Pusaná penepene na Nzambe
“Zwá mwana na yo”
KOKUFELA mwana ezali moko ya makambo oyo eleki mpasi oyo moto akoki kokutana na yango. Yehova Nzambe azali na nguya ya kozongisa na bomoi bana oyo bakufá. Toyebi ete yango ezali solo mpo apesaki bato mosusu na ntango ya kala nguya ya kosekwisa bakufi. Ndakisa moko oyo ezali na 2 Bakonzi 4:8-37, elobeli mwana moko ya mobali oyo mosakoli Elisha asekwisaki.
Likambo yango esalemaki na engumba ya Shuneme. Mwasi moko oyo azalaki kobota te mpe mobali na ye bamoniselaki Elisha boboto na ndenge bazalaki kopesa ye biloko ya kolya mpe esika ya kolala. Mpo na komonisa botɔndi, mokolo moko mosakoli yango ayebisaki mwasi yango boye: “Na mbula ekoya, na ntango oyo boye, okosimba mwana mobali.” Mokolo oyo akanisaki te ete ekokóma, ekómaki mpe ndenge Elisha alakaki ye asimbaki mwana mobali na mabɔkɔ na ye. Likambo ya mawa, esengo na ye ezalaki ya ntango mokuse. Kaka mwa bambula na nsima, mwana yango ayokaki motó mpasi makasi ntango azalaki na bilanga mpe ntango bamemaki ye na ndako, akufaki na ‘mabɔlɔngɔ ya mama na ye.’ (Vɛrsɛ 16, 19, 20) Mwasi yango oyo azalaki na mawa makasi, azwaki nzoto ya mwana na ye mpe alalisaki yango malɛmbɛ na mbeto oyo mbala mingi mosakoli azalaki kolala.
Azelaki te, mpe na ndingisa ya mobali na ye, asalaki mobembo ya kilomɛtrɛ soki 30 na Ngomba Karamele mpo na kokutana na Elisha. Ntango akutanaki na ye, amonisaki te ete azali kolela amonisaki mpe ata moke te ete azali na mawa makasi. Ezali nde mpo ayokaki ete Eliya, moto oyo Elisha akitanaki asekwisaki mwana ya mwasi moko oyo mobali akufá? (1 Bakonzi 17:17-23) Mwasi yango ya mboka Shuneme azalaki nde na kondima ete Elisha akosala bongo mpo na mwana na ye? Ezala bongo to te, aboyaki kozonga na ndako na ye tii ntango Elisha andimaki kokende na ye elongo.
Ntango bakómaki na Shuneme, Elisha ye moko akɔtaki na shambre oyo amesanaki kokɔta mpe amonaki ebembe ya mwana yango elali “na mbeto na ye.” (Vɛrsɛ 32) Mosakoli abondelaki Yehova makasi. Na nsima, ntango Elisha alalelaki mwana yango, mpe “mokemoke nzoto ya mwana ekómaki mɔtɔ.” Motema ya mwana yango ezongelaki kobɛta! Elisha abengaki mwasi yango mpe alobaki na ye maloba oyo na ntembe te ebongolaki mawa na ye na esengo moko makasi; alobaki boye: “Zwá mwana na yo.”—Vɛrsɛ 34, 36.
Lisolo ya lisekwa ya mwana ya mwasi ya Shuneme ezali mpenza kopesa elikya mpe ezali kobɔndisa. Yehova ayebaka mpasi ya baboti oyo bana na bango bakufá. Likambo eleki ntina, azalaka na mposa makasi ya kozongisa bana yango na bomoi. (Yobo 14:14, 15) Lisekwa oyo Elisha mpe bato mosusu ya ntango ya kala basalaki emonisi mwa moke oyo Yehova akosala mpo na bato mingi oyo bakufá na mokili ya sika ya sembo oyo ezali koya.a
Elikya oyo Biblia epesi ya lisekwa elongolaka te mpasi ya kokufela moto oyo tolingaki. Mokristo moko ya sembo oyo akufelaki mwana kaka moko oyo azalaki na ye, alobaki boye: “Mpasi na ngai ekosila nyonso te tii ntango nakoyamba lisusu mwana na ngai.” Kanisá esengo ya kokutana lisusu na bandeko na biso oyo tolingaka oyo bakufá. Kaka likanisi ya koyamba bango lisusu ekoki kosalisa biso mpe kokitisa mpasi na biso. Ozali na mposa ya koyekola makambo mingi na ntina na Nzambe oyo apesi biso elikya wana kitoko?
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba makambo mosusu ya ntina oyo Biblia elobi mpo na elikya ya lisekwa, talá mokapo 7 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini?, ebimisami na Batatoli ya Yehova.