Mokakatano ya sika ndenge mangomba ekómi mingi
Lokola ozali molakisi, ozali kokutana na mokakatano oyo balakisi bakutanaki na yango mpenza te na ntango ya kala—mangomba ekómi mingi.
NA ELEKO ya Moyen Âge, mbala mingi, bato ya ekólo moko bazalaki kosambela kaka na lingomba moko. Kala mingi te, na nsuka ya bambula ya 1900, na Mpoto, mangomba ya minene oyo eyebanaki mingi ezalaki kaka ya kotánga: Na wɛsti, Lingomba ya Katolike mpe ya Protesta; na ɛsti, Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse mpe ya Bamizilma, mpe Lingomba ya Bayuda. Na ntembe te, lelo oyo mangomba ekómi mingi, ezala na Mpoto to na mokili mobimba. Lelo oyo, mangomba oyo eyebani mingi te ekómi mpe kozwa misisa, ntango mosusu bana-mboka mosusu nde bazali kokóma bandimi na yango, to ezali kokɔta na nzela ya bapaya to ya bato oyo bakimá bamboka na bango.
Yango wana, lelo oyo na mikili lokola Allemagne, Australie, États-Unis, France, mpe Grande-Bretagne, okokuta ebele ya Bamizilma, Babudiste mpe Bahindu. Nzokande, bakristo oyo bazali Batatoli ya Yehova bazali kosala mosala na bango na molende mpenza na mikili koleka 239. Na mikili 14, bazali na bandimi ya molende koleka 150 000.—Talá etanda “Batatoli ya Yehova—Lingomba oyo ezali na mokili mobimba.”
Lokola mangomba nyonso ya mboka moko ezalaka na mimeseno ndenge moko te, yango ekoki kokóma mokakatano mpenza mpo na balakisi. Na ndakisa, mpo na bafɛti oyo bato mingi basalaka, mituna ya ntina oyo bato bakoki kotuna yango oyo: Esengeli kosɛnga mwana-kelasi nyonso asala bafɛti yango, ata azali na lingomba nini? Atako bato mingi bakoki komona ete kosala bafɛti yango ezali mabe te, esengeli nde te kotalela mpe makanisi ya mabota oyo bazali na lingomba to na etuluku ya bato oyo makambo na bango ekeseni na oyo ya bato ebele ya ekólo? Ezali mpe na likambo mosusu oyo esengeli kotalela: Na mikili oyo mibeko ekaboli makambo ya lingomba ná oyo ya Leta mpe makambo ya losambo ezali te kati na mateya oyo esengeli koteyama na eteyelo, basusu bakoki nde komona mabe te soki basɛngi mwana-kelasi nyonso asangana na bafɛti yango?
Bafɛti ya kokanisa mokolo ya kobotama
Bafɛti oyo ezali na mwa boyokani na makambo ya losambo to oyo ezali na boyokani ata moke te na makambo ya losambo ekoki mpe kobimisa mikakatano. Na ndakisa, bafɛti ya kokanisa mokolo ya kobotama oyo esalemaka na biteyelo mingi. Atako Batatoli ya Yehova batindaka bato na makasi te ete báboya kosala bafɛti ya kokanisa mokolo ya kobotama, kasi ndenge oyebi yango, basanganaka mpe na bafɛti yango te. Nzokande, mbala mosusu oyebi te ntina oyo Batatoli ya Yehova ná bana na bango baboyaka kosala bafɛti yango.
Buku moko (Le livre des religions), oyo ekabolami mingi na France, elobi ete momeseno wana ezali molulu mpe etángi yango na kati ya “milulu ya mokili.” Atako lelo oyo bato bamonaka ete kosala bafɛti ya kokanisa mokolo ya kobotama ezali mabe te, kasi momeseno wana eutá nde na bapakano.
Buku moko (The Encyclopedia Americana, [ebimeli ya 1991]) elobi ete: “Na mikili ya kala—Ezipito, Grèce, Roma mpe Perse—bazalaki kosala bafɛti ya kokanisa mokolo ya kobotama ya banzambe, ya bakonzi mpe ya bato minene.” Ralph Linton ná mwasi na ye Adelin, bakomi ya mikanda, bamonisi mpenza ntina ya likambo yango. Na buku na bango (The Lore of Birthdays), bakomaki boye: “Mezopotamia ná Ezipito, esika sivilizasyo ebandaki, ezalaki mpe mikili ya liboso oyo bato bazalaki kokanisa mpe kokumisa mokolo ya kobotama na bango. Kobatela mokolo oyo moto abotamaki ezalaki na ntina na ntango ya kala, mpo yango ezalaki kosalisa mingi mpenza mpo na koyeba, na nzela ya minzoto, makambo oyo ekokómela ye (horoscope).” Lokola likambo yango ezali na boyokani mpenza na astroloji, yango etungisaka mingi bato oyo baboyaka astroloji na kotalela oyo Biblia elobi mpo na yango.—Yisaya 47:13-15.
Yango wana, esengeli kokamwa te soki otángi na buku moko (The World Book Encyclopedia) ete: “Bakristo ya liboso bazalaki kosala fɛti ya kokanisa mokolo ya kobotama [ya Kristo] te, mpo bazalaki komona ete kosala fɛti ya kokanisa mokolo ya kobotama ezali momeseno ya bapakano.”—Volimi 3, lokasa 416.
