Biblia ebongolaka bato
MPO na nini mobali moko akómaki Motatoli ya Yehova atako akolaki na libota ya bato oyo bazalaki bandimi ya solosolo ya Katolike, mpe azalaki zuzi moko ya lokumu? Nini etindaki teroriste moko atika mobulu mpe akóma mosakoli ya nsango malamu? Tángá oyo bato yango balobi.
“Nakómaki na boyebi mingi mpenza na oyo etali malamu ná mabe.”—SEBASTIÃO ALVES JUNQUEIRA
ABOTAMAKI NA: 1946
EKÓLO: BRÉSIL
BOMOI NA YE YA KALA: ZUZI
NDENGE NAZALAKI: Libota na ngai ezalaki kofanda na mboka, na ntaka ya bakilomɛtrɛ 6 kolongwa na engumba Piquete. Baboti na ngai bazalaki na elanga moko ya moke mpe yango nde ezalaki kokokisa bamposa na biso. Lokola eteyelo oyo nazalaki kotánga ezalaki na engumba Piquete, yango wana nasombaki velo moko ya kala mpo namona mpasi te mpo na kokende kelasi. Bato ya mboka na biso bazalaki babola, kasi engumba ezalaki pɛto mpe mobulu ezalaki mingi te. Mibali mingi ya engumba yango bazalaki kosala na izini oyo esalaka mindoki mpo na basoda.
Nazalaki kolinga kelasi mingi mpe nakɔtaki na eteyelo ya basoda oyo elakisaka ndenge ya kosala baaviɔ, oyo ezalaki na engumba moko ya pembeni, nazwaki diplome mpe nakómaki mwa mokonzi ya basoda na 1966. Na nsima, nakɔtaki kelasi ya baavoka mpe nazwaki diplome na makambo etali mibeko. Na nsima, nasɛngaki nakóma mokonzi ya bapolisi. Na mobu 1976, nasalaki momekano moko ya guvɛrnema mpe bandimaki ngai na mosala yango. Na bantango mosusu, mosala na ngai ezalaki mpe ya kokamba bolɔkɔ. Na boumeli ya ntango wana, Batatoli ya Yehova bazalaki koya mbala mingi mpe kosɛnga ete básakola epai ya bato ya bolɔkɔ. Ntango nyonso, bazalaki mpe koteya ngai makambo ya Biblia. Nazalaki na limemya mingi mpo na Nzambe. Nakamwaki ntango nayebaki ete nkombo ya Nzambe ezali Yehova mpe ete tokoki kokóma baninga na ye.
Mokemoke, nakómaki mosika na mosala na ngai ya zuzi. Na mobu 1981, nasalaki momekano mosusu ya guvɛrnema mpe nakómaki zuzi ya guvɛrnema. Na nsima, na mobu 2005, nakómaki zuzi ya esambiselo monene ya engumba São Paulo.
NDENGE OYO BIBLIA EBONGOLI NGAI: Mwa moke nsima ya kozwa diplome na kelasi ya baavoka, nabandaki kotánga Biblia—likambo oyo ebongolaki makanisi na ngai. Nazalaki mondimi ya solosolo ya Lingomba ya Katolike. Na libota na biso, basusu bazalaki basango mpe moko azalaki episkɔpɔ mpe nazalaki kopesa sango mabɔkɔ ntango Misa ezalaki kosalema. Liboso ateya, nazalaki kotánga eteni ya libondeli oyo esengelaki kotángama na buku ya mabondeli. Bakatolike bazalaka te na momeseno ya kotánga Biblia na libota. Mama na ngai asilikaki makasi ntango ayebaki ete nazalaki kotánga Biblia. Amekaki kolɛmbisa ngai mpe koloba ete nakobela ligboma. Atako bongo, nakobaki kotánga mpe namonaki ata mabe moko te.
Namonaka ete lokola nazalaki kolinga koyeba makambo mingi, yango nde elendisaki ngai natángaka Biblia. Nalingaki koyeba makambo mingi oyo etali basango mpe mokumba na bango na kati ya lingomba. Nabandaki mpe kotánga masolo oyo elobelaka ebongiseli ya teoloji oyo ebundaka mpo na bonsomi, kasi, makanisi ya bato oyo bakɔtelaka ebongiseli yango etondaki na mabunga mpe nazalaki kokanga ntina na yango ata moke te.
Kaka na ntango wana, monganga na ngai ya mino, oyo azalaki mondimi ya Lingomba ya Buda, apesaki ngai buku moko oyo bapesaki ye. Motó ya likambo ya buku yango ezalaki La vie: comment est-elle apparue? Évolution ou création?a Nandimaki kozwa buku yango mpo namonaki ete ekozala malamu kotánga yango elongo ná buku L’origine des espèces, ya Charles Darwin. Buku La vie: comment est-elle apparue? Évolution ou création? ezalaki na makambo ya malamu, ya solo mpe ya kondimisa. Nazalaki lisusu na ntembe te ete liteya ya evolisyo ezali lokuta.
