Mokanda ya Biblia nimero 18—Yobo
Mokomi: Mose
Esika ya bokomi: Mokili mokauki
Nsuka ya bokomi: soko 1473 L.T.B.
Boumeli ya lisoló: Koleka mbula 140 katikati na 1657 mpe 1473 L.T.B.
1. Nkombo ya Yobo elimboli nini, mpe mokanda ya Yobo ezali koyanola na mituna nini?
EZALI moko na mikanda ya kala mpenza ya Makomami mapemami na Nzambe! Mokanda oyo etalelami na motuya mingi mpenza mpe maloba na yango mazongelamaka mingi kati na mikanda mosusu, kasi ezali mpe mokanda oyo bato basosolaka yango na bozindo te. Mokanda yango mokomamaki mpo na nini, mpe ezali na motuya nini mpo na biso lelo? Tokoki kozwa eyano na motuna oyo na kotalela ndimbola ya nkombo ya Yobo: “Eloko eyinami.” Ɛɛ, mokanda yango ezali koyanola na mituna mibale ya ntina mingi: Mpo na nini bato malamu bamonaka mpasi? Mpo na nini Nzambe atiki nzela na mabe awa na mabelé? Tozali na lisoló oyo ezali kolobela mpasi oyo Yobo akutanaki na yango mpe ezali kolobela ezaleli na ye monene ya bompikiliki, oyo tosengeli kotalela mpo na koyanola na mituna yango. Nyonso esilaki kokomama, bobele lokola Yobo asɛngaki yango.—Yobo 19:23, 24.
2. Nini emonisi ete Yobo azalaki mpenza moto ya solo?
2 Ntango nkombo ya Yobo elobelami, ezali mbala moko kokundwela biso ezaleli ya motema molai mpe ya koyika mpiko. Kasi Yobo azalaki mpenza moto ya solo? Atako Zábolo asalaki milende mpo na kolimwisa ndakisa oyo ya bosembo kati na lisoló ya bato, kasi eyano ezali polele. Yobo azalaki mpenza moto ya solo! Yehova atángi ye kati na molɔngɔ́ ya batatoli na Ye, Noa mpe Danyele, oyo Yesu Klisto andimaki ete bazalaki solo na bomoi. (Ezek. 14:14, 20; kokanisá na Matai 24:15, 37.) Baebele ya kala batalelaki Yobo ete azalaki mpenza moto ya solo. Yakobo, ye mokomi moklisto, alobeli ndakisa ya koyika mpiko ya Yobo. (Yak. 5:11) Bobele ndakisa ya likambo oyo esalemaki mpenza kati na bomoi ya moto moko, kasi ya makanisi mpamba te, nde ekoki kozala na motuya, kondimisáká bongo basambeli ya Nzambe ete moto akoki ntango nyonso komonisa bosembo ata kati na mikakatano ya lolenge nini oyo ekoki kokómela ye. Lisusu, nguya mpe mayoki ya maloba makomami kati na Yobo emonisi ete likambo yango lizali solo.
3. Elembeteli nini emonisi ete mokanda ya Yobo epemamaki na Nzambe?
3 Bosolo mpe kopemama ya mokanda ya Yobo emonisami mpe kati na likambo oyo ete Baebele ya kala bazalaki ntango nyonso kotánga yango kati na molɔngɔ́ ya mikanda oyo bango bazalaki kondima ete ezali mikanda ya Biblia, ezali bongo likambo ya kobenda likebi mpamba te Yobo azalaki Moyisalaele te. Longola Ezekiele mpe Yakobo, Paulo mpe alobeli mokanda yango. (Yobo 5:13; 1 Kol. 3:19) Elembeteli ya nguya oyo endimisi ete mokanda yango mopemami emonisami kati na likambo oyo ete ezali na boyokani makasi na makambo ya solo ya siansi. Lolenge nini ekokaki koyebana ete Yehova “akakisi mabelé likoló na eloko te,” na ntango oyo bato bazalaki na makanisi mazangi moboko na ntina na lolenge oyo mabelé masimbamaki? (Yobo 26:7, NW) Moko na makambo oyo ezalaki kolobama na ntango ya kala ezalaki ete mabelé matyamaki likoló na banzoku minene oyo batɛlɛmi likoló na nkobá monene ya mai na monana. Mpo na nini mokanda ya Yobo molobeli te makambo wana ya mpambampamba? Na ntembe te, ezali mpo ete Yehova Mozalisi ayebisaki ye makambo ya solo na nzela ya kopemama. Makambo mosusu mingi oyo malobelami na ntina na mabelé mpe biloko na yango ya kokamwisa mpe na ntina na banyama ya zámba mpe ndɛkɛ kati na efandelo na bango eyebisami na bosikisiki mpenza, yango wana tokoki koloba ete bobele Yehova Nzambe nde azali Mobandisi ya mokanda ya Yobo mpe bobele Ye nde apemisaki yango.a
4. Ntango nini mpe epai wapi lisoló yango elekaki, mpe kokomama ya mokanda ya Yobo esukaki na ntango nini?
4 Yobo azalaki kofanda na mboka Usa, mpe engebene bato ya zébi ya mikili, mboka yango ezwami pene na nɔ́rdi ya Arabie pene na mabelé oyo Baedome bazalaki kofanda mpe ezalaki bongo na ɛ́sti ya mokili oyo elakamaki mpo na bana ya Abalayama. Bato ya Seba bazalaki na súdi, mpe Bakaladi bazalaki na ɛ́sti. (1:1, 3, 15, 17) Eleko oyo Yobo akutanaki na mikakatano ezalaki bongo mbula mingi nsima na eleko ya Abalayama. Na eleko yango ezalaki na moto ‘mosusu lokola [Yobo] kati na mokili te, moto malamu bɛ mpe na sembo.’ (1:8) Emonani ete ezalaki bongo na nsima ya liwa ya Yosefe (1657 L.T.B.), moto oyo azalaki na kondima makasi, mpe liboso ete Mose abanda kolanda nzela na ye ya bosembo. Yobo amipesaki mobimba kati na losambo ya solo na eleko oyo Yisalaele ebebisamaki na losambo ya bademó oyo ezalaki kosalema na Ezipito. Lisusu, misala oyo milobelami na mokapo ya liboso ya Yobo, mpe lolenge oyo Nzambe andimaki Yobo lokola mosambeli ya solo, emonisi ete makambo yango masalemaki na eleko ya batata ya mabota, kasi te na nsima ya mobu 1513 L.T.B., wana Nzambe azalaki na boyokani bobele na libota ya Yisalaele na nsé ya Mibeko. (Amo. 3:2; Ef. 2:12) Na yango, na kotalela likambo oyo ete Yobo aumelaki bambula mingi na bomoi, emonani ete búku yango ekomamaki na eleko oyo ezalaki katikati na 1657 L.T.B. mpe 1473 L.T.B., mbula oyo Mose akufaki; Mose asilisaki kokoma mokanda yango mwa moke nsima ya liwa ya Yobo mpe wana Bayisalaele bazalaki kati na mokili mokauki.—Yobo 1:8; 42:16, 17.
