Mokapo ya Ntuku Mibale na Mibale
Boyengebene ebimi na Siona
1, 2. Mbongwana nini elingi kosalema na Yisalaele, mpe nani akosala yango?
BÓSAKOLA bonsomi! Yehova azwi ekateli ya kosikola bato na ye mpe kozongisa bango na mabelé ya bankɔkɔ na bango. Lokola mboto oyo ebimi nsima ya mbula moko oyo ebɛti mokemoke, losambo ya pɛto ekomonana lisusu. Ntango mokolo yango ekokóma, kozanga elikya ekobongwana masanzoli ya esengo, mpe mitó oyo babwakelaki putulu—elembo ya kolela—ekolata mitole ya elilingi oyo elakisi kondimama na Nzambe.
2 Nani akosala mbongwana wana ya kokamwa? Kaka Yehova nde akoki kosala likambo ya bongo. (Nzembo 9:19, 20; Yisaya 40:25) Na esakweli moko, mosakoli Sefania apesaki etinda oyo: “Yembá nzembo, ee mwana mwasi ya Siona! Gangá, ee Yisalaele! Sepelá mpe yoká esengo na motema mobimba, ee mwana mwasi ya Yelusaleme! [Yehova] alongweli yo kokitisama na yo.” (Sefania 3:14, 15) Wana ekozala solo ntango moko ya esengo! Na mobu 537 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), ntango Yehova akoyanganisa batikali nyonso oyo basikolami na boombo na Babilone, ekozala lokola ndɔtɔ.—Nzembo 126:1.
3. Maloba ya esakweli oyo ezali na Yisaya mokapo 61 ekokisamaki mpe ezali kokokisama epai ya banani?
3 Balobeli kozongisama yango na Yisaya mokapo 61. Atako ezali polele ete esakweli wana ekokisamaki na mobu 537 L.T.B., kasi makambo na yango mingi ekokisami nde na nsima. Kokokisama ya makambo na yango mingi etali nde Yesu ná bayekoli na ye na ekeke ya liboso mpe basaleli ya Yehova na mikolo na biso. Na yango, maloba ya esakweli yango ezali solo na ntina mingi!
“Mbula ya boboto”
4. Na kokokisama ya liboso ya Yisaya 61:1, nani atindamaki mpo na koyebisa nsango malamu, bongo na kokokisama ya mibale?
4 Yisaya akomi boye: ‘Elimo ya Nkolo Mokonzi Yehova ezali likoló na ngai, mpo ete Yehova apakoli ngai mpo na koyeisa nsango malamu epai ya bato ya komikitisa, atindi ngai kobongisa batutami na motema; kosakola bonsomi epai ya bakangami mpe kofungwama ya miso epai ya bato ya bolɔkɔ.’ (Yisaya 61:1) Nani batindi ayebisa nsango malamu? Mbala mosusu ezalaki libosoliboso Yisaya, oyo Nzambe apesaki elimo santu mpo akomela bakangami oyo bakozala na Babilone nsango malamu. Nzokande, Yesu amonisaki kokokisama oyo eleki ntina ntango alimbolaki ete maloba yango ya Yisaya etali ye. (Luka 4:16-21) Ɛɛ, Yesu atindamaki awa na mabelé mpo na koyebisa bato ya komikitisa nsango malamu, mpe ezali mpo na yango nde apakolamaki na elimo santu ntango azwaki batisimo.—Matai 3:16, 17.
5. Banani bazali kosakola nsango malamu eleki sikoyo mbula soki 2 000?
5 Lisusu, Yesu ateyaki bayekoli na ye mpo bázala bapalanganisi to basakoli ya nsango malamu. Na Pantekote ya mobu 33 ya ntango na biso (T.B.), bayekoli soki 120 bapakolamaki na elimo santu mpe bakómaki bana ya elimo ya Nzambe. (Misala 2:1-4, 14-42; Baloma 8:14-16) Bango mpe bazwaki mokumba ya koyebisa nsango malamu epai ya bato ya komikitisa mpe bato oyo batutami na motema. Bato yango 120 bazalaki bato ya liboso kati na bato 144 000 oyo basengelaki kopakolama na elimo. Bato ya nsuka kati na bango bazali naino kosala mosala na bango lelo oyo awa na mabelé. Na yango, ekokisi sikoyo mbula soki 2 000, bayekoli ya Yesu oyo bapakolami na elimo bazali kopesa litatoli “na oyo etali kobongola motema epai ya Nzambe mpe kondima na kati ya Nkolo na biso Yesu.”—Misala 20:21.
