Kobotama mbala na mbala na nzoto mosusu, likambo oyo lisili kolimbolama
MOKO na makambo mazali kotɛmɛla liteya ya kobotama mbala na mbala na nzoto mosusu ezali ete, bato mingi awa na mabelé bazali komikundola te ete bazalaki na bomoi mingi liboso. Lisusu, bazali ata mpe na likanisi te ete bazaláká na bomoi kala.
Mbala mosusu tokoki kokutana na moto moko mpo na mbala ya liboso, kasi tokomona lokola nde tosilá kokutana na ye. Ndako moko, engumba moko, to zamba moko ekoki komonana na biso ete toyebi yango, nzokande ezali mbala ya liboso ete tokóma wana. Makambo oyo makoki te kolimbola liteya ya kobotama mbala na mbala na nzoto mosusu.
Na ndakisa, bisika mosusu oyo bikabwani na ntaká molai bikoki kozala lolenge moko, na boye ete soki tokei na esika oyo tokómi mpo na mbala ya liboso, tokokanisa ete tosilá kokóma wana, atako tokóma naino wana te. Bandako mingi, babiro, bamagazini, bingumba, mpe bazámba mingi na biteni mosusu ya mokili ezali na oyo ekokani na yango na bisika mosusu. Likambo oyo ete ekokani na oyo tosilá komona elimboli te ete tosilá kokóma na esika wana na motindo mosusu ya bomoi. Ezali bobele bisika oyo bikokani na oyo tosilá komesena na yango.
Yango emonani mpe epai na bato. Ezali na bato oyo bakokani makasi mpenza, nkutu basusu bazali na baoyo bakoki kobéngama ete mapasa na bango. Moto moko akoki kozala na mimeseno oyo mikoki kokundwela biso moto mosusu oyo azali naino na bomoi to mpe moto moko oyo asilá kokufa. Nzokande, toyebaki bato wana na bomoi oyo tozali na yango lelo, kasi na bomoi ya kala te. Bilembo to bomoto oyo ekokanisi bango elimboli te ete tosilaki kokutana na bato yango kati na lolenge ya bomoi mosusu. Ekómelaka biso banso ete tobungi moto mpe tokokanisi ye na moto mosusu. Nzokande, bato yango mibale bazali kobika na eleko na biso, kasi na bomoi ya kala te. Yango ekoki te kosimba liteya ya kobotama mbala na mbala na nzoto mosusu.
Bopusi ya lisengelo
Ata makambo oyo mazali komonana na nsé ya lisengelo (hypnose) makoki te kolimbola liteya ya kobotama mbala na mbala na nzoto mosusu. Bɔɔngɔ́ na biso ezali ebombelo eleki monene ya makambo. Tozali kozwa makambo yango na babúku, na bazulunalo, na televizyo, na radio, mpe na nzela na makambo mosusu oyo tozali kokutana na yango mpe oyo tozali komona.
Mingi na makambo yango mabombami na nsé mpenza na bɔɔngɔ́ na biso, mpo ete tozali na mposa na yango sikawa te. Nsé ya bɔɔngɔ́ ekokani mwa moke na babúku ya bibliotɛkɛ oyo etángamaka mingimingi te, mpe etyami na motaláká moko mosika epai bato bakosimbaka yango mingi te.
Nzokande, na nsé na lisengelo, lisosoli ya moto oyo azwami na yango ezali kobongwana kino ete makambo oyo asilá kobosana, ekoki kozonga lisusu na bɔɔngɔ́. Bato mosusu batalelaka bilílí wana bizongeli bango na makanisi lokola makambo oyo bakutanaki na yango na bomoi ya kala, nzokande ezali bobele makambo oyo bakutanaki na yango na bomoi oyo bazali na yango lelo, nde babosanaki yango naino.
Atako bongo, ezali na mwa makambo oyo makoki kozala mpasi mingi mpo na koloba ete ezali lolenge oyo moto asalamaki mpenza. Na ndakisa, soki moto moko abandi koloba “lokótá” mosusu wana ezali ye na nsé na lisengelo. Bantango mosusu, bato bakangaka ntina ya lokótá, kasi mbala mingi bakangaka ntina na yango te. Baoyo bazali kondima kobotama mbala na mbala na nzoto mosusu bakoki koloba ete yango ezali lokótá oyo moto azalaki koloba na bomoi oyo azalaká na yango kala.