5. Nini emonisi ete Mose nde akomaki mokanda ya Yobo?
5 Mpo na nini tolobi ete Mose nde akomaki yango? Yango ezali likambo oyo ezalaki kolobama uta kala kati na banganga-mayele ya Bayuda mpe baklisto ya ekeke ya liboso. Lolenge oyo Baebele bazalaki kokoma maloba na bango ya ntɔ́ki na nguya nyonso esalelami kati na mokanda ya Yobo, yango emonisi polele ete mokanda yango mokomamaki liboso mpenza na lokótá ya Liebele, lokótá oyo Mose azalaki koloba. Ekokaki te kozala libongoli uta na lokótá mosusu, lokola Arabe. Lisusu, makomi na yango ya ntɔ́ki makokani mingi mpenza na Pantatɛ́kɛ koleka makomi nyonso mosusu kati na Biblia. Moto oyo akomaki yango asengelaki mpenza kozala Moyisalaele, lokola Mose, mpamba te ‘Nzambe apesaki Bayuda maloba na ye.’ (Lom. 3:1, 2) Nsima ya kokóma mokóló, Mose alekisaki mbula 40 kati na Midiani, pene na Usa, epai kuna akokaki kozwa makambo ya sikisiki oyo akomaki kati na mokanda ya Yobo. Na nsima, na ntango alekaki pembeni ya mboka oyo Yobo azalaki kofanda wana Bayisalaele balekisaki mibu 40 kati na mobembo na bango na mokili mokauki, Mose akokaki kozwa mpe kokoma makambo ya sikisiki oyo mazwami na nsuka ya mokanda yango.
6. Makambo nini mamonisi ete mokanda ya Yobo ezali te bobele mokanda kitoko ya ntɔ́ki ya kokoma mikanda?
6 Engebene The New Encyclopædia Britannica, mbala mingi mokanda ya Yobo “motángami kati na mikanda minene ya ntɔ́ki ya kokoma mikanda kati na mokili.”b Nzokande, búku yango ezali te bobele mosala monene kati na ntɔ́ki ya kokoma mikanda. Kati na mikanda nyonso ya Biblia, mokanda ya Yobo mozali mpenza oyo eleki nyonso, mpo na oyo etali kokumisa nguya, bosembo, mayele, mpe bolingo ya Yehova. Ezali komonisa polele mpenza ntembe monene oyo etyami liboso na bato na mɔlɔ́ngɔ́ mobimba. Ezali kopesa engɛngiseli makasi likoló na oyo elobami kati na mikanda mosusu ya Biblia, mingi mpenza Genese, Exode, Mosakoli, Luka, Baloma, mpe Emoniseli. (Kokanisá Yobo 1:6-12; 2:1-7 na Genese 3:15; Exode 9:16; Luka 22:31, 32; Baloma 9:16-19 mpe Emoniseli 12:9; mpe kokanisá Yobo 1:21 na Mosakoli 5:15; Yobo 24:15 na Mosakoli 8:11; Yobo 21:23-26 na Mosakoli 9:2, 3; Yobo 28:28 na Mosakoli 12:13.) Ezali kopesa biyano na mituna mingi mitaleli bomoi. Na ntembe te, ezali moko na biteni oyo bisali Liloba lipemami na Nzambe, mpe ezali kosalisa biso mingi ete tósosola liloba yango malamu.
MAKAMBO MAZALI KATI NA YOBO
7. Na ebandeli ya mokanda yango, Yobo amonisami kati na ezalela nini?
7 Maloba ya ebandeli ya mokanda ya Yobo (1:1-5). Ezali kolakisa biso Yobo, moto ‘malamu bɛ mpe na sembo, oyo abangaka Nzambe mpe akoboyaka mabe.’ Yobo azali moto na esengo, azali na bana mibali nsambo mpe bana basi misato. Azali na bozwi mingi, azali na eteni monene ya mabelé mpe bitongá ya bibwele mike mpe bitongá ya bibwele minene. Azali na basaleli mingi mpe “alekaki bato nyonso na monene epai na ebimelo na ntango.” (1:1, 3) Nzokande, amipesi te na biloko ya mosuni, mpe atii elikya likoló na bozwi na ye ya mosuni te. Azali mpe mozwi na elimo, mozwi kati na misala malamu, azali ntango nyonso pene na kosunga bato oyo bazali na mpasi to na mawa, mpe azali pene na kopesa elamba epai na ye oyo azangi yango. (29:12-16; 31:19, 20) Bato nyonso bazali komemya ye. Yobo azali kosambela Nzambe ya solo, Yehova. Aboyi kokumbamela moi, sanza, mpe minzoto lokola mabota ya bapakano bazali kosala yango, kasi azali sembo epai na Yehova, azali kabatela bosembo na ye epai na Nzambe na ye mpe azali na boyokani makasi elongo na ye. (29:7, 21-25; 31:26, 27; 29:4) Yobo azali kosala lokola nganga mpo na libota na ye, kopesáká mbala na mbala mbeka na kotumba, mpo na masumu oyo bakokaki kosala.