Lokola Batatoli ya Yehova bayebi makambo oyo touti kolobela, bamonaka malamu ete básala te bafɛti ya kokanisa mokolo ya kobotama. Toboyi te, kobotama ya mwana ezalaka likambo moko ya esengo mpe ya malamu mpenza. Mbala mingi, baboti basepelaka komona mbula na mbula ndenge bana na bango bazali kokola. Batatoli ya Yehova mpe basepelaka mingi kokabela mabota na bango mpe baninga na bango biloko mpe balekisaka ntango ya malamu elongo na bango mpo na komonisa bango ete balingaka bango. Nzokande, lokola bayebi ndenge oyo bafɛti ya kokanisa mokolo ya kobotama ebandá, basepelaka kokabela bango mpe kolekisa ntango elongo na bango na mikolo mosusu ya mbula.—Luka 15:22-25; Misala 20:35.
Noele
Na mokili mobimba, bato bakumisaka Noele, ata na mikili mingi oyo ezali ya bokristo te. Lokola ebele ya mangomba ya bokristo endimaka fɛti yango, bato mosusu bakoki kokamwa ndenge Batatoli ya Yehova bakumisaka yango te. Mpo na nini baboyaka kokumisa yango?
Ndenge babuku mingi elobi yango polele, bato baponaki na ndenge na bango moko mokolo ya 25 Décembre ete ezala mokolo oyo Yesu abotamaki mpo ekokana na dati ya fɛti moko oyo bapakano bazalaki kosala na Roma. Talá maloba oyo euti na babuku ndenge na ndenge:
“Dati oyo Kristo abotamaki eyebani te. Baevanzile epesi mokolo te, sanza mpe te.”—New Catholic Encyclopedia, Volimi III, lokasa 656.
“Makambo mingi oyo ezali kosalema sikoyo na Mpoto na ntango ya Noele, to oyo masolo elobi ete esalemaká na ntango ya kala, eutá epai ya bakristo ya solo te, kasi epai ya bapakano oyo Lingomba ezwaki to etikelaki yango nzela. . . . Fɛti oyo bazalaki kosalela nzambe Saturne na Roma nde ebandisaki makambo mingi ya kosepela oyo esalemaka na Noele.”—Encyclopædia of Religion and Ethics (Édimbourg, 1910), ebimisamaki na James Hastings, Volimi III, nkasa 608-609.
“Ezali na siɛklɛ ya minei nde babandaki kosala fɛti ya Noele na mangomba nyonso ya bokristo na mokolo ya 25 Décembre. Na ntango wana, yango ezalaki mokolo ya fɛti oyo bapakano bazalaki kosala mpo na kosambela moi . . . Na Roma, lingomba ekómaki mpe kosala fɛti yango oyo bato mingi mpenza bazalaki kosala . . . mpe epesaki yango ndimbola ya sika.”—Encyclopædia Universalis, 1968, (na Français) Volimi 19, lokasa 1375.
“Bato bakómaki kosala lisusu mingi fɛti ya Noele mpo na kokesenisa yango na fɛti ya bapakano oyo babengi Sol Invictus (Mithra). Na ngámbo mosusu, mokolo ya 25 Décembre ekokani na mokolo ya solstice d’hiver, mpe bakokanisaki mokolo yango na pole oyo Kristo akɔtisaki na mokili mpe bakómaki kosalela bililingi ya Sol Invictus mpo na Kristo.”—Brockhaus Enzyklopädie, (na Allemand) Volimi 20, lokasa 125.
Ntango makambo ya Noele eyebanaki, bato mosusu basalaki nini? Buku moko (The Encyclopædia Britannica) elobi boye: ‘Na mobu 1644, na nzela ya mobeko moko ya Parlema, etuluku moko ya Baprotesta ya Angleterre (ba puritain) bapekisaki fɛti nyonso to milulu nyonso ya losambo na mokolo yango, mpo [Noele] ezalaki fɛti ya bapakano, mpe basɛngaki bato bákilaka nde bilei na mokolo yango. Mokonzi Charles II azongisaki fɛti yango, kasi bato ya Écosse bakangamaki na makanisi ya ba puritain.’ Bakristo ya liboso bazalaki kosala fɛti ya Noele te; ndenge moko mpe lelo oyo, Batatoli ya Yehova basalaka yango te, basanganaka mpe te na makambo oyo ezali na boyokani na Noele.
Nzokande, Biblia ezali kolendisa ezaleli ya kokabelana biloko to kobenga bandeko mpe baninga mpo na kolya mpe kosepela na mabaku mosusu. Ezali kolendisa baboti báteya bana na bango ete bákabaka na motema mobimba, na esika ya kokabaka kaka na ntango oyo eyebani ete bato bakabelanaka. (Matai 6:2, 3) Batatoli ya Yehova bateyaka bana na bango ete bámemyaka basusu mpe bátikaka bango básala oyo balingi, na ndakisa kokumisa fɛti ya Noele. Ndenge moko mpe, basepelaka mingi ntango bato mosusu mpe bazali komemya ekateli na bango ya koboya kosala fɛti ya Noele.
Bafɛti mosusu
Batatoli ya Yehova batalelaka mpe bafɛti mosusu—ezala bafɛti ya mangomba to oyo ezali na mwa boyokani na makambo ya mangomba—oyo esalemaka na mikili ndenge na ndenge ntango bana bazali na kelasi kaka ndenge batalelaka Noele, na ndakisa Carnaval na Allemagne, bafɛti ya Yuni na Brésil, Halloween na États-Unis, fɛti ya bakonzi (Épiphanie) na France, mpe Setsubun na Japon. Soki ozali na motuna mpo na bafɛti yango to mosusu oyo totángi awa te, Batatoli ya Yehova to bana na bango bakosepela mpenza kopesa yo eyano.