Mokapo 1
Bansango ya Yehova na ntango ya kala mpe na mikolo na biso
1, 2. Ndenge nini bato mosusu balukaki biloko ya motuya oyo ebombamá, kasi nini ekoki kosalisa yo ozala na esengo na bomoi?
NA BOUMELI ya bambula, bato mingi bazalaki na mposa makasi ya komona biloko ya motuya oyo ebombamá. Osilá kotánga masolo ya bato oyo balukaka epai na epai mpo na kozwa biloko ya motuya, bato ya arkeoloji, mpe bato mosusu oyo balukaka biloko ya motuya ya ndenge yango? Atako yo okokende te koluka biloko ya ndenge wana, okosala nini soki ozwi eloko moko ya motuya? Na ntembe te, okosepela mpenza soki eloko yango ekoki kobongisa bomoi na yo to kosala ete ozala malamu koleka!
2 Bato mingi te nde bakendeke koluka biloko ya motuya, kasi mposa na bango ya kozala na esengo emonanaka na ndenge balukaka mbongo, kozala nzoto kolɔngɔnɔ, kozala na libala ya malamu, kozala na biloko ya motuya oyo ezwamaka te na kotimola mabele. Ezali mpe te na karte oyo ekoki kolakisa esika oyo biloko yango ezali. Ndenge oyebi yango, esɛngaka milende mpo na kozwa yango. Yango wana, bato mingi basepelaka na toli oyo ekoki kosalisa bango bákokisa mikano na bango mpe bázala na bomoi ya malamu mpe ya esengo.
3, 4. Epai wapi okoki kozwa toli oyo ebongi mpo na kotambwisa bomoi na yo?
3 Na ntembe te, batoli ya ntina mingi oyo ekoki kosalisa yo ezali mosika te, batoli oyo esili kosalisa bato mosusu bázala na esengo. Bato mingi bamoni ete Biblia ezali na batoli oyo eleki malamu mpenza mpo na bomoi. Charles Dickens, mokomi moko ya Angleterre, alobaki mpo na Biblia ete: “Ezali buku ya malamu koleka babuku nyonso oyo ebimá na mokili mpe oyo ekobima . . . mpamba te eteyaka mateya ya malamu koleka oyo ekoki kotambwisa moto nyonso.”
4 Maloba wana ekoki kokamwisa te bato nyonso oyo bandimaka ete Biblia ekomamá na litambwisi ya elimo santu ya Nzambe. Na ntembe te, ondimaka maloba ya 2 Timote 3:16, oyo elobi ete: “Makomami nyonso ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe mpe ezali na litomba mpo na koteya, kopamela, kosembola makambo, mpo na kopesa disiplini na boyengebene.” Na maloba mosusu, Biblia ezali na makambo ya ntina mpenza oyo ekoki kosalisa bato bálonga mikakatano ya mokili oyo. Baoyo batikaka Biblia etambwisa bango bazalaka na bomoi ya malamu mpe ya esengo.
5-7. Mikanda nini ya Biblia okoki mpe kotánga mpo esalisa yo na bomoi?
5 Kasi, na mikanda nini ya Biblia okanisi ete okoki kokuta toli yango? Bato mosusu bakoki kokanisa na Lisolo Likoló ya Ngomba, epai Yesu apesaki toli oyo ebongi mpenza na makambo ndenge na ndenge ya bomoi. Bato mosusu bakoki kokanisa makomi ya ntoma Paulo. Mpe moto nyonso akoki kozwa toli kitoko oyo ezali na Nzembo mpe Masese—mikanda oyo etondi mpenza na bwanya. Ya solo, na kotalela bomoi na yo to mikakatano oyo ozali na yango, mokanda nyonso ya Biblia ekoki kosalisa yo, ata mikanda oyo elobeli mingimingi masolo ya kala, na ndakisa mikanda oyo ebandi na Yosua tii na mokanda ya Estere. Masolo oyo ezali na mikanda yango ezali na batoli oyo ekoki kosalisa moto nyonso oyo azali koluka kosalela Nzambe na esengo. (1 Bakorinti 10:11) Ya solo, mikanda yango ezali na batoli oyo ekoki kotambwisa yo mpe kosalisa yo ozala na bomoi ya malamu. Kobosana te likambo oyo: “Makambo nyonso oyo ekomamaki kala ekomamaki mpo eteya biso, mpo, na ezaleli na biso ya koyika mpiko mpe na libɔndisi oyo euti na Makomami, tózala na elikya.”—Baroma 15:4; Yosua 1:8; 1 Ntango 28:8, 9.
