Lolenge nini nakoki koyika mpiko na mawa na ngai?
“NAOKAKI bopusi makasi likoló na ngai ete nábomba mayoki na ngai,” oyo ezali maloba ya Mike wana ezali ye komikundola liwa ya tata na ye. Mpo na Mike, kobomba mawa na ye ezalaki likambo ya liboso ya kosala. Na nsima, ayaki koyeba ete azalaki komikosa. Na yango, na ntango moninga ya Mike akufelaki nkɔ́kɔ ya mobali, Mike ayebaki nini asengelaki kosala. Alobi ete: “Soki ezalaki na bambula eleki, mbɛlɛ nabetaki ye mwa moke na lipeka mpe koloba na ye ete: ‘Zalá mobali.’ Sikawa, nasimbaki ye na lobɔkɔ mpe nalobaki na ye ete: “Ndima kooka nyonso oyo okoki kooka. Ekosunga yo mpo na koyika mpiko. Soki olingi ete nakende na ngai mpe natika yo moko, nakokende. Soki olingi ete ngai natikala awa, nakotikala. Kasi kobanga te mpo na komonisa mayoki na yo.’”
MaryAnne aokaki mposa makasi ya kobomba mayoki na ye na ntango mobali na ye akufaki. Amikundoli ete: “Nazalaki na mposa ya kozala ndakisa mpo na basusu, yango wana nalingaki te kotika nzela na mayoki na ngai. Kasi na nsuka, nayaki koyeba ete komeka kozala ndakisa ya basusu mpo na oyo etali mayoki esungaki ngai te. Nabandaki kotalela ezalela ya likambo na ngai mpe koloba ete: ‘Lelá soko osengeli kolela. Kozala na motema makasi mingi te. Monisá mayoki na yo mpo ete na nsima ómiyoka malamu.’”
Na yango, Mike mpe MaryAnne bapesi toli oyo ete: Monisá mawa na yo! Mpe, bazali na elónga. Mpo na nini? Mpamba te yango ezali kobɔndisama oyo esengeli. Kokitisa mayoki na yo ekoki kolongola bopusi oyo ezali kati na yo. Lolenge ebongi ya komonisa mayoki, soki esangisami na bososoli mpe koyeba likambo na lolenge ya sikisiki, ekopesa yo nzela ete otalela mayoki na yo na lolenge malamu.
Ya solo, bato banso bamonisaka mawa na lolenge moko te. Mpe makambo motindo oyo, na ndakisa, molingami akufi na liwa ya pwasa to liwa eyei nsima ya bɔkɔnɔ oyo eumeli mingi, ekoki kozala na bopusi likoló na lolenge oyo bato batikali na bomoi bakomonisa mayoki na bango. Kasi likambo moko limonani ete ezali solo: Kobomba mayoki na yo ekoki kopesa mpasi na nzoto to na motema. Ezali malamu kobimisa mawa na yo. Na lolenge nini? Makomami mazali na batoli ya sikisiki.
Lolenge nini kosilisa mawa
Koloba ekoki kozala lolenge malamu ya kosilisa mawa. Nsima ya liwa ya bana na ye zomi, bakisá mpe makambo mosusu ya mpasi oyo ye moko akutanaki na yango, Yobo tata na mabota ya kala, alobaki ete: “Molimo na ngai elɛmbi na bomɔi na ngai, nakobimisa [na Liebele, “kokangola”] koyimayima na ngai polele; nakoloba kati na bololo na molimo na ngai.” (Yobo 1:2, 18, 19; 10:1) Yobo akokaki lisusu kobomba mabanzo na ye te. Asengelaki kokangola yango, asengelaki “koloba” yango. Bobele bongo, Shakespeare, mokomi na ntóki mobotama ya Angleterre akomaki kati na búku na ye Macbeth ete: “Monisá ete ozali kooka mawa, soki te okonyokwama yo mpenza.”
