Kozonga ya Kristo
Ndimbola: Liboso Yesu Kristo alongwa na mabele, alakaki ete akozonga. Makambo ya esengo oyo etali Bokonzi ya Nzambe ekosalema ntango elaka yango ekokokisama. Esengeli koyeba ete koya ekeseni na kozala. Na yango, koya ya moto (elingi koloba kokóma to kozonga na ye) ekoki kosalema na ntango moko boye, kasi kozala na ye ekoki koumela bambula mingi nsima ya koya na ye. Na Biblia, liloba ya Grɛki erkhomai (oyo elimboli “koya”) oyo esalelami mpo na Yesu, emonisi ete atye likebi na ye na mosala moko boye ya ntina mingi, na ntango moko boye na boumeli ya kozala na ye, elingi koloba, ntango Yehova akotinda ye aboma bato mabe na etumba ya mokolo monene ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.
Makambo oyo ekosalema na ntango ya kozala ya Kristo ekozwa kaka ntango moke to ekoumela bambula mingi?
Mat. 24:37-39: “Ndenge ezalaki na mikolo ya Noa, kozala [“koya,” hf, KSM; “kozala,” Yg, Ro, ED; Grɛki, parousia] ya Mwana ya moto ekozala mpe bongo. Mpo ndenge bazalaki na mikolo oyo ezalaki liboso ya mpela: bazalaki kolya mpe komɛla, mibali bazalaki kobala mpe basi bazalaki kobalisama, tii mokolo oyo Noa akɔtaki na masuwa; mpe batyaki likebi te tii mpela eyaki mpe ekɔmbɔlaki bango nyonso, kozala ya Mwana ya moto ekozala mpe bongo.” (Vɛrsɛ oyo emonisi ete makambo oyo esalemaki “na mikolo ya Noa” eumelaki bambula mingi. Yesu akokanisaki kozala na ye na ntango wana.)
Matai 24:37 esaleli liloba ya Grɛki parousia. Liloba yango elimboli mpenzampenza “kozala elongo na.” Diksionɛrɛ moko (Greek-English Lexicon, Oxford, 1968) ya Liddell ná Scott elobi ete liloba parousia elimboli libosoliboso “kozala, ya bato.” Ndimbola ya liloba yango emonani polele na Bafilipi 2:12, esika Paulo akesenisi kozala na ye (parousia) na kozala na ye te (apousia). Lisusu, ntango Matai 24:30 elobi ete “Mwana ya moto azali koya na mapata ya likoló na nguya mpe na nkembo mingi” esaleli liloba ya Grɛki erkhomenon mpo na komonisa ntango oyo Yehova akotinda Yesu aboma bato mabe na etumba ya Armagedona. Babongoli mosusu basaleli liloba ‘koya’ mpo na maloba nyonso mibale ya Grɛki, kasi babongoli mosusu oyo bazali na bokɛngi mingi bakesenisaka maloba yango mibale.
Ntango Kristo akozonga, bato bakomona ye na miso?
Yoa. 14:19: “Etikali moke mpe mokili ekomona ngai lisusu te, kasi bino [bantoma ya sembo ya Yesu] bokomona ngai, mpo nazali na bomoi mpe bino bokozala na bomoi.” (Yesu alakaki bantoma na ye ete akoya lisusu mpe akomema bango na likoló mpo bázala elongo na ye. Bakomona ye mpo bakozala bikelamu ya elimo lokola ye. Kasi mokili ekomona ye lisusu te. Talá 1 Timote 6:16.)
Mis. 13:34: “[Nzambe] asekwisaki ye [Yesu] uta na bakufi mpo azonga lisusu na kopɔla te.” (Nzoto ya bato epɔlaka. Yango wana 1 Bakorinti 15:42, 44 esaleli liloba “kopɔla” mpo na kolobela “nzoto ya mosuni.” Yesu akozongela nzoto ya ndenge wana lisusu te.)
Yoa. 6:51: “Ngai nazali limpa ya bomoi oyo euti na likoló; soki moto azali kolya limpa yango akozala na bomoi libela; mpe, ya solo, limpa oyo nakopesa ezali mosuni na ngai mpo na bomoi ya mokili.” (Lokola Yesu asilaki kopesa nzoto yango, akozongela yango lisusu te. Soki azongeli yango, akopimela bato bolamu ya mbeka ya bomoi na ye ya kokoka.)