6. Banani babɔndisamaki ntango bayokaki nsango malamu oyo esakolamaki na ntango ya kala, mpe lelo oyo ezali banani?
6 Nsango ya Yisaya oyo epemamaki na Nzambe ebɔndisaki Bayuda oyo babongolaki motema na Babilone. Na mikolo ya Yesu mpe ya bayekoli na ye, nsango yango ebɔndisaki Bayuda oyo batutamaki na motema mpo na mabe oyo ezalaki na Yisalaele, mpe ebɔndisaki baoyo bazalaki na mawa mpo bazalaki na kati ya boombo ya mimeseno ya Lingomba ya Bayuda ya ekeke ya liboso, mimeseno oyo esimbamaki na mateya ya lokuta. (Matai 15:3-6) Lelo oyo na mangomba ya boklisto, bamilio ya bato oyo bakangami na motambo ya mimeseno ya bapakano mpe oyo ezali kobebisa lokumu ya Nzambe bazali ‘kokimela mpe kolela’ mpo na makambo ya mbindo oyo ezali kosalema na mangomba yango. (Ezekiele 9:4) Baoyo bazali kondima nsango malamu bazali kosikolama na ezaleli wana ya mawa. (Matai 9:35-38) Miso to bososoli, na bango efungwamaka mpenza ntango bayebaka kosambela Yehova “na elimo mpe na solo.”—Yoane 4:24.
7, 8. (a) Wapi kokokisama mibale ya “mbula ya boboto”? (b) ‘Mikolo ya Yehova ya kozongisa mabe’ ezali nini?
7 Ezali na ntango oyo epesami mpo na kosakola nsango malamu. Yesu ná bayekoli na ye bazwaki mokumba oyo: “Kosakola mbula ya boboto ya Yehova mpe mokolo oyo Nzambe na biso akozongisa mabe; kobɔndisa baoyo nyonso bazali kolela.” (Yisaya 61:2, NW) Mbula moko ezali ntango mwa molai, kasi ezalaka na ebandeli mpe na nsuka. “Mbula ya boboto” ya Yehova ezali ntango oyo apesi bato ya komikitisa libaku ya kondima nsango na ye ya bonsomi.
8 Na ekeke ya liboso, mbula ya boboto mpo na ekólo ya Bayuda ebandaki na mobu 29 T.B. ntango Yesu abandaki mosala na ye ya kosakola awa na mabelé. Ayebisaki Bayuda ete: “Bóbongola mitema, mpo bokonzi ya likoló ekómi pene.” (Matai 4:17) Mbula wana ya boboto eumelaki kino ‘mokolo ya Yehova ya kozongisa mabe,’ oyo ekómaki ndongo mpenza na mobu 70 T.B. ntango Yehova apesaki basoda ya Loma nzela bábebisa Yelusaleme ná tempelo na yango. (Matai 24:3-22) Lelo oyo tozali kobika na mbula mosusu ya boboto, oyo ebandaki ntango Bokonzi ya Nzambe etyamaki na likoló na 1914. Mbula yango ya boboto ekosila ntango mokolo mosusu ya kozongisa mabe ekobanda, mokolo yango ekozala monene mpamba te Yehova akoboma ebongiseli mobimba ya makambo ya ntango oyo na ntango ya ‘bolɔzi monene.’—Matai 24:21.
9. Lelo oyo banani bazali kozwa litomba na mbula ya boboto ya Yehova?
9 Lelo oyo, banani bazali kozwa litomba na mbula ya boboto ya Nzambe? Ezali baoyo bazali kondima nsango malamu, komonisa komikitisa, mpe kopesa mabɔkɔ na molende na mosala ya kosakola Bokonzi ya Nzambe “na kati ya bikólo nyonso.” (Malako 13:10) Bato yango bamoni ete nsango malamu epesaka libɔndisi ya solo. Kasi mpo na baoyo bazali koboya nsango yango, baoyo balingi te kozwa litomba na mbula ya boboto ya Yehova, etikali moke mokolo na ye ya kozongisa mabe ekitela bango.—2 Batesaloniki 1:6-9.