Na yango, koyebisa mayoki na yo epai na “moninga moko ya solo” oyo akoyokamela yo na motema kokita mpo na kokabola mawa elongo na yo ekoki kopesa mwa kobondisama. (Masese 17:17) Komonisa makambo oyo okutani na yango mpe mayoki na yo na maloba, ekómisaka yango pɛtɛɛ mpo na kokanga ntina na yango mpe kolónga yango. Soki moyoki na yo azali moto oyo akufelá ndeko, oyo ayikaki mpenza mpiko na mawa na ye, okoki kozwa litomba na mwa ndambo na batoli ya sikisiki na ntina etali lolenge oyo okoki kosala. Na ntango mwana na ye akufaki, mama moko alimboli mpo na nini azwaki lisungi na kosololáká elongo na mwasi mosusu oyo akutanaki na mpasi motindo moko na ye: “Koyeba ete moto mosusu azwaki mpe mpasi motindo moko, alelaki mpo na yango, mpe azali naino kobika mpe azongeli lisusu bomoi na ye ya malamu na lolenge moko to mosusu, ezalaki mpenza elendiseli monene mpo na ngai.”
Ezali boni soki ozali komiyoka malamu te mpo na koloba na ntina na mayoki na yo? Na nsima ya liwa ya Sauli mpe Yonatana, Davidi akomaki loyembo moko ya mawa na mayoki makasi mpenza, na nzela na yango abimisaki mawa na ye nyonso. Na nsuka, nzembo wana ya mawa eyaki kokóma eteni moko ya mokanda ya Biblia ya Samwele ya mibale. (2 Samwele 1:17-27; 2 Ntango 35:25) Bobele bongo, basusu bamonaka malamu kobimisa mayoki na bango na kokomáká. Mwasi moko akufelaki mobali alobaki ete asengelaki kokoma mayoki na ye mpe na mikolo ya nsima, átánga makambo oyo akomaki. Amonaki ete yango ezalaki libɔndisi ya malamu.
Ézala na maloba to na nkomá, kolobela mayoki na yo ekoki kosalisa yo na kosilisa mawa na yo. Ekoki mpe kosunga mpo na kososola makambo na bosikisiki mpenza. Mama moko oyo akufelaki mwana alobi ete: “Ngai mpe mobali na ngai toyokaki nsango ya babalani oyo babomaki libala nsima ya kokufela mwana, mpe tolingaki te ete likambo motindo wana ékómela biso. Na yango, ntango nyonso oyo tozalaki kooka nkanda, koluka kopamelana moko na mosusu, tozalaki koluka nzela ya kosilisa likambo. Nabanzi ete tobelemaki lisusu makasi moko pene na mosusu na kosaláká bongo.” Na yango, na kobimisáká mayoki na yo polele, yango ekosalisa yo na koyeba ete, atako okoki kozala kati na ezalela ya mpasi motindo moko, basusu bakoki komonisa mawa na bango na motindo mokeseni—na lolenge na bango mpenza.
Eloko mosusu oyo ekoki kobɔndisa yo kati na mawa, ezali bongo kolela. Biblia elobi ete “ntango na kolela” ezali. (Mosakoli 3:1, 4) Ya solo, liwa ya moto oyo tolingaki mingi esalaka ete tókóma kati na ntango motindo wana. Kobimisa mpisoli mpo na mawa ezali moko na makambo ya ntina oyo esengeli mpo na kozongela lisusu komiyoka malamu.
Elenge mwasi moko alimboli ndenge nini moninga moko ya penepene asungaki ye mpo na koyika mpiko na ntango mama na ye akufaki. Azali komikundola ete: “Moninga na ngai azalaki ntango nyonso elongo na ngai. Alelaki elongo na ngai. Asololaki na ngai. Yango wana nakoki bobele kobimisa mayoki na ngai, mpe yango ezalaki na ntina mingi mpo na ngai. Nasengelaki kooka nsoni te mpo na kolela.” (Kokanisá na Baloma 12:15.) Yo mpe osengeli kooka nsoni te mpo na kolela. Lokola tomonaki yango, Biblia etondi na bandakisa ya mibali mpe basi na kondima—kati na bango mpe Yesu Klisto—baoyo babimisaki mpisoli mpo na mawa kozanga kooka nsoni.—Genese 50:3; 2 Samwele 1:11, 12; Yoane 11:33, 35.
