Nkombo ya Nzambe mpe “Kondimana ya Sika”
NKOMBO ya Nzambe ezali mpenza na esika na yango kati na Makomami ya Liebele, “Kondimana ya Kala.” Atako Bayuda batikaki kotanga yango, kasi bindimeli na bango bipekisaki bango kolongola nkombo yango na ntango basalaki bakopi ya makomi ya kala ya Biblia. Yango wana, Nkombo ya Nzambe ezwami mbala mingi na Makomami ya Liebele koleka nkombo nyonso mosusu.
Nzokande, ezali lolenge moko te mpo na Makomami ya Greke ya boklisto, “Kondimana ya Sika.” Na makomi ya mokanda Emoniseli (mokanda ya nsuka na Biblia), nkombo ya Nzambe ekomami na bokuse na yango, “Yah” (kati na liloba “Aleluya”). Kasi, makomi to maniskri ya Greke ya kala na mikanda ya Biblia oyo tozali na yango lelo, kobanda Matai kino Emoniseli, moko te ezali na nkombo ya Nzambe na mobimba na yango. Esengeli kosukisa ete nkombo wana esengelaki kozala kati na yango te? Ekozala likambo ya kokamwa, mpamba te tomonaki ete bayekoli na Yesu bayebaki motuya na yango, mpe Yesu alakisaki bango ete basambelaka ete nkombo ya Nzambe ezala mosantu. Kasi, nini esalemaki?
Mpo na kokanga ntina na yango, tokomikundola liboso ete maniskri ya Makomami ya Greke ya boklisto oyo tozali na yango lelo, ezali oyo ya ebandeli te. Mikanda oyo mikomamaki mpenza na Matai, na Luka mpe na bakomi mosusu ya Biblia, misalelamaki mingi mpe miumelaki te na kobeba. Na yango, bakopi mosusu esalemaki longwa na bakopi wana, nsima na kosalelama mingi. Yango ekoki kokamwisa te, mpamba te bakopi yango esalemaki mpo na kobómba yango te, kasi mpo ete esalelama.
Lelo oyo, Makomami ya Greke ya boklisto ezali na nkóto mingi ya maniskri, kasi mingi na yango esalemaki bobele na ekeke ya minei ya ntango na biso to na nsima na yango. Likambo wana libimisi motuna oyo ete: Ekoki kozala ete Makomami ya Greke ya boklisto ebebaki liboso ya ekeke ya minei, oyo esalaki ete nkombo ya Nzambe elongolama kati na yango? Makambo mamonisi ete ezalaki bongo.
Nkombo ya Nzambe ezalaki kati na yango
Tokoki kondimisama ete ntóma Matai atyaki nkombo ya Nzambe na Evanzile na ye. Mpo na nini? Mpo ete akomaki yango liboso na Liebele. Na ekeke ya minei, Jerôme, oyo asalaki libongoli ya Biblia libengami Vulgate na Latin, ayebisaki ete: “Matai, oyo abéngamaki mpe Levi, azalaki mokɔngɔli na mpako liboso ete akóma ntóma ya yambo oyo akomaki Evanzile ya Klisto na Yudea, na monoko ya Liebele . . . Moto oyo abongolaki yango na Greke ayebani te. Epai mosusu, makomi ya Liebele mazali naino lelo kati na bibliotɛkɛ ya Kaisalia.”
Lokola Matai akomaki na Liebele, ekoki kokanisama te ete asalelaki nkombo ya Nzambe te, mingi mpenza na ntango oyo azalaki kotanga mikapo ya “Kondimana ya Kala,” epai nkombo yango ezalaki. Nzokande, bakomi mosusu ya eteni ya mibale ya Biblia, bakomelaki bato ya mikili nyonso, na yango, bakomaki na Greke, monoko oyo mozalaki kolobama mingi na eleko wana. Na ntina yango, batangaki nde makomi ya la Septante, libongoli ya Greke, kasi makomi ya Liebele ya ebandeli te. Epai mosusu, Evanzile ya Matai esukaki na kobongolama na Greke. Kasi, nkombo ya Nzambe ezalaki kati na makomi wana ya Greke?
