Lolenge nini basusu bakoki kopesa lisungi?
“SOKI ezali na likambo oyo nakoki kosala mpo na yo, yebisa ngai yango.” Ezali maloba oyo mingi kati na biso tolobaka epai na moninga to ndeko oyo auti kokufela moto. Ee, na bosembo nyonso, mbɛlɛ tokolinga mpenza koloba bongo. Tokoki kosala nyonso mpo na kosunga. Kasi ndeko ya mowei akobénga biso mpe akoloba ete: “Nakanisaki na ntina na likambo moko oyo bokoki kosala mpo na kosunga ngai”? Esalemaka bongo ntango nyonso te. Emonani polele ete tosengeli kobanda biso moko kosala eloko, soki tolingi mpenza kosunga mpe kobondisa moto oyo azali na mawa.
Lisese moko ya Biblia elobaka ete: “Liloba lilobami na ntango ya malamu, ezali lokola pómo ya wolo na saani ya palata.” (Masese 25:11, NW) Ezali likambo ya bwanya na koyeba likambo nini osengeli koloba mpe likambo nini osengeli koloba te, nini osengeli kosala mpe nini osengeli kosala te. Talá mwa makanisi mazwami na Makomami oyo makoki kosunga bandeko ya mowei.
Nini osengeli kosala . . .
Koyoka: Yakobo 1:19 elobi ete, zalá na litoyi “na koyoka nɔki.” Moko na makambo maleki malamu oyo okoki kosala mpo na kosunga ndeko ya mowei kati na mpasi na ye, ezali bongo kofungwela ye litoyi. Bato mosusu oyo bakufeli moto bakoki kozala na mposa ya koloba na ntina na molingami na bango oyo akufi, mpo na likámá to mpo na maladi oyo ebomaki ye, to mpo na mayoki na bango uta moto yango akufaki. Na yango, tuná ete: “Okosepela koloba na ntina na yango?” Tiká ete bango moko bázwa ekateli. Wana azalaki komikundola ntango oyo tata na ye akufaki, elenge mobali moko alobaki ete: “Na ntango bato mosusu batunaki ngai soki likambo nini esalemaki mpe na nsima bayokaki ngai mpenza, yango esungaki ngai.” Yokamelá na motema pɛtɛɛ mpe na motema mawa kozanga komioka ete osengeli kopesa biyano to koluka ndenge ya kosilisa mokakatano. Tikelá bango bonsomi ya koloba oyo nyonso balingi koloba.
Pesá elikya: Ndimisa bango ete basalaki nyonso oyo ekokaki na bango kosala (to likambo nyonso mosusu oyo oyebi ete ezali solo mpe ezali malamu). Yebisá bango ete liyoki oyo bazali na yango—mawa, nkanda, liyoki ya komema ngambo to mayoki ya lolenge mosusu—nyonso wana ekoki kozala mabe te. Yebisá bango na ntina na bato mosusu oyo oyebi, baoyo bazongelaki mayoki na bango ya malamu na nsima ya mpasi motindo wana. Masese 16:24 elobi ete “maloba kitɔkɔ” motindo wana makoyeisaka “kobika kati na mikuwa.”—1 Batɛsalɔniki 5:11, 14.
Sombá ntango: Ósomba ntango, bobele te na boumeli ya mwa mikolo ya liboso oyo baninga mpe bandeko bazali naino wana, kasi ata mpe basanza mingi na nsima, wana basusu bazongeli lolenge na bango ya bomoi ya mokolo na mokolo. Na kosaláká bongo, okomonisa ete ozali ‘moninga ya solo,’ oyo azali ntango nyonso pene na moninga na ntango ya ‘mpasi.’ (Masese 17:17) Teresea, ye oyo mwana na ye akufaki na likámá ya motuka alobi ete: “Baninga na biso bazalaki koluka koyeba soki tozalaki na makambo ya kosala na mpokwa mpo ete tólekisa ntango mingi bobele biso moko na ndako te. Yango esalisaki biso ete tólónga mayoki ya kotikala mpamba oyo tozalaki na yango.” Na boumeli ya bambula oyo elandaka na nsima, bokundoli mikolo, na ndakisa bokundoli mikolo ya libala, to mokolo ya liwa, ekoki kozala ntango moko ya mpasi mpo na bato oyo batikali na bomoi. Mpo na nini te kokoma mokolo motindo wana kati na manáka na yo mpo soki mokolo yango ekómi, okoka kokende, soki mposa ezali, mpo na kopesa lisungi ya motema wana?