Mbala mosusu okoki komona ete, na ntango mosusu mayoki na yo makobima pwasa. Mpisoli ekoki kobima kozanga elaká. Mwasi moko oyo akufelaki mobali azalaki komona ete kosomba biloko na magazini (likambo oyo bazalaki kosala mingi elongo na mobali na ye) ekokaki kopusa ye na kolela, mingimingi na momesano, soki akómi pene ya biloko oyo mobali na ye azalaki kolinga mingi. Kitisá motema na yo. Mpe kokanisa te ete osengeli kobomba mpisoli na yo. Omikundola ete ezali na ntina mpe ezali mpenza moko na lolenge ya komonisa mawa.
Lolenge nini kolónga liyoki ya komema ngambo
Lokola tomonaki yango liboso, basusu bamonaka lokola ete bamemi ngambo na nsima ya liwa ya moto oyo balingaki mingi. Yango ekoki kosalisa mpo na kolimbola mawa makasi oyo mosembwi Yakobo azalaki na yango na ntango bakosaki ye ete mwana na ye, Yozefe, abomamaki na ‘nyama mabe.’ Ye moko Yakobo nde atindaki Yozefe ákende kotala soki bandeko na ye bazali malamu. Ekoki kozala mpo na ntina wana nde Yakobo atondaki na mayoki ya komema ngambo, lokola nde akokaki koloba ete: ‘Mpo na nini natindaki Yozefe ete ákende ye moko? Mpo na nini natindaki ye ákende kati na esika etóndi na banyama mabe?’—Genese 37:33-35.
Mbala mosusu okoki kokanisa ete ezali mpo na bopotu oyo yo omonisaki nde molingami na yo akufi. Koyeba ngambo wana—ézala ya solo to ezali bobele ya makanisi mpamba—lolenge ya komonisa mawa ekoki mpenza kosunga yo. Awa lisusu, osengeli te kobomba mayoki yango kati na yo moko. Koyebisa liyoki ya komema ngambo oyo ozali na yango ekoki kopesa yo libɔndisi oyo ozali na yango mposa.
Kasi, óyeba ete ezala bolingo ya motindo nini tozali na yango mpo na moto mosusu, tokoki te kozala na bokonzi likoló na bomoi na ye, tokoki mpe te kopɛngola “ntango mpe makambo makanami te” ete ekómela balingami na biso te. (Mosakoli 9:11, NW) Lisusu, na ntembe te, ozalaki na mikano ya mabe te. Na ndakisa, soki omemaki ye nokinoki te epai na monganga, mokano na yo ezalaki ete molingami na yo azwa maladi mpe ákufa? Soko moke te! Na yango, ozali mpenza na ngambo kati na liwa na ye? Ezali bongo te.
Mama moko ayebaki lolenge nini kolónga liyoki ya komema ngambo na ntango mwana na ye ya mwasi akufaki na likámá ya motuka. Alobi ete: “Namiyokaki ete namemi ngambo mpo ete natindaki ye. Kasi nayaki koyeba ete kozala na makanisi motindo wana ezalaki likambo ya bozoba. Ezalaki na yango mabe te kotinda ye elongo na tata na ye mpo na kokende kosomba mwa biloko. Ezalaki bobele likámá.”
Mbala mosusu okoki koloba ete: ‘Kasi ezali na makambo mingi oyo nakokaki koloba to kosala.’ Ya solo, kasi nani kati na biso akoki koloba ete azali tata, mama to mwana ya kokoka? Biblia ezali kokundwela biso ete: “Biso yɔnsɔ tokokweaka na makambo mingi. Sɔkɔ moto akokweaka na maloba na ye tɛ, ye moto abongi na yɔnsɔ mpe ayebi kopekisa njoto na ye mobimba.” (Yakobo 3:2; Baloma 5:12) Na yango, ndimá likambo oyo ete ozali moto ya kozanga kokoka. Kolobáká ntango nyonso ete “soki, soki” ekobongola likambo moko te, kasi ekoki nde koumisa bozongi na mayoki na yo ya malamu.
Soki ozali na bantina malamu ya kokanisa ete ozali solo mpenza na ngambo, ete ezali bobele ya makanisi mpamba te, talelá likambo lileki ntina kati na makambo nyonso mpo na kolɛmbisa liyoki ya komema ngambo—bolimbisi ya Nzambe. Biblia epesi biso endimiseli oyo ete: “Ɛ [Yehova], sɔkɔ yɔ okotalaka bokɛsɛnɛ, Ɛ Nkolo, nani akotɛlɛma? Na yɔ kolimbisa ejali ete obangama.” (Njembo 130:3, 4) Okoki te kozongela makambo ya kala mpe okoki kobongola ata likambo moko te. Atako bongo, okoki kosɛnga bolimbisi ya Nzambe mpo na mabungá ya kala. Bongo, nini lisusu? Lokola Nzambe alaki ete akolimbisa mabungá na yo ya kala, yo moko mpe okoki komilimbisa te?—Masese 28:13; 1 Yoane 1:9.
