Tósakola nsango malamu ya Bokonzi na lisalisi ya mwa babúku
1 Koyeba solo mpe kotángama kati na basakoli ya molende ya nsango malamu ezali likambo ya esengo! Bato oyo bazali kati na lisangá ya Nzambe te bazali mpenza na mposa ya koyoka nsango malamu ya Bokonzi. Solo na ntina na Bokonzi emonisami na lolenge mpenza ya pɛtɛɛ kati na mwa babúku Sepela na bomoi ya seko na Mabele!, “Tala, nazali kozalisa biloko nyonso biloko na sika” mpe Bokonzi oyo ekosala Paradis. Mwa babúku oyo ezali kolobela yango lokola nde tozalaki na bomoi awa na mabelé na nsé ya Bokonzi ya Nzambe mpe, na kongɛngisama ya Liloba na Ye, ezali kokamba motángi epai na makambo na solo matali Bokonzi. Na momeseno, kotika mwa búku epai na moto oyo azali komonisa bosepeli ezali bobele ebandeli. (1 Kol. 9:23) Tózonga nokinoki kotala bato nyonso oyo bandimaki kozwa mwa búku, na mokano ya kosɛnga bango boyekoli na lisalisi ya búku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Lolenge nini tokoki kosala yango na sanza ya Sɛtɛ́mbɛ?
2 Mwa búku “Sepela na bomoi ya seko na Mabele!” ekoki kolakisama nsima na ebandeli oyo ya mokuse. Talá oyo tokoki koloba na kolakisáká ezipeli:
◼ “Nakosepela kolakisa yo mwa búku oyo ezali na nsango moko mpenza kitoko.” Tófungola mwa búku Sepela na bomoi ya seko mpe tótánga paragrafe ya liboso na maloba ya ebandeli. Tókóba boye: “Mwa búku oyo ezali koyanola mpe na motuna [tótánga motó na likambo moke oyo ezali likoló na elilingi No. 8]: ‘Mpo na nini moto akufaka?’ Okomona ete ezali likambo ya kosepelisa na kotalela bililingi mpe kotánga bavɛrsɛ́ oyo epesami kati na mwa búku oyo. Soki ozali na mposa na yango, okoki kotikala na ekzamplere oyo.” Soki moto yango andimi mwa búku yango, tóyebisa ye mwa likabo oyo akoki kopesa mpo na yango mpe tómonisa ye ntina nini tozali kosɛnga likabo yango.
3 Tokoloba nini ntango tokozonga kotala moto oyo andimaki mwa búku “Sepela na bomoi ya seko”? tokoki komeka maloba oyo mpo na kobanda lisoló:
◼ Tólakisa elilingi No. 49 ya mwa búku Sepela na bomoi ya seko mpe tótuna ete: “Oyo ezali elilingi moko kitoko, boye te? [Tóyoka eyano.] Ezali bongo mwa búku oyo natikelaki yo mbala eleki. Nalingi kotuna yo motuna oyo mozali na lokasa elandi.” Tótánga motuna ya elilingi No. 50: “ ‘Ozali na mposa ya kosepela na bomoi ya seko kati na paradis wana kitoko?’ [Tótika ete moto yango ayanola.] Soki yango ezali mpenza mposa na yo, talá oyo osengeli kosala: ‘Soki ee, esengeli na yo koyekola makambo mingi oyo Nzambe alobi na ntina yango.’ [Tótánga Yoane 17:3.] Nakosepela koyekola na yo Biblia kozanga ete ofuta mbongo. Olobi boni mpo na yango?” Tóyokana mokolo ya sikisiki oyo tokozongela ye.
4 Soki tozali kolakisa mwa búku “Tala, nazali kozalisa biloko nyonso biloko na sika,” tokoki kobanda na kotalisa elilingi ya ezipeli na kolakisáká yango mpe kotunáká ete:
◼ “Na likanisi na yo, esengeli kosala nini mpo ete mabelé mobimba mákokana na oyo?” Tóyoka eyano. Monisá polele mwa makambo matali elilingi oyo malobelami na lokasa 3. Tókóba boye: “Bato mingi bakanisaka ete likoki ezali te ya kobongola mokili ete ekóma lolenge oyo. Kasi mpo na Nzambe, likoki ezali. [Tólobela makambo mazali na paragrafe 43; na nsima tótánga Yisaya 9:6, 7.] Nzambe alaki kosala mokili ya sika, paladiso moko kitoko epai bato ya mabota nyonso bakofanda. Nakolinga ete yo mpe otánga mwa búku oyo. Ekomonisa yo lolenge yo mpe libota na yo bokoki, na lisalisi ya Nzambe, kozala na bomoi kitoko na mikolo mizali koya.”
