Mokanda ya Biblia nimero 49—Baefese
Mokomi: Paulo
Esika ya bokomi: Loma
Nsuka ya bokomi: soko 60–61 T.B.
1. Ntango nini mpe na nsé na makambo nini Paulo akomaki mokanda epai na Baefese?
KANISÁ ete ozali kati na bolɔ́kɔ. Okómi kuna mpo ete ozali konyokwama na ntina na mosala na yo ya molende ya misionere moklisto. Sikawa, ozali lisusu na likoki te ya kosala mobembo mpo na kokende kotala masangá mpe kolendisa yango, eloko nini okosala? Okoki te kotinda nkomá epai na baoyo bakómaki baklisto na lisalisi ya mosala na yo ya kosakola? Ekoki kozala ete bazali komitungisa mpo na koyeba soki ozali ndenge nini, mpe bazali mbala mosusu na mposa ya kolendisama, boye te? Ezali bongo mpenza! Boye, obandi kokoma. Na bongo, ozali mpenza kosala motindo moko na ntoma Paulo ntango atyamaki na bolɔ́kɔ mpo na mbala ya liboso na Loma, soko na mobu 59-61 T.B. Asɛngaki ete asamba likambo na ye liboso na Kaisala, mpe atako azalaki kozela lisambisi mpe azalaki kokɛngɛlama, nzokande azalaki na bonsomi ya kosala mwa misala mosusu. Paulo akomaki mokanda na ye “epai na Baefese” uta na Loma, ekoki kozala na mobu 60 to 61 T.B., mpe atindaki yango na Tukiko, oyo akendeki kuna elongo na Onesimo.—Ef. 6:21; Kol. 4:7-9.
2, 3. Nini emonisi mpenza ete Paulo azali mokomi ya mokanda yango mpe, bobele na ntango yango, nini emonisi ete mokanda ya Baefese ezali eteni ya Makomami mapemami?
2 Bobele na maloba ya ebandeli mpenza, Paulo amimonisi ete azali mokomi ya mokanda yango mpe, mbala minei, atángi nkombo na ye to amilobeli ye moko ete azali “mokangami [kati] na Nkolo.” (Ef. 1:1; 3:1, 13; 4:1; 6:20) Bilembeteli nyonso oyo bipesami mpo na komonisa ete Paulo akomaki mokanda yango te bisili kokweisama nyɛɛ. Papirise Chester Beatty No. 2 (P46), oyo endimami ete ekomamaki soko na mobu 200 T.B., ezali na nkasa 86 ya codex oyo ezali na mikanda ya Paulo kati na yango. Kati na mikanda yango, Baefese mpe ezali kuna, mpe yango emonisi ete, uta ntango wana, bazalaki kotánga mokanda ya Baefese kati na mikanda ya Paulo.
3 Bakomi ya liboso, oyo bazalaki bakonzi ya mangomba, bandimisi ete Paulo akomaki mokanda yango mpe etindamaki “Epai na Baefese.” Na ndakisa, Irénée oyo azalaki na bomoi na ekeke ya mibale T.B., alobelaki Baefese 5:30 na maloba malandi: “Lokola mopambwami Paulo alobi yango kati na mokanda na ye epai na Baefese, ete tozali binama ya nzoto na ye.” Clément moto na Alesandalia, oyo azalaki mpe na bomoi na eleko wana, alobeli maloba ya Baefese 5:21 na koyebisáká ete: “Yango wana mpe, kati na mokanda na ye epai na Baefese, akomi ete, Bótosanaka bamoko na bamosusu kati na bobángi Nzambe.” Origène, oyo azalaki mokomi na boumeli ya eteni ya liboso ya ekeke ya misato T.B., atángi maloba ya Baefese 1:4 na kolobáká ete: “Mpe lisusu, kati na mokanda na ye epai na Baefese, ntoma asaleli elobeli bobele moko ntango alobi ete, Oyo aponaki biso liboso na kozalisama ya mokili.”a Eusèbe, moyebisi mosusu ya lisoló ya boklisto ya ebandeli (s. 260-342 T.B.), atángi mokanda ya Baefese ete mozali kati na mikanda mipemami ya Biblia, mpe bakomi mingi mosusu ya liboso, oyo bazalaki bakonzi ya mangomba, balobeli Baefese ete ezali eteni ya Makomami mapemami.b
4. Nini ememaki basusu na kokanisa ete mokanda ya Baefese motindamaki epai mosusu, kasi bilembeteli nini bimonisi ete yango etindamaki na Efese?
