Pusaná penepene na Nzambe
“Mokóló na Mikolo afandaki”
BIBLIA elobi ete “moto ata moko te amoná Nzambe.” (Yoane 1:18) Nzambe atondi mpenza na nkembo, yango wana moto moko te oyo azali na nzoto ya makila ná mai akoki komona ye mpe kotikala na bomoi. (Kobima 33:20) Nzokande, na mabaku mosusu, Yehova apesaki bato mosusu oyo aponaki likoki ya kozwa emonaneli ya ndenge likoló ezalaka. Moko ya bato yango ezalaki mosakoli Danyele. Na ntembe te, makambo oyo amonaki etindaki ye abanga Nzambe mpe amemya ye mingi; ekoki mpe kotinda biso tósala bongo. Talá ndenge Danyele alobeli makambo oyo azwaki libaku ya komona na emonaneli.a—Tángá Danyele 7:9, 10.
“Mokóló na Mikolo.” Titre oyo, kaka Danyele nde asaleli, emonisi “moto oyo mbula epusani (to mobange).” (Danyele 7:9, 13, 22) Yehova azali na mbula boni? Lokola azali “Mokonzi ya seko,” azali na ebandeli te, azali mpe na nsuka te—azali mpe akozala seko na seko. (1 Timote 1:17; Yuda 25) Lokola Nzambe azali seko na seko, yango endimisi biso ete bwanya na ye ezangi nsuka, mpamba te Biblia emonisaka ete bwanya ná bobange etambolaka nzela moko. (Yobo 12:12) Ya solo, likanisi ya kozala seko na seko ezali mpasi mpo moto akanga ntina na yango mpamba te makanisi ya moto ezali na ndelo. Kasi, tosengeli nde komizela ete tóyeba makambo nyonso oyo etali Nzambe oyo bwanya na ye ezali na nsuka te?—Baroma 11:33, 34.
Simbá ete Mokóló na Mikolo “afandaki.” Mpo na mokano nini? Bavɛrsɛ oyo ezali zingazinga ya mokapo yango ezali kosalisa biso tózwa mwa eyano, mpamba te esaleli maloba lokola “Tribinale” mpe “ekateli.” (Danyele 7:10, 22, 26) Na yango, na emonaneli yango, Yehova afandaki lokola Mosambisi. Akosambisa nani? Banyama oyo Danyele amonaki mwa liboso na emonaneli na ye emonisaki bikólo ya mokili.b (Danyele 7:1-8) Yehova azali Mosambisi ya ndenge nini?
“Bilamba na ye ezalaki mpɛmbɛ lokola nɛjɛ, mpe nsuki ya motó na ye ezalaki lokola lɛnɛ ya pɛto.” Langi ya mpɛmbɛ ezalaka elembo ya bosembo mpe bopɛto. Soki basangisi yango na eloko mosusu te, lɛnɛ ekoki kozala mpɛmbɛ. Boye, nsuki oyo ezali lokola lɛnɛ esengeli kozala mpɛmbɛ. Okoki komona na makanisi na yo oyo Danyele amonaki? Ozali komona Zuzi moko oyo nsuki na ye ezali mpɛmbɛ, oyo alati zambala moko ya mpɛmbɛ lokola nɛjɛ? Maloba wana kitoko endimisi biso ete Yehova asambisaka na bosembo mpe na bwanya. Azali Zuzi oyo abongi tótyela ye motema mobimba mpe tómemya ye.
Azali Zuzi oyo abongi tótyela ye motema mobimba mpe tómemya ye
“Bankóto mbala nkóto bazalaki kosalela ye, mpe nkóto zomi mbala nkóto zomi batɛlɛmaki liboso na ye.” Baoyo bazali kosalela ye kuna na likoló bazali banani? Biblia emonisi ete baanzelu bazali “basaleli [ya Nzambe].” (Nzembo 104:4) Baanzelu ya Nzambe, oyo motángo na bango ezali soki bankama ya bamilio, bazali na mokumba ya “kosalela liloba na ye” mpe “kosala mokano na ye.” (Nzembo 103:20, 21) Omoni te ete yango mpe emonisi lisusu ete bwanya ya Nzambe ezali na ndelo te? Soki Yehova te, nani mosusu akoki kosala ete limpinga wana monene ebongisama malamu mpe esalaka ntango nyonso mosala na boumeli ya bambula oyo ekoki kotángama te?
Emonaneli ya Danyele ezali kotinda biso tótyela Yehova, Mokóló na Mikolo motema. Bikateli na ye ezali sembo mpe bwanya na ye ebongi kotyelama motema. Mpo na nini te koluka koyeba makambo mingi oyo etali ndenge okoki kopusana penepene ya Nzambe oyo aleki na bwanya?
Botángi ya Biblia mpo na Ɔkɔtɔbɛ:
a Danyele amonaki mpenza Nzambe te. Nzambe asalaki nde ete bililingi oyo amonaki etikala na makanisi na ye. Boye, ntango azalaki kolobela makambo oyo amonaki, Danyele asalelaki elobeli ya elilingi, ata mpe makambo oyo ekoki kolobama mpo na moto mpo na kolobela Nzambe. Maloba wana ya elilingi esalisaka bato bákanga ntina ya makambo etali Nzambe, kasi esengeli te kozwa yango kaka ndenge elobami.
b Mpo na koyeba makambo mosusu oyo etali banyama oyo Danyele amonaki na emonaneli, talá mokapo 9 ya buku Tyá likebi na esakweli ya Danyele! ebimisami na Batatoli ya Yehova.