Likambo ya esengo, biteni ya libongoli la Septante oyo ezalaki na eleko na Yesu, ezali kino na mikolo na biso, mpe tosengeli koyeba ete nkombo ya Nzambe ezali kati na yango. The New International Dictionary of New Testament Theology (Volume 2, lokasa 512) elobi ete: “Makomi oyo mauti kokundolama kala mingi te, mazali kokweisa likanisi oyo ete babimisi ya LXX [la Septante] babongolaki Tétragramme YHWH na kyrios. MSS [maniskri] ya LXX ya kala oyo tozali na yango (na biteni), ezali na Tétragramme oyo ekomami na Lieb[ele] kati na makomi ya Gre[ke]. Bayuda oyo bazalaki babongoli ya K[ondimana] ya K[ala], balandaki kosala bongo na boumeli na bikeke ya liboso nsima na Yesu Klisto.” Na yango, ata soko batangaki Makomami ya Liebele to ya Greke, Yesu mpe bayekoli na ye bakokaki bobele kokuta nkombo ya Nzambe kati na yango.
Na yango, George Howard, molakisi na université ya Géorgie, na Etats-Unis, apusamaki na koloba ete: “Lokola La Septante oyo esalelamaki mpe etangamaki na Lingomba ya Kondimana ya Sika ezalaki na nkombo ya Nzambe na Liebele, na ntembe te, babongoli ya Kondimana ya Sika babatelaki Tétragramme kati na mikapo oyo batangaki.” (Biblical Archaeology Review, ya mars 1978, lokasa 14) Na lotómo nini bakokaki kosala lolenge mosusu?
Nkombo ya Nzambe etikalaki ntango molai kati na mabongoli ya “Kondimana ya Kala” na Greke. Na ndambo ya liboso ya ekeke ya mibale ya ntango na biso, Akila, moto oyo abongwanaki na lingomba ya Bayuda, asalaki libongoli ya sika ya Greke ya Makomami ya Liebele, kati na yango atyaki nkombo ya Nzambe na Tétragramme na Liebele ya kala. Na ekeke ya misato, Origène akomaki ete: “Kati na maniskri oyo ebebisamaki te, NKOMBO yango ekomami na makomi ya Liebele ya kala, kasi na Liebele ya lelo oyo te.”
Lisusu, na ekeke ya minei, Jerôme akomaki na maloba ya ebandeli ya mikanda ya Samwele mpe Mikonzi ete: “Lelo, tozali mpe kokuta nkombo ya Nzambe, Tétragramme [יהוה], kati na barulo mosusu ya Greke na makomi ya kala.”
Nkombo ya Nzambe elongolami
Nzokande, na eleko wana, lipɛngwi oyo lisakolamaki na Yesu libandaki kobima, mpe nkombo ya Nzambe ezalaki kosalelama lisusu mingi te, atako ezalaki kati na makomi. (Matai 13:24-30; Misala 20:29, 30) Na boumeli ya ntango, batangi mingi bakokaki lisusu kososola yango te. Yango wana Jerôme alobaki ete “basusu bayebaki yango te, mpo ete makomi na yango ezalaki lokola lolenge moko, mpe na ntango bazalaki kokuta [Tétragramme] na mikanda ya Greke, bazalaki kotanga yango ete ΠΙΠΙ.”
Kati na bakopi ya la Septante oyo ebimaki nsima, nkombo ya Nzambe elongolamaki mpe batyaki maloba “Nzambe” (The·osʹ) mpe “Nkolo” (Kyʹri·os) na esika na yango. Tososoli malamu ete, yango esalemaki bongo, mpamba te tozali na biteni ya kala ya la Septante oyo bizali na nkombo ya Nzambe, nzokande bakopi ya la Septante oyo esalemaki nsima ezali na nkombo ya Nzambe kati na yango te.
Likambo motindo moko lisalemaki kati na “Kondimana ya Sika,” to Makomami ya Greke ya boklisto. Molakisi George Howard abakisi ete: “Wana nkombo ya Nzambe na Liebele elongolamaki kati na La Septante mpe batyaki maloba ya Greke na esika na yango, mpe elongolamaki kati na mikapo ya Kondimana ya Sika oyo mitangamaki na la Septante. . . . Mosika te, nkombo ya Nzambe eyebanaki soko moke te kati na Eklezia ya bato na mabota, bobele bankombo oyo bakitanyaki na esika na yango to bobele balakisi na bango nde bazalaki komikundola nkombo yango.”
Na yango, wana Bayuda baboyaki kotanga nkombo ya Nzambe, Lingomba ya boklisto ya lipɛngwi elongolaki yango mpenza kati na maniskri ya Greke mpe na mabongoli mosusu ya biteni mibale ya Biblia.
