Liteya 16
Masolo oyo makoki kolendisa baninga
1, 2. Masolo na biso masengeli kozala ya motindo nini?
1 Na masolo na biso ya mikolo nyonso, tozali na likoki ya kokumisa Nzambe. Mokomi na nzembo alobaki: “Tosepeli kati na Nzambe ntango nyonso mpe tokotonda nkombo na yo libela.” Basambeli nyonso ya Nzambe babongi kosala boye. Basengeli kosalela bibebu na bango na boyokani na mokano ya Jéhovah.—Nz. 44:8.
2 Ekateli motindo oyo ezali na ntina mpo na bomoi, mpamba te lokola tozali na kokoka te, mbala mosusu tokolobaka maloba oyo mazali kobuka bamosusu na esika ete elendisa bango. (Yak. 3:8-12) Na yango, ezali malamu ete tobatela ntango nyonso na makanisi toli oyo ezwami na Biblia ete tolobaka maloba “malamu mpo na kolendisa, pelamoko ezali bosenga, ete mapesa bayoki ngolu.”—Baef. 4:29.
3, 4. Longola koloba, kosolola esengaka lisusu nini, mpe mabaku nini tozali na yango ya komimesenisa na kosolola?
3 Ya solo, kobosana te ete lisolo esengaka mpe koyoka, mpamba te kosolola elimboli kopesana makanisi. Loba na motindo ya kolendisa, kasi otikela mpe balobani na yo nzela ya koloba. Kolisa momeseno ya kotuna bango mituna mibongi mpo na kopusa bango ete baloba. Na nsima, yoka na likebi makambo mazali bango koloba na esika ete osalela ntango wana mpo na kobongisa makambo oyo yo okoloba na nsima. Okolendisa balobani na yo soki okosepela na makanisi na bango.
4 Mabaku mazali mingi mpo na kobanda masolo oyo makoki kolendisa baninga. Ekoki kozala ntango ofandi na ndako na yo elongo na basangani ya libota na yo, ntango ozali elongo na baninga na yo ya mosala to ya kelasi, to lisusu ntango ozali elongo na bandeko na yo kati na kondima. Mikumba misusu na Eteyelo ya mosala ya Nzambe ezali kopesa biso libaku ya koyekola kosolola.
5-7. Pesa mwa makanisi na ndenge tokoki kosolola malamu kati na libota, mingimingi na ntango ya bolei.
5 Kati na libota. Masolo kati na libota mapesaka esengo mingi na basangani na yango nyonso; na yango, ebongi tosala makasi mpo ete masolo na biso mazala malamu koleka. Mobali to mwasi azali na esengo mingi soki mobalani na ye azali kotya likebi mpenza na makambo mazali ye koloba. Bana mpe bakosepela soki baboti bazali koyoka bango mpe bazali solo kosepela na maloba na bango. Nzokande, soki ozali kotanga zulunalo ntango moto azali koloba na yo, to soki ozali kokatakata ye, to ozali kosala eloko mosusu oyo emonisi ete maloba na ye masepelisi yo te, masolo kati na libota makozala lisusu na motuya te. Nani akosepela koloba na moto oyo azali koyoka ye te?
6 Kolya ya mokolo na mokolo ezali libaku malamu mpo na basangani ya libota moko ete bakoka kosolola masolo ya kolendisa. Na bolei moko, ndambo na lisolo ekoki kotalela texte ya mokolo wana, oyo epesami na mwa mokanda moke Tótangaka Makomami mokolo na mokolo. Na bolei mosusu, lisolo ya esengo mpe ya litomba ekoki kobima na makambo botangi na Mosenzeli to na Lamuká! oyo ebimi kala mingi te. Nzokande, lolenge oyo ya masolo ekoki kozala ebongiseli ya makasimakasi te; ebongi ete mosangani nyonso azala libre mpo na koloba, mpe bokoka kolya na kimya bilei bibongisami.
7 Ntango ya bolei, mosangani mokomoko kati na libota akoluka kolendisa baninga na masolo na ye. Ezali ntango ya kobimisa mabe ya moninga te; soki te esengo ya kolya ekobeba. Na moi, ekoki kozala ete mosangani moko ya libota ayokaki makambo ya litomba to mpe oyo ekoki kosekisa baninga. Ntango mosusu ayokaki lisolo moko ya malamu mingi ezwami kati na mosala ya kosakola. Ekoki kozala ete atangaki likambo moko na zulunalo to ayokaki likambo moko na radio oyo ebendaki likebi na ye. Ekozala malamu soki akobomba yango na makanisi na ye mpe kobimisa yango na libota mobimba na ntango ya bolei. Soki bokamati momeseno ya boye, bokomona ete, na esika ya kolya nokinoki mpe kolongwa na mesa, libota mobimba bakobanda kozela ntango wana mpo na kokoka kosolola elongo.