6 Kasi, ezali na eteni moko ya Biblia oyo bato mingi batángaka mpenza te, nzokande ezali na biloko mingi ya motuya. Eteni yango ezali na mikanda 12 oyo mbala mingi bato babengaka Basakoli ya Mike. Mbala mingi mikanda yango ezalaka nsima ya mikanda minene ya Biblia na ndakisa Ezekiele mpe Danyele, kasi liboso ya Evanzile ya Matai. (Na Babiblia mingi mikanda yango 12 elandaná boye: Hosea, Yoele, Amose, Obadia, Yona, Mika, Nahumu, Habakuku, Sefania, Hagai, Zekaria mpe Malaki.) Ndenge tomonaki yango, Biblia ekomamaki na litambwisi ya elimo santu ya Nzambe, mpe ezali na litomba mpo na koteya mpe kolakisa bato ndenge bakoki kozala na bomoi ya malamu. Ezali mpe bongo mpo na mikanda yango 12?
7 Ezali mpenza bongo! Kutu, mikanda oyo babengaka Basakoli ya Mike ezali mpenza na makambo ya ntina oyo ekoki kolakisa biso ndenge tokoki kozala na bomoi ya malamu lelo oyo. Mpo na koyeba ntina oyo bato mosusu bazwaka mikanda yango na motuya te, tótala naino mpo na nini na minɔkɔ mingi babengaka mikanda yango 12: Basakoli ya Mike. Ntango mosusu ebengeli wana nde esali ete bato bátalela mikanda yango na motuya moke? Yango ekoki kotinda yo mpe okóma kotalela mikanda yango bongo?
“BASAKOLI YA MIKE” BAZALI MPENZA NA NTINA TE?
8. (a) Wapi nzela moko ya ntina mingi oyo Nzambe asalelaki mpo na kotambwisa bato? (b) Ndenge nini mbala mingi bato babengaka mikanda 12 oyo tozali kolobela, kasi ebengeli yango elimboli nini?
8 Ntango akomelaki Baebre, ntoma Paulo abandaki boye: “Nzambe, oyo na ntango ya kalakala, azalaki koloba na bankɔkɔ na biso na nzela ya basakoli mbala na mbala mpe na ndenge mingi, na nsuka ya mikolo oyo, alobi na biso na nzela ya Mwana moko.” (Baebre 1:1, 2) Lokola Nzambe azalaki kosalela bato mpo básakola bansango na ye, tosengeli te kotalela bamemi-nsango ete bazali “mike” to makambo oyo bakomaki. Nzokande, ebengeli “Basakoli ya Mike” etindi bato mosusu bámona makambo oyo ezali na kati ete ezali na ntina te. Bato mosusu balobaka ete bansango oyo ezali na mikanda yango ezali mpenza na nguya moke soki bakokanisi yango na oyo ezali na mikanda mosusu. Kasi, mpo na koloba solo, ebengeli “Basakoli ya Mike”a ndenge esalelami na minɔkɔ mingi ezali kaka komonisa ete mikanda yango 12 ezali mikuse soki tokokanisi yango na mikanda mosusu.
9. Mpo na nini molai to mokuse ya mokanda moko ya Biblia elakisi te ete ezali na ntina mingi te?
9 Soki mokanda moko ya Biblia ezali mokuse, elingi koloba te ete ezali na ntina mingi te. Mokanda ya Ruta ezali mokuse mingi soki tokokanisi yango na mikanda oyo ezali liboso mpe nsima na yango, kasi ezali na makambo ya ntina oyo ezali kosimba mpenza motema! Mokanda yango ya mokuse, emonisi ntina ya kokangama na losambo ya solo, emonisi ete Nzambe apesaka basi lokumu, mpe ezali na makambo ya ntina mingi oyo ezali kosalisa biso tóyeba molɔngɔ ya bankɔkɔ ya Yesu. (Ruta 4:17-22) Ndakisa mosusu ezali ya mokanda ya Yuda oyo ezali pene na mokanda ya nsuka ya Biblia. Ezali mokuse mpenza, kutu na Babiblia mosusu etondisaka ata lokasa moko te. Atako bongo, ezali na makambo ya ntina mingi: Ndenge oyo Nzambe asalaki mpo na baanzelu ya mabe, makebisi oyo epesamaki na ntina na bato oyo bakɔtaka mpo na kobebisa lisangá, mpe toli ya kobunda makasi mpo na kondima! Okoki mpenza kondima ete mikanda oyo babengaka Basakoli ya Mike, atako ezali mikuse, makambo oyo ezali na kati na yango ezali na ntina moke te, mpe ezali na litomba moke te mpo na yo.
