“Libala ya bonkɔkɔ” na Ghana
EUTI NA MOKOMANI NA BISO NA GHANA
LIBALA—kati na mokili mobimba bankóto ya bato bazali kobalana mbula na mbula. Bazali kosala yango engebene motindo ya libala oyo ezali kosalema na bisika bazali kofanda.
Libala ya bonkɔkɔ ezali motindo oyo ezali kosalema mingi koleka mitindo mosusu na ekólo Ghana. Yango ezali lolenge ya libala oyo libota ya mwana mobali ekopesa mbongo ya libala na libota ya mwana mwasi. Mpo na kolobela bobele mwa ndambo ya mikili, tóyeba ete libala ya bonkɔkɔ ezali kosalema na mikili mingi ya Afrika mpe na bisika bizwami mosika lokola esanga ya Hong-Kong, esanga ya Papouasie Nouvelle-Guinée, Bisanga Salomo mpe lisusu epai na ba Indiens ya Goajiro na nɔ́rdi ya Colombie mpe na nɔ́rdi-wɛ́sti ya Venezuela.
Na ntango ya lisoló ya Biblia, momeseno ezalaki ya kopesa mbongo ya libala. (Genese 34:11, 12; 1 Samwele 18:25) Kobanda ntango ya kala kino ntango oyo, bato mingi bazali kososola ete esengeli kopesa mbongo ya libala mpo na kozongisa botɔ́ndi epai na baboti ya mwana mwasi mpo na ntango, milende, mpe makoki oyo bapesaki mpo na kobɔkɔla mpe koteya ye mpe na koleka bakozwa lisusu lisungi te uta na misala ya mwana na bango ya mwasi.
Mokumba ya baboti
Na ntango ya kala, na Ghana, bilenge mibali bazalaki kobima elongo na bilenge basi te to kobanda bango, bobele bango moko te. Baboti nde bazalaki kobongisa libala ya bana na bango oyo bakómi na ntango ya kobala, nsima wana basilaki kotalela na bozindo bizaleli ya bilenge mibali to bilenge basi ya mboka oyo bakoki kobalana na bana na bango. Kino lelo, na Ghana, baboti mosusu bazali naino kosala bongo.
Baboti ya mwana mobali bakotalela bizaleli lokola bomoto ya mwana mwasi, lokumu na ye mpe oyo ya libota na ye, soki kati na libota wana ezali na bokɔnɔ oyo baboti bakoki kopesa yango na bana na bango; mpe soki baboti ya mwana mobali bazali Batatoli ya Yehova, bakotalela mpe ezaleli ya mwana mwasi na oyo etali makambo ya elimo. Soki basepeli na elenge mwasi, baboti ya mwana mobali bakokenda kotala baboti ya mwana mwasi mpo na kotuna libala.
Na ngala na bango, baboti ya mwana mwasi bakoluka koyeba bomoi ya mwana mobali wana mpe ya libota na ye. Longola bizaleli oyo tolobeli mwa liboso, bakotalela mpe makoki ya mwana mobali ya koleisa mwasi—soki azali na mosala to azali na mosala te. Soki baboti ya mwana mwasi basepeli, na bongo bakoyebisa baboti ya mwana mobali mpe bango nyonso elongo bakozwa bibongiseli mpo na libala nsima wana mwana mwasi mpe mwana mobali basili kondima libala yango.
Mpo na nini baboti mosusu bazali naino koluka babalani mpo na bana na bango oyo bakómi mikóló? Na Inde, mwasi moko oyo baboti na ye babongisaki libala mpo na ye ayanolaki ete: “Elenge azali nde na makoki ya kozwa likatami monene motindo wana? Ebongi malamu ete atika yango epai na baoyo bazali na mbula mingi mpe na boyebi ya makambo mingi ya bomoi mpo na kosala liponi ya mayele koleka.” Maloba na ye mamonisi mpenza likanisi ya bato mingi na Afrika.
Nzokande, makambo mazali kobongwana na Ghana. Momeseno ya kobima elenge mobali na elenge mwasi mpe oyo ya komona elenge mobali kobanda elenge mwasi ye moko ezali kopalangana mingi. Na ntango oyo bakomona malamu, bakoya koyebisa baboti ete basili kobandana. Nsima wana baboti ya mwana mwasi mpe ya mwana mobali bakutani mpe basepeli na mwango yango, bakobongisa molulu ya kokanga lopango oyo eyebani mingi na ebele na bitúká ya Ghana.