8. (a) Lolenge nini Satana abɛti ntembe na bosembo ya Yobo? (b) Lolenge nini Yehova apesi nzela ete Satana abimisa ntembe yango?
8 Satana abɛtɛli Nzambe ntembe (1:6–2:13). Na lolenge ya kokamwa, ridó ya elilingi elongolami mpo ete tókoka komona makambo mazali koleka na likoló. Emonisami ete Yehova azali kokamba likita moko ya bana na Nzambe. Satana mpe ayei kati na bango. Yehova abendi likebi likoló na Yobo, mosaleli na ye ya sembofaithful servant, kasi Satana abɛti ntembe mpo na bosembointegrity ya Yobo, kolobáká ete Yobo asalelaka Nzambe mpo na biloko ya mosuni oyo asilaki kozwa. Soki Nzambe akotika nzela na Satana ete alongola biloko yango nyonso, Yobo akotika bosembointegrity na ye. Yehova andimi kosilisa ntembe na lolenge yango, kasi apekisi Satana ete asimba Yobo te.
9. (a) Komekama nini makasi ekómeli Yobo? (b) Nini emonisi ete abatelaki bosembo na ye?
9 Makambo mingi ya mawa mabandi kokwela Yobo, kozanga ete ayeba ntina na yango. Bato ya Seba mpe Bakaladi bapunzi bozwi na ye nyonso. Mopɛpɛ moko makasi mobomi bana na ye ya mibali mpe ya basi. Momekano wana makasi epusi Yobo soko moke te ete alakela Nzambe mabe to apesa ye mokɔngɔ. Na esika ya kosala bongo, alobi ete: “Nkombo na [Yehova] esanzolama.” (1:21) Satana, nsima wana akweisami mpe amonisami ete azali mobuki na lokuta, ayei lisusu liboso na Yehova mpe alobi ete: “Loposo mpo na loposo! Moto akopesa yango ezali na ye mpo na bomoi na ye.” (2:4) Satana alobi ete soki apesameli nzela ete asimba nzoto ya Yobo, akopusa Yobo ete alakela Nzambe mabe liboso na ye. Nsima wana apesameli nzela ete asala nyonso oyo alingi na nzoto ya Yobo kozanga kolongola bomoi na ye, Satana apesi ye maladi moko ya nsɔ́mɔ. Mosuni na ye “elatisami na mpambo mpe na bosɔtɔ,” ata mwasi na ye mpe bandeko na ye bayoki ete nzoto na ye mpe monɔkɔ na ye ezali kolumba nsolo mabe mpenza. (7:5; 19:13-20) Komonáká ete Yobo abebisi bosembo na ye te, mwasi na ye angangeli ye ete: “Okangi naino boyengebene na yo makasi? Lakelá Nzambe mabe mpe kufá!” Yobo apameli ye kasi “asalaki lisumu na bibebu na ye te.”—2:9, 10.
10. Lolenge nini Satana apesi “libɔndisi” ya lokuta?
10 Satana abimisi sikawa baninga misato, oyo bayei “kobɔndisa” Yobo. Ezali bongo Elifaza, Biledada, mpe Sofala. Na mosika, bazali koyeba Yobo lisusu te, kasi na nsima bangangi mpe baleli mpe bamisopeli mputulu na mitó na bango. Na nsima, bafandi liboso na ye na mabelé kozanga koloba. Nsima ya mikolo nsambo mpe butu nsambo ya “kobɔndisa” na kozanga koloba, Yobo abandi koloba, kobandisáká bongo lisoló molai ya ntembe elongo na baoyo bamitángi ete bazali babɔndisi na ye.—2:11.
11-13. Lolenge nini Yobo abandi lisoló ya ntembe, efundeli nini Elifaza abimisi, mpe eyano nini ya nguya Yobo apesi?
11 Lisoló ya ntembe: eteni ya liboso (3:1–14:22). Kobanda awa, lisoló yango eyebisami na maloba kitoko mpenza ya ntɔ́ki ya Baebele. Yobo alaki mabe likoló na mokolo na ye ya kobotama mpe amituni soki mpo na nini Nzambe atikaki nzela ete akóba kozala na bomoi.
12 Na koyanoláká, Elifaza afundi Yobo ete azali sembo te. Alobi ete, bato na boyengebene bakufaka te. Alobeli emonaneli moko oyo amonaki mokolo mosusu na butu, kati na yango mongongo moko moyebisaki ye ete Nzambe andimelaka basaleli na ye te, mingi mpenza baoyo basalemi na mputulu ya mabelé. Amonisi ete bampasi oyo Yobo akutani na yango ezali etumbu euti na Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso.
13 Na mpiko nyonso, Yobo azongiseli Elifaza maloba. Angangi na lolenge oyo ekelamu nyonso oyo ezwi monyoko mpe mpasi ekoki konganga. Liwa ekokaki kozala lisiko mpo na ye. Apameli baninga na ye mpo ete bayangeli ye mwango mabe mpe atɛmɛli bango: “Lakisá ngai mpe nakokanga lolemo na ngai; sosolisá ngai esika ebungi ngai.” (6:24) Yobo azali kobundana mpo na komilóngisa liboso na Nzambe, “Mokɛngɛli na bato.”—7:20.
14, 15. Biledada alobi nini, mpe mpo na nini Yobo abangi ete akokweisama kati na kosambisama elongo na Nzambe?
14 Sikawa Biledada abandi kobimisa makanisi na ye, ayebisi ete bana mibali na Yobo basalaki lisumu mpe ete Yobo ye moko azali sembo te, soki bongo te mbɛlɛ Nzambe alingaki koyokela ye. Apesi Yobo toli ete atuna bato ya kalakala mpe amanyola likoló na makambo oyo bankɔ́kɔ na ye basalaki mpo ete yango etambwisa ye.