8-10. Mpo na nini masolo ya mwana mokomoko elongo na baboti ezali na ntina, mpe ndenge nini baboti bakoki kobongisa masolo motindo oyo?
8 Ezali mpe likambo ya ntina ete baboti basololaka na mwana mokomoko, kozanga kosangisa ye na bana mosusu. Bakozwa matomba malamu soki masolo yango mazali kosalema kozanga kosilika, na ndako to na nzela. Ekopesa bango nzela na kobongisa mwana mpo na mabongwani oyo makosalema na nzoto na ye wana ezali ye kokola. Masolo yango makomonisa mpe nini ezali kati na motema ya mwana, nini ezali bamposa na ye ya solo mpe nini ezali mikano na ye kati na bomoi; ezali kopesa baboti nzela na kobongisa mwana mpo na bolamu na ye.
9 Soki mwana na yo ayebisi yo makambo asalaki mpe opameli ye mbala moko, lisolo ekokende mosika te. Awa ekozala ye komikundola ndenge opamelaki ye, mbala mosusu akolinga lisusu koyebisa yo makambo na ye te. Ebongi malamu koyoka ye mpe kotalela mikakatano na ye na kotunaka mwa mituna ya boboto. Na nsima, ata okozala ngwi, okoki kosalisa mwana na yo ete asembola nzela na ye soki apengwaki na mitinda ya Biblia.
10 Masolo makoki kozanga te kati na bomoi ya libota ya esengo, kasi elimboli te ete moto asengeli ntango nyonso koloba. Bantango mosusu ebongi kozala yo moko mpo na kokanisa na mozindo likoló na makambo mosusu. Mosangani mokomoko na libota akosepela kofanda nyee na bantango mosusu.
11, 12. Longola bantango oyo tozalaka na mosala ya kosakola, mabaku mosusu nini tozali na yango ya kopesa litatoli?
11 Ndenge nini tokoki koluka mabaku ya kopesa litatoli. Koyeba kosolola ezali na boyokani nini na mosala na biso ya kosakola? Omitunaka te mpo na nini bandeko mosusu bazalaka na ba eksperianse malamu ya kosolola? Ezali te mpo ete babandaka masolo? Mokanda ya Masese elobi: “Bibebu na bato na mayele ekopalanganisa boyebi.”—Masese 15:7.
12 Longola bantango oyo tozalaka na mosala ya kosakola, mabaku mosusu mingi mazali oyo tokoki kobanda lisolo elongo na moto mpe koloba na ye na ntina na Jéhovah. Na ndakisa, basi baklisto bakoki kopesa litatoli na bato bafandi na bango penepene to na bato oyo balekaka mpo na kotekisela bango biloko. Bana bazali na libaku ya koloba makambo ya Biblia na baninga na bango na nzela ya kelasi to na ntango ya bopemi. Mibali baklisto oyo basalaka mosala ya mosuni bakoki kopesa litatoli na esika na bango ya mosala, na ndakisa na ntango ya bopemi. Okoki mpe kobanda masolo na bato okutani na bango wana ezali yo kotambola na parc to na jardin, na bato oyo okutani na bango na zando to na magasin, to lisusu na bato okutani na bango na esika ozali kozela bus. Na mikili misusu epai mosala ya kosakola epekisami, bandeko bazali kosakola mingimingi na mabaku oyo mazali komonana mbalakaka. Matomba malamu mazali kozwama na nzela yango, mpamba te na mikili yango, mbala mingi motuya na basaleli na Nzambe ya solo ezali kobakisama noki.
13-16. Bametode nini tokoki kosalela mpo na kobanda masolo oyo makosalisa biso na kopesa litatoli?
13 Mpo na kopesa litatoli na mabaku ndenge na ndenge oyo mazali komonana, ekoki bobele ete oloba mwa maloba ya boboto mpe omilakisa lokola moninga. Yesu apesaki ndakisa mpo na yango. Mokolo moko na midi, efandaki ye penepene na liziba ya mai na Samari mpo na kopema, asengaki mai ya komela epai na mwasi moko oyo ayaki wana kotoka mai. Mwasi wana akamwaki, mpamba te Bayuda bazalaki kolobana na Basamaria te. Mwasi atunaki Yesu motuna. Yesu ayanolaki mpe akamwisaki ye lisusu ntango alobaki na ye ete azali na mai oyo ekoki kopesa bomoi ya seko. Azwaki bongo libaku ya kopesa ye litatoli. Soki otali malamu, okomona ete akotaki na lisolo molaimolai te; abongisaki nzela na lisolo moko lokola kati na baninga.—Yoane 4:5-42.