Mbuma ya elimo oyo epesaka Nzambe nkembo
10. Mosala monene oyo Yehova asalelaki Bayuda oyo bautaki Babilone mpe bazongi na mboka na bango esalaki bango nini?
10 Bayuda oyo bauti na Babilone mpe bazongi na mboka na bango bamoni ete Yehova asalelaki bango likambo moko monene. Kolela na bango ntango bazalaki na boombo ebongwani kosepela mpe masanzoli mpamba te nsukansuka bakómi na bonsomi. Na ndenge yango, Yisaya akokisi mokumba na ye ya esakweli, ya ‘kobongisa mpo na bango bazali kolela mpo na Siona, kopesa bango motole na esika ya putulu, mafuta ya kosepela na esika ya kolela, elamba ya kosanzola na esika ya elimo oyo enyokwami; ete bábenga bango nzete minene ya boyengebene, oyo ekonami na Yehova ete akembisama.’—Yisaya 61:3.
11. Na ekeke ya liboso banani basengelaki kokumisa Yehova mpo na likambo monene oyo asalaki?
11 Na ekeke ya liboso, Bayuda oyo bandimaki kosikolama na boombo ya losambo ya lokuta bakumisaki mpe Nzambe mpo na likambo monene oyo asalelaki bango. Na esika ya elimo oyo enyokwami bazwaki nde “elamba ya kosanzola” ntango basikolamaki na boombo ya ekólo moko oyo ekufá na elimo. Bayekoli ya Yesu bazalaki bato ya liboso oyo bamonaki mbongwana yango ntango kolela oyo bazalaki kolela liwa na ye ebongwanaki esengo ntango Nkolo na bango, oyo asekwaki, apakolaki bango na elimo santu. Mwa moke na nsima, bato ya komikitisa 3 000 bamonaki mpe mbongwana wana ntango bandimaki nsango oyo esakolamaki na baklisto wana oyo bautaki kopakolama na elimo, mpe bazwaki batisimo na Pantekote ya mobu 33 T.B. (Misala 2:41) Ezalaki mpenza esengo mpo na bango koyeba ete Yehova azali kopambola bango! Na esika ya “kolela mpo na Siona,” bazwaki elimo santu mpe balendisamaki na “mafuta ya kosepela,” oyo emonisi esengo monene ya bato oyo Yehova apamboli bango mingi.—Baebele 1:9.
12, 13. (a) Banani bazalaki “nzete minene ya boyengebene” kati na Bayuda oyo bazongaki na mboka na bango na mobu 537 L.T.B? (b) Banani bazali “nzete minene ya boyengebene” kobanda na Pantekote ya mobu 33 T.B.?
12 Yehova apamboli bato na ye, apesi bango “nzete minene ya boyengebene.” Nzete minene yango ezali komonisa banani? Na bambula oyo elandaki mobu 537 L.T.B., ezalaki bato oyo bazalaki koyekola mpe komanyola Liloba ya Nzambe mpe bazalaki kotosa mitinda ya boyengebene ya Yehova. (Nzembo 1:1-3; Yisaya 44:2-4; Yilimia 17:7, 8) Mibali lokola Ezela, Hagai, Zekalia, mpe Nganga-Nzambe Monene Yosua bamonisaki ete bazali “nzete minene” ya kokamwa, bato oyo basimbaki mpenza solo mpe babatelaki ekólo mpo ebeba na mbindo ya elimo te.
13 Kobanda na Pantekote ya mobu 33 T.B., Nzambe alonaki “nzete minene ya boyengebene” ya ndenge yango—baklisto bapakolami ya mpiko—na mboka ya elimo ya ekólo na ye ya sika, “Yisalaele ya Nzambe.” (Bagalatia 6:16) Nsima ya bankama ya bambula, “nzete” yango ekómaki 144 000 mpe ezali kobota mbuma ya boyengebene oyo ezali kokembisa to kopesa Yehova Nzambe nkembo. (Emoniseli 14:3) Nzete ya nsuka kati na “nzete” minene yango ebimisi mbuma mingi kobanda na 1919, ntango Yehova asalisaki batikali ya Yisalaele ya Nzambe bázongela molende na bango oyo batikaki mpo na mwa ntango. Wana Yehova asopeli bango ebele ya mai ya elimo, akolisi mpenza zamba monene ya nzete ya boyengebene mpe oyo ezali kobota mbuma.—Yisaya 27:6.
