Mokapo 6
“Bosembo etíyola”—sekele mpo na koyeba Nzambe
1. Nini etindaka yo olinga bosembo?
BANDA kala, bato mosusu bayebani mpo na bosembo na bango mpe mpo bazalaki kolobela bosembo mpo na basusu. Kasi tótalela likambo oyo: Soki bosembo ebendaka bato, ezali mpo bakelamaki na elilingi ya Nzambe. Olingaka bosembo mpe olingaka bato mosusu basalela yo makambo na bosembo mpo okelamá na elilingi ya Yehova, oyo ‘asepelaka’ na bosembo.—Yirimia 9:24; Ebandeli 1:27; Yisaya 40:14.
2, 3. Mpo na nini tosengeli kotalela mikanda ya basakoli 12 mpo na koyeba bosembo ya Yehova?
2 Ntango ozali kotánga mikanda ndenge na ndenge ya Biblia, okoki kososola bosembo ya Nzambe. Kasi okozwa mpenza matomba soki otaleli mikanda ya basakoli 12. Mikanda yango elobeli mingi bosembo, yango wana, buku moko oyo ezali na mikanda ya Hosea, Amose mpe Mika, oyo ebimisamaki na société biblique, motó ya likambo na yango ezali Tiká Bosembo ezala! Na ndakisa, tótalela toli oyo ya Amose: “Bosembo etíyola lokola mai, mpe boyengebene lokola mokɛli oyo ezali kotíyola ntango nyonso.” Na makambo oyo osengeli kokokisa, talá likambo ya liboso oyo Mika alobeli: “Eloko nini Yehova azali kosɛnga yo, soki bobele komonisa bosembo, kolinga boboto mpe kotambola na bopɔlɔ elongo na Nzambe na yo?”—Amose 5:24; Mika 6:8.
3 Na yango, mpo na koyeba Yehova malamumalamu mpe kozala na likoki ya komekola ye, tosengeli mpenza koluka koyeba soki bosembo na ye ezali nini. Bosembo ya Yehova ezali mpenza ezaleli na ye ya ntina, na yango tokoki koloba te ete toyebi ye soki tosepelaka te na bosembo na ye. Ata mpe basaleli na ye ya kala bayebaki ete “Yehova alingaka bosembo.”—Nzembo 33:5; 37:28.
4. Monisá ntina oyo makomi ya basakoli 12 ekoki kolendisa yo otyela bosembo ya Nzambe motema.
4 Ntango mosusu, liboso Yehova apesa Yerusaleme bitumbu, mosakoli Habakuku atunaki boye: “Ee Yehova, kino ntango nini nakobelela mpo na kosɛnga lisalisi, . . . Mobeko ezali kosila makasi, mpe bosembo ezali ata moke te. Mpo moto mabe azali kozinga moyengebene, yango wana bosembo etɛngisami.” (Habakuku 1:2, 4) Mosembwi Habakuku ayebaki Yehova na nzela ya Makomami oyo azalaki na yango mpe na nzela ya makambo oyo ye moko akutanaki na yango. Na yango, andimaki mpenza ete Nzambe akangamaka na bosembo mpe alendisaka bato bámonisa yango. Kasi, mosakoli yango azalaki komituna ntina oyo Yehova atikaki mabe ezala. Nzambe ayebisaki Habakuku ete akosala makambo na bosembo mpo na moto ya sembo. (Habakuku 2:4) Soki Habakuku ná bato mosusu bazalaki na elikya ya ndenge wana, ozali na ntina monene ya kozala mpe na elikya yango. Mpo na nini? Biblia ezali lelo na mobimba, na yango, okoki koyekola mingi na ndenge oyo Yehova azalaki kosalela bato makambo mpe ndenge amonisaki bizaleli na ye, ata mpe bosembo na ye. Na yango, ozali mpenza na libaku malamu ya koyeba Yehova mpe kondima bosembo, ezaleli na ye ya kokoka.
