Yesu—autaki wapi?
“[Pilato] akɔtaki lisusu na ndako ya guvɛrnɛrɛ mpe alobaki na Yesu ete: ‘Yo ozali moto ya wapi?’ Kasi Yesu apesaki ye eyano te.”—YOANE 19:9.
GUVƐRNƐRƐ Moroma, Ponsi Pilate atunaki motuna wana ntango Yesu azalaki kosamba mpe bomoi na ye ezalaki na likama.a Pilate ayebaki esika nini na Yisraele Yesu autaki. (Luka 23:6, 7) Ayebaki mpe ete Yesu azali te lokola bato nyonso. Pilate azalaki nde koluka koyeba soki Yesu azalaki na bomoi liboso? Mokonzi wana mopakano azalaki mpenza na mposa ya kondima solo mpe kosalela yango? Ezala bongo to te, Yesu aboyaki kopesa eyano, mpe eumelaki te, emonanaki polele ete Pilate azalaki komibanzabanza mingi nde mpo na mosala na ye, kasi te mpo na solo mpe bosembo.—Matai 27:11-26.
Likambo ya esengo, baoyo bazali mpenza na mposa ya koyeba epai Yesu autaki bakoki koyeba yango kozanga mpasi. Biblia emonisi polele epai Yesu Kristo autaki. Talelá makambo oyo elandi:
Epai abotamaki
Mituya (calcul) oyo basalaka na mikolo na biso, emonisi ete Yesu abotamaki na esika moko ya kitoko te na mboka ya Yudea na Beteleme na ebandeli ya eleko ya otɔnɛ ya oyo ebengamaka lelo mobu 2 liboso ya ntango na biso. Mobeko oyo Kaisala Augusto abimisaki esalaki ete Maria, mama ya Yesu, oyo “akómaki pene na kobota,” mpe Yozefe, mobali na ye, básala mobembo na Beteleme, mboka ya bankɔkɔ ya Yozefe. Lokola bazwaki te esika na ndako ya bapaya mpo bato batondaki na mboka yango, Yozefe ná mwasi na ye Maria bakendaki na ndako ya banyama, epai Yesu abotamaki mpe batyaki ye na elyelo ya bibwɛlɛ.—Luka 2:1-7.
Basiɛklɛ liboso, esakweli moko ya Biblia elobelaki esika oyo Yesu akobotama: “Yo, Ee Beteleme Efrata, yo oyo ozali moke mpenza mpo okoka kotángama na kati ya bankóto ya Yuda, uta na yo moto moko akobima mpo na ngai, oyo akokóma mokonzi na Yisraele.”b (Mika 5:2) Na kati ya bingumba ya Yuda, Beteleme ezalaki mboka moko moke mpenza. Kasi, mboka wana ya moke elingaki kozwa lokumu koleka bamboka mosusu. Masiya oyo alakamaki, to Kristo asengelaki kouta na Beteleme.—Matai 2:3-6; Yoane 7:40-42.
Epai abɔkwamaki
Nsima ya kofanda mwa moke na Ezipito, libota ya Yesu ekendaki na Nazarete, engumba moko ya etúká ya Galile na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 96 na nɔrdi ya Yerusaleme. Na ntango yango, Yesu akokisaki naino mbula misato te. Na etúká wana ya kitoko epai baloni-bilanga, babateli ya mpate, mpe babomi-mbisi bazalaki kosala misala na bango, Yesu akolaki na kati ya libota moko monene mpe ya bozwi te.—Matai 13:55, 56.
Basiɛklɛ liboso, Biblia esakolaki ete Masiya akozala “Monazarete.” Matai, moko ya bakomi ya Evanzile, alobi ete libota ya Yesu ekendeki kofanda na “Nazarete, mpo likambo oyo elobamaki na nzela ya basakoli ekokisama: ‘Bakobenga ye Monazarete.’” (Matai 2:19-23) Ekoki kozala ete nkombo Monazarete eyokani na liloba ya Ebre oyo basalelaka mpo na “mwa nzete ya sika.” Emonani ete Matai alobelaki esakweli ya Yisaya oyo ebengaki Masiya “mwa nzete ya sika” oyo ekobima na Yese, elingi koloba ete Masiya asengelaki kozala nkɔkɔ ya Yese, tata ya mokonzi Davidi. (Yisaya 11:1) Na yango, Yesu azalaki nkɔkɔ ya Yese na nzela ya Davidi.—Matai 1:6, 16; Luka 3:23, 31, 32.
Azalaki wapi liboso aya awa na mabele?
Biblia eteyaka ete bomoi ya Yesu ebandaki ntango molai liboso abotama na ndako ya banyama na Beteleme. Esakweli ya Mika, oyo totángaki liboso, ekobi koloba ete “ebandeli na ye ezali uta kalakala, uta ntango oyo etyami ndelo te.” (Mika 5:2) Lokola azali mwana se moko ya Nzambe oyo abotamaki, Yesu azalaki ekelamu ya elimo kuna na likoló liboso abotama awa na mabele lokola moto. Ye moko Yesu alobaki ete: “Nakitaki uta na likoló.” (Yoane 6:38; 8:23) Ndenge nini yango ekokaki kosalema?
Na nzela ya elimo santu na ye, Yehova asalaki likamwisi ndenge alongolaki bomoi ya Mwana na ye na likoló mpe akɔtisaki yango na libumu ya Maria, Moyuda oyo ayebaki naino mibali te mpo Yesu akoka kobotama moto ya kokoka.c Ezali mpasi te mpo nguya ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso esala likamwisi ya ndenge wana. Ndenge anzelu oyo alimbolaki makambo yango epai ya Maria amonisi yango, “epai ya Nzambe ezali ata na liloba moko te oyo ekoki kosalema te.”—Luka 1:30-35, 37.
Biblia esuki te kaka na koyebisa epai Yesu autaki. Kutu, Baevanzile minei—Matai, Marko, Luka, mpe Yoane—eyebisi biso makambo mingi oyo etali bomoi oyo azalaki na yango.
a Mpo na koyeba makambo mingi oyo etali kokangama mpe kosambisama ya Yesu, talá lisolo “Kosambisa moko ya mabe mpenza oyo esalemá naino te,” na nkasa 18-22 ya Linɔ́ngi oyo.
b Emonani ete Efrata ezali nkombo oyo Beteleme ezalaki kobengama liboso.—Ebandeli 35:19.
c Yehova ezali nkombo ya Nzambe ndenge emonisami na kati ya Biblia.