Mituna ya batángi
Ndenge nini moklisto asengeli kotalela mosala ya koboma nyama mpe mbisi?
Biblia epekisi te koboma nyama to mbisi. (Deteronome 14:4, 5, 9, 20; Matai 17:27; Yoane 21:6) Kasi, baklisto oyo basalaka mosala ya koboma nyama to mbisi basengeli kotalela mwa mitinda ya Makomami.
Nzambe apesaki Noa ná bana na ye nzela ya koboma nyama mpe kolya yango; kasi basengelaki kokata yango nkingo mpe kosopa makila liboso ya kolya yango. (Genese 9:3, 4) Etinda wana emonisi ete esengelaki komemya bomoi ya nyama mpamba te Nzambe nde azali nkolo na yango. Yango wana, baklisto babomaka nyama te kaka mpo na kosakana to mpo na komisepelisa, likambo oyo ekoki komonisa ete bazangi limemya mpo na bomoi.—Masese 12:10.
Ezali mpe na likambo mosusu oyo tosengeli kotalela malamu. Bantoma oyo bazalaki babomi ya mbisi bazalaki kosepela mingi soki babomi mbisi ebele. Kasi, Biblia eyebisi ata esika moko te ete bazalaki komikumisa mpo bazali babomi minene ya mbisi to ya nyama to ete bazalaki komekana na bato mosusu na koboma mbisi to nyama mpo na kolakisa ete bazali mibali, to kaka mpo na elengi ya koboma.—Nzembo 11:5; Bagalatia 5:26.
Na yango, tokoki komituna boye: ‘Natalelaka mpenza bomoi na limemya ndenge Yehova atalelaka yango? Makanisi mpe masolo na ngai nyonso ekendaka kaka na koboma nyama to mbisi? Nayebani mingi lokola moto oyo alingá koboma mpe kokanga banyama, to lokola mosaleli ya Nzambe? Koboma nyama to mbisi ekómisá ngai moninga ya bapakanu to etindaka ngai nasundola libota na ngai?’—Luka 6:45.
Bato mosusu oyo babomaka nyama to mbisi mpo na kolya bakoki kokanisa ete ezali mabe te soki bazali kozongisa matomba ya Bokonzi na nsima na eleko oyo yango ekufaka mingi. Nzokande, tokomonisa kondima ntango tozali kopesa nzela ata na eloko moko te ete ezongisa matomba ya Bokonzi na nsima. (Matai 6:33) Lisusu, baklisto batosaka mibeko nyonso ya “Kaisala” oyo etali koboma nyama mpe mbisi, ata soki bakonzi balandelaka mibeko yango te.—Matai 22:21; Baloma 13:1.
Mpo na kolanda mpenza ndenge Yehova atalelaka likambo ya koboma nyama mpe mbisi, ekosɛnga bato mosusu bábongola makanisi na bango mpo na koyokanisa yango na oyo ya Nzambe. (Baefese 4:22-24) Tosengeli mpe kotosa bikateli ya basusu, oyo lisosoli na bango etindi bango bázwa. Na likambo yango, ntoma Paulo apesaki toli oyo: “Tiká ete tósambisanaka lisusu te, kasi bózwa kutu nde mokano oyo, ya kotya te liboso ya ndeko libaku ya kokweisa.” (Baloma 14:13) Bolingo mpe limemya ya ndenge wana ekotya kimya na lisangá mpe ekosepelisa Mozalisi na biso, oyo azali liziba ya bomoi.—1 Bakolinti 8:13.a
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá mpe “Mituna ya batángi” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Mai 1990.