4 Papirise Chester Beatty, Maniskri Vaticanus No. 1209, mpe Maniskri Sinaïticus esaleli te maloba “na Efese” oyo mazwami na mokapo 1, vɛrsɛ́ 1, mpe na yango ezali te komonisa esika oyo mokanda yango mozalaki kokende. Likambo wana, sangisá mpe bozangi ya bambote epai na bato na Efese (atako Paulo asalaki mosala makasi mbula misato kuna), ememaki bamoko na kokanisa ete mokanda yango motindamaki epai mosusu to, soki bongo te, ekoki kozala ete yango ezalaki mokanda oyo mosengelaki kolekaleka na masangá nyonso ya Asie Mineure, sangisá mpe Efese. Nzokande, bamaniskri mingi mosusu ezali na maloba “na Efese,” mpe lokola touti komona yango na mwa likoló, bakomi ya liboso oyo bazalaki bakonzi ya mangomba bandimaki ete mokanda yango motindamaki epai na Baefese.
5. Na mikolo ya Paulo, Efese eyebanaki na makambo nini?
5 Mwa makambo mosusu ya pembenipembeni makosalisa biso na kososola ntina ya mokanda yango. Na ekeke ya liboso na Ntango na Biso, Efese eyebanaki mingi mpo na bondɔki na yango, maji na yango, astroloji na yango mpe mpo na losambo na yango ya Alatemi, nzambe-mwasi ya makambo matali kobota.c Zingazinga ya ekeko ya nzambe-mwasi yango, tempelo moko monene etongamaki wana, oyo ezalaki kotalelama lokola moko na biloko nsambo ya bonzenga ya kokamwisa oyo bizalaki kati na mokili ya kala. Engebene botimoli oyo esalemaki na ekeke ya 19 na esika oyo tempelo yango ezalaki, emonanaki ete yango etongamaki likoló na etando ya mɛtɛlɛ 73 na bonene mpe ya mɛtɛlɛ 127 na bolai. Tempelo yango moko ezalaki na bonene ya mɛtɛlɛ soko 50 mpe na bolai ya mɛtɛlɛ soko 105. Ezalaki na makonzí 100 oyo masalemaki na mabanga babéngi marbre, oyo moko na moko na yango ezalaki na bolai ya mɛtɛlɛ 17. Motɔ́ndɔ na yango ezipamaki na biteni minene ya marbre ya mpɛmbɛ. Eyebisami ete, na esika ya kosalela pɔtɔpɔ́tɔ ya simá mpo na kokangisa matongá ya biteni ya marbre, basalelaki nde wolo. Tempelo yango ezalaki mpenza kobenda bapaya-batálitali-mboka to baturiste oyo bazalaki kouta bipai nyonso ya mabelé, mpe bankóto mingi mosusu ya bapaya bazalaki kotonda maa kati na engumba, na ntango ya bilambo. Batúli na palata kati na Efese bazalaki kosala mombongo monene na kotekáká bikeko mikemike ya Alatemi oyo esalemi na palata; bazalaki koteka yango epai na basáli na mobembo mosantu na ntina ete yango ekundwelaka bango makambo oyo bamonaki.