5. Likambo nini mpenza etali bosembo tokotalela sikoyo?
5 Ntango azalaki kotinda basakoli na Yisraele, Yehova azalaki kolobela mingi likambo ya kozala sembo. (Yisaya 1:17; 10:1, 2; Yirimia 7:5-7; Ezekiele 45:9) Alobelaki likambo yango mingi na nzela ya basakoli 12. (Amose 5:7, 12; Mika 3:9; Zekaria 8:16, 17) Moto nyonso oyo azali kotánga makomi na bango akoki komona ete ezali kosɛnga bato bámonisaka bosembo na makambo oyo bazali kosala mokolo na mokolo. Ezali na lolenge mingi oyo tokoki kosalela mateya oyo ezali na mikanda yango 12, kasi tiká tótalela makambo mibale oyo basakoli yango balobelaki mingi bosembo mpe na nsima tómona ndenge oyo tokoki kosalela makambo oyo tozali koyekola.
BOSEMBO NA MAKAMBO YA MOMBONGO MPE MBONGO
6, 7. Mpo na nini moto nyonso asengeli komonisa bosembo na makambo etali mombongo mpe mbongo?
6 Yesu alobaki ete: “Moto asengeli kobika kaka na mampa te.” (Luka 4:4; Kolimbola Mibeko 8:3) Aboyaki te ete tozalaka na mposa ya mampa—tozalaka na mposa ya kolya. Mpo na bato mingi, yango esɛngaka kosala to moto moko na kati ya libota asengeli kosalaka mpo na kozwa eloko ya koleisa libota. Ezalaki mpe bongo mpo na basaleli ya Nzambe ya ntango ya kala. Basusu bazalaki kosala misala na bango moko, na ndakisa kolona, kosala bilamba, kiti to mesa, to biloko ya kolambela. Basusu bazalaki bapatrɔ—bazalaki kozwa bato na mosala mpo na kobuka bambuma to kosala farini, mafuta ya olive to vinyo. Kasi, basusu bazalaki bato ya mombongo—bazalaki kosomba biloko mpe kotɛka yango. To basusu bazalaki kosalela bato misala lokola kobongisela bato nsamba ya ndako to kobɛtela bango miziki.—Kobima 35:35; Kolimbola Mibeko 24:14, 15; 2 Bakonzi 3:15; 22:6; Matai 20:1-8; Luka 15:25.
7 Okoki komona likambo ya ndenge wana na bomoi na yo moko, ya baninga to ya bandeko na yo? Ezali solo ete lelo oyo, mayele ya kosala mosala ekoki kozala ndenge moko te, kasi ondimi te ete lolenge oyo Nzambe atalelaka bosembo na makambo yango ezali kaka ndenge moko na oyo ya ntango ya kala? Na basango oyo apesaki na nzela ya basakoli 12, Yehova amonisaki ete mposa na ye ezali ete bato na ye bámonisaka bosembo na makambo etali mombongo, mosala mpe mbongo. Wana tozali kotalela mwa bandakisa na yango, kanisá na lolenge oyo okoki komonisa bosembo ya Nzambe.—Nzembo 25:4, 5.
8, 9. (a) Mpo na nini etumbu oyo elobelami na Malaki 3:5 ezalaki mpenza makasi? (b) Likanisi nini ya bokatikati Makomami elendisi na likambo etali kozwa bato na mosala mpe mosala?
8 Nzambe alobaki na nzela ya Malaki boye: “Nakobɛlɛma epai na bino mpo na kosambisa, mpe nakokóma moto oyo azali kotatola na lombangu mpo na kotɛmɛla banganga-nkisi, mpe bato ya ekobo, mpe baoyo balapaka ndai ya lokuta, mpe baoyo babubaka mosali na lifuti ya mosala na ye, . . . bazali kobanga ngai te.” (Malaki 3:5) Ya solo, Yehova akweisaki baoyo bazalaki kosalela basali na bango makambo na bosembo te. Ezalaki mpenza likambo ya monene? Atángaki likambo ya konyokola basali molɔngɔ moko na misala ya bilimo mabe, ekobo mpe kokosa. Bakristo bayebi ndenge oyo Nzambe akosambisa ‘bato ya pite ná baoyo basalaka misala ya bilimo mabe ná bato nyonso ya lokuta.’—Emoniseli 21:8.