Mposa ya kozongisa nkombo ya Nzambe
Lokola tomonaki yango, nkombo ya Nzambe esili kozongisama na mabongoli mingi ya Makomami ya Liebele. Kasi, ezali boni mpo na Makomami ya Greke? Babongoli mpe bayekoli ya Biblia bamonaki mpenza ete, kozanga nkombo ya Nzambe mikapo misusu ya Makomami ya Greke ya boklisto mizali mpasi mpo na kokanga ntina na yango. Kozongisa nkombo yango na bisika bisengeli ezali lisungi monene mpo na bososoli malamu mpe ya polele ya biteni wana ya Liloba lipemami na Nzambe.
Na ndakisa, totalela maloba ya Paulo epai na Baloma. Ezwami kati na Biblia Lingala Haut-fleuve, ete: “Moto na moto oyo akobelela nkombo na Nkolo akobika.” (Baloma 10:13) Nkombo nini tosengeli kobelela mpo na kobika? Lokola Yesu abéngami mbala mingi ete “Nkolo,” mpe verset mosusu elobi ete: “Ndimela Nkolo Yesu mpe okobika,” tosengeli kosukisa ete Paulo alobelaki Yesu?—Misala 16:31, Biblia Lingala Haut-fleuve.
Bongo te. Mpo ete na Baloma 10:13, na note na nsé ya lokasa, libongoli Biblia Lingala Haut-fleuve etindi biso na Yoele 2:32, kati na Makomami ya Liebele. Soki ofungoli Biblia na esika wana, okomona ete Paulo atangaki maloba ya Yoele kati na mokanda na ye epai na Baloma. Nzokande Yoele alobaki na Liebele ya ebandeli ete: “Moto na moto oyo akobelela nkombo na Yawe [Yehova, NW], akobika.” (Yoele 2:32, Biblia Lingala Haut-fleuve) Ya solo, emonani ete Paulo asɛngaki biso ete tobelela nkombo ya Yehova. Na yango, atako tosengeli kondimela Yesu, nzokande lobiko na biso etali mpenza lolenge oyo tozali kotalela nkombo ya Nzambe.
Ndakisa oyo emonisi lolenge oyo makanisi ya bato mabulunganaki kino kokanisa ete Yesu mpe Yehova bazali sé moto moko, mpo ete nkombo ya Nzambe elongolamaki na Makomami ya Greke. Na ntembe te, yango elendisaki mpenza bokóli ya liteya ya Bosato!
Esengelaki kozongisa nkombo ya Nzambe?
Lokola nkombo ya Nzambe ezwami te kati na bamaniskri oyo tozali na yango lelo, mobongoli azali na lotómo mpo na kozongisa yango? Ee, azali na yango. Epai mosusu, mikanda mikolimbolaka maloba ya Greke, miyebisi ete kati na Biblia, liloba “Nkolo” lilobelami mbala mingi mpo na Yehova. Na ndakisa, na nsé na liloba Kyʹri·os (“Nkolo”), mokanda A Greek and English Lexicon of the New Testament ya Robinson (enyatámaki na 1859), emonisi “Nzambe lokola Nkolo aleki likoló, Moyangeli ya molóngó mobimba. Kati na La Sept[ante], esalelami na liloba ya Lie[bele] oyo ete יְהוָֹה Yehova.” Na yango, ntango Makomami ya Greke ya boklisto ezali kotanga Makomami ya Liebele, mobongoli azali na lotómo ya kobongola liloba Kyʹri·os na liloba “Yehova,” na bisika nyonso oyo nkombo ya Nzambe ekomamaki na Liebele ya ebandeli.
Babongoli mingi basalaki yango. Kobanda ekeke ya zomi na minei, mabongoli mingi ya Makomami ya Greke ya boklisto masalemaki na monoko ya Liebele. Babongoli basalaki nini wana bakutaki nkombo ya Nzambe na bisika oyo batangaki “Kondimana ya Kala”? Mbala mingi, basalaki makasi mpo na kozongisa yango kati na makomi. Nkombo ya Nzambe ezwami kati na mabongoli mingi ya Makomami ya Greke ya boklisto na ndambo to na mobimba na yango, na monoko ya Liebele.
Mabongoli mosusu na minoko ya lelo, mingi mpenza oyo esalelami na bamisionere, ezali kosala bongo. Yango wana, mabongoli mingi ya Makomami ya Greke na nkotá ya Afrika, ya Azia, ya Amerika mpe na bisanga ya Pacifique, esaleli mingi mpenza nkombo ya Nzambe, mpo ete batangi na yango bakoka mpenza komona kokesena oyo ezali kati na Nzambe ya solo mpe banzambe ya lokutá. Nkombo yango ezwami mpe kati na mabongoli na nkotá ya mikili ya Mpótó.