Lolenge nini kolónga nkanda
Ozali mpe kooka nkanda, mbala mosusu epai na minganga, baenfirimié, baninga, ata epai na mowei? Óyeba ete oyo mpe ezali liyoki oyo ekómelaka bato banso. Mbala mosusu nkanda na yo ezali liyoki likobimaka nzela moko na mpasi oyo ozali kooka. Koyeba yango ekoki kosalisa yo. Mokomi moko alobaki ete: “Bobele kososola ete ozali na nkanda—kosala na yango likambo te, bobele koyeba yango—ekoki kobikisa yo na matomba mabe na yango.”
Kobimisa to kolobela nkanda na yo ekoki mpe kozala malamu. Na lolenge nini? Esengeli soko moke te kosalema na lolenge ezangi komipekisa mpe na kolekisa ndelo. Biblia ezali kokebisa biso ete koumisa nkanda mpo na ntango molai ezali likámá. (Masese 14:29, 30) Kasi okoki kozwa libondisi na kosololáká na ntina na yango epai na moninga moko oyo akoki komitya na esika na yo. Mpe basusu bamonaka ete konyɔlisa nzoto na ngalasísi makasi ekoki kosunga bango na ntango bazali na nkanda.—Talá mpe Baefese 4:25, 26.
Atako kofongola motema mpe komonisa mayoki na yo na bosembo nyonso ezali likambo ya ntina, mwa liloba ya kopesa likebisi ebongi mpenza. Komonisa mayoki na yo epai na basusu ezali likambo moko, kasi kokweisa yango likoló na motó ya basusu ezali mpe likambo msusu. Osengeli te kopamela basusu mpo na nkanda na yo. Na yango, zalá na makanisi malamu mpo na koyebisa mayoki na yo, kasi kosala te na lolenge ya kopesa basusu mpasi. (Masese 18:21) Ezali na lisungi lileki monene mpo na kolónga mawa, mpe yango nde tolingi kolobela sikawa.
Lisungi liuti na Nzambe
Biblia ezali kolendisa biso ete: “[Yehova] ajali pɛnɛpɛnɛ na bango bajali na mitema mitutami; akobikisa bango bajali na [elimo enyatami, NW].” (Njembo 34:18) Ya solo, koleka eloko nyonso mosusu, kozala na boyokani malamu elongo na Nzambe ekoki kosalisa yo na koyika mpiko soki moto oyo olingaka akufi. Na lolenge nini? Batoli nyonso ya sikisiki oyo euti kolobelama awa ezwi moboko na yango kati na Liloba ya Nzambe, Biblia, to mpe ezali na boyokani na yango. Kosalela malako wana ekoki kosalisa yo na koyika mpiko.
Lisusu, kotyola nguya ya libondeli te. Biblia ezali kopesa biso toli oyo ete: “Kitisa mokumba na yɔ epai na [Yehova] mpe ye akokumba yɔ.” (Njembo 55:22) Soki koyebisa mayoki na yo epai na moninga moko ya motema mawa ekoki kosunga yo, kofongola motema na yo epai na “Njambe na kobɔndisa yɔnsɔ,” ekosunga yo lisusu mingi koleka.—2 Bakɔlinti 1:3, 4.
Elimboli te ete bobele libondeli mpamba nde ekoki kosalisa biso na komiyoka malamu. Ye ‘oyo akoyokaka mabondeli’ alaki kopesa elimo santu epai na basaleli na ye oyo bazali kosɛnga ye yango na bosembo nyonso. (Njembo 65:2; Luka 11:13) Mpe elimo santu ya Nzambe, to nguya na ye oyo ekosalaka mosala, ekoki kopesa yo ‘nguya oyo eleki nguya na bato’ mpo óyika mpiko mokolo na mokolo. (2 Bakolinti 4:7, NW) Omikundola ete: Nzambe akoki kosalisa basaleli na ye ya sembo ete báyika mpiko na likambo nyonso oyo bakoki kokutana na yango.—Kokanisá na 1 Bakolinti 10:13.