Nzokande, eyebani malamu ete koloba na oyo babéngi yango ete minoko, esalemaka mpe na ntango bato bazwi emonaneli moko ya kokamwa to ntango bazwi mayoki ya kosɛlingwa na nsai monene mpo na makambo ya losambo. Baoyo bazali kokutana na makambo wana bandimisami ete yango elimboli te ete bazalaki na bomoi moko liboso, kasi ete bapusami na nguya moko ezangi komonana kati na bomoi oyo bazali na yango lelo.
Ezali nguya nini? Makanisi makeseni mpo na oyo etali koyeba nguya yango. “Fountain Trust” mpe Conseil évangélique de l’Église bandimaki na maloba moko ete: “Toyebi lisusu ete likambo motindo moko likoki kosalema na nsé na bopusi ya misala ya bondoki to ya bademó.” Na yango, ekozala esukiseli ya nokinoki mpe ya libungá na koloba ete lolenge ya likambo yango endimisi ete tozalaki na bomoi liboso.
Makambo mamonaki baoyo babɛlɛmaki na kufa
Tokoloba boni mpo na makambo oyo bato mosusu balobi ete bamonaki yango, wana ebɛlɛmaki bango na kufa? Basusu batalelaka wana lokola endimiseli ete moto azali na molimo oyo ebikaka longwa na nzoto nsima ya liwa na ye. Nzokande, makambo wana masalemaka na kobila motindo oyo bomoi ezalisamaki.
Kati na nimero na yango ya Mársi 1991, zulunalo Science & Vie, etángi matambe makeseni oyo makolandamaka na baoyo babɛlɛmi na kufa mpe ebéngi yango ete “ndakisa ya bandɔtɔ mabe epai na bato nyonso awa na mokili,” oyo eyebani uta kala. Makambo motindo moko wana makómelaka ata mpe baoyo babɛlɛmi na kufa te. Yango ekoki kouta na “kolɛmba, na fɛ́fɛlɛ, na bonsingá, na kosalela bilangwiseli.”
Wilder Penfield, monganga-mopasoli misisá, oyo azalaki kopasola bato na bonsingá, baoyo batobolamaki nkisi ya koboma biyokeli ya binama mosusu ya nzoto, asalaki bokundoli moko kitoko. Amonaki ete na koningisa biteni bikeseni ya bɔɔngɔ́ na nzela ya ebende moko ezali na lontiliki, akokaki kopesa epai na mobɛli mayoki ete abimi longwa na nzoto, akatisi nzela moko o kati ya mabelé, mpe akutani elongo na bandeko na ye oyo basilá kokufa.
Mpo na yango, likambo moko lizali kobenda likebi ezali ete, bana oyo babɛlɛmaki na kufa, bakutanaki na bandeko na bango oyo basilá kokufa te, kasi bakutanaki nde na baninga ya kelasi to na balakisi—baoyo bazali naino na bomoi. Yango emonisi ete makambo motindo wana mazali na boyokani na lolenge ya bomoi ya moto. Makambo tozali kokutana na yango mazali na boyokani na bomoi oyo tozali na yango lelo, kasi ezali na boyokani na bomoi mosusu te nsima ya liwa.
Monganga Richard Blacher akomaki kati na zulunalo The Journal of the American Medical Association, ete: “Kokufa, to konyokwama na ezalela ya makambo na mpasi, ezali na matambé makaseni; kasi liwa ezali bobele liwa.” Mpo na kopesa ndakisa, Blacher alobeli moto moko asalaki mobembo mpo na mbala ya liboso longwa na États-Unis mpo na kokende na Mpótó. Akomaki ete: “Kotambola na mpepo elimboli te ete [ozali na] Mpótó. Moto oyo asali mobembo mpo na kokende na Mpótó nde mpepo ebaluki mpe ezongi nsima ya mwa miniti ya bokei, akoki te kolobela bato ete amoni makambo boye to boye na Mpótó, lolenge moko mpe mpo na moto oyo abɛlɛmaki na kufa akoki te kosolola ete amonaki likambo boye to boye nsima ya liwa.