NA NDENGE NINI EZALI MIKANDA YA BISAKWELI?
10, 11. (a) Ndenge nini bato mosusu bakoki kotalela liloba “basakoli”? (b) Na kotalela Biblia, basakoli bazalaki banani mpe bazalaki kosala nini?
10 Likambo mosusu oyo tosengeli kotalela ezali maloba “basakoli” mpe “ya esakweli.” Maloba yango epesaka likanisi ya kosakola makambo oyo ekoya. Bato mingi bakanisaka ete mosakoli azali kaka moto oyo ayebisaka makambo oyo ekoya liboso, ntango mosusu na balolenge ekeseni. Yango nde esalaka ete bato mosusu bámona ete mikanda wana 12 ezali na ntina te.
11 Likambo ya esengo ntango ozali kotánga mikanda yango 12, okomona mbala moko ete etondi na bisakweli, oyo mingi na yango ezali kolobela koya ya mokolo monene ya Yehova. Likambo yango eyokani mpenza na ndimbola ya liloba “mosakoli.” Mosakoli azalaki moto oyo azalaki na boyokani makasi na Nzambe mpe oyo mbala mingi Nzambe azalaki kosalela mpo na koyebisa makambo oyo ekosalema. Kobanda na Enoka, basakoli mingi ya Biblia basakolaki makambo oyo esengelaki koya.—1 Samwele 3:1, 11-14; 1 Bakonzi 17:1; Yirimia 23:18; Misala 3:18; Yuda 14, 15.
12. Ndenge nini okoki komonisa ete kozala mosakoli esukaki kaka te na kosakola makambo oyo ekoya?
12 Kasi, tosengeli kobosana te ete mokumba oyo basakoli ya Yehova bazalaki na yango esukaki kaka te na koyebisa makambo oyo ekoya oyo Nzambe azalaki koyebisa bango. Mbala mingi, Nzambe azalaki kosalela bango lokola balobeli na ye mpo báyebisa bato mosusu mokano na ye. Na ndakisa, tokoki kokanisa te ete Abrahama, Yisaka, mpe Yakobo basakolaki mpe makambo oyo ekoya, nzokande Nzembo 105:9-15, etángi bango na molɔngɔ ya basakoli. Na mabaku mosusu, Nzambe asalelaki bango mpo na koyebisa likambo moko oyo ekoya, na ndakisa ntango Yakobo apambolaki bana na ye. Kasi, Abrahama, Yisaka mpe Yakobo bazalaki mpe basakoli mpo bazalaki koyebisa mabota na bango makambo oyo Yehova ayebisaki bango na ntina na mokumba oyo bazalaki na yango na mokano na ye. (Ebandeli 20:7; 49:1-28) Ndakisa mosusu oyo emonisi ete na Biblia liloba “mosakoli” esalelami na bandimbola mingi ezali oyo ya Arona oyo azalaki lokola mosakoli mpo na Moize. Arona akokisaki mokumba ya mosakoli na ndenge azalaki molobeli to “monɔkɔ” mpo na Moize.—Kobima 4:16; 7:1, 2; Luka 1:17, 76.
13, 14. (a) Pesá ndakisa oyo emonisi ete basakoli basukaki kaka te na kosakola makambo oyo ekoya. (b) Koyeba ete basakoli basukaki kaka te na koyebisa makambo oyo ekoya ekoki komemela yo litomba nini?
13 Kanisá lisusu mosakoli Samwele mpe Natane. (2 Samwele 12:25; Misala 3:24; 13:20) Yehova asalelaki bango nyonso mibale mpo na koyebisa makambo oyo ekoya, kasi asalelaki mpe bango lokola basakoli na ndenge mosusu. Na mokumba na ye ya mosakoli, Samwele alendisaki Bayisraele bátika losambo ya bikeko mpe bázongela losambo ya pɛto. Lisusu, asakolaki bitumbu ya Nzambe epai ya mokonzi Saulo; na likambo yango tozali kozwa liteya ete Yehova asepelaka mingi na botosi koleka bambeka. Ya solo, mokumba ya Samwele lokola mosakoli esangisaki mpe komonisa makanisi ya Nzambe na lolenge malamu oyo bato basengeli kotambwisa bomoi na bango. (1 Samwele 7:3, 4; 15:22) Mosakoli Natane, asakolaki ete Salomo akotonga tempelo mpe ete bokonzi na ye ekopikama makasi. (2 Samwele 7:2, 11-16) Kasi, Natane asalaki mpe lokola mosakoli ntango abimisaki polele lisumu ya Davidi ná Bate-sheba oyo basalelaki Uria. Nani akoki kobosana ndenge Natane abimisaki polele ekobo oyo Davidi asalaki—na ndakisa ya mozwi moko oyo azwaki mpate kaka moko oyo mobola azalaki na yango mpe azalaki kolinga mingi? Natane apesaki mpe mabɔkɔ mpo na kobongisa losambo ya solo na tempelo ya Nzambe.—2 Samwele 12:1-7; 2 Ntango 29:25.
