Bomoi ya moto ebandaka ntango nini?
GIANNA alobi boye: “Mama na ngai azalaki na mbula 17 ntango alongolaki zemi ya sanza nsambo ná ndambo, na mai ya mungwa (injection saline).”a Abakisi boye: “Mwana yango oyo alingaki koboma ezali nde ngai. Kasi, nakufaki te.”
Gianna, alobaki maloba wana na 1996, ntango azalaki na mbula 19, liboso ya bato oyo batindamaki na guvɛrnema ya États-Unis mpo na koyoka makanisi ya bato na likambo ya kolongola zemi. Ntango Gianna azalaki na sanza nsambo ná ndambo na libumu ya mama na ye, binama ya nzoto na ye esilaki kosalema. Na ntembe te, ondimi ete azalaki moto mpenza mpamba te, akobaki kozala na bomoi ata libándá ya libumu ya mama na ye.
Kasi, tokoloba boni mpo na ntango azalaki na pɔsɔ mitano, wana azalaki na molai ya santimɛtrɛ 1? Ya solo, binama nyonso ya nzoto na ye esilaki naino kosalema te, kasi bɔɔngɔ na ye mpe makoki na yango nyonso esilaki kobongisama. Motema na ye ezalaki kobɛta mbala 80 na miniti moko mpe ezalaki kotinda makila na misisa ya nzoto na ye. Na yango, soki Gianna azalaki moto ntango azalaki na sanza nsambo ná ndambo na libumu ya mama na ye, omoni te ete azalaki mpe moto ntango azalaki na pɔsɔ mitano, atako binama nyonso ya nzoto na ye esilaki naino kosalema te?
Likamwisi monene
Kosalema ya binama nyonso ya mwana ebandaka ntango zemi ekɔti; ntango ovile to liki ya mama ekutani na momboto ya tata. Lokola mayele ya siansi ekoli, ezali kosalisa bato bámona mbongwana ya kokamwa oyo esalemaka na selile ya ebandeli. Ba-gènes oyo ezalaka na kati ya ADN ya tata mpe ADN ya mama, esanganaka mpo na kosala moto ya sika.
Selile yango ya ebandeli eyaka kobimisa moto mobimba. Makambo nyonso ya nzoto ya moto ezalaka na kati ya ba-gènes na ye oyo ezali na kati ya ADN na ye. Ata likambo moko te ezangaka. Molai ya moto, elongi na ye, langi ya miso mpe ya nsuki na ye, mpe makambo mosusu ya nzoto na ye, nyonso ekomamá na kati ya ba-gènes na ye.
Na nsima, ntango selile wana ya ebandeli ekokabwana, makambo nyonso oyo ezalaki na ADN ya selile yango ya liboso ekendaka mpe na baselile nyonso ya sika. Likambo ya kokamwa, selile mokomoko ebongisamaka mpo na kosala enama mokomoko ya nzoto, na ndakisa motema, bɔɔngɔ, mikuwa, mposo, ata mpe miso. Ndenge oyo makambo nyonso ya selile ya liboso ekendaka na baselile mosusu mpo na kosala moto mobimba oyo akeseni na bato mosusu ezali mpenza “likamwisi.”
David Fu-Chi Mark, moto moko ya mayele na bioloji alobi boye: “Makambo nyonso ya moto, ata mpe kokola na ye, ezalaka na kati ya selile moko wana ya ebandeli.” Abakisi boye: “Tokoki kotya ntembe te ete moto mokomoko akesanaka na bato mosusu nyonso banda kaka na ntango oyo bomoi na ye ebandi na libumu ya mama na ye.”
Moto na kati ya libumu?
Ntango kaka mwasi azwi zemi, eloko oyo ezali na kati ya libumu na ye ezali makila mpamba te, kasi moto mobimba. Yango ezalaka mpenza mopaya na nzoto ya mama. Soki ezalaki kobatelama malamu te na libumu ya mama, mbele eumelaka te kobima. Bomoi yango ya sika—oyo ebatelamaka malamu—ezali moto mobimba oyo azali mpe na ADN na ye.
Bato mosusu balobaka ete lokola nzoto ya mwasi ebimisaka zemi yango moko ntango nzoto ya mama ezwi mwa mobulu, mabe ezali wapi soki monganga alongoli mwasi zemi? Kasi, bokeseni ezali kati na moto oyo akufi ye moko mpe oyo babomi ye. Na mboka moko ya Amerika ya Sudi, na kati ya bana 1 000 oyo bakokisi naino mbula moko te, bana 71 bakufaka. Kasi, okoloba ete lokola bana mingi bakufaka liboso bákokisa mbula moko, ekozala mabe te koboma mwana oyo akokisi naino mbula moko te? Ezali bongo te!
Likambo ya kokamwa, Biblia emonisi ete bomoi ya moto ebandaka na libumu ya mama na ye. Davidi alobaki na Nzambe boye: “Miso na yo emonaki ndenge nazalaki naino liki, mpe biteni na yango nyonso ekomamaki na mokanda na yo.” (Nzembo 139:16) Davidi alobaki kaka “liki” te, kasi “ndenge NAZALAKI naino liki”; yango emonisi ete bomoi ya Davidi ebandaki ntango kaka mama na ye azwaki zemi, liboso kutu abotama. Na lisalisi ya elimo santu, Davidi amonisaki mpe ete na ebandeli, makambo nyonso ya nzoto na ye ebongisamaki, to “ekomamaki,” yango esalaki ete abima ndenge azalaki.
Simbá mpe ete Biblia elobi te ete ntango mwasi azali na zemi, mwa eloko moko boye nde ezali na libumu na ye. Kasi, elobi ete: “Mobali moko makasi asalemi na kati ya libumu!” (Yobo 3:3) Yango mpe emonisi ete na kolanda Biblia, ntango kaka mwasi azwi zemi, amemi nde moto mobimba na libumu na ye. Ya solo, bomoi ebandaka nde ntango wana.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Kolongola zemi na mai ya mungwa (injection saline), esɛngaka kokɔtisa mai ya mungwa na matrisi ya mwasi ya zemi; mwana akomɛla mai yango, mpe mbala mingi nsima ya ngonga mibale akokufa. Nsima ya ngonga 24 mwasi akobimisa mwana yango oyo akufi to—na bantango mosusu, mwana oyo etikali moke akufa.
[Bililingi na lokasa 6]
Zemi ya pɔsɔ mitano ezali makila mpamba te—makambo nyonso ya nzoto ya moto ezali na kati na yango
(ndenge mwana azalaka)