Oyebaki yango?
Ndenge nini basoda oyo bazalaki Bakɛngɛli ya Mokonzi ya Roma bazalaki kolata?
BAKƐNGƐLI ya Mokonzi ya Roma bazalaki etuluku ya bilombe ya basoda oyo bakómaki kokɛngɛla amperɛrɛ ya Roma na boyangeli ya Kaisala Augusto na mobu 27 L.T.B. Basoda yango bazalaki kobatela amperɛrɛ ná libota na ye.
Soda moko ya etuluku ya Bakɛngɛli ya Mokonzi ya Roma alati elamba moko oyo ezalaki kosuka na mabɔlɔngɔ to pene na yango
Ntango bazalaki na Roma, bazalaki mbala mingi kolata lokola bato nyonso. Mbala mingi bazalaki kolata elamba moko oyo ezalaki kosuka na mabɔlɔngɔ to pene na yango mpe elamba moko ya likoló oyo ezangá mabɔkɔ, oyo bato mingi bazalaki kolata mpe ezalaki kosalisa bango bátambola kozanga mokakatano. Ntango bazali kokɛngɛla amperɛrɛ na kati ya engumba Roma, basoda oyo bazali na etuluku ya Bakɛngɛli ya Mokonzi ya Roma bazalaki mbala mosusu kolata zambala, oyo ezalaki elamba oyo bato bazalaki kolata na milulu ya ntina.
Bato bakokaki koyeba Bakɛngɛli ya Mokonzi ya Roma na nzela ya bibundeli na bango. Buku moko Brill’s New Pauly: Encyclopaedia of the Ancient World elobi: “Ntango bazali na Roma, bakɛngɛli yango bazalaki kolata lokola bato nyonso ná bibundeli mpe nguba mopanzi.” Na ntembe te bibundeli yango ezalaki mopanga ná mbeli. Bazalaki kokanga yango na mokaba, moko na lobɔkɔ ya mobali mpe mosusu na oyo ya mwasi.
Na milulu ya ntina, na ndakisa ntango bazali kobatela moto ya lokumu, Bakɛngɛli ya Mokonzi ya Roma bazalaki kolata zambala
Emonani ete basoda mosusu oyo bazalaki kokɛngɛla Mokonzi ya Roma batyaki bango bákɛngɛla ntoma Paulo na boumeli ya bambula mibale oyo azalaki kozela kosambisama na ye na Roma. Na ntango yango, Paulo azalaki na ndako ya bokangami. Azalaki kofutela ndako mpe azalaki na likoki ya koyamba bapaya kuna. Paulo azalaki kosakwela bato oyo bazalaki koya kotala ye, kosalela Makomami mpo na kolimbola ete Yesu azalaki Masiya mpe ete Bokonzi ya Nzambe ezali elikya kaka moko mpo na bato nyonso.—Mis. 28:16, 23, 30, 31.
Paulo alobaki: “Bakɛngɛli ya Mokonzi ya Roma . . . bayoki ete nakangami na bolɔkɔ mpo na Kristo.” (Flp. 1:12, 13) Maloba yango ezali kokamwisa mpo etuluku yango ya Bakɛngɛli ya Mokonzi ya Roma ezalaki na bankóto ya basoda. Yehova afungolelaki ntoma yango nzela ya kopesa litatoli ntango azalaki na bolɔkɔ, mpe Paulo asalelaki libaku yango mpo na kopalanganisa nsango malamu.