15 Yobo ayanoli na kolobáká lisusu ete Nzambe azangi boyengebene te. Nzambe azali na likambo na moto te, mpamba te ye “akosalaka makambo minene masosolami ntina te; makambo na kokamwa mayebani mituya te.” (9:10) Yobo akoki te kolónga Yehova kati na kosambisama. Akoki bobele kosɛnga ngolu ya Nzambe. Kasi, litomba ezali mpe na koluka kosala oyo ezali sembo? “Ye akobebisa na moto malamu mpe na moto mabe.” (9:22) Awa na mabelé lisambisi ya sembo ezalaka te. Yobo azali kobanga noki akokweisama ata liboso na Nzambe. Azali na mposa ya molobeli. Azali komituna soki mpo na nini komekama ezali kokómela ye mpe asɛngi na Nzambe amikundola ete asalemi “na mabelé.” (10:9) Amonisi botɔ́ndi mpo na makambo malamu oyo Nzambe asalelaki ye na kala, kasi alobi ete Nzambe akosilika lisusu makasi koleka soki alobilobi lisusu mingi, atako azali na elónga ya kosala bongo. Alingi bobele ete akufa!
16, 17. (a) Toli nini ya kotyola Sofala apesi na Yobo? (b) Yobo abéngi “babɔndisi” na ye ete bazali banani, mpe elikya nini makasi azali komonisa?
16 Sikawa Sofala azwi maloba. Alobi ete: Biso tozali bana mike, ete tóyoka maloba mazangi ntina? Olobi ete ozali mpenza pɛto, kasi soki mpenza Nzambe alingaki koloba, mbɛlɛ amonisi ekweli na yo. Atuni mpe Yobo motuna oyo ete: “Okoki kososola makambo mabombami na Nzambe?” (11:7) Apesi Yobo toli ete atika misala mabe, mpamba te baoyo bazali kotika mabe bakopambolama, nzokande “miso na bato mabe ikobeba.”—11:20.
17 Yobo angangi na maloba makasi ya kotyola ete: “Solo bino bozali bato! Mpe mayele ekokufa na bino elongo!” (12:2) Yobo akoki kozala lokola eloko ya kotyolama, kasi azali na nsé ya baninga na ye te. Soki baninga na ye bataleli biloko oyo Nzambe azalisaki, yango elingaki koteya bango likambo moko. Makasi mpe mayele oyo makoki mpenza kosalelama mautaka epai na Nzambe, ye oyo azali na bokonzi likoló na biloko nyonso, kútu “akofulukisaka mabota minene mpe akobebisaka bango.” (12:23) Yobo azali na esengo ya koyebisa likambo na ye epai na Yehova, kasi mpo na “babɔndisi” na ye misato—“nde bino bozali babúki na nkuta, bozali nyonso minganga na mpamba.” (13:4) Ekokaki kozala likambo ya mayele epai na bango soki bakangaki minɔkɔ na bango! Amonisi elikya ete likambo na ye ezali sembo mpe asɛngi na Nzambe ete ayokela ye. Alobeli likanisi oyo ete “moto oyo abotami na mwasi azali na mikolo mingi te mpe atondi na mpasi.” (14:1) Moto alekaka nokinoki, lokola fololo to lokola elili. Moto ya pɛto akoki kobima te uta na moto azangi pɛto. Na kobondeláká Nzambe ete abomba ye kati na Shéol kino na ntango nkanda na Ye ekosila, Yobo atuni: “Soko moto akokufa, akobika nde lisusu?” Ayanoli na komonisáká kondima makasi ete: “Nakozila . . . kino kolongwa na ngai ekoya.”—14:13, 14.
18, 19. (a) Na maloba nini ya kotyola Elifaza abandi eteni ya mibale ya lisoló ya ntembe? (b) Lolenge nini Yobo ataleli “libɔndisi” ya baninga na ye, mpe ataleli Yehova mpo na likambo nini?
18 Lisoló ya ntembe: eteni ya mibale (15:1–21:34). Wana abandisi eteni ya mibale ya lisoló yango, Elifaza atyoli boyebi ya Yobo, kolobáká ete ‘atondisi libumu na ye na mopɛpɛ.’ (15:2) Atyoli lisusu Yobo mpo ete amitángi ete azali sembo, kolobáká ete ezala bato oyo bakoki kokufa, to mpe babulami na likoló bakoki te kozala ntango nyonso sembo na miso ya Yehova. Afundi Yobo ete azali koluka komimonisa lokola aleki Nzambe na bonene, mpe ete azali moto na lipɛngwi, moto na kanyaka, mpe mokosi.
19 Yobo azongisi ete baninga na ye bazali “babɔndisi mabe na maloba na mopɛpɛ.” (16:2, 3) Soki bango bazalaki na esika na ye, mbɛlɛ alingaki kopamela bango te. Amonisi mposa makasi ya kolóngisama, mpe ataleli Yehova mpo na yango, ye oyo ayebi makambo matali bomoi na ye mpe ye oyo akokata likambo na ye. Yobo amoni ete baninga na ye bazali na mayele soko moke te. Balongoli ye elikya nyonso. “Libɔndisi” na bango ezali lokola nde bazali koloba ete butu ezali moi. Elikya bobele moko atikali na yango ezali bongo ya ‘kokita na Sheol.’—17:15, 16.
20, 21. Mpo na nini Biledada asiliki, Yobo atɛmɛli likambo nini, mpe Yobo amonisi ete elikya na ye ezali wapi?
20 Lisoló eyei ndɔ́ngɔ́. Biledada ayoki nkanda makasi, mpamba te akanisi ete Yobo akokanisi baninga na ye na banyama bazangi mayele. Atuni Yobo ete, “Mokili ekotikama mpamba mpo na yo?” (18:4) Akebisi Yobo ete akokwea kati na motambo moko monene, mpo ete azala likebisi mpo na bato mosusu. Akozala na bana te nsima na ye.
21 Yobo ayanoli ete: “Kino ntango nini bokotungisa molimo na ngai mpe bokobukabuka ngai na maloba?” (19:2) Abungisi libota mpe baninga na ye, mwasi na ye mpe bato ya ndako na ye bakimi ye, mpe ye moko amibikisi bobele ‘na loposo na mino na ye.’ (19:20) Andimisami ete mobikisi moko akobima oyo akokata likambo mpo na kolóngisa ye, ete na nsuka akokoka ‘komona Nzambe.’—19:25, 26.