Traduction du monde nouveau ezali moko na mabongoli oyo mazali kozongisa nkombo ya Nzambe na esika na yango mpe na lolenge lobongi kati na Makomami ya Greke ya boklisto. Libongoli wana libimisami sikawa na minoko 13, esili kozongisa nkombo ya Nzambe na esika nyonso oyo Makomami ya Greke mazali kotanga Makomami ya Liebele. Nkombo ya Nzambe ezwami mbala 237 na libongoli wana na Makomami ya Greke.
Batɛmɛli na nkombo ya Nzambe
Atako milende nyonso oyo misalemaki na babongoli mingi mpo na kozongisa nkombo ya Nzambe kati na Biblia, mangomba bamekaki ntango nyonso kolongola yango. Bayuda batikaki yango kati na Biblia na bango, kasi baboyaki kobénga yango. Baklisto bapɛngwi na ekeke ya mibale mpe na ekeke ya misato balongolaki yango wana basalaki bakopi ya makomi ya Biblia na Greke mpe na ntango babongolaki Biblia. Babongoli mosusu ya ntango na biso balongolaki mpe yango, atako mabongoli na bango masalemaki longwa na makomi ya ebandeli na Liebele, epai nkombo yango ezwami soko mbala 7 000. (Ezwami mbala 6 973 na makomi ya Liebele, na Les Saintes Ecritures—Traduction du monde nouveau.)
Lolenge nini Yehova azali kotalela baoyo bazali kolongola nkombo na ye na Biblia? Soki ozalaki mokomi, mbɛlɛ ezaleli na yo ekozala nini epai na moto oyo azali kosala nyonso ete alongola nkombo na yo kati na buku oyo yo okomaki? Babongoli oyo baboyi kosalela nkombo ya Nzambe na kolukáká komilóngisa mpo na likambo litali ebéngeli to na kolanda momeseno ya Bayuda, bakokani na bato oyo Yesu alobaki na ntina na bango ete: “Bino bakambi bakufi miso. Bozali kokanga ngungi na ekɔngɛlo nde bokomelaka kamela!” (Matai 23:24, NW) Bobele bongo, bango mpe bazali kosala ete makambo mike makóma makambo minene—kino kolongola nkombo ya moto oyo aleki monene na molóngó mobimba, na buku oyo epemami na ye moko.
Na kala, mokomi na Nzembo atunáká ete: “Ɛ Nzambe, kino ntango nini motɛmɛli akotukatuka? Moyini akotyola nkombo na yo seko?”—Nzembo 74:10, NW.
[Etanda na lokasa 25]
“NKOLO”—ekokani na “Yehova”?
Na kotyáká ba titres lokola “Nkolo” to “Nzambe” na esika ya nkombo ya Nzambe mpenza kati na Biblia, makomi mabebisami na mitindo mikeseni. Ya liboso, maloba mosusu mazali kobungisa ndimbola na yango. Na maloba na yango ya ebandeli, Bible de Jérusalem (angl.) elobi ete: “Koloba ete, ‘Nkolo azali Nzambe’ elobeli bobele likambo moko [bozongeli bozangi ntina], kasi ezali motindo moko te soki tolobi ‘Yahweh azali Nzambe.’”
Lisusu, bankombo wana ekoki mbala mosusu koyeisa maloba mpasi mpo na kokanga ntina na yango. Na ndakisa, na Biblia Lingala Uele, Nzembo 8:9 elobi ete: “O MOKONZI, Mokonzi na bisu, Kombo na Yo aliki kulika kombo nyoso na mokili!” Nzokande, ekoki bobele kozongisa nkombo Yehova na esika na yango mpo ete maloba wana mayokama malamu! Verset wana emonisami na Biblia Lingala Haut-fleuve (1970), ete: “Ɛ Yawe [Yehova], Nkolo na biso, nkombo na yo ejali na nkembo mingi kati na mokili mobimba.”
