Oyebaki yango?
Paulo alingaki koloba nini ntango alobelaki “molɔngɔ ya balongi”?
▪ Paulo akomaki boye: “Nzambe . . . [atambwisaka] biso na molɔngɔ ya balongi esika moko na Kristo mpe azali koyokisa nsolo ya boyebi na ye bipai nyonso na nzela na biso! Mpo epai ya Nzambe tozali nsolo kitoko ya Kristo na kati ya baoyo bazali kobikisama mpe na kati ya baoyo bazali kokufa; epai ya baoyo bazali kokufa nsolo oyo euti na liwa mpo na liwa, epai ya baoyo bazali kobikisama nsolo oyo euti na bomoi mpo na bomoi.”—2 Bakorinti 2:14-16.
Ntoma yango azalaki kolobela momeseno oyo Baroma bazalaki na yango ya kokumisa mokonzi ya basoda oyo alongi banguna ya ekólo. Na milulu yango, bazalaki kolakisa biloko oyo bazwi na etumba mpe bato oyo bango bakangi na etumba mpe bazalaki komema bangɔmbɛ-mibali mpo na kopesa mbeka wana bato bazalaki kokumisa mokonzi ya basoda mpe basoda na ye. Na nsuka, bazalaki kopesa bambeka ya bangɔmbɛ-mibali mpe bazalaki koboma bato oyo bango bakangaki na etumba.
Buku moko (The International Standard Bible Encyclopedia), elobi ete maloba “nsolo kitoko ya Kristo” oyo elimbolaki bomoi mpo na bamosusu mpe liwa mpo na basusu “ekoki kozala eutaki na momeseno ya Baroma ya kotumba mpaka malasi nzelanzela ntango bazali kokumisa bato oyo balongi. Nsolo wana ya malasi ezalaki komonisa elonga mpo na bato oyo balongi mpe kokundwela bakangami ete liwa ezali kozela bango.”a
“Bisika oyo etombwaná” oyo Makomami ya Ebre elobeli mingi ezalaki nini?
▪ Ntango Bayisraele balingaki kokɔta na Mokili ya Ndaka, Yehova ayebisaki bango bálongola bisika nyonso ya losambo oyo bato ya Kanana oyo bazalaki kofanda kuna bazalaki kosalela. Nzambe apesaki mobeko ete: “Bosengeli . . . kobebisa bililingi nyonso na bango ya mabanga, mpe bokobebisa bikeko nyonso na bango ya ebende oyo enyangwisami, mpe bokosilisa nyɛɛ bisika nyonso na bango oyo etombwaná ya losambo.” (Mitángo 33:52) Ekoki kozala ete bisika yango ya losambo ya lokuta ezalaki bisika ya polele oyo etombwaná to bisika etombwaná oyo batongaki na bisika mosusu, na ndakisa na nse ya banzete to na bingumba. (1 Bakonzi 14:23; 2 Bakonzi 17:29; Ezekiele 6:3) Ezalaki na bitumbelo, makonzí to banzete ya losambo, bililingi, bitumbelo ya mpaka malasi mpe biloko mosusu ya losambo.
Liboso tempelo ya Yerusaleme etongama, Bayisraele bazalaki kosambela Yehova na bisika oyo andimaki, oyo Makomami ebengi bisika oyo etombwaná. Samwele, mosakoli ya Nzambe apesaki bambeka na “esika oyo etombwaná” na engumba moko oyo Biblia etángi nkombo na yango te na mokili ya Zufe. (1 Samwele 9:11-14) Kasi, ntango tempelo etongamaki, ebele ya bakonzi oyo bazalaki sembo epai ya Yehova balukaki kolongola “bisika oyo etombwaná” na mokili yango.—2 Bakonzi 21:3; 23:5-8, 15-20; 2 Ntango 17:1, 6.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba ndimbola ya maloba wana ya elilingi oyo Paulo alobaki, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Novɛmbɛ 1990, lokasa 27 (Na Lifalanse).
[Elilingi na lokasa 23]
Elilingi oyo ezali kolakisa molulu moko ya bolongi oyo Baroma basalaki na ekeke ya mibale ya ntango na biso.
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Fɔtɔ na ndingisa ya British Museum
[Elilingi na lokasa 23]
Makonzí ya losambo ya Gezere oyo ebebá