Molulu ya kokanga lopango
Baboti ya mwana mwasi mpe ya mwana mobali bakoyebisa na bandeko ya mabota na bango mokolo nini bakokutana mpe ntina ya bokutani wana. Liloba oyo ete “bandeko ya mabota” elimboli na Afrika bandeko ya tata mpe bandeko ya mama, bana na bango mpe bankɔkɔ. Na mokolo oyo bayokanaki, basangani ya mabota yango mibale bakokutana mpo na molulu. Ezali lisɛngisi te ete mwana mobali oyo akobala azala wana. Oyo elandi ezali mwa ndakisa ya lisoló moke na masoló oyo malobamaka na molulu ya kokanga lopango.
Molobeli na ngambo ya mwasi (Mm): [Azali koloba epai na bamonisi ya mobali] Toyebi mpo na nini boyei awa, kasi bonkɔkɔ esɛngi biso ete tótuna bino, Mpo na nini mpenza boyei awa?
Molobeli na ngambo ya mobali (MM): Mwana na biso ya mobali na nkombo Kwasi azalaki koleka liboso ya ndako na bino mpe amoni fololo moko kitoko; yango ayei kosɛnga bino ndingisa mpo ete abuka yango.
Mm: [Asali lokola ayebi eloko te] Tozali na fololo na ndako na biso te. Bino moko bótala!
MM: Mwana na biso ya mobali amikosi te. Bozali solo na fololo moko ya kitoko na ndako na bino, nkombo na yango Afi.
Mm: Tokanisaki ete ezali fololo ya solo, nzokande moto! Ɛɛ, Afi afandaka awa.
MM: Tolingi kokanga lopango mpe kozwa Afi, mwana na bino ya mwasi, na libala mpo na mwana na biso ya mobali na nkombo Kwasi.
Libota ya mwana mobali ekobimisa sikawa biloko ya libala, lokola masanga ya makasi mpe ya sukali mpe mwa mosolo. Motángo mpe motuya ya biloko ya libala etali etúká na etúká. Molulu yango ezali na mwa makambo makokani na libala ya mikili ya Mpótó, mpe na milulu mosusu ya kokanga lopango balatisanaka mpɛtɛ.
Molobeli na ngambo ya mwasi akotuna sikawa na mwana mwasi liboso na banzɛnɛnɛkɛ nyonso soki andimi biloko ya libala oyo bayei na yango. Soki andimi, ekozala elembo liboso na banzɛnɛnɛkɛ nyonso ete andimi libala yango. Bakoyokana mokolo oyo mabota yango mibale makokutana mpo na kosala molulu ya libala. Bakosukisa molulu oyo ya kokanga lopango na komeláká mwa kɔ́pɔ ya masanga.
Molulu ya libala
Motángo ya bato oyo babyangamaka na ndako ya baboti ya mwasi to na ndako ya ndeko moko ya libota wana, mpo na kopesa mbongo ya libala, oyo etalelami mpenza lokola libala, ezalaka mingi koleka baoyo babyangamaka na molulu ya kokanga lopango. Ezali bongo mpamba te na molulu wana babyangaka bayebani mingi.
Esengo ezali komonana na bilongi ya bato nyonso. Bilenge mibali mpe bilenge basi oyo babali naino te bazali mitema lúkulúku mpo ete balingi komona biloko oyo bamemi mpo na libala. Nde soki libota ya mwana mwasi ekómi kolobaloba ete biloko ya libala ekoki te, esengo oyo bato bazalaki na yango ekosila. Bamoko kati na babyangami bakokóma mpenza mitema likoló soki libota ya mwana mwasi ezali kotingama na etɛlɛmɛlo na yango. Na kosaleláká makoki nyonso ya molobeli mpe bonkóndé, molobeli na ngambo ya mobali akoyokana na libota ya mwasi. Ntango bakomona ete libota ya mwasi elɛmbisi etɛlɛmɛlo na yango, bato nyonso mpe bakokitisa mitema. Na mbala moko, bosepeli oyo bazalaki na yango liboso ezongi. Sikawa, esengo ya elambo ebandi mpe bakopesa babyangami masanga.
Mpo na kobanda molulu ya libala, molobeli na ngambo ya mwasi asɛngi na bato nyonso ete báfanda kimya mpe atombeli bango boyei malamu. Atuni na bamonisi ya mobali ete báyebisa ntina ya boyei na bango. Molobeli na ngambo ya mobali azongeli koloba ntina ya boyei na bango, kobendáká likebi ya basangani likoló na likambo oyo ete basilaki kokanga lopango mpe na yango basili kozwa ndingisa mpo na libala.