14, 15. Misala nini basaleli ya Yehova oyo basikolamaki basalaki kobanda na (a) mobu 537 L.T.B.? (b) mobu 33 T.B.? (c) mobu 1919?
14 Mpo na komonisa polele mosala ya “nzete” wana, Yisaya alandi koloba boye: “Bakotonga mpenza bisika oyo ebebisami banda kala; bakotɛlɛmisa bisika oyo etikalá mpamba na ntango ya kala, mpe bakobongisa bingumba oyo etikalá mpamba, bisika oyo etikalá mpamba banda mabota na mabota.” (Yisaya 61:4, NW) Na kolanda etinda ya Sirise, mokonzi ya Perse, Bayuda ya sembo oyo bautaki na Babilone batongaki lisusu Yelusaleme mpe tempelo na yango, oyo ebebisamaki banda kala. Misala ya kozongisa losambo ya pɛto esengelaki mpe kosalema na bambula oyo elandaki mobu 33 T.B. mpe 1919.
15 Na mobu 33 T.B., bayekoli ya Yesu bayokaki mawa mingi ntango bakangaki ye, basambisaki ye mpe babomaki ye. (Matai 26:31) Nzokande, mawa na bango esilaki ntango abimelaki bango nsima ya lisekwa na ye. Mpe ntango kaka elimo santu ekitelaki bango, bamipesaki na kosakola nsango malamu, “na Yelusaleme mpe na kati ya Yudea mobimba mpe na Samalia mpe tii na esika eleki mpenza mosika na mabelé.” (Misala 1:8) Na ndenge yango, babandaki kozongisa losambo ya pɛto. Se ndenge moko, kobanda 1919 Yesu Klisto atindi batikali ya bandeko na ye bapakolami mpo na kotonga lisusu “bisika oyo etikalá mpamba banda mabota na mabota.” Na boumeli ya bankama ya bambula bakonzi ya mangomba ya boklisto bapesaki bato boyebi ya Yehova te; na esika na yango, bateyaki mimeseno ya bato mpe mateya oyo eyokani te na Makomami. Baklisto bapakolami bapɛtolaki masangá na bango na mimeseno ya mbindo oyo euti na mangomba ya lokuta, mpe yango esalaki ete kozongisama ya losambo ya solo ekende ntango nyonso liboso. Mpe babandaki mosala ya kopesa litatoli na ndenge oyo esalemá naino te na mokili.—Malako 13:10.
16. Banani bazali kopesa baklisto bapakolami mabɔkɔ na mosala na bango ya kozongisa losambo ya solo, mpe mikumba nini bazwi?
16 Mokumba wana ezalaki monene. Ndenge nini mwa ndambo moke ya batikali ya Yisalaele ya Nzambe bakokaki kokokisa mosala yango? Yehova atindaki Yisaya asakola boye: ‘Bapaya bakotɛlɛma mpo na koleisa bitonga na bino, bato ya mikili mosusu bakozala basali bilanga na bino mpe babateli ya bilanga ya vinyo na bino.’ (Yisaya 61:5) Bapaya yango ya elilingi ezali nde “ebele ya bato” oyo bazali kati na “bampate mosusu” ya Yesu.a (Emoniseli 7:9; Yoane 10:11, 16) Bapakolami na elimo santu te mpo na kozwa libula na likoló. Kasi bazali nde na elikya ya kozwa bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé. (Emoniseli 21:3, 4) Atako bongo, balingi Yehova mpe, na elimo, bazwi mokumba ya kobatela bampate, kosala bilanga mpe kobatela bilanga ya vinyo. Misala ya ndenge wana ezali mosala ya bɔi te. Na litambwisi ya batikali ya Yisalaele ya Nzambe, basali yango bazali kopesa mabɔkɔ na mosala ya kobatela, koleisa mpe koyanganisa bato oyo bakokani na bampate.—Luka 10:2; Misala 20:28; 1 Petelo 5:2; Emoniseli 14:15, 16.
17. (a) Basangani ya Yisalaele ya Nzambe bakobengama banani? (b) Kaka mbeka ya nani nde esengeli mpo na kolimbisama ya masumu?