9 Makambo oyo ezalaki kosalema na esika ya mosala, ezalaki te kaka likambo ya bizaleli malamu ya bato; etalelaki mpe bosembo ya Yehova. Alobaki ete mpo na moyibi ya bato oyo bazalaki ‘kobuba mosali na lifuti ya mosala na ye,’ asengelaki ‘kobɛlɛma epai na bato yango mpo na kosambisa.’ Emonani ete Nzambe alobaki te ete patrɔ asengelaki kondima makambo nyonso mosali to basali na ye bazalaki kosɛnga. Okoki komona na ndakisa oyo Yesu apesaki ya moto oyo abengaki bato mpo básala na elanga ya vinyo ete patrɔ nde azalaki na mokumba ya kokata mbongo ya kofuta basali mpe koyebisa ndenge mosala esengelaki kosalema. (Matai 20:1-7, 13-15) Tosengeli koyeba ete na ndakisa ya Yesu, basali nyonso bafutamaki denari moko, lifuti ya ‘mokolo’ mobimba oyo bayokanaki, ezala basalaki mokolo mobimba to te. Tosengeli mpe koyeba ete patrɔ asalelaki te mayele mabe mpo na kolyela bato oyo abengaki na mosala na ye.—Yirimia 22:13.
10. Mpo na nini tosengeli komibanzabanza na lolenge oyo tosalelaka basali na biso makambo?
10 Soki ozali na kompanyi na yo mpe bato ya mosala, to soki kaka ozwi moto mpo asalela yo mosala moko, ndenge nini lifuti na yo, makambo oyo osɛngi mpe lolenge na yo ya kofuta bango, eyokani na etinda oyo ezali na Malaki 3:5? Ezali malamu kokanisa na likambo yango mpamba te Makomami ya Grɛki ya bokristo elobeli mpe likambo ya kozanga kosalela bato oyo ozwi na mosala makambo na bosembo. Mpo na baoyo bazangaka bosembo na makambo yango, moyekoli Yakobo atunaki boye: “[Yehova] azali kotɛmɛla bino te?” (Yakobo 5:1, 4, 6) Ebongi mpenza tóloba ete: Baoyo bazangi bosembo na likambo etali “mosali na lifuti ya mosala na ye” bayebi mpenza Yehova te, mpo bazali komekola te bosembo na ye.
11, 12. (a) Etamboli nini ya mabe Hosea 5:10 elobeli? (b) Ndenge nini okoki kosalela etinda oyo ezali na Hosea 5:10?
11 Sikoyo tótala mpo na nini Yehova atɛmɛlaki bato minene mosusu na mikolo ya Hosea: “Bankumu ya Yuda bakómi mpenza lokola baoyo bazongisaka ndelo ya mabele nsima. Nakosopela bango nkɛlɛ na ngai lokola mai.” (Hosea 5:10) Mabe nini Hosea atɔndɔlaki? Moyuda oyo azalaki mosali-bilanga, azalaki kobikela na mabele na ye, ezalaki na bilembo ya mabanga to banzete oyo ezalaki komonisa esika mabele na ye esuki. ‘Kozongisa ndelo ya mabele’ ya mosali-bilanga nsima ezalaki kokómisa moke mabele na ye mpe kozangisa ye esika oyo azalaki kobikela, mpe yango ezalaki koyiba ye. Hosea akokanisaki bankumu ya Yuda, oyo basengelaki kokɔtela bosembo na bato oyo bazalaki kozongisa nsima bilembo ya bandelo.—Kolimbola Mibeko 19:14; 27:17; Yobo 24:2; Masese 22:28.