Moko nsima na mosusu, balobeli bakolakisa na bayangani, baboti ya penepene ya mobali mpe ya mwasi, na koyebisáká polele moboti oyo abalisi mwana mwasi mpe oyo abongisi libala ya mwana mobali. Molulu ya libala ezali kokóba.
Mm: [Kolobáká epai na bamonisi ya mobali] Tolɔmbi bino ete bólakisa biloko ya libala oyo tosɛngaki.
Molobeli ya mwasi akotánga eloko mokomoko na liste mpe akolakisa yango mpo ete bato nyonso bámona soki yango nyonso ekoki. Soki bamonisi ya mobali bamoni ete libota ya mwasi esɛngi biloko ya ntalo mingi, bakoyokana na bango na nkuku liboso ya molulu ya libala. Nzokande, libota ya mobali ezali koya na molulu wana, esili komibongisa mpo na kokakola biloko ya libala oyo bikosɛngama lisusu na bandeko mosusu ya libota ya mwasi oyo bakomimonisa mwa matata. Ezala epai wapi libala ezali kosalema, motuya ya mbongo ya libala—ezala motuya monene to motuya moke—esengeli kopesama kozanga kokakola.
Mabota mosusu mazali kosɛnga biloko lokola masanga, bilamba, chaînette ya nkingo, biloko ya matoi mpe biloko mosusu ya basi. Na nɔ́rdi ya Ghana, kati na biloko ya libala, bakoki kosɛnga mungwa, makaso (noix de kola), ndɛkɛ oyo ebéngami nkánga (pintades), mpate mpe kútu nyama minene koleka. Na biloko nyonso oyo basɛngaka mpo na libala, mbongo ezangaka te mpe esɛngamaka ete báfuta yango mbala moko.
Ntango masoló mazali kokóba, mwana mwasi azali na esika wana te kasi abombami na eteni moko ya ndako mpe azali kolanda yango. Mwana mobali mpe asɛngisami te ete azala kuna. Yango wana, mwana mobali oyo afandi mosika akoki kosɛnga na baboti na ye ete bábalela ye mwasi. Kasi na libala oyo tozali kolobela awa, mobali azali. Sikawa ekómi ntango oyo libota ya mobali ekosɛnga ete bámona mwasi ya mwana na bango.
MM: Tosili kokokisa oyo nyonso bosɛngaki biso, kasi tomoni naino mwasi ya mwana na biso te.
Molulu ya libala ezalaka te bobele esika ya bokutani mpo na kolobela makambo minene; ezalaka mpe ntango ya kosɛka mwa moke. Ekómi sikawa ntango libota ya mwana mwasi ekopesa eyano na lisɛngi ya libota ya mobali ete bámona mwasi ya mwana na bango.
Mm: Mwana mwasi azalaki awa. Kasi auti kokende mobembo mosika na mboka mopaya mpe tozali na tikɛ te mpo na kokende kozwa ye.
Moto nyonso ayebi ndimbola ya eyano wana. Nokinoki, libota ya mobali ebimisi mosolo—motuya nyonso oyo bakoki kobimisa—mpe na mbala moko, tikɛ ya elilingi ebimi. Mpe mwana mwasi auti na mobembo na ye!
Mpo na kosɛkisa mpenza bato, mabota mosusu esalaka ete mwa baninga ya mwasi ya libala bázwa esika na ye. Bakobanda kobimisa moninga mokomoko ya mwasi ya libala lokola ete ezali ye mpenza, wana bato bazali koboya bango, kino mwasi mpenza ya libala akobima mpe bakobɛtela ye mabɔkɔ makasi na esengo nyonso. Molobeli na ngambo ya mwasi akobyanga ye ete atala biloko ndenge na ndenge oyo bamemi mpo na libala na ye. Akotuna ye soki andimi biloko oyo mobali ayei na yango. Bato nyonso bakofanda nyɛɛ mpe mitema likoló mpo na koyoka eyano ya mwasi. Bamoko kati na bana basi yango bazalaka nsɔ́ninsɔ́ni, nde bamosusu babangaka te, kasi mingimingi bango nyonso bayanolaka ɛɛ na motuna wana, na nsima bato bakobɛta mabɔkɔ makasi.
Soki mobali azali, libota ya mwasi ekosɛnga ete bámona ye. Bakokóba kosɛka na lolenge moko soki ebongisamaki ete moko na baninga ya mobali amibimisa lokola ye azali mpenza mobali oyo akobala. Na lolendo nyonso, moninga na ye akotɛlɛma kasi na mbala moko basangani bakoboya ye.