22, 23. (a) Mpo na nini Sofala ayoki nkanda, mpe alobi nini na ntina na masumu oyo ye akanisi ete Yobo asalaki? (b) Yobo ayanoli na kopesáká likanisi nini oyo ekoki kokweisama te?
22 Lokola Biledada, Sofala ayoki nkanda nsima ya koyoka lolenge Yobo ‘apamelaki’ bango. (20:3) Azongeli lisusu koloba ete masumu ya Yobo makangi ye. Sofala alobi ete bato mabe bazwaka ntango nyonso etumbu uta na Nzambe, mpe bazwaka bopemi te, ata soki bazali na bozwi mingi.
23 Yobo ayanoli bango na maloba oyo makoki kokweisama te: Soki Nzambe apesaka bato mabe etumbu ntango nyonso, na yango, mpo na nini bato mabe bazali na bomoi, bazali kokóma mibangé, mpe bazali kokóma na bozwi mingi? Bazali kolekisa mikolo na bango kati na bisengo. Mbala boni likámá liyelaka bango? Amonisi ete bazwi mpe babólá bakufaka lolenge moko. Ya solo, emonanaka mingi ete moto mabe akufaka “na malamu mpe na kimya,” nzokande moto malamu akoki kokufa “na molimo na bololo.”—21:23, 25.
24, 25. (a) Maloba nini ya kotɔ́nga Elifaza alobi yango na lolendo nyonso na ntina na Yobo? (b) Kati na eyano na ye, lolenge nini Yobo abwaki efundeli wana mpe ntembe nini yango ebimisi?
24 Lisoló ya ntembe: eteni ya misato (22:1–25:6). Elifaza ayanoli na nkanda nyonso, na kotyoláká Yobo mpamba te amilobeli ete azangi ekweli liboso na Mozwi-na-Nguya-Nyonso. Akoseli Yobo makambo, kolobáká ete azali moto mabe, ete alyaki na nsima ya mitɔki ya babólá, aboyaki kokabela bato na nzala limpa, mpe anyokolaki basi bakufeli mibali mpe bana mibali bitiké. Elifaza alobi ete bomoi ya Yobo ezali pɛto te lokola ye moko azali komikumisa mpe ete ezali mpo na ntina yango nde Yobo azali kati na ezalela wana ya mpasi. Elifaza alobi na ye ete “soko okobutwa epai na Oyo-na-Nguya-Nyonso okokembisama.”
25 Yobo atɛmɛli efundeli ya lokuta oyo Elifaza alobi yango mpo na ye, ayebisi ete azali na mposa ete Nzambe ayoka likambo na ye, ye oyo ayebi malamu etamboli na ye ya boyengebene. Ezali na baoyo banyokolaka bitiké, banyokolaka basi bakufeli mibali, mpe banyokolaka babólá mpe bazali babomi, bayibi, mpe basáli na ekobo. Na boumeli ya mwa ntango moke, bozwi na bango ekoki komonana lokola ete ezali komata, kasi bakozwa mbano oyo ebongi na bango. Bakosilisama nyɛɛ. Yobo atuni ete: “Nani akomonisa ete maloba na ngai mazali mpamba?”—24:25.
26. Biledada mpe Sofala balobi lisusu nini?
26 Biledada ayanoli mwa moke na yango, kolobáká ete moto moko te akoki kozala pɛto liboso na Nzambe. Sofala alobi eloko moko te na boumeli ya eteni oyo ya misato. Azangi maloba.
27. Lolenge nini Yobo akumisi sikawa bonene ya Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso?
27 Maloba ya Yobo mpo na kosukisa (26:1–31:40). Na maloba na ye ya nsuka, Yobo akangisi mpenza baninga na ye monɔkɔ. (32:12, 15, 16) Na kotyola nyonso, ayebisi bango ete: “Osungi ye oyo azangi nguya na nzela nini? . . . Nzela nini opesi toli epai na ye oyo azangi mayele?” (26:2, 3) Nzokande, eloko moko te, ata mpe Shéol te, ekoki kozipa eloko mosusu ete Nzambe azanga komona yango. Yobo alobeli lolenge mayele ya Nzambe emonisami kati na etando, na mabelé, na mapata, na mai na monana, mpe na mopɛpɛ—oyo nyonso moto asilá komona yango. Wana ezali komonisa biso bobele mwa moke banzela ya Yehova. Emonisi bobele eteni moke mpenza ya misala minene ya Mozwi-na-Nguya-Nyonso.
28. Liloba nini ya sikisiki Yobo alobi yango na ntina na bosembo?
28 Na kondimisama nyonso ete azali na ekweli te, alobi ete: “Kino nakokufa, nakomilongwela sembo na ngai te!” (27:5) Te, Yobo asalaki mabe moko te oyo ekokaki koyeisela ye mpasi wana. Na kokesana na bifundeli na bango, Nzambe akopesa mbano mpo na bosembo na kosaláká na boye ete biloko oyo bato mabe babombaki ntango bazalaki na bozwi mingi bipesama epai na bato na sembo.
29. Lolenge nini Yobo alobeli mayele?
29 Moto ayebi epai biloko ya motuya ya mabelé biutaka (palata, wolo, motako), “kasi mayele mautaka wapi?” (28:20, NW) Aluki yango kati na bikelamu ya bomoi; kati na mai na monana; ekoki kosombama na wolo to na palata te. Nzambe azali ye oyo akososolaka mayele. Amonaka kino ndelo na mabelé mpe ndelo na makoló, akabolaka mopɛpɛ mpe mai na meko oyo ebongi, mpe atyaka mibeko likoló na mbula mpe mapata. Yobo asukisi ete: “Talá! Bobángi Yehova—yango nde bwanya, mpe kokima mabe ezali bongo mayele.”—28:28, NW.