17 Bongo Yisalaele ya Nzambe? Yehova ayebisi bango na monɔkɔ ya Yisaya ete: ‘Bino bokobengama banganga-nzambe ya Yehova; bato bakobenga bino basaleli ya Nzambe na biso; bokolya bozwi ya bikólo mpe na nkembo na bango bino bokomikembisa.’ (Yisaya 61:6) Na Yisalaele ya kala, Yehova atyaki banganga-nzambe ya libota ya Levi ete bápesaka mbeka mpo na bango moko mpe mpo na bandeko na bango Bayisalaele. Nzokande, na mobu 33 T.B., Yehova atikaki kosalela banganga-nzambe ya libota ya Levi mpe abandisaki ebongiseli moko oyo eleki malamu. Andimaki bomoi ya kokoka ya Yesu ete ezala mbeka mpo na masumu ya bato. Kobanda ntango yango, mbeka mosusu ezali na ntina te. Mbeka oyo Yesu apesaki ezali na ntina mpo na libela.—Yoane 14:6; Bakolose 2:13, 14; Baebele 9:11-14, 24.
18. Yisalaele ya Nzambe ezali bonganga-nzambe ya ndenge nini, mpe bazali na mokumba nini?
18 Bongo, na ndenge nini basangani ya Yisalaele ya Nzambe bazali “banganga-nzambe ya Yehova”? Ntango ntoma Petelo akomelaki baninga na ye baklisto bapakolami, alobaki boye: “Bino bozali ‘libota moko eponami, bonganga-nzambe moko ya bokonzi, libota moko mosantu, ekólo moko oyo esengeli kozala eloko ya Nzambe mpenza, mpo bósakola bizaleli malamu’ ya moto oyo abengaki bino bólongwa na molili bókɔta na kati ya pole na ye ya kokamwa.” (1 Petelo 2:9) Na yango, etuluku mobimba ya baklisto bapakolami ezali bonganga-nzambe oyo ezwi mokumba oyo ya sikisiki: koyebisa bikólo ya mokili nkembo ya Yehova. Basengeli kozala batatoli na ye. (Yisaya 43:10-12) Banda mikolo ya nsuka ebandaki, baklisto bapakolami bazali kokokisa mokumba wana ya ntina na bosembo nyonso. Yango esali ete lelo oyo bamilio ya bato bápesa litatoli mpo na Bokonzi ya Yehova elongo na bango.
19. Mosala nini baklisto bapakolami bakozwa libaku ya kosala?
19 Basangani ya Yisalaele ya Nzambe bazali mpe na elikya ya kozala banganga-nzambe na ndenge mosusu. Nsima ya liwa na bango, bazali kosekwa mpo na kozala bilimo oyo ezangi kufa kuna na likoló. Kuna bazali bobele bakonzi te elongo na Yesu kati na Bokonzi na ye, kasi bazali mpe banganga-nzambe ya Yehova. (Emoniseli 5:10; 20:6) Lokola bazali banganga-nzambe, bakozala na libaku malamu ya kosalela matomba ya mbeka ya lisiko ya Yesu epai ya bato ya sembo awa na mabelé. Kati na emonaneli ya ntoma Yoane oyo ezali na Emoniseli mokapo 22, balobeli bango lisusu lokola “banzete.” Na emonaneli yango “banzete” yango nyonso 144 000 ezali kuna na likoló, ezali kobota “mbuma mbala zomi na mibale, kopesáká mbuma na yango sanza na sanza. Mpe nkasa ya banzete wana [ezali] mpo na kobikisa bikólo.” (Emoniseli 22:1, 2) Wana ezali mpenza nsuka na mosala ya bonganga-nzambe!
Nsima ya nsɔni mpe kosambwisama, bazwi esengo
20. Atako bonganga-nzambe ya bokonzi ekutani na botɛmɛli, mapamboli nini ezali kozela yango?
20 Kobanda na 1914, ntango mbula ya boboto ya Yehova ebandaki, bonganga-nzambe ya bokonzi ezali kaka kokutana na botɛmɛli ya bakonzi ya mangomba ya boklisto. (Emoniseli 12:17) Atako bongo, milende nyonso oyo esalemi mpo na kopekisa mosala ya kosakola nsango malamu elongi soki moke te. Esakweli ya Yisaya esakolaki likambo yango boye: “Na esika ya nsɔni na bino ekozala nde ndambo mibale; na esika ya kosambwisama, bakoganga na esengo mpo na libula na bango. Yango wana na mokili na bango bakozwa ndambo mibale. Esengo ya seko, yango nde ekozala mpo na bango.”—Yisaya 61:7, NW.