12 Lelo oyo, bato mosusu oyo basalaka mosala ya kotɛka bandako to mapango bakoki kobendama na ‘kozongisa nsima bandelo’ mpo na kokosa basombi. Atako etinda yango etaleli batɛki, bapatrɔ, basali to bakiliya—etaleli mpe moto nyonso oyo asali kɔntra to boyokani na likambo moko. Ndenge oyebi yango, bato mosusu ya mimbongo bakakatanaka mpo na kokoma makambo oyo bayokani, bakanisaka ete na nsima ya mikolo ekozala mpasi te kokitisa makambo oyo bayokanaki to bábakisa makambo mosusu ya sika. Basusu bakomaka makambo oyo bayokani kasi bakɔtisaka mpe mwa makambo ya mikemike mpo na litomba na bango, ata soki moyibi ya ndenge wana ekoki kosala baninga na bango mabe. Okanisi ete moto oyo azali kosala bongo, ezala azali motɛki to kiliya, patrɔ to mosali—ayebi mpenza Nzambe ya bosembo? Yehova alobaki na Liloba na ye ete: “Kozongisa ndelo . . . nsima te [ya bana mibali oyo batata bakufá]. Mpo Mosikoli na bango azali makasi; ye moko akosamba na yo mpo na bango.”—Masese 23:10, 11; Habakuku 2:9.
13. Na kotalela Mika 6:10-12, makambo nini ya kozanga bosembo oyo basaleli ya Nzambe na ntango ya kala bazalaki kosala?
13 Mika 6:10-12 elobeli lisusu polele likambo etali bosembo. Elobi boye: “Biloko ya motuya ya makambo mabe mpe efa oyo ekɔndá, oyo elakelami mabe, ezali nde naino kati na ndako ya moto mabe? Nakoki nde kozala pɛto na bizaleli ntango nazali na bimekeli-kilo oyo ezali ya mabe mpe na saki ya libanga ya komeka kilo oyo ezali ya bokosi? Mpo bazwi na ye . . . bato oyo bafandi epai na ye mpenza balobi lokuta, mpe lolemo na bango ezali na bokosi na monɔkɔ na bango.” Lelo oyo, mpo na komeka biloko tosalelaka litrɛ mpe kilo kasi efa te. To tomekaka kilo ya biloko na emekeli ya bozito na esika ya kosalela libanga ya komeka kilo. Kasi, likanisi ya Mika ezali polele. Batɛki to bato ya mombongo ya mikolo na ye bazalaki miyibi; bazalaki te kosalela bimekeli ya kilo mpe bamezire ya malamu, bazalaki kosalela bato makambo na bosembo te. ‘Bato mabe’ ezali ndenge oyo Nzambe abengaki baoyo bazalaki na “bokosi na monɔkɔ na bango” mpe na mimbongo na bango.—Kolimbola Mibeko 25:13-16; Masese 20:10; Amose 8:5.
14. Likebisi ya Mika ekoki kosalisa biso tóboya makambo nini ya kozanga bosembo ya mikolo na biso?
14 Makambo oyo Mika alobaki na ntina etali kosalela bakilo mpe bamezire ya lokuta esalisi yo otalela lolenge ya kotambwisa misala na yo to soki ozali mosali, esalisi yo oyeba etamboli nini osengeli kozala na yango? Ezali mpenza likambo oyo osengeli kokanisa na yango, mpo ezali na lolenge mingi oyo bato bakosaka bakiliya. Na ndakisa, bakompanyi oyo etongaka bandako ekoki kotyela moto zɛlo mpe mai na esika ya kotya sima oyo esengeli. To, bato ya misala ya mabɔkɔ bakoki kokosa bakiliya na bango, na ndakisa na kosalela biloko ya ntalo moke oyo ekokani te na mbongo bafuti bango, mpe kotya yango na bisika oyo ekomonana te. Bakomelesa mosusu babimisaka biloko ya kala oyo bazali na yango lokola nde ezali ya sika. Ntango mosusu oyoká mayele mosusu ya mabe oyo bato basalelaka mpo bázwa benefisi mingi. Okokosama mpo na komeka yango? Buku moko oyo elobeli ndenge ya kobatela makambo etali moto ye moko, oyo euti kobima kala mingi te emonisi ete Batatoli ya Yehova “bandimaka ete Mozalisi na bango amonaka bango, mpe mingi na bango bandimaka kutu kokufa na esika ya koyiba.” Ebakisi boye: “Balukaka bango mingi na bakompanyi oyo ezali na mbongo mingi.” Mpo na nini? Mpo bakristo ya solo bayebi ete Yehova azali ‘kosɛnga bango bámonisa bosembo,’ ezala na mimbongo mpe na makambo na bango ya mbongo.—Mika 6:8.