14 Likambo ya ntina ezali ete tosengeli kokanisa te ete bansango oyo ezali na mikanda yango ya bisakweli esuki kaka na kosakola makambo oyo ekoya. Ezali na maloba ya Nzambe oyo etali makambo mingi mosusu, na ndakisa ezali na makambo ya ntina mingi mpo na ndenge oyo bato ya Nzambe na ntango ya kala basengelaki kotambwisa bomoi na bango mpe ndenge oyo biso tosengeli kotambwisa bomoi na biso lelo oyo. Kutu, tondimi mpenza ete makambo oyo tozali kokuta na Biblia, ata mpe makambo oyo ezali na mikanda wana 12, ezali na ntina mpe na litomba, ekoki kosalisa bato bámona lolenge malamu ya kotambwisa bomoi na bango. Mikanda wana oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe ezali na batoli ya malamu oyo ekoki kosalisa biso “tófanda na makanisi malamu mpe na boyengebene mpe na ezaleli ya kokangama na Nzambe na ntango oyo.”—Tito 2:12.
NDENGE OYO TOKOKI KOZWA LITOMBA
15, 16. (a) Likambo nini oyo elobelami na ndenge ya elilingi tokoki kokuta na mikanda ya “Basakoli ya Mike”? (b) Maloba nini ya elilingi ezali na mikanda yango ya bisakweli?
15 Ezali na lolenge mingi oyo tokoki kozwa litomba na kotánga Liloba ya Nzambe. Mikanda mosusu ya Biblia eyebisi biso makambo oyo esalemaki na eleko boye to boye, mpe mikanda mosusu elobeli makambo na maloba ya ntɔki, mokomoko ezali na ntina na yango. Mikanda mosusu ekeseni na ndenge ezali na maloba ya elilingi, maloba oyo esalelami mingi na mikanda ya basakoli 12. Na ndakisa, Yesu asalelaki makambo oyo ezali na mokanda ya Yona ntango alobaki boye: “Libota ya mabe mpe ya ekobo ezali kokoba koluka elembo, kasi bakopesa yango elembo moko te longola kaka elembo ya mosakoli Yona. Mpo lokola Yona azalaki na kati ya libumu ya mbisi monene mikolo misato butu moi, Mwana ya moto mpe akozala na kati ya mabele mikolo misato butu moi. Bato ya Ninive bakosekwa esika moko na libota oyo na Mokolo ya Kosambisama mpe bakokweisa yango; mpamba te babongolaki motema na oyo Yona asakolaki, kasi talá! eloko oyo eleki Yona ezali awa.”—Matai 12:39-41.
16 Emonani polele ete Yesu amonaki ete mokanda ya Yona esuki kaka te na kolobela lisolo na ndenge Nzambe asalelaki Yona makambo, mosala ya mosakoli yango na Ninive, mpe matomba oyo emonanaki ntango asakolaki makebisi ya Nzambe. Yesu ayebaki ete mosakoli Yona azalaki elilingi na ye, amonisaki ndenge akokufa mpe ndenge akosekwa nsima ya mikolo misato. Lisusu, ndenge oyo bato ya Ninive basalaki nsima ya koyoka nsango yango, emonisaki mpenza bokeseni na ndenge oyo Bayuda mingi basalaki nsima ya koyoka mateya ya Yesu mpe komona misala na ye. (Matai 16:4) Tosimbi ete mikanda wana 12 ezali na maloba ya elilingi oyo ezali komonisa makambo oyo Nzambe asalaka mpo na basaleli na ye na mikolo na biso. Koyekola makambo yango ezali kosimba motema mpe ezali na ntina.b
