Teyá bana na yo
Bokonzi oyo ekobongola mabele mobimba
OKOKI koyeba soki ezali bokonzi nini?—a Ezali Bokonzi oyo Yesu ateyaki biso tóbondelaka mpo na yango. Ateyaki biso tósɛngaka Nzambe boye: “Bokonzi na yo eya.” (Matai 6:9, 10) Eleki sikoyo mbula pene na 2 000, bayekoli ya Yesu basɛngaka Nzambe ete Bokonzi na ye eya. Osilá kobondela mpo na yango?—
Mpo na koyeba soki bokonzi ezali nini, osengeli koyeba soki mokonzi azali nani. Mokonzi ezali moto oyo azali koyangela. Esika oyo azali koyangela ebengamaka boyangeli na ye. Bokonzi ya Nzambe ekoyangela mabele mobimba. Ntango Bokonzi ya Nzambe ekoya, moto nyonso na mabele akozwa mapamboli oyo Bokonzi yango ekomemela bato.
Bokonzi ya Nzambe ezali guvɛrnema ya likoló. Na Yisaya 9:6, Biblia elobeli Mokonzi ya guvɛrnema yango. Talá oyo yango elobi na ntina na ye: “Baboteli biso mwana, . . . mpe boyangeli ekozala na lipeka na ye. Mpe bakopesa ye nkombo . . . Nkumu ya Kimya.”
Oyebi soki nkumu azali nani?— Azali mwana ya mokonzi. Nani azali mokonzi ya likoló oyo aleki nyonso?— Ezali Yehova. Biblia ebengi ye “Oyo-Aleki-Likoló na mabele mobimba.” (Nzembo 83:18) Na Biblia, mbala mingi Yesu abengami “Mwana ya Nzambe.” Ezali mpo Yehova apesaki Yesu bomoi. Yehova azali Tata mpenza ya Yesu.—Luka 1:34, 35; Yoane 1:34, 49; 3:17; 11:27; 20:31; Misala 9:20.
Bokonzi ya Nzambe oyo Yesu ateyaki biso tósambelaka mpo na yango ezali guvɛrnema moko oyo ekokani na mosusu te. Ezali “boyangeli” mpamba te Yehova atye Mwana na ye, Yesu, Moyangeli to Mokonzi ya Bokonzi yango. Kasi, oyebi ete ezali na bato mosusu oyo bakoyangela na Yesu na Bokonzi ya Tata na ye?— Tiká tólobela bango.
Mwa moke liboso akufa, Yesu ayebisaki bantoma na ye ya sembo ete azali kokende na “ndako” ya Tata na ye na likoló. Alobaki boye: “Nazali kokende kobongisela bino esika . . . mpo esika ngai nazali bino mpe bózala wana.” (Yoane 14:1-3) Oyebi likambo oyo bantoma mpe bato mosusu oyo baponami bakosala elongo na Yesu na likoló?— “Bakoyangela elongo na ye.” Biblia epesi kutu motángo ya bato oyo bakoyangela elongo na Yesu. Bakozala bato 144 000.—Emoniseli 14:1, 3; 20:6.
Okanisi ete mabele ekozala ndenge nini ntango Nkumu ya Kimya mpe bato 144 000 oyo baponami bakoyangela?— Ekozala kitoko mpenza! Bitumba ekozala te. Banyama bakofanda na kimya bango na bango mpe elongo na biso. Moto moko te akobɛla to akokufa. Miso ya bato oyo bakufá miso ekomona, matoi ya bato oyo bakufá matoi, ekoyoka, bibɔsɔnɔ bakopota mbangu mpe bakopumbwa lokola mboloko. Mabele ekobota bilei ya kitoko mpo na bato nyonso. Mpe bato nyonso bakolingana ndenge Yesu ateyaki bayekoli na ye básalaka. (Yoane 13:34, 35) Tótalela naino bavɛrsɛ oyo ezali awa na mokanda ya Yisaya mpe tótánga makambo kitoko oyo ekosalema.—Yisaya 2:4; 11:6-11; 25:8; 33:24; 35:5, 6; 65:21-24.
Banda Yesu ateyá bato bábondelaka: “Bokonzi na yo eya,” bamilio ya bato bayekoli makambo etali Bokonzi yango. Boyebi yango ebongoli mpenza bomoi ya bato. Mosika te, ntango Bokonzi yango ekoya mpe ekozwa esika ya baguvɛrnema nyonso ya mabele, moto nyonso oyo azali kosalela Yehova Nzambe mpe Mokonzi oyo Ye aponi, Yesu Kristo, akozwa kimya, akozala na nzoto kolɔngɔnɔ, mpe esengo.—Yoane 17:3.
a Ntango ozali kotánga na mwana na yo mpe bomoni mwa mokɔlɔtɔ oyo (—) na nsima ya motuna, bosengeli kopema mpe osengeli kosɛnga mwana abimisa makanisi na ye.