6. Mosala ya Paulo mozalaki ndenge nini kati na Efese?
6 Ntango azalaki na mobembo na ye ya mibale ya misionere, Paulo afandaki mwa moke na Efese mpo na mosala ya kosakola mpe atikaki Akula mpe Pilisikila kuna mpo ete bákóba mosala yango. (Mis. 18:18-21) Azongaki kuna na boumeli ya mobembo na ye ya misato ya misionere mpe afandaki mbula soko misato, kosakoláká mpe koteyáká “Nzela” epai na bibele na bato. (Mis. 19:8-10; 20:31) Paulo asalaki mosala makasi ntango azalaki na Efese. Kati na búku na ye Daily Life in Bible Times, A. E. Bailey akomi ete: “Mingimingi, Paulo azalaki na momeseno ya kokokisa mosala na ye [ya mosuni] uta kobima ya moi kino ngonga ya 11 na ntɔ́ngɔ́ (Mis. 20:34, 35); yango ezali ngonga oyo Tulana azalaki kosilisa mosala na ye ya kolakisa; na nsima, kobanda na ngonga ya 11 ya ntɔ́ngɔ́ kino na ngonga ya 4 na nsima ya nzánga, azalaki koteya na esika ya koyangana, azalaki kosala makita elongo na basungi, . . . mpe na nsuka, azalaki kosala mosala ya kopalanganisa nsango malamu ndako na ndako, oyo mozalaki kobanda na ngonga ya 4 nsima ya nzánga kino mosika kati na butu. (Mis. 20:20, 21, 31) Tozali komituna soki azalaki kolya ntango nini mpe kolala ntango nini.”—1943, lokasa 308.
7. Makambo nini mabimaki uta na mosala ya kosakola oyo Paulo asalaki na molende?
7 Na boumeli ya mosala wana ya kosakola na molende, Paulo amonisaki mabe ya kosalela bikeko kati na losambo. Yango epelisaki nkanda ya baoyo bazalaki kosala bikeko yango mpe koteka yango, na ndakisa Demeteli oyo azalaki motúli; na nsuka, Paulo asengelaki kolongwa na engumba wana mpamba te ekɔtaki kati na yikiyiki monene.—Mis. 19:23–20:1.
8. Na makambo nini mokanda ya Paulo epai na Baefese etindamaki mpenza na ntango ebongi?
8 Nzokande, wana azali kati na bolɔ́kɔ, Paulo azali kokanisa na ntina na mikakatano oyo mizali kokómela lisangá ya Efese, oyo lizingelami na basambeli oyo bazali bapakano mpe oyo lizali pene na tempelo monene ya Alatemi. Na ntembe te, baklisto bapakolami yango bazalaki na mposa ya lisese libongi oyo Paulo apesi bango sikawa, komonisáká ete bango bazali “tempelo ya bulɛɛ,” oyo kati na yango Yehova azali kofanda na nzela ya elimo na ye. (Ef. 2:21 NW) Na ntembe te, Baefese bazwaki kolendisama mpe kobɔndisama monene ntango bamonisaki bango “libombami na bulɛɛ,” oyo litali eyangeli ya Nzambe (elingi koloba lolenge ya kotambwisa makambo ya ndako na ye); eyangeli oyo na lisalisi na yango akozongisa bomoko mpe kimya na nzela na Yesu Klisto. (1:9, 10) Paulo amonisi polele bomoko oyo ezali kati na Bayuda mpe bato na mabota kati na Klisto. Alendisi bango ete bázala na bomoko, bákabwanaka te. Boye, tososoli sikawa ntina ya mokanda oyo, motuya na yango, mpe kopemama na yango oyo ekoki te kotyamela ntembe.
MAKAMBO MAZALI KATI NA BAEFESE
9. Ndenge nini Nzambe afulukisaki bolingo na ye, mpe libondeli ya Paulo ezali nini?
9 Mokano ya Nzambe ya kotya bomoko na nzela na Klisto (1:1–2:22). Paulo, ye ntoma, atindi mbote. Nzambe asengeli kokumisama mpo na ngɔlu na ye monene. Makumisi wana mauti na likambo oyo ete Ye aponi bango mpo na kokɔta na boyokani elongo na Yesu Klisto, oyo na nzela ya makila na ye bazwi lisiko. Lisusu, Nzambe afulukisi bolingo na ye epai na bango na koyebisáká libombami mosantu ya mokano na ye. Mpamba te azali na mokano ya eyangeli moko, “ete ayanganisa biloko nyonso [esika moko lisusu, NW] kati na Klisto,” oyo na bomoko elongo na ye batyamaki mpe basangoli na libula. (1:10) Mpo na komona elembeteli ya likambo yango liboso ete lisalema, batyamaki elembo na nzela ya elimo santu. Libondeli ya Paulo ezali ete bázwa kondimisama makasi ya elikya oyo babyangamaki mpo na yango mpe básosola ete Nzambe akosalela, epai na bango, nguya motindo moko na oyo Ye asalelaki mpo na kosekwisa Klisto mpe mpo na kotya ye mpenza likoló na biyangeli nyonso mpe bikonzi nyonso mpe oyo Ye asalelaki mpo na kokómisa ye Motó likoló na biloko binso bizali na lisangá.