Bandá kokamata bibongiseli ya malamu: Azali na biloko ya kotinda ete básombela ye? Azali na mposa ya moto moko oyo akoki kotalela ye bana? Bandeko mpe baninga oyo bazali koya kotala ye bazali na mposa ya esika mpo na kofanda? Na mikolo oyo bandeko ya mowei bazalaka mingimingi na mobulungano mpenza, na boye ete bazangaka koyeba ata makambo oyo basengeli kosala, tiká bango moko báyebisa basusu soki ndenge nini bakoki kopesa lisungi na bango. Kasi, soki omoni ete likambo moko lisengeli mpenza kosalema, kozela te ete básɛnga yo, bandá kosala yango. (1 Bakolinti 10:24; kokanisá na 1 Yoane 3:17, 18.) Mwasi moko oyo mobali na ye akufaki, amikundoli ete: “Bato mingi balobaki ete: ‘Soki ezali na likambo oyo ngai nakoki kosala, yebisá ngai.’ Kasi moninga moko atunaki te. Akendeki mbala moko na ndako ya kolala, alongolaki bilamba ya mbeto, asukolaki bilamba oyo ebebaki na ntango akufaki. Moninga mosusu akamataki kantini, mai mpe bisaleli ya kosukola mpe asukolaki mwa tapis ya moke na esika mobali na ngai asanzaki. Mwa baposo na nsima, moko na bankulutu ya lisangá ayaki na bilamba na ye ya mosala mpe bisaleli na ye mpe alobaki ete: ‘Nayebi ete ezali na eloko moko oyo esengeli kobongisama. Eloko nini?’ Nazali mpenza na botɔndi mingi kati na motema na ngai mpo na ye, mpo ete abongiselaki ngai ekuke oyo elɛngɛmaki bobele likoló ya salaniele moko!”—Kokanisá na Yakobo 1:27.
Zalá na elimo ya koyamba bapaya: Biblia ezali kokundwela biso ete: “Bobosana tɛ komɔnisela bapaya boboto.” (Baɛbɛlɛ 13:2) Mingimingi, tosengeli komonisa yango epai na baoyo bazali na mawa. Na esika ya koloba ete “okoki koya na ntango olingi,” tyá nde mokolo mpe ntango. Soki baboyi, kotika nokinoki te. Ntango mosusu ekosɛnga kopesa bilendiseli ya boboto. Ntango mosusu baboyi libyangi na yo mpamba te bazali kobanga noki bakozanga kokanga mayoki na bango liboso ya basusu. To mpe bakoki kozala na liyoki ya komema ngambo soki balei mpe bafandi elongo na baninga na eleko motindo wana. Omikundola na ntina na Ludia, mwasi moyambi bapaya oyo alobelami kati na Biblia. Nsima wana abyangaki Luka mpe basusu epai na ye, Luka alobaki ete: “Abondelaki biso mpenza.”—Misala 16:15, NW.
Zalá na motema pɛtɛɛ mpe kangá ntina: Kokamwa te na oyo bandeko ya mowei bakoki koloba liboso. Omikundola ete bakoki kozala na nkanda to na liyoki ya komema ngambo. Soki bazongiseli yo eyano ya mabe mpo ete nkanda eleki ndelo, ekosɛnga kozala na bososoli mpe na motema pɛtɛɛ mpo ete ozongisa eyano na kongala te. Biblia epesi toli oyo ete: “Bomilatisa mitema na mawa, na boboto, na kosɔkɛma, na bopɔlɔ, na mitema pɛtɛɛ.”—Bakɔlɔsɛ 3:12, 13.
Tindá nkomá: Mingimingi, kotinda nkomá to kálati mpo na kokoma maloba ya bokaboli mawa, etalelamaka na motuya mingi te. Nzokande, litomba na yango ezali nini? Cindy, oyo mama na ye akufaki na maladi ya kanser apesi eyano oyo ete: “Moninga moko atindelaki ngai nkomá moko ya kitoko. Yango esungaki ngai mpamba te, nakokaki kotánga yango mbala na mbala.” Nkomá to kálati motindo yango ekoki kozala “mokanda mokuse,” kasi yango esengeli komonisa mayoki na yo ya motema. (Baebele 13:22) Okoki kokoma ete ozali komibanzabanza mpe ete ozali na likanisi ya malamu mpo na mowei, to mpe okoki kokoma ndenge moto oyo akufaki azalaki na bopusi likoló na bomoi na yo.