30. Yobo azali na mposa ete azongisama kati na ezalela nini, kasi etɛlɛmɛlo nini azali na yango sikawa?
30 Na nsima, Yobo oyo azali kati na ezalela ya mpasi alobeli lisoló ya bomoi na ye. Amonisi mposa ya kozongisama na ezalela na ye oyo azalaki na yango kala liboso na Nzambe, na ntango oyo ata bakonzi na engumba bazalaki komemya ye. Azalaki mobikisi ya banyokwami mpe miso ya bakufi miso. Toli na ye ezalaki malamu, mpe bato bazalaki koyokamela ye. Kasi sikawa, na esika ete azala na etɛlɛmɛlo ya lokumu, atyolami ata na bana mike, oyo batata na bango babongaki kútu te kozala elongo na bambwa ya etongá na ye. Babwakelaki ye nsɔ́i mpe batɛmɛlaki ye. Sikawa, kati na mpasi na ye monene, batikeli ye ata ntango ya kopema te.
31. Yobo atye elikya na ye kati na kosambisa ya nani, mpe alobi nini na ntina na lisoló ya solo ya bomoi na ye?
31 Yobo amilobeli lokola moto oyo amipesi mpe asɛngi ete Yehova asambisa ye. “Tiká ete napimama na epimeli na sembo ete Nzambe ayeba boyengebene na ngai.” (31:6) Yobo alobeli kolongobana ya misala na ye ya kala. Azalaki moto na ekobo te, ayangaki mpe mwango mabe mpo na basusu te. Azangaki te kosunga bato oyo bazalaki na bosɛngá. Atyaki elikya na ye na bozwi ya mosuni te, atako azalaki mozwi. Asambelaki moi te, sanza te, mpe minzoto te, ‘yango ezali lisumu kopesamela etumbu na mosambisi, zambi mbɛlɛ nalingaki koangana Nzambe na likoló.’ (31:28) Yobo asɛngi na ye oyo azali kosamba elongo na ye ete afunda ye mpo na makambo mpenza oyo asalaki na kala kati na bomoi na ye.
32. (a) Nani azali koloba sikawa? (b) Mpo na nini Eliu atombokeli Yobo mpe baninga na ye, mpe nini ezali kopusa ye ete aloba?
32 Eliu alobi (32:1–37:24). Na boumeli ya ntango wana nyonso, Eliu, mokitani ya Buzu, mwana ya Nahola, mpe na bongo azalaki moko kati na bandeko ya mosika ya Abalayama, azalaki koyoka lisoló wana ya ntembe. Azalaki kozela kozanga koloba ata likambo moko mpamba te akanisaki ete baoyo bazali na mbula mingi ya kobotama basengeli kozala na mayele mingi. Ezali bongo bambula ya kobotama te, kasi elimo ya Nzambe nde epesaka biso mayele. Nkanda ya Eliu engaleli Yobo “mpo ete alóngisaki molimo na ye moko liboso na Nzambe,” kasi angalelaki lisusu makasi baninga misato ya Yobo mpo bazangaki mayele, mpamba te bayambolaki ete Nzambe azali mabe. Eliu ‘atondi na maloba,’ mpe elimo ya Nzambe epusi ye ete abimisa yango kasi na kozanga koponapona to kozanga ‘kozimbisa moto na maloba kitoko.’—Yobo 32:2, 3, 18-22; Gen. 22:20, 21.
33. Kati na likambo nini Yobo asalaki libungá, kasi ngɔlu nini Nzambe akomonisela ye?
33 Eliu alobi na kozanga kokakatana, kondimáká ete Nzambe azali Mozalisi na ye. Atɔndɔli ete Yobo azalaki komibanzabanza mpo na komilóngisa ye moko na esika ya kolóngisa Nzambe. Ezalaki na ntina te ete Nzambe ayanola na maloba nyonso ya Yobo, lokola nde asengelaki kolóngisa misala na Ye, mpe atako bongo Yobo abundisaki Nzambe. Nzokande, wana molimo ya Yobo ekómi pene na liwa, Yehova atindeli ye nsango moko ya malamu, alobi ete: “Bikisá ye ete akita na libulu te, nasili komona lisiko; tiká ete mosuni na ye eleka yango na elenge na kitoko, azonga na mikolo na bolenge na ye.” (Yobo 33:24, 25) Bayengebene bakozongisama na bomoi!
34. (a) Maloba nini mosusu ya kopamela Eliu abimisi yango? (b) Na esika ete akumisa boyengebene na ye moko, Yobo asengelaki kosala nini?
34 Eliu asɛngi na bato ya mayele ete báyokamela ye. Apameli Yobo mpamba te alobaki ete kozala moto na boyengebene ezali na litomba te: “Tiká ete ezala mosika na Nzambe ete asala mabe! Ezala mosika mpe na Oyo-na-Nguya-Nyonso ete azala na lisumu! Mpo ete akozongisela moto pelamoko mosala na ye.” (34:10, 11) Soki alongoli mpema ya bomoi, mosuni nyonso ekokufa. Yehova asambisaka na koponapona te. Yobo alekisaki mingi kotya bosembo na ye moko na liboso. Alobaki na kozanga bokɛngi, asalaki yango na nkó te, kasi “na kozanga koyeba”; mpe Nzambe amoniselaki ye motema molai. (34:35, NW) Makambo mingi masengeli kolobama na ntina na kolóngisama ya Nzambe. Nzambe akolongola miso na ye te likoló na bayengebene, kasi akopamela bango. “Akobatelaka bomoi na bato mabe te nde akolóngisaka banyokolami.” (36:6) Lokola Nzambe azali Molakisi aleki monene, Yobo asengeli kokumisa misala na Ye.
35. (a) Yobo asengelaki kotya likebi likoló na nini? (b) Yehova akomonisa ngɔlu epai na nani?
35 Kati na nsɔ́mɔ monene ya koya ya mopɛpɛ makasi, Eliu alobeli makambo minene oyo Nzambe asilá kosala mpe bokonzi oyo azali na yango likoló na nguya ya biloko bizalisami. Alobi na Yobo ete: “Tɛlɛmá nyɛɛ mpe kanisá misala na kokamwa na Nzambe.” (37:14) Tókanisa likoló na bonzenga mpe bonene ya nkembo ya Nzambe, eleki mosika biloko oyo bisalemi na mayele ya bato. “Azali monene na nguya mpe na sembo, na boboto monene na ye akonyokola te.” Ɛɛ, Yehova akotya likebi na ye likoló na baoyo babangaka ye, kasi te likoló na baoyo “bazali na mayele na miso na bango mpenza.”—37:23, 24.
