LITEYA 11
Koloba na nsai mpe kobimisa mayoki
MOTO nyonso azalaka na esengo, na mawa, na bolingo, na boboto, ayinaka mpe bongo na bongo. Ntango moto azali kobimisa oyo ezali na motema na ye, azali komonisa polele bomoto na ye, ndenge nini asalaka soki likambo moko boye ebimi to soki akutani na bato. Bato mosusu bakokaka te komonisa ndenge bazali koyoka na motema, mpamba te bamoná mpasi mingi na bomoi na bango mpe, ntango mosusu, mpo ezali ndenge bamesaná na mboka na bango. Kasi Yehova azali kolendisa biso tózala mpenza na bizaleli malamu na mitema na biso mpe tómonisa yango polele, na ndenge esengeli.—Lom. 12:10; 1 Tes. 2:7, 8.
Maloba oyo tosalelaka ntango tozali koloba ekoki mpenza komonisa ndenge tozali koyoka na motema na biso. Soki maloba na biso ezali mpenza komonisa mayoki na biso te, bato oyo bazali koyoka biso bakoki komona ete tozali koloba mpenza solo te. Kasi soki maloba na biso ezali komonisa mpenza mayoki na biso, elobeli na biso ekomonana kitoko mpe na elɛngi, ekosimba mitema ya bato oyo bazali koyoka biso.
Koloba na nsai. Mpo na koloba na nsai ntango ozali kosolola na moto, yango etalelaka mingimingi ndenge oyo tomonaka moto yango. Yango wana, ntango tozali kolobela bizaleli kitoko ya Yehova mpe ntango tozali kolobela ndenge oyo tosepelaka na boboto na ye, mongongo na biso esengeli komonisa ete tozali na nsai. (Yis. 63:7-9) Ntango tozali kosolola na baninga na biso bato, elobeli na biso esengeli komonisa ete tozali na nsai.
Mokolo moko, moto moko oyo azalaki na maladi ya maba ayaki epai na Yesu mpe asɛngaki ye ete abikisa ye. Kanisá naino, mongongo ya Yesu ntango alobaki na ye ete: “Nalingi. Kómá pɛto.” (Mko. 1:40) Kanisá mpe ntango mwasi oyo aumelaki mbula 12 na maladi ya kotanga makila ayaki malɛmbɛmalɛmbɛ na nsima ya Yesu mpe asimbaki nsɔngɛ ya elamba na ye. Ntango amoni ete likambo asali eyebani, mwasi yango ayei liboso ya Yesu na kolɛnga, akwei na makolo ya Yesu mpe alobi polele, na miso ya bato nyonso, ntina oyo asimbi elamba na ye mpe ndenge oyo abiki. Kanisá ndenge Yesu azali koloba na ye maloba oyo: “Mwana mwasi, kondima na yo esali ete oyoka malamu. Kende na kimya.” (Luka 8:42b-48) Yesu alobaki makambo yango na nsai mpe likambo yango ezali mpenza kosimba mitema na biso tii na moi ya lelo.
Soki tozali koyokela bato mawa mpe tolingi mpenza kosalisa bango lokola Yesu asalaki, yango ekomonana na elobeli na biso. Soki ozali komonisa ndenge wana ete ozali na nsai, ozali kolekisa ndelo te, kasi ozali mpenza kobimisa oyo ezali kouta na kati ya motema na yo. Soki tozali koloba na nsai, yango ekoki mpenza kosala ete bato bándima nsango oyo tozali komemela bango. Makambo mingi oyo tolobaka na mosala ya kosakola, esɛngaka ete tózala na nsai, mingimingi ntango tozali kosalisa moto akanisa, ntango tozali koyikisa moto moko mpiko, kolendisa moto mpe ntango tozali komitya na esika ya bato mosusu.
Soki ozali na botɔndi, na bolingo, na boboto to na motema mawa mpo na basusu, osengeli komonisa yango na elongi na yo. Soki ozali koloba na nsai, bato oyo bazali kolanda lisolo na yo bakozala pembeni na yo lokola bato bazali koyɔtɔ mɔtɔ ntango malili ezali makasi. Soki yango emonani te na elongi na yo, bato oyo bazali koyoka lisolo na yo bakoki mbala mosusu kondima te ete ozali mpenza komibanzabanza mpo na bango. Tosengeli te kolata yango lokola maskɛ, kasi esengeli mpenza kouta na motema.