Bondelá elongo na bango: Esengeli te kotalela libondeli elongo na bato oyo bakufeli moto lokola eloko ya motuya moke. Biblia elobi ete: “Lilɔmbɔ na moyɛngɛbɛni ejali na nguya mingi.” (Yakobo 5:16) Na ndakisa, wana ezali bango koyoka yo kobondela mpo na bango ekoki kosalisa bango na kolɛmbisa makanisi ya mawa, lokola liyoki ya komema ngambo.—Kokanisá na Yakobo 5:13-15.
Nini osengeli kosala te . . .
Komitangola te bobele mpo oyebi te nini oyo osengeli kosala to koloba: Okoki komiloba ete: ‘Nayebi ete sikawa bazali na mposa ya kozala bango moko.’ Kasi ekoki kozala solo ete tozali komitangola mosika mpo tozali kobanga noki tokoloba to tokosala likambo oyo libongi te. Nzokande, soki baninga, libota, mpe bandeko kati na kondima bamitangoli na ye oyo akufeli moto, ekoki bobele kosala ete amiyoka mpenza ete azali bobele ye moko, kobakiseláká ye mpasi. Omikundola ete mingimingi, maloba mpe misala ya boboto ezalaka likambo ya mpasi te. (Baefese 4:32) Bobele kokóma na esika bazali ekoki kolendisa mingi. (Kokanisá na Misala 28:15.) Wana azali komikundola mokolo mwana na ye ya mwasi akufaki, Teresea alobi ete: “Na boumeli ya ngonga moko, ndako ya lopitalo etondaki na baninga na biso; bankulutu banso mpe basi na bango bazalaki wana. Basi mosusu bayaki kozanga kosanola nsuki, basusu bazalaki na bilamba na bango ya mosala. Batikaki makambo bazalaki kosala mpe bayaki nokinoki. Mingi na bango balobaki ete bayebaki te nini basengelaki koloba, kasi yango ezalaki likambo te, kokóma na bango nde ezalaki likambo ya ntina mingi.”
Kopusa bango na makasi te ete bátika kooka mawa: Tokoki kolinga koloba ete: ‘Ee, ee, sikawa, tika kolela.’ Kasi ebongi malamu otika ete mpisoli étanga. Wana azali koloba na ntina na liwa ya mobali na ye, Katherine alobi ete: “Nakanisi ete ezali mpenza na ntina kotika ye oyo akufeli moto ete álela mpe ábimisa mayoki na ye. Pɛ́ngola ezaleli ya koyebisa bato mosusu liyoki oyo bango basengeli kozala na yango. Mpe kokanisa te ete osengeli kobomba mayoki na yo mpo na kobatela oyo ya bango. Na esika ya kosala bongo, Biblia epesi toli oyo: “Bólelaka na baleli.”—Baloma 12:15.
Koyebisa bango nokinoki te ete bábwaka bilamba to biloko mosusu ya mowei liboso ete bamilɛngɛla mpo na kosala yango: Tokoki kokanisa ete ekozala malamu mpo na bango kobwaka biloko oyo bizali kopusa na komikundola mpo ete ezali koumisa mawa na bango. Kasi lisese oyo ete “Eloko oyo ezali mosika na miso ezali mpe mosika na makanisi” ekoki kosalelama kati na likambo oyo te. Ye oyo akufeli moto akobosana mowei bobele mokemoke. Kolobela lolenge Biblia emonisi ezalela ya Yakobo, tata ya mabota, na ntango bakosaki ye ete mwana na ye Yozefe abomamaki na nyama mabe. Na ntango balakisaki Yakobo elamba ya Yozefe oyo epolisami na makila, “alelaki mwana na ye mikɔlɔ mingi. Bana na ye babali mpe bana na ye basi balongwaki mpɔ na kobɔndisa ye. Nde ye aboyaki kobɔndama.”—Genese 37:31-35.
Koloba te ete: ‘Okobota bébé mosusu’: Mama moko oyo akufelaki mwana azali komikundola ete: “Naboyaki bato oyo bazalaki koloba na ngai ete nakoki kobota mwana mosusu.” Bakoki kozala na likanisi malamu, kasi epai na baboti oyo bazali na mawa, maloba oyo ete mwana mosusu akoki kokitana ekoki ‘koswa lokola na mopanga.’ (Masese 12:18) Mwana moko akoki te kokitana mwana mosusu. Mpo na nini? Mpo ete mwana moko te akokani na mwana mosusu.