10. Ndenge nini Baefese bakómaki “bato na mboka na Babulami”?
10 Uta na motema mawa na ye monene mpe na bolingo na ye ya mozindo, Nzambe akómisi bango bato na bomoi, atako bazalaki bakufi kati na bikweli mpe masumu na bango; mpe afandisi bango esika moko “na bisika na Likoló kati na Klisto Yesu.” (2:6) Nyonso wana euti na ngɔlu mpe na kondima, kasi euti te na misala na bango moko. Klisto azali kimya na bango oyo akweisaki efelo, elingi koloba Mibeko mipesamaki, oyo mikɔtisaki bokabwani kati na bato na mabota mpe Bayuda. Sikawa mabota yango nyonso mibale makoki kobɛlɛma epai na Tata na nzela na Klisto. Na yango, Baefese bazali lisusu bapaya te, kasi bazali “bato na mboka na Babulami” mpe bazali kokóla kati na tempelo ya bulɛɛ ete Yehova afanda kuna na elimo.—2:19.
11. “Libombami mosantu” ezali nini, mpe na likambo nini Paulo abondeli mpo na Baefese?
11 “Libombami [mosantu] na Klisto” (3:1-21). Nzambe asili sikawa komonisa epai na bantoma mpe basakoli na ye ya bulɛɛ “libombami mosantu na Klisto . . . ete, kati na Klisto Yesu, bapakano bazali batuki na libula, ndambo na nzoto moko na biso elongo mpe bazwi na elaka, na nzela na Nsango Malamu.” (3:4, 6) Na lisalisi ya ngɔlu ya Nzambe, Paulo akómaki mosaleli na yango, mpo na koyebisa bozwi ya Klisto oyo boleki monene mpe kosalisa bato ete bámona lolenge libombami mosantu lizali kokokisama. Ezali na nzela ya lisangá nde mayele mozindo ya Nzambe oyo mazali na mitindo ndenge na ndenge mayebisami epai na bato. Na ntina na likambo yango, Paulo azali kobondela na boye ete bákembisama na nguya na nzela na elimo ya Nzambe mpo ete básosola malamumalamu bolingo ya Klisto, oyo eleki makanisi nyonso, mpe báyeba ete Nzambe akoki “kosala kati na biso makambo maleki nyonso ezali biso kolɔmba soko kobanza.”—3:20.
12. (a) Lolenge nini baklisto basengeli komitambwisa, mpe mpo na nini? (b) Makabo nini Klisto apesaki, mpe na ntina nini? (c) “Kolata bomoto ya sika” esangisi makambo nini?
12 Kolata “[bomoto, NW] ya sika” (4:1–5:20). Baklisto basengeli kotambola na motindo mobongi na libyangami oyo bazwaki, na kosɔkɛma nyonso mpe na bopɔlɔ, na motema molai mpe na bolingo, mpe na ekanganeli ya kimya oyo ekopesaka bomoko. Mpamba te ezali bobele na elimo moko, na elikya moko, na kondima moko, mpe na “Nzambe moko, ye oyo azali Tata na nyonso; oyo azali likoló na nyonso mpe esika moko na nyonso mpe katikati na nyonso.” (4:6) Na yango Klisto, “Nkolo moko,” asili kopesa basakoli, bapalanganisi na nsango malamu, babateli na mpate, mpe bateyi, “mpo na kobongisa Babulami, mpo na mosala na kosungaka, mpo na kotongaka nzoto na Klisto.” Yango wana, Paulo akomi ete, “awa ekolobaka biso na sembo kati na bolingo, tókóla na makambo nyonso epai na ye oyo azali motó, ye Klisto,” lokola nzoto oyo ekangisami malamu, oyo binama na yango bizali kosala na bomoko. (4:5, 12, 15) Bizaleli ya bomoto ya kala oyo bizali mbindo, bizangi litomba, mpe bizangi boyebi, bisengeli kobwakama; moto mokomoko asengeli koyeisama sika kati na nguya oyo ezali kopusa elimo na ye mpe asengeli “kolata bomoto ya sika oyo ezalisamaki engebene mokano ya Nzambe, kati na boyengebene mpe bosembo ya solo.” Mpo ete moko na moko kati na bango azali mpo na basusu banso, basengeli koloba solo mpe kobwaka nkanda na kongala, koyiba, maloba na mbindo, mpe makambo nyonso ya mpii—ete báyokisa elimo santu ya Nzambe mawa te. Tiká kútu nde ‘bázala na boboto moko epai na mosusu, na motema mawa, kolimbisanáká na bolingo nyonso, lokola Nzambe alimbisaki bango na nzela na Klisto.’—4:24, 32, NW.