21. Ndenge nini baklisto bapakolami bazwaki ndambo mibale ya mapamboli?
21 Na ntango ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, batikali bapakolami bayokisamaki nsɔni mpe basambwisamaki mpo na mangomba ya boklisto oyo emipesaki na bolingo ya ekólo. Bakonzi ya mangomba bazalaki kati na baoyo bafundaki bandeko ya sembo mwambe ya biro monene ya Brooklyn ete bazali kotombokisa bato, nzokande ezalaki lokuta. Bakangaki bandeko yango na bolɔkɔ se mpamba na boumeli ya sanza libwa. Nsukansuka, na ebandeli ya eleko ya molunge ya 1919, batikaki bango, mpe na nsima tribinale etikaki kolandela makambo nyonso oyo bafundamaki na yango. Na ndenge yango nde mayele mabe oyo esalelamaki mpo na kopekisa mosala ya kosakola esukaki. Yehova atikaki te ete basaleli na ye báyoka nsɔni libela, asikolaki bango mpe azongisaki bango na mboka na bango ya elimo, “mokili na bango.” Kuna bazwaki ndambo mibale ya mapamboli. Mapamboli ya Yehova oyo bazwaki elekaki mpenza bampasi nyonso oyo bamonaki. Ya solo, bagangaki na esengo na ntina!
22, 23. Ndenge nini baklisto bapakolami balandi ndakisa ya Yehova, mpe mbano nini apesi bango?
22 Maloba ya Yehova oyo elandi epesaka baklisto ya mikolo na biso ntina ya kosepela: ‘Ngai Yehova nalingi bosembo, nayini moyibi mpe masumu; solo nakopesa bango libonza na bango na bosembo nyonso mpe nakosala na bango kondimana ya seko.’ (Yisaya 61:8) Koyekola Biblia esalisi batikali bapakolami bálingaka bosembo mpe báyinaka mabe. (Masese 6:12-19; 11:20) Bayekoli ‘kotula mipanga na bango ete mizala bitimweli,’ na ndenge bamikɔtisaka te na bitumba mpe yikiyiki ya politiki ya mokili oyo. (Yisaya 2:4) Babwaki mpe misala oyo ebebisaka lokumu ya Nzambe, lokola kokosela bato makambo, ekobo, moyibi mpe kolangwa masanga.—Bagalatia 5:19-21.
23 Yehova apesi baklisto bapakolami “libonza na bango na bosembo nyonso” mpamba te bazali kolinga bosembo lokola Mozalisi na bango. ‘Libonza’ moko ya ndenge yango ezali kondimana ya libela—kondimana ya sika—oyo Yesu ayebisaki bayekoli na ye na butu oyo ezalaki liboso ya mokolo ya liwa na ye. Kondimana yango nde epesaki bango nzela bákóma ekólo moko ya elimo, bato mpenza ya Nzambe. (Yilimia 31:31-34; Luka 22:20) Na lisalisi ya kondimana yango, Yehova akosopela bapakolami mpe bato mosusu nyonso ya sembo bolamu nyonso oyo euti na mbeka oyo Yesu apesaki mpo na kosikola bato, ata mpe bolimbisi ya masumu na bango.
Tósepela na mapamboli ya Yehova
24. Bato nini ya bikólo bazali “bakitani” oyo bapambolami, mpe ndenge nini bakómi “bakitani” yango?
24 Bato mosusu ya mokili bamoni ndenge Yehova apamboli basaleli na ye. Yehova asakolaki yango na elaka oyo: ‘Bakitani na bango bakoyebana kati na bikólo, mpe bana na bango na kati ya bato; baoyo nyonso bakomona bango bakoyeba bango, ete bazali bakitani oyo Yehova apamboli bango.’ (Yisaya 61:9) Basangani ya Yisalaele ya Nzambe, baklisto bapakolami, basakoli mingi kati na bikólo ya mokili na boumeli ya mbula ya boboto ya Yehova. Baoyo bandimi nsango na bango bazali lelo bamilio. Na ndenge bato oyo bauti na bikólo bazali kosala na boyokani mpenza elongo na Yisalaele ya Nzambe, bazali na libaku malamu ya kokóma “bakitani oyo Yehova apamboli bango.” Esengo na bango ezali komonana na miso ya bato nyonso.