Ntango natángaki buku yango na lisolo oyo elobeli bozalisi, etindaki ngai naluka koyeba lisusu makambo mingi. Nakómaki na mposa ya kozwa babuku mosusu oyo Batatoli ya Yehova babimisaka. Bayebisaki ngai ete mekanisiɛ moko na eteyelo ya koyekola kokumba baaviɔ azalaki Motatoli ya Yehova. Nasololaki na ye mpe apesaki ngai babuku mosusu mpo natánga. Na ntango wana, nazalaki koboya koyekola Biblia ná Batatoli ya Yehova. Nazalaki kokanisa ete nakoki koyekola yango ngai moko.
Ntango nabandaki kotánga Biblia, namonaki ete lokola nautaki kobala, ekozala malamu natángaka Biblia mpe elongo na libota na ngai. Pɔsɔ nyonso, tozalaki kosala boyekoli ya libota mpe kotánga Biblia elongo. Lokola tozalaki na Lingomba ya Katolike, libota na biso ezalaki na boyokani mingi ná basango mpe baepiskɔpɔ. Kasi, makambo oyo natángaki na Yoane 14:6 ebendaki likebi na ngai. Elobi boye: “Yesu alobaki na ye [moyekoli Toma] ete: ‘Ngai nazali nzela mpe solo mpe bomoi. Moto moko te azali koya epai ya Tata soki na nzela na ngai te.’” Nsima ya kotalela likambo yango na mozindo, nandimisamaki ete Yehova akobikisa biso na nzela ya Yesu. Kasi, bateyaki biso ete lobiko na biso ekouta nde epai ya basango.
Bavɛrsɛ mosusu mibale ya Biblia etindaki ngai natalela Lingomba ya Katolike mpe mateya na yango na ndenge oyo nazalaki kotalela yango liboso te. Ya liboso ezali Masese 1:7, elobi boye: “Kobanga Yehova ezali ebandeli ya boyebi. Bwanya ná disiplini, yango nde bazoba batyolá.” Mpe ya mibale ezali Yakobo 1:5 oyo elobaka boye: “Bongo soki moko na bino azangi bwanya, akoba kosɛnga Nzambe, mpo ye apesaka bato nyonso na motema mobimba mpe apamelaka te; mpe akopesa ye yango.” Nazalaki na mposa makasi ya kozwa boyebi mpe bwanya, kasi kokende ndako-nzambe ekokisaki mposa yango te. Yango wana, natikaki kokende.
Na mobu 1980, mwasi na ngai akómaki koyekola Biblia ná Batatoli ya Yehova. Soki nazali na ndako, nazalaki kofanda mpe kolanda boyekoli yango. Na nsima, nandimaki koyekola Biblia. Kasi, tozwaki ekateli noki te ya kozwa batisimo mpo na kokóma Batatoli ya Yehova. Mwasi na ngai azwaki batisimo na 1994, mpe ngai na 1998.
MATOMBA OYO NAZWI: Koteya bana na ngai minei kotosa mitinda ya Yehova, esalisaki bango mingi. (Baefese 6:4) Bana na ngai mibale ya mibali, bamipesaka mingi na makambo ya Nzambe mpo na kosalisa Batatoli mosusu ya Yehova na lisangá na bango. Bana na ngai mibale ya basi, bazalaka na molende mingi na mosala ya kosakola. Nsanza nyonso, mwasi na ngai alekisaka ngonga mingi mpo na kosalisa basusu báyekola Biblia mpe ngai nazali nkulutu na lisangá mpe nasepelaka na mokumba yango.
Ntango nakómaki Motatoli ya Yehova, nakómaki na boyebi mingi mpenza na oyo etali malamu ná mabe. Lokola nazali zuzi, ntango nazali kosambisa, nasalaka makasi nalanda ndenge oyo Yehova akataka makambo, natalelaka makambo na mobimba na yango, nazalaka makambo makasimakasi te mpe soki ezali na likambo moko oyo esɛngi koyokela moto mawa, nasalaka yango.
Nasambisá makambo ebele ya mobulu mpe ya kobebisa bana mpe makambo mosusu ebele ya mabe. Atako bongo, nazalaki te kozipa miso na mabe. Ntango nalandaka bansango na televizyo, nayokaka mpasi mpenza ndenge bizaleli ya bato ebebi makasi mpe ndenge mabe ekómi mingi na mokili. Napesaka Yehova mersi mingi ndenge nayebi ntina ya makambo wana nyonso ya mabe mpe mpo na elikya kitoko oyo tozali na yango mpo na mikolo ezali koya.