13. Mpo na kozala momekoli na Nzambe, moto asengeli kosala nini?
13 Banso basengeli kozala bamekoli na Nzambe. Pite, mbindo, mpe lokoso esengeli kolobelama ata moke te kati na bango, mpamba te baoyo bazali kosala makambo yango bazali na libula te kati na Bokonzi. Paulo apesi Baefese toli ete: “Bótambolaka lokola bana na moi.” “Bókeba” mpo na lolenge oyo bozali komitambwisa, bósombaka ntango ebongi, “zambi mikolo izali mabe.” Ɛɛ, basengeli ‘kokóba kososola oyo ezali mokano ya Yehova’ mpe kolobela masanzoli ya Nzambe na komonisáká botɔ́ndi.—5:8, 15-17.
14. Wapi mikumba ya mibali epai na basi na bango mpe ya basi epai na mibali na bango?
14 Botosi oyo ebongi; etumba ya boklisto (5:21–6:24). Basi basengeli kotosa mibali na bango, lolenge lisangá litosaka Klisto, mpe mibali basengeli kokóba kolinga basi na bango, “pelamoko Klisto alingaki lingomba [“lisangá,” NW].” Bobele bongo, “mwasi asengeli kozala na limemya mozindo epai na mobali na ye.”—5:25, 33, NW.
15. Toli nini Paulo apesi epai na bana mpe baboti, baombo mpe bankolo, mpe mpo na molato ya etumba ya moklisto?
15 Bana basengeli kofanda na bomoko elongo na baboti, na botosi mpe na koyokáká disipilini euti na Nzambe. Baombo mpe bankolo na bango basengeli mpe komitambwisa na motindo oyo ekosepelisa Nzambe, mpamba te Nkolo na nyonso “azali kati na Likoló mpe epai na ye kotala bilongi [“koponapona,” NW] ezali te.” Mpo na kosukisa, tiká ete banso ‘bámikembisa kati na Nkolo mpe na makasi ya nguya na ye,’ kolatáká molato mobimba ya etumba oyo mouti na Nzambe mpo na kozala na likoki ya kotɛlɛma ngwi liboso na Zábolo. “Na yango nyonso bókamata nguba na kondima,” mpe lisusu “mopanga na [elimo, NW], yango Liloba na Nzambe.” Bóbondelaka, mpe bósɛnzɛlaka ntango nyonso. Paulo asɛngi ete bábondelaka mpe mpo na ye, ete, na bonsomi nyonso ya maloba, akoka “kosakola na molende libombami na Nsango Malamu.”—6:9, 10, 16, 17, 19.
LITOMBA NA YANGO
16. Mituna nini mizali kopesamela biyano bibongi kati na mokanda ya Baefese, mpe nini eyebisami na ntina na bomoto oyo ezali kosepelisa Nzambe?
16 Mokanda ya Baefese elobeli pene na makambo nyonso ya bomoi ya moklisto. Na kotalela bokóli ya nokinoki ya mikakatano oyo mizali konyokola bato mpe kobeba ya bizaleli kati na mokili na mikolo ya lelo, toli ya Paulo, oyo ezali malamu mpe ebongi, ezali kopesa litomba ya solosolo epai na baoyo balingi kozala na bomoi ya bobángi Nzambe. Lolenge nini bana basengeli komitambwisa liboso na baboti, mpe baboti liboso na bana? Mokumba ya mobali epai na mwasi na ye ezali nini, mpe ya mwasi epai na mobali na ye ezali nini? Moko na moko kati na lisangá asengeli kosala nini mpo na kobatela bomoko kati na bolingo mpe bopɛto ya boklisto na mokili oyo mabe? Toli ya Paulo ezali kopesa biyano na mituna nyonso wana, mpe akóbi lisusu na komonisáká makambo oyo masengeli mpo na kolata bomoto ya sika ya boklisto. Na lisalisi ya boyekoli ya mokanda ya Baefese, banso bakozala na likoki ya kozwa bososoli ya solosolo etali lolenge ya bomoto oyo ezali kosepelisa Nzambe mpe oyo “ezalisamaki engebene mokano ya Nzambe, kati na boyengebene mpe bosembo ya solo, NW.”—4:24-32; 6:1-4; 5:3-5, 15-20, 22-33.