25, 26. Ndenge nini baklisto nyonso bamonisaka mayoki oyo ezali na Yisaya 61:10?
25 Baklisto nyonso, bapakolami mpe bampate mosusu, bazali kozela mpenza kokumisa Yehova libela na libela. Bandimi na motema moko maloba oyo mosakoli Yisaya akomaki na nguya ya elimo santu, ete: ‘Nakosepela mingi kati na Yehova, molimo na ngai ekozwa esengo mpo na Nzambe na ngai; mpo ete alatisi ngai bilamba ya lobiko, azipi ngai na mokoto ya boyengebene, lokola mobali ya libala akomilatisa motole ya kitoko mpe lokola mwasi ya libala akomikembisa na biloko na ye ya motuya.’—Yisaya 61:10.
26 Lokola baklisto bapakolami balati “mokoto ya boyengebene,” bazali na ekateli makasi ya kotikala pɛto na miso ya Yehova. (2 Bakolinti 11:1, 2) Lokola Yehova atángi bango bayengebene mpo na kozwa bomoi na likoló, bakozonga lisusu mokolo moko te na Babilone Monene, oyo etikali mpamba, mpe oyo basikolamaki na yango. (Baloma 5:9; 8:30) Motuya ya bilamba ya lobiko oyo balati ekoki kotángama te. Baninga na bango bampate mosusu bazali mpe na ekateli makasi ya kotosa mitinda ya malamu mpenza oyo Yehova Nzambe apesi mpo na losambo ya pɛto. Lokola “basukoli bazambala na bango mpe bakómisi yango mpɛmbɛ na kati ya makila ya Mwana-Mpate,” batángami bayengebene mpe bakobika na “bolɔzi monene.” (Emoniseli 7:14; Yakobo 2:23, 25) Liboso bázwa lobiko yango, bazali kolanda ndakisa ya baninga na bango bapakolami na koboyáká komikómisa mbindo na Babilone Monene.
27. (a) Na ntango ya Boyangeli ya Mbula Nkóto eloko nini ya ntina ‘ekobima’? (b) Ndenge nini banda kala boyengebene ezali kobima kati na bato?
27 Lelo oyo basaleli ya Yehova bazali kosepela mingi ndenge bazali na paladiso ya elimo. Etikali moke bakozala mpe na bomoi na Paladiso ya solosolo. Na motema na biso mobimba tozali kozela ntango wana, oyo balobeli yango mpenza polele boye na maloba ya nsuka ya Yisaya mokapo 61: ‘Lokola mokili ekotɔisa matiti na yango, mpe lokola elanga ekobimisa yango ekonami kati na yango, bongo Nkolo Mokonzi Yehova akobimisa boyengebene mpe masanzoli liboso ya bikólo nyonso.’ (Yisaya 61:11) Na ntango ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Klisto, mabelé ekomona ndenge ‘boyengebene ekobima.’ Bato bakoganga lokola bato balongi, mpe boyengebene ekopalangana kino na nsuka ya mabelé. (Yisaya 26:9) Nzokande, biso tokozela te tii mokolo wana monene mpo na kokumisa Nzambe liboso ya bikólo nyonso. Banda kala, boyengebene ezali kobima kati na bamilio ya bato oyo bazali kopesa Nzambe ya likoló nkembo mpe kosakola nsango malamu ya Bokonzi na ye. Ata sikoyo kondima mpe elikya na biso ezali kopesa biso ntina mpenza ya kosepela mpo na mapamboli ya Nzambe na biso.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mbala mosusu Yisaya 61:5 ekokisamaki na ntango ya kala, mpamba te bato oyo bazalaki Bayuda te bazongaki na Bayuda nzela moko kino Yelusaleme mpe ekoki kozala ete bapesaki mabɔkɔ na kozongisa mboka yango ndenge ezalaki liboso. (Ezela 2:43-58) Nzokande, kobanda na vɛrsɛ 6 emonani ete esakweli yango etali kaka Yisalaele ya Nzambe.
[Elilingi na lokasa 323]
Yisaya azali na nsango malamu mpo na kosakwela Bayuda oyo bazali na boombo
[Elilingi na lokasa 331]
Kobanda na mobu 33 T.B., Yehova aloni “nzete minene ya boyengebene” 144 000
[Elilingi na lokasa 334]
Mabelé ekobimisa boyengebene