“Bolɔkɔ ebongisaki bizaleli na ngai te.”—KEITH WOODS
ABOTAMAKI NA: 1961
EKÓLO: IRLANDE YA NƆRDI
BOMOI NA YE YA KALA: TERORISTE
NDENGE NAZALAKI: Nabotamá na 1961, na Irlande ya nɔrdi, na Portadown, engumba moko oyo bato mingi basalaka. Nabɔkwamá na libota ya Baprotesta, mpe nakolaki na esika oyo Bakatolike ná Baprotesta bazalaki kofanda. Mabota mingi na esika yango ezalaki mpenza na bozwi te. Atako bato mingi ya esika yango bazalaki babola, biso nyonso tozalaki koyokana malamu.
Nazalaki na bomoi moko oyo nayokaka nsɔni mpo na kolobela yango. Na mobu 1974, namikɔtisaki na “Matata” oyo ezalaki na Irlande ya nɔrdi na ntango wana. Na eleko yango, makambo ebebaki mpenza na esika tozalaki kofanda. Na ndakisa, mokolo moko na butu, tata na ngai, oyo azalaki mokonzi ya izini moko oyo esalaka batapi na ekólo yango, azalaki na esika ya mosala mpe azalaki kopesa bilenge mibale ya mibali oyo bazalaki kofanda pembeni na biso formasyo. Na ntango yango, moto moko abwakaki bɔmbi na fenetre ya ndako ya bilenge yango, oyo bazalaki bakatolike; tata, mama, mpe leki na bango ya mobali bakufaki na bɔmbi yango.
Makambo eyaki ndongo, mpe etumba ebandaki. Batumbaki bandako ya Baprotesta oyo bazalaki kofanda esika moko ná Bakatolike, yango esɛngaki Baprotesta bálongwa na esika yango mpe Baprotesta bakómaki konyokola Bakatolike na bisika na bango. Baprotesta mingi bakómaki kofanda na esika oyo biso tozalaki. Yango esalemaki mwa moke liboso bákanga ngai mpe bákatela ngai etumbu ya mbula misato ya bɔlɔkɔ mpo na ndenge namikɔtisaki na mosala ya kobwaka babɔmbi.
Ntango nazalaki na bɔlɔkɔ, nakómaki moninga ya motema ya moto moko ya bɔlɔkɔ, oyo ayebanaki mingi na lisangá moko ya politiki oyo ezalaki kolinga te ete Irlande ya nɔrdi ekabwana ná Royaume-Uni. Tokómaki lokola bandeko, mpe na nsima, ngai nde natɛlɛmaki pembeni na ye na mokolo ya libala na ye. Bolɔkɔ ebongisaki bizaleli na ngai te ata mpe ya ye te. Ntango tobimaki na bɔlɔkɔ, tozongelaki mbala moko makambo na biso ya politiki, na mbala oyo, na ndenge ya kolekisa ndelo. Mpo na yango, moninga na ngai wana azongaki lisusu na bɔlɔkɔ. Mpe kuna na bɔlɔkɔ, babomaki ye.
Babandaki mpe koluka ngai, mpe mokolo moko, babwakelaki motuka na ngai bɔmbi. Kasi, makambo nyonso wana esalaki ete nakoba lisusu kobundela makambo ya politiki oyo nazalaki kopesa mabɔkɔ.
Na boumeli ya ntango wana, namikɔtisaki na mosala ya kosala filme moko mpo na “Matata” yango mpe balakisaki yango na televizyo moko ya Angleterre. Filme yango ebimiselaki ngai lisusu mikakatano. Na ndakisa, mokolo moko na butu, ntango nazongaki ndako, nakutaki mwasi na ngai te, asundolaki ngai. Mwa moke na nsima, kaka mpo na filme yango, babɔtɔlaki ngai mwana na ngai ya mobali. Nakanisaka lisusu ntango namitalaki na talatala mpe nalobaki ete “Nzambe, soki ozalaka, salisá ngai.”
Mokolo ya pɔsɔ oyo elandaki, nakutanaki ná Paul, moninga na ngai moko oyo akómaki Motatoli ya Yehova. Abandaki koyebisa ngai makambo ya Biblia. Mikolo mibale na nsima, Paul atindelaki ngai Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Lisolo moko ya zulunalo yango etángaki maloba ya Yesu oyo ezali na Yoane 18:36. Alobaki ete: “Bokonzi na ngai ezali ya mokili oyo te. Soki bokonzi na ngai ezalaki ya mokili oyo, mbɛlɛ basaleli na ngai babundi mpo nakabama epai ya Bayuda te. Kasi nde bokonzi na ngai euti awa te.” Maloba wana ekamwisaki ngai mingi. Yango ezalaki mokolo oyo bomoi na ngai ebandaki kobongwana.