36. Na nzela ya bilakiseli nini mpe na nzela ya mituna nini Yehova ye moko ateyi Yobo sikawa?
36 Yehova ayanoli Yobo (38:1–42:6). Yobo asɛngaki Nzambe ete aloba na ye. Sikawa Yehova azali koyanola Yobo na nguya nyonso kati na mopɛpɛ makasi. Atuni Yobo ebele ya mituna mpo na koteya ye ete moto azali eloko moke mpenza mpe Nzambe azali monene. “Yo ozalaki wapi wana natyaki moboko na mokili? . . . Nani atye libanga na yango na nsuka, wana myoto na ntɔ́ngɔ́ntɔ́ngɔ́ iyembaki elongo moko?” (38:4, 6, 7) Yango esalemaki uta kala mpenza liboso na kobotama ya Yobo! Mituna mizalaki kotunama moko nsima na mosusu, Yobo akoki koyanola yango te, Yehova atuni ye na ntina na mai na monana, mapata oyo mazipi yango lokola elamba, matanelo, bikuke ya kufa, mpe pole mpe molili. “Oyebi yango mpo ete obotamaki wana mpe ete motuya na mikolo na yo ezali monene!” (38:21) Mpe ezali boni mpo na bibombelo ya mbula mpɛmbɛ mpe na matandala, ekumbaki mpe mbula mpe mamwe, mpe ngalása, bituluku minene ya minzoto, minkalikali mpe mapata, mpe nyama mpe ndɛkɛ?
37. Mituna nini mosusu mikitisi Yobo, mpe apusami ete andima likambo nini mpe ete asala nini?
37 Yobo andimi na komikitisa nyonso ete: “Talá ngai nazali eloko moke moke, nakozongisela yo nini? Natii lobɔkɔ na ngai likoló na monɔkɔ na ngai.” (40:4) Yehova apesi Yobo etindá ete atalela likambo yango malamu. Atuni ye mituna mosusu mpo na kotombola nkembo, bonene mpe nguya na ye, lokola emonisami na biloko oyo azalisaki. Ata Behemote mpe Leviatana bazali na nguya koleka Yobo! Na komikitisa nyonso mpenza, Yobo andimi ete lolenge na ye ya kotalela makambo ezalaki mabe, mpe andimi ete alobaki na kozanga koyeba. Sikawa lokola ayebi Nzambe malamu mpenza, na biyokayoka te, kasi na bososoli, azongi nsima mpe abongoli motema “na mputulu mpe na mputulu na mɔ́tɔ.”—42:6.
38. (a) Lolenge nini Yehova asukisi mpo na Elifaza mpe baninga na ye? (b) Ngɔlu nini mpe lipamboli nini apesi epai na Yobo?
38 Esambiseli ya Yehova mpe mapamboli na ye (42:7-17). Sikawa Yehova abimisi mabe ya Elifaza mpe baninga na ye mibale, ete balobaki makambo ya solo te na ntina na Ye. Basengeli kopesa mbeka mpe kosɛnga na Yobo ete abondela mpo na bango. Nsima na yango, Yehova ataleli ezalela ya mpasi oyo Yobo azalaki kati na yango, kopamboláká ye mbala mibale koleka oyo azalaki na yango liboso. Bandeko na ye ya mibali, bandeko na ye ya basi mpe baninga na ye ya kala bazongeli ye na komemeláká ye makabo; mpate, kamela, ngombe, mpe mpunda basi, biloko oyo nyonso bizongisameli ye mbala mibale koleka oyo azalaki na yango liboso. Azwi lisusu bana zomi, bana na ye ya basi bazalaki basi kitoko koleka basi nyonso ya mboka. Na lolenge ya likamwisi, bomoi na ye eyeisamaki molai mpe aumelaki lisusu mibu 140, na boye ete amonaki bana ya bana na ye kino mabota minei. Akufi wana “atondi na mikolo mingi.”—42:17.
LITOMBA NA YANGO
39. Kati na makambo nini makeseni mokanda ya Yobo mozali kosanzola mpe kokumisa Yehova?
39 Mokanda ya Yobo mozali kokumisa Yehova mpe mozali kotatola na ntina na mayele mpe nguya na ye eleki monene. (12:12, 13; 37:23) Kati na mokanda oyo moko, Nzambe alobelami mbala 31 lokola Mozwi-na-Nguya-Nyonso, ezali motángo monene koleka na mikanda nyonso mosusu ya Makomami. Lisoló yango ezali kosanzola Nzambe lokola Mokonzi na seko mpe etɛlɛmɛlo na ye oyo etombwani. (10:5; 36:4, 22, 26; 40:2; 42:2) bakisá mpe boyengebene na ye, ezaleli na ye ya boboto mpe ya motema mawa. (36:5-7; 10:12; 42:12). Ezali kolobela makasi kolóngisama ya Yehova koleka lobiko ya moto. (33:12; 34:10, 12; 35:2; 36:24; 40:8) Yehova, Nzambe ya Yisalaele, amonisami ete azali mpe Nzambe ya Yobo.
40. (a) Lolenge nini mokanda ya Yobo mozali kokumisa mpe kolimbola misala ya kozalisa ya Nzambe? (b) Lolenge nini ezali komonisa mateya oyo masengelaki kokomama na nsima kati na Makomami ya Greke ya boklisto mpe lolenge nini ezali na boyokani elongo na yango?