Mongongo na yo esengeli komonisa polele ete ozali koloba na nsai. Soki mongongo na yo ezali koyokana malamu te mpe ezali kosepelisa bato te, okomonisa te ete ozali na nsai. Kasi soki osali makasi mpenza, na nsima, okokoka komonisa yango. Toli mosusu yango oyo: kobosana te ete soki ozali koloba mbangumbangu mpe ozali kokatakata maloba, yango ekosimba mpenza mitema ya bato te. Yekolá kobenda maloba yango mwa molai. Yango ekosala ete lisolo na yo esepelisa bato.
Nzokande, makambo oyo osepelaka na yango na bomoi na yo ezali mpe na ntina mingi mpenza. Soki ozali kokanisa na motema moko mpenza bato oyo bazali koyoka yo, mpe soki ozali na mposa makasi ya koyebisa bango makambo oyo ekosalisa bango, yango ekomonana na elobeli na yo.
Lisolo oyo ezali kosepelisa bato elendisaka mpe bango, kasi esengeli mpe komonisa ete ozali na boboto epai na bango. Ekoki kaka te kosala ete bato bándima makambo oyo tozali koloba, kasi tosengeli mpe kosimba mitema na bango.
Monisá mayoki mosusu. Na ndakisa, moto oyo azali na mpasi, akoki komonisa ete azali komitungisa, azali kobanga mpe azali konyokwama na makanisi. Esengo esengeli komonana polele na bomoi na biso mobimba mpe tosengeli komonisa yango ntango tozali kosolola na bato mosusu. Kasi ezali na mayoki mosusu oyo tosengeli kobwaka, mpamba te eyokani te na bizaleli oyo moklisto asengeli kozala na yango. (Ef. 4:31, 32; Filp. 4:4) Mayoki na biso ya lolenge nyonso ekoki komonana na maloba oyo tozali kobimisa, na mongongo na biso, soki ezali makasi to te, na elongi na biso mpe na bajɛstɛ na biso.
Biblia elobeli mayoki nyonso oyo bato bazalaka na yango. Na bisika mosusu, etángi kaka nkombo na yango. Na bisika mosusu, elobeli makambo oyo esalemaki to maloba oyo ezali komonisa makambo yango. Ntango ozali kotánga bavɛrsɛ yango na mongongo makasi, soki mongongo na yo ezali mpenza kobimisa mayoki na yo, yango ekosimba mpenza motema na yo moko mpe mitema ya bato oyo bazali koyoka yo. Mpo osala yango, osengeli komitya na esika ya bato oyo bazali kolobela na mokanda oyo ozali kotánga. Kasi lisukulu ezali teyatre te; yango wana, kebá ete olekisa ndelo te. Salá ete, na makanisi ya bato oyo bazali koyoka yo, lisolo yango ezala lokola likambo oyo ezali mpenza kosalema na miso na bango.
Monisá yango na lolenge oyo ebongi na likambo oyo ezali na lisolo. Lokola tolobaki mpo na esengo, nsai na yo mpe mayoki mosusu oyo okomonisa, ekotalela mingimingi makambo oyo okoloba.
Zwá Matai 11:28-30 mpe tyá likebi na makambo oyo ezali kolobela. Na nsima, tángá maloba oyo Yesu alobaki mpo na kokweisa Bakomeli na Bafalisai ndenge ezali na Matai mokapo 23. Tondimi te ete Yesu alobaki makambo wana kozanga nsai mpo na kokweisa bango, boye te?
Ndenge nini tosengeli komiyoka ntango tozali kotánga lisolo lokola oyo ezali na Genese mokapo 44, oyo emonisi ndenge Yuda azalaki kokɔtela ndeko na ye Benyamina? Talá vɛrsɛ 13, ndenge bamonisaki mayoki na bango; talá vɛrsɛ 16, omona ndenge Yuda amiyokaki mpo na mpasi oyo ekómelaki bango mpe talá Genese 45:1, omona eloko nini Yosefe asalaki mpo na yango.
Yango wana, ezala tozali kotánga to tozali koloba, mpo tósala yango malamu mpenza, tosengeli kotalela kaka maloba mpe makanisi te, kasi tosengeli mpe kotalela ndenge oyo tosengeli koyoka na motema na biso ntango tozali kotánga to koloba yango.