Baboti ya mwasi bakosɛnga ete bámona mobali ya mwana na bango. Mobali ya solo akotɛlɛma sikawa mpe bato bakomonisa ete bandimi ye na kosɛkáká na esengo nyonso. Baboti ya mwana mwasi bakopesa ye nzela ete akenda esika mobali na ye azali mpe mobali akolatisa ye lopɛtɛ na mosapi soki ebongisamaki bongo. Kolatisana mpɛtɛ ezali momeseno euti na mikili ya Mpótó. Na ngala na ye, mwasi akolatisa mobali na ye lopɛtɛ na mosapi. Bato batondi na esengo mpe bakopesa babalani longonya. Na ntina na mikakatano ya nkita mpe mpo na kosomba ntango, bamoko bazali sikawa kosala molulu ya kokanga lopango mpe oyo ya libala mbala moko.
Bato oyo bakɔmeli na makambo ya bomoi mpe bato mosusu ya mayele ya mabota nyonso mibale bakopesa toli na babalani ya sika mpo ete bátambwisa malamu libala na bango kino liwa ekokabola bango. Mpo na kosukisa molulu ya libala na esengo, bakopesa bayangani masanga.
Molulu ya libala esili! Na Ghana, kobanda mokolo wana, babalani yango batalelami na bato ya mboka ete basali libala oyo lindimami na mibeko. Soki bamoko na bato na lokumu ya libota ya mwasi bazalaki na likoki te ya koya na molulu ya libala, bakotindela bango masanga lokola elembo ete libala euti kosalema. Soki babalani bazali Batatoli, ntango mosusu Batatoli bakozwa bongo ebongiseli mpo ete lisukúlu oyo litongami likoló na Biblia likoka kosalema, na nsima na yango bakomela mwa kɔ́pɔ.
Na Ghana, babalani mosusu bazali kosala molulu lokola libala ya mikili ya Mpótó, oyo ebéngami mariage civil to mariage par ordonnance. Libala yango ekoki kosalema na ndingisa ya baboti to na ndingisa na bango te, bobele na boyokani ya babandami (fiancés) bango moko lokola bamoni ete bakómi na mbula ya kobala. Kasi na libala ya bonkɔkɔ, esengeli ete baboti bándima yango.
Na mariage civil babalani bazali kolapa ndai ya libala. Kasi bakolapa ndai te na libala ya bonkɔkɔ. Letá azali kosɛnga ete libala nyonso ya bonkɔkɔ ekomama na mikanda ya Letá; mpe Batatoli ya Yehova bazali kosala bongo. (Baloma 13:1) Na nsima, bakokomisa libala yango na mikanda.
Kobanda ntango ya kala kino ntango mboka Côte de l’Or (nkombo ya kala ya Ghana) eyaki kokóma na nsé na boyangeli ya Grande-Bretagne, bato bazalaki kosala bobele libala ya bonkɔkɔ. Mindɛlɛ ya Grande-Bretagne nde bayaki kokɔtisa libala ya mikili ya Mpótó mpo na bato na bango oyo bazalaki na Ghana. Bapesaki mpe nzela na banamboka ete básala lolenge wana ya libala; yango wana uta mbula mingi libala ya bonkɔkɔ mpe oyo euti na mikili ya Mpótó ezali kosalema. Na Ghana, lolenge ya mabala yango nyonso mibale endimami na mibeko ya Letá, na bongo Batatoli ya Yehova bazali kosalela yango. Moto na moto akopona lolenge nini ya libala oyo ye alingi kosala.
Na bikólo mosusu ya Afrika, esengeli kokomisa libala ya bonkɔkɔ na mikanda ya Letá liboso ete bato bándima libala yango. Nzokande, na Ghana, libala ya bonkɔkɔ lokola oyo touti kolobela endimami na mibeko kozanga ete bákomisa yango na mikanda ya Letá; bakotalela babalani ete basali libala oyo eyokani na mibeko na ntango libala ya bonkɔkɔ esalemi. Na nsima bakokomisa libala yango ya bonkɔkɔ na mikanda ya Letá bobele mpo na bokundoli yango.
Libala ezali solo likabo ya bolingo oyo Yehova apesi na bato, likabo ya motuya oyo apesi ata na baanzelu te. (Luka 20:34-36) Ezali boyokani ya ntina mpenza oyo esengeli kobatela mpo na lokumu ya Mobandisi na yango, Yehova Nzambe.
[Elilingi na lokasa 23]
Bazali kolatisana mpɛtɛ ya libala