Na elobeli mosusu, baoyo bazalaki pene na kokufa bakoki koloba te ete bakufaki. Makambo oyo bamonaki, bamonaki yango wana bazalaki naino na bomoi. Mpe ata mwa ba secondes liboso na kokufa, moto azali naino na bomoi. Bazalaki pene na liwa, kasi bakufaki te.
Ata bato oyo mitema etiki kobɛta, mpe nsima ya mwa miniti balamwisi bango, bakoki te komikundola ata likambo moko oyo lisalemaki na ntango oyo bazalaki koyeba eloko te, na ntango oyo batalelamaki lokola ete “bakufi.” Oyo bazali mpenza komikundola ezali makambo oyo malekaki liboso ya mwa ntango moke oyo motema etikaki kobɛta, kasi na boumeli na ntango yango te.
Matatoli ya bato oyo babɛlɛmaki na kufa eyebisaka ntango nyonso makambo na lolenge loleki kitoko, nzokande eyebani ete makambo na mpasi makómaki mpe lokola. Catherine Lemaire, monganga oyo asalisaka maladi ya motó, alimboli yango, ete: “Baoyo bamonaki makambo [wana babɛlɛmaki na kufa] na lolenge oyo yango elimbolami te na IANDS [Lisangá ya mokili mobimba mpo na boyekoli ya ezalela ya moto pene na kufa], bazali na mposa te ya kolobela lisoló na bango.”
Bazali komikundola ata likambo moko te
Likambo ya solo ezali ete, tozalaki na bomoi mosusu te liboso na oyo tozali na yango lelo; tokoleka mpe na bomoi mosusu te nsima ya liwa, mpo na kofanda kati na mokili mosusu. Na yango, makambo oyo tozali komikundola, mauti bobele na makambo oyo tozali kokutana na yango na bomoi oyo tozali na yango lelo.
Baoyo bazali kokɔtɛla liteya ya kobotama mbala na mbala na nzoto mosusu balobi ete, ntina mpenza ya kobotama lisusu ezali mpo na kopesa biso libaku mosusu ya kobongisa ezalela na biso. Nzokande, soki tozalaki solo na bomoi kala, nde tosilá kobosana yango, kozanga komikundola yango mbɛlɛ ezali mokakatano monene. Mpamba te, tokokoka kopɛngola mabungá na biso bobele soki tozali komikundola yango.
Lisusu, baoyo bazali kopesa motuya na oyo babéngi ete kosalisama na nzela ya bokundoli bomoi ya kala, bakanisi ete moto akoki mpenza kolónga mikakatano ya bomoi oyo azali na yango soki, na nzela ya lisengelo, akoki komikundola bomoi na ye mingi oyo azaláká na yango kala. Liteya yango liyebisi ete tozali kobotama lisusu mpo na kobongisa likambo moko, nzokande toyebi lisusu te soki likambo yango ezaláká nini.
Kobosana makambo ya bomoi oyo tozali na yango lelo etalelamaka lokola mokakatano moko mabe. Ezali lolenge moko mpo na likambo oyo. Koloba ete lolenge ya kobosana wana ezali na likámá te mpamba te ezali bobele bato malamu nde bazali kobotama lisusu lokola bato, ezali likambo ya solo te, mpamba te mabe etondi mingi mpenza na mokili. Soki ezali bobele bato malamu nde bazali kobotama lisusu, bongo bato mabe oyo nyonso bauti epai wapi? Mbɛlɛ motuya ya bato mabe mosengelaki kokita, boye te? Likambo ya solo ezali oyo ete: Ezala moto malamu to moto mabe, moko te azali kobotama mbala na mbala na nzoto mosusu mpo na kozala na bomoi mosusu lokola moto to lokola eloko nyonso mosusu.
Kasi, okoki koloba ete, ‘Biblia eteyi te kobotama mbala na mbala na nzoto mosusu? ’ Tiká tótalela motuna oyo kati na lisoló lilandi.
[Likanisi ya paragrafe ya lokasa 6]
Nsé ya bɔɔngɔ́ na biso ezali lokola ebombelo ya makambo oyo makoki kokundolama na nsima
[Likanisi ya paragrafe ya lokasa 7]
“Liwa ezali bobele liwa,” kasi ezali litambe ya bomoi te. — Monganga Richard Blacher kati na The Journal of the American Medical Association