Talá mpe nkasa 228, na motó ya likambo “Konɛtwa.”
Yesu akozonga “ndenge kaka” akendaki na likoló, yango elimboli nini?
Mis. 1:9-11: “Ntango [bantoma ya Yesu] bazalaki kotala, atombwamaki mpe lipata ezipaki ye na miso na bango. Mpe wana bazalaki kaka kotala na likoló ntango azalaki kokende, lisusu, talá! mibali mibale na bilamba ya mpɛmbɛ batɛlɛmaki pembeni na bango, mpe balobaki ete: ‘Mibali ya Galile, mpo na nini botɛlɛmi bozali kotala likoló? Yesu wana, oyo azalaki na bino mpe akamatami na likoló, akoya mpe bongo ndenge kaka bomonaki ye azali kokende na likoló.’” (Simbá ete vɛrsɛ yango elobi ete akozonga “ndenge kaka” akendaki, kasi elobi te ete akozonga na nzoto yango kaka. “Ndenge” nini akendaki? Ndenge vɛrsɛ 9 emonisi yango, lipata ezipaki ye na miso na bango, kaka bayekoli na ye nde bamonaki ndenge azali kokende. Bato ya mokili bayebaki te ete azongi na likoló. Ekozala mpe bongo ntango Kristo akozonga.)
Maloba oyo ‘azali koya na mapata’ mpe ‘liso nyonso ekomona ye’ elimboli nini?
Em. 1:7: “Talá! Azali koya na mapata, mpe liso nyonso ekomona ye, ná baoyo batɔbɔlaki ye; mpe mabota nyonso ya mabele bakomibɛta na mpasi mpo na ye.” (Talá mpe Matai 24:30; Marko 13:26; Luka 21:27.)
Liloba “mapata” elimboli nini? Elimboli kozanga komonana. Ntango mpɛpɔ elekaka na kati ya lipata moko ya moindo to likoló ya mapata, bato oyo bazali na nse bamonaka yango te, kasi bayokaka lokito na yango. Yehova alobaki na Moize ete: “Nazali koya epai na yo kati na lipata ya moindo.” Moize amonaki Nzambe te, kasi lipata emonisaki ete Yehova azali wana atako azalaki komonana te. (Kob. 19:9; talá mpe Balevi 16:2; Mitángo 11:25.) Soki esɛngi ete bato bámona Kristo na miso na likoló, emonani polele ete “liso nyonso” ekoki komona ye te. Na ndakisa, soki abimi na likoló na Australie, bato ya Mpoto, ya Afrika, mpe ya Amerika bakomona ye?
Na ndenge nini ‘liso nyonso ekomona ye’? Bato bakososola na nzela ya makambo oyo ekosalema awa na mabele ete Yesu azali, atako azali komonana na miso te. Lisusu, Yoane 9:41 elobeli komona oyo ezali ya miso te ntango elobi ete: “Yesu alobaki na [Bafarisai] ete: ‘Soki bozalaki bato bakufá miso, mbɛlɛ bozali na lisumu te. Kasi sikoyo bozali koloba ete: “Tomonaka.” Lisumu na bino ezali kaka.’” (Talá Baroma 1:20.) Nsima ya kozonga ya Kristo, bato mosusu bakondimela ye; bakososola elembo ya kozala na ye. Bato mosusu bakoboya kondima, kasi ntango Nzambe akotinda Kristo aboma bato mabe, bakososola ete nguya yango euti na Nzambe kasi na bato te. Bakoyeba nini ezali kokómela bango mpo bakebisaki bango liboso. Mpo na makambo oyo ekokómela bango “bakomibɛta na mpasi.”
“Baoyo batɔbɔlaki ye” ezali banani? Maloba yango elimboli libosoliboso makambo oyo basoda ya Roma basalelaki Yesu ntango babomaki ye. Kasi basoda yango bakufá kala. Na yango, maloba yango ezali mpenza kolobela baoyo bazali konyokola, to ‘kotɔbɔla,’ bayekoli ya solo ya Kristo na mikolo ya nsuka ya mokili oyo mabe.—Mat. 25:40, 45.