5 Na bozongeli oyo ekolanda, tokoki, na kosaleláká mwa búku “Tala,” kolimbola mpo na nini ezali na ntina koyeba makambo mingi likoló na Biblia. Na ndakisa, ekosengela bobele komonisa lisusu ezipeli mpe koloba ete:
◼ “Mbala eleki, ntango nalakisaki yo elilingi oyo, toyokanaki, ngai na yo, ete tokolinga kozala na bomoi kati na mokili moko kitoko lokola oyo. Na yango, mpo ete yango ekóma likambo ya solo, ezali na eloko oyo biso banso tosengeli kosala.” Tófungola mwa búku “Tala” mpe tótánga paragrafe 52, mpe Yoane 17:3. Tókangisa likanisi oyo na bokokanisi oyo ezali na paragrafe 53 na boyokani na lilako moko ya Biblia oyo ebongi, na nsima tólimbola ete Batatoli ya Yehova bapesaka malako motindo oyo na bandako ya bato kozanga kofuta mbongo. Tósɛnga na moto yango ete tómonisa ye, na lisalisi ya búku Boyebi, lolenge toyekolaka na bato.
6 Soki tozali kolakisa mwa búku “Bokonzi oyo ekosala Paradis,” tokoki kobanda boye:
◼ “Nayokaka bato mingi koloba ete bazali na mposa ya kozala na bomoi na nsé ya boyangeli oyo ekozala na likoki—mpenzampenza—ya kosilisa mikakatano minene. [Tólobela mikakatano oyo mitali etúká na biso, na ndakisa kozanga mosala, mobulu oyo ezali ntango nyonso sé koya mingi to biloko oyo bikómisaka bato baombo na yango.] Na ntina na ezalela wana, tomitunaka lolenge nini ya bomoi tokozala na yango, biso mpe bato oyo tolingaka, na mikolo mizali koya. Okanisi ete boyangeli moko ekozala na likoki mokolo mosusu ya kosilisa mikakatano wana? [Tóyoka eyano.] Mbala mosusu osilá kozongela mbala na mbala libondeli oyo ete Tata wa Biso. Soki ezali bongo, oyebaki ete na ntango yango ozalaki kobondela mpo na boyangeli moko ya sembo?” Tófungola mwa búku Bokonzi na lokasa 3 mpe tótánga paragrafe mibale ya ebandeli. Na nsima, tólakisa ye búku yango.
7 Soki totikaki mwa búku “Bokonzi oyo ekosala Paradis,” tokoki kobanda lisoló mbala ekoya na kolobáká ete:
◼ “Mbala eleki, tosololaki na ntina na kozala ya boyangeli moko ya sembo oyo ekoki kosilisa mikakatano ya bato. Mwa búku oyo natikelaki yo emonisi Bokonzi ya Nzambe lokola elikya bobele moko mpo na biso. Bato mosusu bamitunaka oyo boyangeli yango ekokoka kosala mpo na kosilisa mikakatano na biso. Biblia emonisi ete Klisto asilaki komonisa ete akolónga na makambo oyo bakonzi ya bato balóngaki te.” Tófungola mwa búku Bokonzi na lokasa 29 mpe tótánga paragrafe minei ya nsuka. Tóbakisa ete: “Oyo nde mikolo kitoko mizali koya, boye te? Okolinga komona yango?” Tóyoka eyano. Tótánga Yoane 17:3. Tólendisa moto yango ete ayekola makambo mingi na lisalisi ya boyekoli ya Biblia na ndako.
8 Soki tozali kolakisa mwa babúku mosusu, tokoki kolanda makanisi oyo mauti kopesama mpo na kobongisa maloba na biso moko mpo na kobanda masoló. Soki likoki lizali, tólimbola na mokuse epai na molobani na biso mpo na nini asengeli kopesa mwa likabo moke mpo na mwa búku oyo totikeli ye. Tómibongisa malamumalamu mpe tósɛnga lipamboli epai na Yehova wana tozali kosakola nsango malamu ya Bokonzi.