NDENGE OYO BIBLIA EBONGOLI NGAI: Paul akómaki koyekola na ngai Biblia. Na nsima, Bill, Motatoli mosusu ya Yehova akobaki boyekoli yango na ngai. Nayebi ete nazalaki moyekoli moko ya motó mpasi; nazalaki na mituna mingi! Nazalaki koya na bateyi mingi ya mangomba mosusu na ndako mpo bámonisa ete Bill azalaki na libunga. Kasi, namonaki ete Liloba ya Nzambe ezali solo.
Nazali koyeba lisusu mokolo oyo nayebisaki Bill aya na ndako na ngai te mpo tóyekola mpamba te bapolisi bakangaki banzela ya esika oyo nazalaki kofanda mpe na ntembe te, balingaki kokanga motuka na ye mpe kotumba yango. Kasi, Bill ayaki kaka koyekola na ngai lokola mikolo mosusu nyonso. Atikaki motuka na ye na ndako mpe ayaki na velo. Nani akolinga kobɔtɔla velo? Mokolo mosusu, ngai ná Bill tofandaki na ndako na ngai mpe tozalaki koyekola ntango bapolisi ná basoda bayaki kokanga ngai. Ntango bazalaki komema ngai, Bill abengaki ngai mpe alobaki na ngai natyela Yehova motema. Mabaku yango esimbaki mpenza motema na ngai.
Na ntembe te, mbala ya liboso oyo nayanganaki na Makita ya Batatoli ya Yehova na Ndako ya Bokonzi, mingi kati na bango bakamwaki. Nazalaki na nsuki milai mpe nalataki biloko ya matoi ná vɛstɛ moko ya kwire oyo bakomakomá. Kasi, nandimaki te ete Batatoli bakoyamba ngai malamu ndenge wana. Boboto oyo bamoniselaki ngai esimbaki mpenza motema na ngai.
Atako nazalaki kokoba koyekola Biblia, nazalaki kaka kokutana ná baninga na ngai ya kala. Kasi, nsukansuka solo oyo nazalaki koyekola na Biblia ekómaki kokɔta mpenza na motema na ngai. Namonaki ete soki nalingi kosalela Yehova, nasengeli kobongola ndenge na ngai ya kotalela makambo ya politiki mpe kotika baninga na ngai ya kala. Kosala bongo ezalaki pɛtɛɛ te. Lokola nakómaki koyeba makambo mingi ya Biblia mpe kozwa makasi epai ya Yehova, yango esalisaki ngai nabongwana. Nakataki nsuki na ngai, nalongolaki biloko ya matoi, mpe nasombaki bilamba mosusu. Makambo oyo nazalaki koyekola esalisaki ngai mpe nabongola ndenge na ngai ya kosalela basusu makambo.
MATOMBA OYO NAZWI: Nazalaki teroriste mpe nasalaki makambo mingi ya mabe. Bapolisi ya esika oyo nazalaki kofanda bayebaki elongi na ngai malamu. Kasi sikoyo makambo ebongwaná. Na ndakisa, ntango nakendaki liyangani ya Batatoli ya Yehova mpo na mbala ya liboso, oyo esalemaki na engumba Navan, bapolisi bakendaki nzela moko na ngai na Irlande mobimba mpe na Irlande ya nɔrdi. Kasi lelo oyo, nakendaka mayangani ngai moko kozanga ete bapolisi bákɛngɛla ngai. Nazali mpe kosakola elongo na Paul ná Bill mpe bandeko mosusu ya lisangá na bonsomi nyonso.
Lokola bomoi na ngai ekómaki malamu mpenza, nakómaki mpenza moko ya basangani ya lisangá. Na lisangá yango, nakutanaki na Louise, Motatoli moko ya Yehova mpe na nsima tobalanaki. Longola yango, mwana na ngai azongaki lisusu epai na ngai.
Soki natali ndenge bomoi na ngai ezalaki, nayokaka mawa ndenge nasalaki basusu mabe mingi. Kasi, nakoki mpenza koloba ete Biblia esalisaka bato lokola ngai bábongwana, bátika kosala makambo ya mabe mpe bákoma na bomoi oyo ezali na ntina mpe na elikya.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Batatoli ya Yehova, kasi sikoyo ebimaka lisusu te.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 12]
Mama na ngai asilikaki makasi ntango ayebaki ete nazalaki kotánga Biblia