Tokoki mpenza koloba ete moto ‘ayei’ to ‘azali’ soki azali komonana na miso te?
Ntoma Paulo alobaki ete ‘na nzoto azali te’ na lisangá ya Korinti, ‘kasi na elimo azalaki’ na bango.—1 Ko. 5:3.
Yehova alobaki ete ‘akokita’ kobulunganisa monɔkɔ ya bato oyo bazalaki kotonga ndako molai ya Babele. (Eba. 11:7) Alobaki lisusu ete ‘akokita’ kosikola Yisraele na boombo ya Ezipito. Mpe Nzambe alendisaki Moize ete, “Ngai moko nakokende elongo na yo” mpo na kokamba Yisraele tii na Mokili ya Ndaka. (Kob. 3:8; 33:14) Atako bongo, moto moko te amonaki Nzambe.—Kob. 33:20; Yoa. 1:18.
Wapi mwa makambo oyo Biblia elobi ete ekosalema na ntango ya kozala ya Kristo?
Dan. 7:13, 14: “Moto moko lokola mwana ya moto azalaki koya na mapata ya likoló; mpe balekisaki ye epai ya Mokóló na Mikolo [Yehova Nzambe], mpe babɛlɛmisaki ye liboso na Oyo wana. Mpe bapesaki ye boyangeli, lokumu ná bokonzi, mpo bato ya bikólo, bituluku ya bato ya bikólo mpe minɔkɔ nyonso básalela ye.”
1 Tes. 4:15, 16: “Talá oyo tozali koyebisa bino na kolanda liloba ya Yehova: ete biso bato ya bomoi oyo tozali kotikala tii na kozala ya Nkolo tokoleka soki moke te liboso ya baoyo balali na kati ya liwa; mpo Nkolo ye moko akokita uta na likoló na mbela ya komanda, na mongongo ya anzelu-mokonzi mpe na kelelo ya Nzambe, mpe baoyo bakufá na kati ya bomoko elongo na Kristo bakosekwa liboso.” (Na yango, baoyo bakoyangela elongo na Kristo bakosekwa mpo na kozala na ye na likoló—libosoliboso baoyo bakufaki liboso Nkolo azonga, mpe na nsima baoyo bakokufa nsima ya kozonga na ye.)
Mat. 25:31-33: “Ntango Mwana ya moto akoya na nkembo na ye mpe baanzelu nyonso elongo na ye, bongo akofanda na kiti na ye ya bokonzi ya nkembo. Mpe bikólo nyonso bakoyangana liboso na ye, mpe akokabola bato, mosusu epai oyo mosusu epai oyo, ndenge mobateli ya mpate akabolaka bampate ná bantaba. Mpe akotya bampate na lobɔkɔ na ye ya mobali, kasi bantaba na lobɔkɔ na ye ya mwasi.”
2 Tes. 1:7-9: “Epai na bino baoyo bozali kozwa bolɔzi, kopema elongo na biso na ntango ya emoniseli ya Nkolo Yesu uta na likoló elongo na baanzelu na ye ya nguya na kati ya mɔtɔ ya kopela, ntango akozongisa mabe na baoyo bayebi Nzambe te mpe baoyo bazali kotosa te nsango malamu oyo etali Nkolo na biso Yesu. Bato yango mpenza bakozwa etumbu ya lisambisi ya libebi ya seko uta na liboso ya Nkolo mpe uta na nkembo ya bokasi na ye.”
Luka 23:42, 43: “[Mosali-mabe oyo ayokelaki Yesu mawa, oyo babakaki pene na ye] alobaki ete: ‘Yesu, kanisá ngai ntango okokɔta na bokonzi na yo.’ Mpe ye alobaki na ye ete: ‘Ya solo nazali koyebisa yo lelo: Okozala na ngai na Paradiso.’” (Na boyangeli ya Yesu, mabele mobimba ekokóma paradiso; bakufi oyo Nzambe abombi na makanisi na ye bakosekwa mpe bakozala na bomoi ya kokoka libela awa na mabele.)
Talá mpe nkasa 359-364, na motó ya likambo “Mikolo ya nsuka.”