali na caféine, zulunalo moko elobaki boye: “Sɛkɛlɛ ezali kaka kozala na bokatikati.”
Moklisto mokomoko asengeli kozwa ekateli na ye na kotalela makambo oyo toyebi lelo mpo na caféine mpe na kotalela mitinda ya Biblia na likambo yango. Na ndakisa, mwasi moklisto oyo azali na zemi akoki komona malamu asalela te biloko nyonso oyo ezali na caféine soki amoni ete yango ekoki kozala mabe mpo na kolɔngɔnɔ ya mwana na ye. Soki mpe moklisto mosusu amoni ete soki amɛli te to alye te eloko moko oyo ezali na caféine akómaka nkandankanda to mpe abɛlaka, ekozala malamu atika biloko yango ata mpo na mwa ntango moko boye. (2 Petelo 1:5, 6) Baklisto mosusu basengeli koloba mabe te mpo na ekateli ya ndeko yango, basengeli te koluka kondimisa ye makanisi na bango.
Ezala ekateli nini ozwi mpo na oyo etali komɛla to kolya biloko oyo ezali na caféine, kobosana te toli oyo ya Paulo ete: “Ezala bozali kolya to komɛla to kosala eloko nini mosusu, bósalaka makambo nyonso mpo na nkembo ya Nzambe.”—1 Bakolinti 10:31.