Osengeli te koboya koloba makambo na ntina na mowei: Mama moko azali komikundola ete: “Bato mingi bazalaki kolinga te kotanga nkombo ya mwana na ngai Jimmy. Nasengeli kondima ete nazalaki kooka mwa mpasi na ntango bato bazalaki kolinga kotánga nkombo ya mwana na ngai te.” Na yango, osengeli te bobele kobongola lisoló na ntango nkombo ya mowei etángami. Tuna moto yango soki azali na mposa ya koloba na ntina ya molingami na ye. (Kokanisá na Yobo 1:18, 19 mpe 10:1.) Bato mosusu oyo bakufelá bandeko balingaka koyoka ete baninga na bango bazali kolobela bizaleli ya ntina mpo na yango balingaki mowei.—Tala Misala 9:36-39.
Koloba nokinoki te ete: “Ebongaki kaka bongo”: Koluka komonisa liwa lokola eloko moko ya malamu mpo na mowei ezalaka ntango nyonso ‘elendiseli te mpo na milimo mitutami,’ mpo na baoyo bazali na mawa. (1 Batesaloniki 5:14) Wana azali komikundola ntango oyo mama na ye akufaki, elenge mwasi moko alobaki ete: “Basusu bazalaki koloba ete: ‘Azali kooka mpasi te’ to: ‘Nkutu azali nde na kimya.’ Kasi nazalaki kolinga koyoka bongo te.” Maloba motindo wana makoki kolimbola epai na baoyo batikali na bomoi ete basengeli te kooka mawa to mpe ete liwa yango ezalaki likambo monene te. Nzokande, bakoki kooka mawa makasi mpo ete bazangi mpenza molingami na bango.
Ekozala malamu te ete óloba: ‘Nayebi mayoki na yo’: Oyebi yango mpenza? Na ndakisa, okoki solo koyeba lolenge nini moboti akomiyokaka na ntango akufeli mwana soki yo moko okutani naino na likambo motindo wana te? Mpe ata soki esila kokómela yo, yebá ete basusu bakoki mpenzampenza kozala na mayoki motindo moko na yo te. (Kokanisá na Bileli 1:12.) Nzokande, soki emonani ete ebongi, ekoki kozala malamu kolobela lolenge nini ozongelaki mayoki na yo ya malamu nsima ya liwa ya molingami na yo. Mwasi moko oyo mwana na ye ya mwasi akufaki, amonaki ete akitisamaki motema na ntango mama ya elenge mwasi mosusu oyo akufaki ayebisaki ye motindo nini ye azongelaki lolenge ya bomoi na ye ya mokolo na mokolo. Alobaki ete: “Mama ya elenge mwasi wana oyo akufaki abandaki lisoló na ye te na koloba ete ‘nayebi mayoki na yo.’ Ayebisaki ngai bobele lolenge nini makambo mazalaki mpo na ye mpe atikaki ete ngai mpe náloba.”
Kosalisa baoyo bakufeli bato ekosɛnga na yo ete ozala na motema mawa, na bososoli, mpe na bolingo mingi. Kozela te ete ye oyo akufeli moto áya epai na yo. Koloba te bobele ete: “Soki ezali na likambo oyo nasengeli kosala mpo na yo . . . ” Yo moko luká “likambo” yango, mpe bandá kosala yango.
Mwa ndambo ya mituna mitikali: Ezali boni mpo na elikya ya Biblia na ntina na lisekwa? Yango ekoki kolimbola nini mpo na yo mpe mpo na molingami na yo oyo asili kokufa? Lolenge nini tokoki kondimisama ete ezali elikya oyo tokoki kotyela motema?
Kanisá likoló na mituna oyo
Mpo na nini ezali litomba na kokabola mawa elongo na ye oyo akufeli moto na koyokameláká ye?
Wapi moko na makambo oyo tokoki kosala mpo na kobondisa ye oyo azali kati na mawa?
Likambo nini tosengeli kopɛngola koloba to kosala epai na ye oyo azali kolela mowei?
[Etanda na lokasa 25]
Lolenge nini kosalisa bana ete báyika mpiko na ntango liwa likwei?
Soki liwa likweli libota moko, baboti, bandeko mosusu, mpe baninga, bayebaka te nini basengeli koloba to kosala mpo na kosalisa bana ete báyika mpiko mpo na likambo oyo lisili kokwea. Nzokande, bana bazalaka na mposa ete bakóló básunga bango mpo na koyika mpiko na ntango liwa likwei. Talelá mwa ndambo ya mituna oyo mitunamaka mingimingi mpo na oyo etali kosalisa bana ete bákanga ntina ya liwa.