17. Mokanda ya Baefese emonisi nini na likambo litali kosala na boyokani na bibongiseli bizwami kati na lisangá?
17 Mokanda yango momonisi lisusu ntina ya koponama mpe kopesamela mikumba kati na lisangá. Yango ezali “mpo na kobongisa Babulami, mpo na mosala na kosungaka, mpo na kotongaka nzoto na Klisto,” na ntina na kozala bato bakɔmeli. Na kosaláká na bomoko kati na bibongiseli wana ya lisangá, moklisto akoki, ‘kati na bolingo, kokóla na makambo nyonso kati na ye oyo azali motó, elingi koloba Klisto.’—4:12, 15.
18. Nini emonisami polele na ntina na “libombami mosantu” mpe tempelo ya elimo?
18 Mokanda ya Baefese epesaki matomba mingi na lisangá ya liboso, wana ekólisaki bososoli na bango ya “libombami [mosantu, NW] na Klisto.” Emonisamaki polele kati na yango ete, elongo na bandimi oyo bazalaki Bayuda, “bato na mabota” bazalaki kobyangama mpo na kozala ‘batuki na libula mpe basangani ya nzoto mpe bazwi . . . na elaka kati na boyokani elongo na Klisto Yesu na nzela ya nsango malamu.’ Efelo ya bokabwani, elingi koloba “Mibeko mipesamaki,” oyo ekabolaki bato na mabota mpe Bayuda elongolamaki, mpe sikawa, na nzela ya makila ya Klisto, banso basili kokóma bato ya mboka ya babulami mpe basangani ya ndako ya Nzambe. Na kokesena monene na tempelo ya nzambe ya bapakano, Alatemi, bango bazalaki kotongama esika moko kati na Klisto Yesu mpo na kozala esika ya kofanda ya Nzambe na elimo—“tempelo ya bulɛɛ mpo na Yehova.”—3:4, 6; 2:15, 21, NW.
19. Elikya nini mpe elendiseli nini mokanda ya Baefese ekóbi kopesa na mikolo ya lelo?
19 Na oyo etali “libombami mosantu,” Paulo alobelaki mpe “eyangeli moko . . . mpo na kosangisa biloko nyonso esika moko lisusu kati na Klisto, biloko oyo bizali na makoló [baoyo baponami mpo na koyangela na Bokonzi ya likoló] mpe biloko bizali na mabelé [baoyo bakofanda na mabelé kati na teritware ya Bokonzi].” Na bongo, mokano monene ya Nzambe oyo motali kozongisa kimya mpe bomoko emonisami lisusu polele. Ezali na ntina na yango nde Paulo abondelaki mpo na Baefese, oyo miso ya mitema na bango engɛngisamaki, ete básosola malamumalamu elikya oyo Nzambe abyangaki bango mpo na yango mpe bámona “bozwi mingi ya nkembo oyo Nzambe abombi lokola libula mpo na babulami.” Maloba wana malendisaki bango mpenza mpo na elikya bazalaki na yango. Mpe mokanda ya Baefese oyo mopemami mozali kokóba kolendisa lisangá na mikolo ya lelo, ete ‘kati na makambo nyonso tótonda na litondi nyonso oyo Nzambe azali kopesa.’—1:9-11, 18; 3:19, NW.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Origin and History of the Books of the Bible, ebimeli ya 1868, C. E. Stowe, lokasa 357.
b New Bible Dictionary, ebimeli ya mibale, 1986, ebimisami na J. D. Douglas, lokasa 175.
c Búku Insight on the Scriptures, Vol. 1, lokasa 182.