14 Yo mpe okoki kobanda masolo oyo makolendisa baninga. Wana ezali yo kozela bus, okoki kobenda likebi ya moto likoló na likambo moko otangaki na zulunalo, mpe kotuna ye: “Na likanisi na yo, mpo na nini mabe ekomi mingi na mokili? Okanisi ete mokolo mosusu mabelé ekozala efandelo kitoko?” Metode yango emonanaki mpe ete ezali malamu mingi mpo na kobanda lisolo na ntina na likambo moko ezali koleka na mboka oyo bofandi. Okoki kobakisa lisusu: “Mpo na yo, ndenge nini ekoki kosila?” Bokokoma kino na kolobela mwango bobele moko oyo ekoki kosilisa bampasi yango, Bokonzi na Nzambe. Ya solo, tosengeli kozala na bososoli. Soki moto alingi lisolo yango te, tokoki kolobisa ye na makasi te. Nzokande, okomona ete bamoko bakozala na esengo mingi ya koyoka yo, lokola ezalaki bongo mpo na mwasi Mosamaria penepene na liziba na mai.
15 Ndenge mosusu ya kobimisa mabaku mpo na koloba na ntina na Bokonzi na Nzambe ezali boye ete otika mikanda ya la Société na bisika ya polele kati na ndako na yo. Bato oyo bazali koya kotala yo bakozanga te kotuna yo to koloba likambo na ntina na mikanda yango; wana okozwa libaku ya kopesa bango litatoli malamu mingi. Mpo na bana na kelasi, kotika mokanda to zulunalo likoló na banc ekozanga te kobenda likebi ya mwana mosusu mpe akotuna ete “Oyo mokanda nini?” Wana okozwa libaku ya koyanola ye mpe kopesa ye litatoli. Bobele bongo mpo na bandeko oyo bakosalaka mosala ya mosuni; soki ozali kotanga mokanda moko ya la Société na ntango ya bopemi to kati na bus, wana ekopesa yo libaku ya koloba na ntina na Bokonzi na Nzambe epai na bato oyo balukaka koyebayeba makambo.
16 Masolo elongo na bato oyo oyebani na bango ekoki mpe kopesa yo mabaku ya koloba na ntina na solo oyo ezwami na Biblia. Na boumeli ya lisolo motindo oyo, bato bakolobelaka mingimingi makambo oyo basala, epai bauta, makambo oyo bayoka to bamona to makambo oyo bazali kokana ete basala yango. Na ntango yo ozwi mabaku motindo oyo, ebongi ete oloba mpo na maye yo osili kosala. Soki okendaki na assemblée ya circonscription, lobela moninga na yo epai wapi yo okendaki mpe motó ya likambo monene ezalaki nini? Mbala mosusu akotuna yo mituna na ntina yango. Bamosusu balobelaka yo makambo oyo bazali kosala; yo mpe bobele bongo, lobela bango makambo oyo otangaki na Mosenzeli to kati na Lamuká! Soki okosimba motema na bango, bakotuna yo ndimbola ya makambo mosusu. Wana okozwa libaku ya kopesa bango litatoli ekoki. Masolo motindo oyo mazali na mokano ya kobenda likebi ya bato likoló na mikano na Nzambe ezali masolo oyo makoki kolendisa mpenza baninga.
17-20. Makambo nini ya kolendisa Batemwe bakoki kosolana bango na bango?
17 Elongo na baninga na yo baklisto. Wana ezali yo esika moko na bandeko mibali mpe bandeko basi na elimo, ebongi ete lisolo ezala na nivo moko malamu, oyo ebongi na baministre ya nsango malamu. Bozali wana bobele mpo na kolekisa ntango te kasi mpo na kolendisana.