Mwasi moko oyo akufelaki mwana azali komikundola lolenge nini nguya ya libondeli esalisaki ye mpe mobali na ye kati na mawa na bango. Alobi ete: “Soki tofandi na ndako na mpokwa mpe mawa ekómeli biso makasi, tozalaki kobondela na mongongo makasi. Mpo na mbala na biso ya liboso ya kosala likambo kozanga ete tozala elongo na ye—likita ya liboso ya lisangá tokendeki, liyangani ya liboso oyo tozalaki kati na yango—tozalaki kobondela mpo na kosɛnga nguya. Na ntango tolamukaki na ntɔ́ngɔ́ mpe bosolo ya likambo yango emonanaki lokola ete ezalaki mpasi mingi mpenza, tobondelaki Yehova ete ásunga biso. Mpo na bantina mosusu, ezalaki kopesa ngai mawa mingi kotambola ngai moko kati na ndako. Mpe mbala nyonso oyo nazalaki koya ngai moko na ndako, nazalaki kosɛnga epai na Yehova ásalisa ngai ete nazala ntango nyonso na motema ya kokita.” Mwasi wana ya sembo andimaki na etingia mpe na boyengebene nyonso ete mabondeli yango masungaki ye. Yo mpe okoki komona ete na kobondeláká na etingia, okozwa ‘kimya na Njambe oyo eleki makanisi yɔnsɔ, oyo ekosɛnjɛla motema na yo mpe bikaniselo na yo.’—Bafilipi 4:6, 7; Baloma 12:12.
Lisungi oyo Nzambe akopesaka ebotaka matomba. Ntoma moklisto Paulo alobaki ete Nzambe “akobɔndisa biso kati na bolɔji na biso. Na bongo biso tokoki kobɔndisa bango bajali kati na bolɔji.” Ezali solo ete, lisungi liuti na Nzambe likolongolaka mpasi te, kasi likoki kopesaka nzela na koyikela yango mpiko. Yango elimboli te ete osengeli kolela lisusu te to mpe okobosana molingami na yo. Kasi okoki kozongela mayoki na yo ya malamu. Mpe na kosaláká bongo, likambo oyo okutani na yango ekoki kosalisa yo na komitya na esika ya basusu mpe komonisa motema mawa na kosalisáká basusu na koyika mpiko na mawa motindo moko.—2 Bakɔlinti 1:4.
Kanisá likoló na mituna oyo
Mpo na nini kooka mawa ezali na ntina?
Lolenge nini okoki kolɛmbisa mawa na yo?
Lolenge nini Makomami makoki kosalisa yo na kolónga mayoki ya komema ngambo mpe ya nkanda?
Lolenge nini boyokani elongo na Nzambe ekoki kosunga yo na koyika mpiko na liwa ya molingami na yo?
Wapi moko na batoli ya sikisiki mpo na kolónga mawa?
[Etanda na lokasa 18]
Mwa ndambo ya batoli ya sikisiki
Kotyela baninga motema: Kokakatana te mpo na kotika nzela na basusu ete básalisa yo soki bamonisi bolingo malamu ya kosala yango mpe moko na masalisi wana makoki kozala na ntina mpo na yo. Ósosola ete lisungi na bango ekoki kozala lolenge na bango ya komonisela yo nini oyo bango bazali kooka; mbala mosusu bakoki te komonisa mayoki na bango na maloba.—Masese 18:24.
Batelá kɔ́lɔngɔnɔ na yo: Kooka mawa ekoki kolɛmbisa yo, mingimingi na ebandeli. Nzoto na yo ezali na mposa ya kopema mingi, kominyɔlisa, kolya malamu koleka lolenge olyaka liboso. Kokutana na monganga mbala na mbala ekoki mpe kozala likambo ya malamu oyo osengeli kosala.
Zelisá mikano minene: Soki likoki lizali, zelá naino mwa ntango moke éleka kino okozongela makanisi na yo malamu liboso ete ózwa ekateli, na ndakisa mpo na likambo ya kotɛka ndako, to koluka mosala mosusu. (Masese 21:5) Mwasi moko oyo akufelaki mobali alobaki ete mikolo mingi nsima wana akufelaki mobali, akabaki biloko na ye mingi. Na nsima ayaki kososola ete, akabaki mpe suveníli moko oyo azalaki kolinga yango mingi.