17. Ndenge nini buku oyo elobeli makambo oyo ezali na mikanda 12?
17 Nzokande, ndenge buku oyo ozali kotánga ekomami, ebongisami te mpo na kosala boyekoli ya ndimbola ya makambo oyo elobelami na ndenge ya elilingi oyo ezali na mokanda ya Yona to mpe oyo ezali na mikanda mosusu 11. To mpe ezali te kolimbola vɛrsɛ mokomoko. Kasi, ezali libosoliboso kobenda likebi na makambo oyo tokoki kosalela na bomoi na biso ya mokolo na mokolo. Omituna boye: ‘Na mikanda yango 12, toli nini ya ntina Yehova apesi ngai? Ndenge nini mikanda yango ekoki kosalisa ngai “[nafanda] na makanisi malamu mpe na boyengebene mpe na ezaleli ya kokangama na Nzambe na ntango oyo”? Ezali koyebisa ngai nini na oyo etali bomoi ya mokristo, bizaleli malamu, bomoi ya libota, mpe etamboli oyo nasengeli kozala na yango na ntango oyo ya mabe, awa “mokolo ya Yehova ezali koya, mpamba te ekómi pene”?’ (Tito 2:12; Yoele 2:1; 2 Timote 3:1) Ntango ozali kozwa biyano yango, na ntembe te, okomona bavɛrsɛ kitoko oyo osalelá naino te ntango ozali kopesa basusu toli ya Biblia. Na ndenge yango, okoyeba makambo mingi lisusu ya Biblia.—Luka 24:45.
18. Buku oyo ebongisami ndenge nini, mpe ndenge nini okoki kozwela yango litomba?
18 Mikapo ya buku oyo ekabolami na biteni minei. Ntango obandi kotánga yango, luká koyeba na mokuse makambo oyo elobelami na eteni mokomoko. Na mokapo mokomoko ya mikapo 13 oyo elandi, okokuta bitanda mibale oyo ekosalisa yo obosana te makambo oyo oyekoli. Mituna oyo ezali na bitanda yango ekosalisa yo okanisa lisusu na makambo oyo outi kotánga mpe okanisa ntina na yango mpe ndenge okoki kosalela yango. Etanda ya liboso ezali pene na katikati ya mokapo. Ntango okómi na etanda yango, talelá mituna oyo ezali na kati. Kosala bongo ekosalisa yo okɔtisa na motema na yo makambo oyo outi koyekola. (Matai 13:8, 9, 23; 15:10; Luka 2:19; 8:15) Etanda ya mibale ekosalisa yo okanisa na makambo oyo outi kotánga na eteni ya nsuka ya mokapo yango mpe obakisa yango na boyebi oyo ozali na yango. Yango wana, zwá ntango ya koyekola bitanda yango. Ekoki kozala mpenza bisaleli oyo ekoki komonisa lolenge malamu oyo okoki kozwa litomba na makambo oyo ozali koyekola.
19. Likambo nini osengeli koyeba libosoliboso mpo na mikanda 12?
19 Mpo na komibongisa mpo na koyekola buku oyo omituna makambo nini oyebi na mokomoko ya mikanda yango. Nzambe apesaki bansango yango na nzela ya banani, mpe bato yango bazalaki bato ya ndenge nini? Bazalaki na bomoi na eleko nini, mpe makambo ezalaki ndenge nini ntango basalaki mosala na bango? (Tablo ya badati oyo ezali na lokasa 20 mpe 21 ekosalisa biso mingi; taláká yango mbala na mbala ntango olingi koyekola mikapo oyo elandi.) Nsango nini bayebisaki bato ya eleko na bango mpe ndenge nini bato wana basengelaki kotalela nsango yango, mpe ndenge nini ekoki kosalisa yo oyeba makambo oyo balobeli ndenge mpenza elekaki? Mokapo oyo elandi ekosalisa yo oyanola na mituna wana ya ntina.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Buku moko (Encyclopaedia Judaica volimi 12, lokasa 49), emonisi ete “ekoki kozala ete ebengeli wana euti na libongoli ya Vulgate (Prophetae Minores). Liloba ‘mike’ oyo basaleli na ebengeli ‘Basakoli ya Mike’ emonisi te ete basakoli yango 12 bazali na ntina mingi te soki tokokanisi bango na basakoli lokola Yisaya, Yirimia, mpe Ezekiele, kasi ebengeli yango esalelami mpo na komonisa ete mikanda yango ezali mikuse mpenza.”
b Na ndakisa, mpo na koyeba makambo etali Hagai mpe Zekaria talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yanuali 1997, lokasa 6 tii 22 mpe Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yanuali 1996, lokasa 8 tii 22.
MATOMBA OYO OKOKI KOZWA
• Makanisi nini ya lokuta na ntina na “Basakoli ya Mike” osengeli koboya?—Baroma 15:4.
• Mpo na nini okoki kozala na elikya ete okozwa litomba soki oyekoli mikanda 12 ya bisakweli?—2 Timote 3:16.
• Ntango ozali koyekola mikanda oyo, elikya nini okoki kozala na yango?—1 Batesaloniki 2:13.