18 Mabaku mazali mingi ya kosolola masolo ya kolendisa liboso mpe nsima na makita na Salle du Royaume. Kozala na momeseno ya kokende mbangumbangu te soki likita esili. Luka kosolola na bandeko mibange to baoyo bazali na eksperianse mingi, luka mpe kosolola na bandeko oyo bazali na mwa kobangabanga mpe bazali na mosolisi te. Makambo ya kosolola mazali mingi. Okoki kolobela makambo masepelisaki yo, oyo otangaki kati na Mosenzeli. Okoki mpe koloba na ntina na devuare na yo oyo okosala mbala ekoya na Eteyelo ya mosala ya Nzambe. Balobani na yo bakoki kozala na makanisi ya sika oyo okoki kosalela kati na diskur na yo, to ekoki kozala nde yo moto okopesa makanisi oyo makosalisa ndeko mosusu mpo na kobongisa lisolo na ye. Bokoki kopesana masolo na makambo bokutanaki na yango kati na mosala ya kosakola to kolobela lisusu makambo masepelisi bino koleka na likita oyo euti kosalema. Masolo motindo oyo makolendisa mpenza bayoki na biso.
19 Na ba assemblées ya minene, likoki ezali ya kosolola na bandeko mibali mpe na bandeko basi oyo bauti na bamboka ndenge na ndenge. Bandeko mingi balukaka kosolola elongo na bandeko oyo batelemi na bango na molongo mpo na kozela coca na limpa to na bandeko oyo bazali koya na bango nzela moko na assemblée mpe kozonga na bango nzela moko. Lolenge malamu ya kobandela ezali ete opesa nkombo na yo na ndeko mobali to ndeko mwasi oyo olingi kolobana na ye, mpe na nsima otuna ye nkombo na ye. Tuna ye lisusu ndenge nini ayambaki la vérité. Okomona ete lisolo moko ya elengi mpe ya kolendisa ekobima wana.
20 Ntango bozali kokende kati na teritware epai bokosakola, ezali wana libaku mosusu ya kosolola masolo ya litomba. Na esika ete bosolola makambo ya mokili, bolobana nde mpo na mitindo oyo bokoki kosalela mpo na kobanda kosakola epai ya bafandi na teritware boye to boye to kotalela masolo nini mabongi na bafandi ya teritware yango. Ezali mpe malamu ete bolobana mpo na lolenge oyo bokoki kolonga ntembe ndenge na ndenge oyo bato babimisaka. Na bantango motindo oyo, kokanisa mpe kosolola makambo na elimo ekolendisa bino mingi.—Bafil. 4:8, 9.
21-24. Soki lisolo kati na baklisto mingi ezali lisusu ya kolendisa te, okoki kosala nini?
21 Soki ozali esika moko na bandeko mibali mpe na bandeko basi mpe omoni ete lisolo ezali lisusu malamu te to ezali mpenza kolendisa te, okoki kosala nini? Ebongi ete oloba likambo moko to otuna motuna moko oyo ekokotisa lisolo na nzela moko ya litomba koleka. Benda likebi ya bandeko na likambo moko ya ntina mpe tuna mwa mituna na ntina na yango. Lisolo motindo wana ekoki kozala litomba koleka soki baoyo nyonso bazali wana batii likebi na motó ya likambo yango mpe moto na moto azwi libaku ya kopesa likanisi na ye.
22 Ntango bozali kotanga nkombo ya bandeko oyo bazali wana te, bokeba ete ezala mpo na kotónga te soko mpe kotiola; ebongi malamu kolendisa. Soki ndeko moko abandi kotónga ndeko mosusu, okozala na molende ya kozongisa lisolo na nivo malamu oyo ekoki kolendisa bayoki nyonso? Okomonisa ete ozali sembo epai na lisangá ya Jéhovah mpe okobatela matomba ya mosangani moko na yango? Bamoko bakoloba mbala mosusu ete ezali na ntina mingi te; nzokande, ebongi toyeba ete soki tobandi kotonga mosaleli moko ya Nzambe, tokokoma kino kotonga bibongiseli bikamatami na ye moko Nzambe.—Yakobo 5:9; 2 Bakol. 10:5.
23 Mbala mosusu lisolo ezali ya kosekisa. Kasi ebongi kokeba mpo ete ebimisa maloba mabe te, oyo mabongi na baklisto te. Kobosana te toli oyo ezwami na Biblia: “Tika te ete boloba nkombo na bikobo mpe makambo nyonso na mbindo mpe bilulela; ebongi bongo na babulami. Tika te ete bosoto bozala to maloba na zoba to maloba na mpamba, kasi eleki malamu kopesaka matondi.”—Baef. 5:3, 4.
24 Lokola tozali baministre ya Jéhovah, tokosenzela mikolo nyonso ete tokumisa ye na masolo na biso. Kosalaka bongo, tokolanda mpe toli kitoko oyo ntoma Paulo apesaki na maloba oyo: “Moto na moto na biso asepelisa mozalani na ye mpo na malamu na ye ete [alendisa] ye.”—Baloma 15:2.