Kolongola nkombo wana ekoki komema na mobulungano. Nzembo 110:1 elobi ete: “MOKONZI alubaki na Mokonzi na ngai, Otikali na maboko drwati na ngai, Akumi na mikolo Ngai akumisa bayina na Yo sika na kutia maguru na Yo.” (Biblia Lingala Uele) Nani azali koloba na mosusu? Esengeli kobongolama na lolenge oyo eleki malamu, ete: “Yehova alobaki na Nkolo na ngai ete: ‘Fanda na lobɔkɔ na ngai ya mobali, kino nakotya bayini na yo lokola etyelo ya makolo na yo.’”—Traduction du monde nouveau.
Lisusu, kotya liloba “Nkolo” na esika ya nkombo “Yehova” ezali kolongola moko na makambo ya ntina ya Biblia: nkombo ya Nzambe. Mokanda The Illustrated Bible Dictionary (Volume 1, lokasa 572) eyebisi ete: “Na bokuse, Yahweh ezali ‘nkombo’ bobele moko ya Nzambe.”
Mokanda The Imperial Bible-Dictionary (Volume 1, lokasa 856) emonisi kokesena ezali kati na “Nzambe” (Elohim) mpe “Yehova,” ete: “Na bipai binso, [Yehova] ezali nkombo-bomei oyo emonisi Nzambe ye moko mpe bobele ye moko; nzokande Elohim ezali nkombo-lisangá oyo esalelami mbala mingi mpo na komonisa Oyo aleki likoló, kasi ezali ntango nyonso bongo te.”
J. A. Motyer, directeur ya eteyelo Trinity College, na Angleterre, abakisi ete: “Botangi ya Biblia ekozanga ntina na yango soki liloba [Nkolo to Nzambe] etyami na esika ya nkombo ya Nzambe mpenza, nkombo na ye moko. Na koyebisáká nkombo na ye epai na libota na ye, Nzambe alingaki kolakisa bango bomoto na ye mpenza.”—Eerdmans’ Handbook to the Bible, lokasa 157.
Na bongo, ekoki kosalema te ete titre mpamba ezwa esika ya nkombo mpenza ya moto, oyo ekesenisi ye na bato mosusu. Nkombo ya Nzambe ezali na ndimbola monene mingi mpe liloba mosusu ekoki kozwa esika na yango te.
[Etanda/Bililingi na lokasa 26]
Eteni ya libongoli la Septante (na lobɔkɔ ya mobali) oyo ezali na mikapo mibale ya Zakaria (Zek. 8:19-21 mpe Zek. 8:23 kino 9:4), ekomamaki na ekeke ya liboso ya Ntango na Biso. Ebómbami na ndako ya biloko ya kala ya Yisraele, na Yelusaleme. Nkombo ya Nzambe ezwami mbala minei, misato na yango emonisami awa na elilingi. Na maniskri Alexandrinus (na lobɔkɔ ya mwasi), kopi ya libongoli la Septante oyo ekomamaki mbula 400 na nsima, na esika ya nkombo ya Nzambe, batyaki, bobele na mikapo wana moko, makomi KY mpe KC, nkomá mokuse ya liloba Kyʹri·os (“Nkolo”)
[Etanda na lokasa 27]
Mpo na kolimbola ntina oyo azalaki kondima ete nkombo ya Nzambe esengeli kozala kati na Biblia, John W. Davis, oyo azalaki misionere na Chine na ekeke ya zomi na libwa, alobaki ete: “Soki Elimo-Santu elobi Yehova na esika boye to boye na makomi ya Liebele, mpo na nini mobongoli akotya Yehova te na Lingelesi to na Chinois? Lotómo nini azali na yango mpo na koloba ete, awa nakosalela Yehova nde kuna natya nkombo mosusu? . . . Soki moto moko amoni ete asengeli te kotya nkombo Yehova na bisika mosusu, tika ete ayebisa bantina; tika ete apesa bilembeteli. Nkutu ekozala likambo moke te, akozala nde na mpasi mpo na koyanola na motuna oyo ya pɛtɛɛ, ete: Soki ebongi te kosalela Yehova kati na mabongoli, mpo na nini mokomi oyo apemamaki na Nzambe asalelaki yango kati na makomi ya ebandeli?”—The Chinese Recorder and Missionary Journal, Volume VII, Shangai, 1876.
[Elilingi na lokasa 23]
Traduction du monde nouveau esaleli malamu nkombo ya Nzambe mbala 237 kati na Makomami ya Greke ya boklisto
[Bililingi na lokasa 24]
Nkombo ya Nzambe na ndakonzambe moko na Minorque, na esanga ya Baléares, Espagne;
na ekeko ya Cempuis, pene na Paris, France;
mpe na ndakonzambe San Lorenzo ya Parme, na Italia