“Kende kosukola na pisini ya Siloama”
MPO na kobikisa moto moko oyo akufá miso, Yesu apakolaki ye pɔtɔpɔtɔ ya mabelé na miso mpe alobaki na ye ete: “Kende kosukola na pisini ya Siloama.” Mobali yango akendaki mpe “azongaki azali komona.” (Yoane 9:6, 7) Pisini ya Siloama ezalaki wapi? Bato ya arkeoloji bamoni likambo moko oyo esalisi na koyeba malamumalamu esika oyo pisini yango ezalaki.
Liboso, bato mingi bazalaki kokende kotala esika moko na Yelusaleme oyo bazalaki kobenga Pisini ya Siloama, bazalaki kokanisa ete yango nde pisini oyo elobelami na Yoane 9:7. Esika yango ezali na nsuka ya nzela moko ya mai oyo ezali na molai ya mɛtrɛ 530, oyo Hizikiya atongisaki na siɛklɛ ya mwambe liboso ya ntango na biso (L.T.B.) Nzokande, pisini oyo ezali wana etongamaki na siɛklɛ ya minei ya ntango na biso (T.B.). Bato ya Empire byzantin oyo bazalaki komibenga baklisto nde batongaki yango mpo bazalaki kokanisa ete pisini oyo elobelami na evanzile ya Yoane ezalaki na nsuka ya nzela yango ya mai.
Na mobu 2004, bato ya arkeoloji bakundolaki pisini mosusu mpe bakanisi ete yango nde Pisini ya Siloama oyo ezalaki na ntango ya Yesu. Pisini yango ezali na ntaka ya mɛtrɛ soki 100, na sudi-ɛsti ya esika oyo bato bazalaki kobenga liboso Pisini ya Siloama. Ndenge nini bamonaki pisini yango? Lokola bakonzi ya engumba yango balukaki kobongisa terase moko na esika yango, batindaki bato na bisaleli ya makasi. Moto moko ya arkeoloji oyo azalaki kosala mosala na ye pembeni wana akendaki kotala ndenge bazalaki kotimola mpe amonaki esikalye mibale. Bakonzi basɛngaki basali bákata mosala yango, mpe bakambi ya ebongiseli oyo etalelaka bolukiluki ya biloko ya kala (Israeli Antiquities Authority) bapesaki bato ya arkeoloji nzela ya kotimola na esika yango. Basili kokundola ngámbo moko ya pisini yango oyo ezali na molai ya mɛtrɛ soki 70, mpe bamoni bansuka mibale.
Na esika yango bamonaki mpe mbongo ya bibende oyo mosusu kati na yango ezalaki kosalelama na mbula ya mibale, ya misato, mpe ya minei banda na ntango oyo Bayuda batombokelaki Loma. Botomboki yango ebandaki na mobu 66 tii na mobu 70 T.B. Mbongo yango emonisi ete pisini wana ezalaki kosalelama tii na mobu 70 T.B., ntango basoda ya Loma babebisaki Yelusaleme. Zulunalo moko (Biblical Archaeology Review) elobi boye: “Pisini yango ezalaki kosalelama tii na nsuka ya botomboki, na nsima bato bazalaki kosalela yango lisusu te. Tii na ntango ya Empire byzantin, bato bafandaki lisusu na kartye wana te epai pisini ezalaki; kartye oyo ezalaki na esika ya kokita makasi na Yelusaleme mobimba. Na ntango nyonso wana, mai ya mbula ezalaki komema zɛlo na lobwaku yango, mpe mokemoke pisini yango ekómaki kotonda na pɔtɔpɔtɔ. Nsima ya kobomama ya engumba, pisini yango ezalaki kopɛtolama lisusu te. Nsima ya bankama ya bambula, pisini yango ezipamaki na nse ya mabelé. Bato ya arkeoloji bakundolaki pisini yango na nse ya mɛtrɛ 3 ya mabelé.”
Mpo na nini esika oyo Pisini ya Siloama ezalaki esengeli kobenda likebi ya bayekoli ya sembo ya Biblia? Mpamba te yango ekosalisa bango báyeba malamu ndenge engumba Yelusaleme ezalaki na siɛklɛ ya liboso, mpamba te elobelami mingi na lisolo ya bomoi mpe mosala ya Yesu.
[Elilingi na lokasa 7]
Pisini ya Siloama oyo bauti kokundola
[Eutelo ya bafɔtɔ]
© 2003 BiblePlaces.com