Lolenge nini olimbolaka liwa epai na bana? Ezali na ntina ete olimbola makambo na maloba ya pɛtɛɛ. Limbolá yango mpe na bosolo nyonso. Kokakatana te mpo na kosalela maloba oyo ya solo, lokola “mowei” mpe “liwa.” Na ndakisa, osengeli kofanda elongo na mwana, komema ye, mpe koloba ete: “Likambo moko ya mpasi mpenza lisili kokwea. Tata azwaki maladi moko oyo bato mingi babɛlaka yango te [to likambo nyonso mosusu oyo oyebi ete ezali solo], mpe akufaki. Moto moko te akoki kopamelama mpo na liwa na ye. Tokozanga ye mpenza mpo ete tolingaki ye mingi, mpe ye alingaki biso.” Nzokande, ekoki kozala malamu kolimbola epai na mwana ete ezala ye, to mpe moboti oyo atikali na bomoi akokufa te bobele mpo ete na bantango mosusu ye mpe abɛlaka.
Lendisá bango ete bátuna mituna. Bakoki kotuna ete: ‘Liwa ezali nini?’ Okoki koyanola na lolenge boye: “ ‘Liwa’ elimboli ete nzoto ekoki lisusu kosala te makambo oyo yango ezalaki kosala liboso—ekoki koloba te, kotala te, koyoka te, mpe ekoki kooka eloko moko te.” Moboti oyo andimaka elikya ya Biblia na ntina na lisekwa akoki kosalela libaku oyo mpo na kolimbola ete Yehova Nzambe abosani mowei te mpe akoki kozongisa ye na bomoi kati na Paladiso na mikolo mizali koya. (Luka 23:43; Yoane 5:28, 29)—Talá eteni “Elikya ya solo mpo na bakufi.”
Ezali nde na likambo oyo osengeli koloba te? Koloba ete mowei akei na mobembo moko molai ekopesa lisungi te. Kobanga kosundolama ezali lobanzo monene mpo na mwana, mingimingi soki ezali moboti nde akufi. Koyebisa ete mowei akei mobembo ekoki bobele koyeisa makasi liyoki ya kosundolama epai na mwana mpe akoki kokanisa ete: ‘Nkɔ́kɔ akei, atiki ata elaká te!’ Ozala na bokɛngi mpo na bana mike, mpo oloba te ete mowei alali mpɔngi. Bana mike basimbaka maloba bobele lolenge yango elobami. Soki mwana moke akokanisi mpɔngi na liwa, na nsima, akoki kobanga kokende kolala na butu.
Bana bakoki kokende na milulu ya bokundi ebembe? Baboti basengeli kotalela mayoki ya bana. Soki balingi kokende te, kotindika bango na makasi te to na lolenge mosusu kopamela bango te mpo ete bakei te. Soki balingi kokende, limbwelá bango na bozindo makambo nini makoleka kuna, koyebisa bango na ndakisa, soki sandúku ekozala wana mpe soki ekozala ya kokangama to ekozala ya kofungwama. Limbolá mpe ete bakoki komona bato mingi bazali kolela mpo ete bazali na mawa. Lisusu, tikelá bango nzela ete bátuna mituna. Mpe kitisá bango motema na koyebisáká bango ete soki balingi kozonga, bakoki kozonga na bango.
Bana baokaka ndenge nini soki moto akufi? Mingimingi, bana baokaka ete bazali na ngambo mpo na liwa ya molingami oyo akufi. Lokola mbala mosusu mwana aokaki nkanda mpo na moto oyo akufi, akoki kokanisa nsima ete makanisi to maloba ya nkanda nde ememaki liwa yango. Osengeli kopesa mwa libɔndisi: ‘Ezali makanisi te nde ekopesaka bato maladi, mpe yango ekobomaka bato te.’ Mwana moke akoki kozala na mposa ya bilendiseli wana mbala na mbala.
Osengeli kobomba mawa na yo liboso ya bana mike? Kolela liboso ya bana mike ezali mabe te mpe ezali malamu mpo na kɔ́lɔngɔnɔ. Lisusu, ekoki mpenza kosalema te ete obomba mayoki na yo nyonso liboso ya bana mike; bayebaka mpe basosolaka makambo, mpe mbala mingi bakoki koyeba ete likambo lizali. Kozala sembo mpo na mayoki na yo ya mawa ekopesa bango nzela ya koyeba ete kooka mawa mpe ntango mosusu komonisa mayoki ezali mabe te.
[Elilingi na lokasa 21]
Soki omoni likambo ya ntina oyo ekoki kosalema, kozela te ete básɛnga yo—banda kosala yango
[Elilingi na lokasa 23]
Kokóma na yo na lopitalo ekoki kolendisa libota ya mowei