40 Lisoló ya Yobo ezali kokumisa mpe ezali kolimbola mosala ya kozalisa ya Nzambe. (38:4–39:30; 40:15, 19; 41:1; 35:10) Ezali na boyokani na maloba oyo mazwami na Genese ete moto asalemaki uta na mputulu mpe ete azongoka na mputulu. (Yobo 10:8, 9; Gen. 2:7; 3:19) Esaleli maloba lokola “mobikisi,” “lisiko,” mpe “kobika lisusu,” epesi bongo elilingi ya mateya ya ntina mingi oyo ezwami kati na Makomami ya Greke ya boklisto. (Yobo 19:25; 33:24; 14:13, 14) Maloba mingi oyo masalelami kati na mokanda yango mazongelamaki lisusu to makokanaki na oyo basakoli mpe bakomi baklisto balobelaki. Na ndakisa, kokanisá Yobo 7:17—Nzembo 8:4; Yobo 9:24—1 Yoane 5:19; Yobo 10:8—Nzembo 119:73; Yobo 12:25—Deteronome 28:29; Yobo 24:23—Masese 15:3; Yobo 26:8—Masese 30:4; Yobo 28:12, 13, 15-19—Masese 3:13-15; Yobo 39:30—Matai 24:28.c
41. (a) Mitindá nini ya Teokrasi milobelami makasi kati na mokanda ya Yobo? (b) Na likambo nini Yobo mosaleli ya Nzambe azali ndakisa monene mpo na biso lelo?
41 Biteni mingi ya mokanda yango bizali komonisa mibeko ya sembo oyo Yehova asilá kotya mpo na bomoi. Mokanda yango mokweisi makasi ezaleli ya kotya motema mingi likoló na biloko ya mosuni (Yobo 31:24, 25), losambo ya bikeko (31:26-28), ekobo (31:9-12), bilulela (31:29), bokesene mpe koponapona (31:13; 32:21), moimi (31:16-21), kozanga kolongobana mpe lokuta (31:5); komonisáká ete moto oyo asalaka makambo wana akoki kondimama na Nzambe te mpe akoki kozwa bomoi ya seko te. Eliu azali ndakisa kitoko mpo na oyo etali limemya mozindo mpe komisɔkisa, bakisá mpe molende, mpiko, mpe kokumisa Nzambe. (32:2, 6, 7, 9, 10, 18-20; 33:6, 33) Lolenge Yobo asalelaki bokonzi na ye, lolenge atalelaki libota na ye, mpe ezaleli na ye ya boyambi bapaya, nyonso wana ezali mpe kopesa toli kitoko. (1:5; 2:9, 10; 31:32) Nzokande, bato bakanisaka Yobo mingi mpenza mpo na bosembo na ye mpe ezaleli na ye ya koyika mpiko mpe ya motema pɛtɛɛ, atikaki bongo ndakisa oyo ezalaki mpenza efelo makasi ya kolendisa kondima mpo na basaleli ya Nzambe na boumeli ya bikeke, mpe mingimingi na eleko oyo ezali kotya kondima ya bato kati na komekama makasi. “Bosili koyoka mpo na mpiko ya Yobo, bosili komona nsuka na makambo na ye epai na [Yehova], zambi [Yehova] atondi na mawa mpe na boboto.”—Yak. 5:11.
42. Kowelana nini ya ntina mingi etali Bokonzi emonisami polele kati na mokanda ya Yobo, mpe makambo nini ya kobenda likebi matali kowelana yango malimbolami?
42 Yobo azalaki moko kati na basangani ya mombóto ya Abalayama te, ye oyo apesamelaki elaka ya Bokonzi, kasi lisoló litali bosembo na ye ezali kokokisa mokumba monene mpo na koyeisa polele bososoli likoló na mikano ya Yehova. Mokanda yango mozali eteni ya ntina mingi kati na lisoló oyo Nzambe akomisaki, mpamba te ezali komonisa kowelana monene kati na Nzambe mpe Satana, oyo etaleli bosembo ya moto epai na Yehova lokola Moyangeli na ye. Ezali komonisa ete baanzelu, oyo bazalisamaki liboso ete mabelé mázalisama mpe liboso ete moto azalisama, bazali mpe komona lolenge kowelana yango ezali kosalema mpe batye likebi na bango likoló na lolenge oyo kowelana yango ekosuka. (Yobo 1:6-12; 2:1-5; 38:6, 7) Emonisi ete kowelana yango ebandaki liboso na eleko ya Yobo mpe ete Satana azali mpenza ekelamu ya elimo. Soki tondimi ete Mose nde akomaki mokanda ya Yobo, yebá ete ezali mbala ya liboso liloba has·Sa·tanʹ emonana kati na makomi ya Liebele ya Biblia, eyebisi bongo likambo mosusu oyo ezali kosalisa biso mpo na koyeba “nyoka na kalakala.” (Yobo 1:6, NW, maloba na nsé ya lokasa; Emon. 12:9) Mokanda yango ezali mpe komonisa ete Nzambe te nde azali mobandisi ya bampasi, ya maladi, mpe ya liwa, mpe ezali kolimbola ntina oyo bato ya sembo bazali konyokwama, wana bato mabe mpe makambo mabe mazali sé kokóba. Ezali komonisa ete Yehova azali na mposa ya kopusa kowelana yango kino na nsuka na yango.
43. Na boyokani na bimoniseli biuti na Nzambe oyo bizwami kati na mokanda ya Yobo, baoyo nyonso bazali koluka kozwa mapamboli ya Bokonzi ya Nzambe basengeli kolanda nzela nini?
43 Sikawa ezali ntango oyo baoyo nyonso balingi kobika na nsé ya boyangeli ya Bokonzi ya Nzambe basengeli kopesa eyano epai na Satana, “mofundi,” na nzela ya etamboli na bango ya sembo. (Emon. 12:10, 11) Ata kati na ‘minyoko ya kobulunganisa,’ bato na sembo basengeli kokóba kosambela ete nkombo ya Nzambe ebulisama mpe ete Bokonzi na ye eya mpe enyata Satana mpe mombóto na ye nyonso ya botyoli. Yango ekozala mpo na Nzambe “mokolo na etumba mpe na kobunana,” oyo ekolandana na kobɔndisama mpe na mapamboli oyo Yobo azalaki na elikya ya kozwa yango.—1 Pet. 4:12; Mat. 6:9, 10; Yobo 38:23; 14:13-15.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Búku Insight on the Scriptures, Vol. 1, nkasa 280-281, 663, 668, 1166; Vol. 2, nkasa 562-563.
b 1987, Vol. 6, lokasa 562.
c Búku Insight on the Scriptures, Vol. 2, lokasa 83.