Zalá na motema pɛtɛɛ: Mawa eumelaka mingi koleka lolenge bato bakanisaka yango. Mbula na mbula, komikundola na ntina na molingami mowei ekoki kolamwisa lisusu malozi. Bafɔtɔ́, nzembo, ata mpe nsolo ekoki kopusa moto na kobimisa mpisoli. Boyekoli moko ya bato ya zebi likoló na ezalela ya mawa ya kokufela moto, elimbolaki yango na maloba oyo: “Ye oyo akufeli moto akoki mbala na mbala kobongola mayoki na ye na lolenge ya kokamwa mpe nokinoki, kolongwa na liyoki moko kino na liyoki mosusu, koboya komikundola makambo ya mowei ekoki kobongwana na liyoki ya kokólisa mposa ya komikundola makambo na boumeli ya mwa ntango mokuse. Kobosana te bilaká minene ya Yehova.—Bafilipi 4:8, 9.
Ómitya na esika ya basusu: Kozala na motema likolólikoló te mpo na bato. Yebá ete yango ekobulunganisa bango. Kozanga koyeba nini oyo bakoki koloba, na kozanga mayele, bakoki koloba likambo lilongobani te.—Bakɔlɔsɛ 3:12, 13.
Kebá na kosalela bankisi to masanga mpo na kobosana mawa: Kobɔndisama nyonso oyo ezwami na nzela ya bankisi to masanga ezalaka bobele mpo na ntango mokuse mpenza. Nkisi esengeli komelama bobele engebene malako ya monganga. Kebá! bankisi mingi etyaka bato kati na boombo. Lisusu, yango ekoki koumisa ezalela ya mawa. Monganga moko apesi likebisi oyo ete: “Mpasi esengeli koyikelama mpiko, kookama, mpe na nsuka, koyeba ntina na yango, kasi kozongisa yango na nsima na lolenge eleki ndelo, na kolalisáká [moto] mpongi na nzela ya bankisi, ekoki koumisa mawa mpe kobulunganisa.” Kobɔndisama oyo ekoumelaka ekoya na komanyoláká likoló na bilaká kitoko ya Yehova.—Nzembo 1:2; 119:97.
Zongelá lolenge ya bomoi na yo ya mokolo na mokolo: Mbala mosusu ekosengela na yo liboso kosala makasi mpo na kokende mosala, kokende kosomba biloko, to kokokisa mikumba misusu. Kasi okoki komona ete lolenge na yo ya bomoi ya mokolo na mokolo ekozala na litomba mingi mpo na yo. Zalá na makambo mingi ya kosala kati na misala ya Boklisto.—Kokanisá na 1 Bakolinti 15:58.
Kobanga te mpo na kosilisa mawa makasi: Lokola yango ekoki kokamwisa, basusu oyo basili kokufela bato babangaka kosilisa mawa makasi oyo bazali kooka, kokanisáká ete kosala bongo ekomonisa ete bazali lisusu na bolingo mingi te mpo na mowei. Ezali bongo te. Kosilisa mawa ekoki kopesa nzela na komikundola makambo kitoko ya kala oyo, na ntembe te, ekoumela kati na yo ntango nyonso.—Mosakoli 3:1, 4.
Kozala na mawa koleka ndelo te: Okoki kobanda komituna ete: ‘Nsuka na ngai ekozala nini?’ Biblia epesi biso toli ete tóbika engebene makambo ya mokolo na mokolo. Mwasi moko mokufeli mobali alobi ete: “Kobika engebene makambo ya mokolo na mokolo, ezali mpenza kosalisa ngai.” Yesu alobaki na bayekoli na ye ete: “Bomitungisa tɛ mpɔ na lobi; lobi ekomitungisa mpɔ na yango mpenja.”—Matai 6:25-34.
[Elilingi na lokasa 15]
Bandakisa euti na Biblia emonisi ete, kokoma mayoki na yo ekoki kosalisa yo na kobimisa mawa na yo
[Elilingi na lokasa 16]
Na mikili nyonso, bato oyo bazali kati na mawa basepelaka kozwa libɔndisi