‘BANKUMU MPO NA BOSEMBO’
15, 16. Ndenge nini bakambi ya ntango ya Mika bazalaki kosalela bato makambo?
15 Okoki komona na mikanda ya basakoli 12 ete na ntango moko boye, bosembo ezangaki mpenza. Baoyo bazalaki na bokonzi, baoyo basengelaki kozala ndakisa na likambo etali bosembo, bazalaki bongo te. (Kobima 18:21; 23:6-8; Kolimbola Mibeko 1:17; 16:18) Mika abondelaki bango boye: “Nabondeli bino bóyoka, bino bankumu ya Yakobo mpe bino bakomanda ya ndako ya Yisraele. Ezali bino te nde bosengeli koyeba bosembo? Bino bato oyo boyinaka makambo ya malamu mpe bolingaka makambo ya mabe, bino baoyo bolongolaka bato loposo na bango mpe bolongolaka mosuni na bango na mikuwa na bango.”—Mika 3:1-3; Yisaya 1:17.
16 Maloba wana ekokaki kotungisa bato oyo bamesanaki na bomoi ya mboka. Mobateli ya mpate asengelaki na ntango mosusu kokata nsuki ya mpate oyo azalaki kobɔkɔla mpe kobatela. (Ebandeli 38:12, 13; 1 Samwele 25:4) Kasi “bakomanda ya ndako ya Yisraele,” baoyo basengelaki “koyeba bosembo,” bazalaki kobuba bato ya elanga ya Nzambe, kaka ndenge balongolaka mposo, mosuni ya mpate mpe babukaka mikuwa na yango. (Nzembo 95:7) Mpo na kolobela ndakisa mosusu ya bomoi ya mboka, Mika alobaki ete bankumu ‘oyo bazalaki kosambisa mpo na mbano’ bakokanaki na nsinga ya nsendensende to lopango ya nzubɛ. (Mika 7:3, 4) Kanisá ete ozali koleka na esika oyo etondi na bansende mpe na mapango ya nzubɛ. Na ntembe te, ekozokisazokisa yo, mpe bilamba na yo ekopasuka. Likambo yango emonisi ndenge oyo etamboli ya bakambi ezalaki kosala epai ya basaleli ya Nzambe. Na esika ya kosalela bandeko na bango makambo na bosembo, bazalaki kobuba mpe koyiba bango.—Mika 3:9, 11.
17. Na kotalela Sefania 3:3, ezaleli nini bakambi bazalaki na yango?
17 Sefania alobelaki mpe likambo ya ndenge wana: “Bankumu na yango na kati na yango bazalaki bankɔsi oyo ezali koganga. Basambisi na yango bazalaki bambwa ya zamba ya mpokwa oyo bazalaki kobuka mikuwa liboso ntɔngɔ etana.” (Sefania 3:3) Okoki komona na makanisi bakambi wana ya basaleli ya Nzambe, oyo bakokani na bankɔsi oyo bazalaki komona bosembo lokola eloko mpamba? To basambisi oyo, bazalaki lokola bambwa ya zamba oyo ezali na nzala makasi, oyo ezalaki kolya eloko nyonso, mpo ntango ntɔngɔ ekotana, kaka mikuwa nde etikala? Na makambo ya ndenge wana, ndenge nini bosembo ekokaki kozala? Bosembo ebebisamaki na bakambi ya mabe oyo bazalaki kolyela bato na esika ya kobatela bango.
18. Ndenge nini basambisi na Yisraele basengelaki kosalela basaleli ya Nzambe makambo?
18 Emonani polele ete, bakambi wana oyo bazalaki na ekólo oyo emipesaki na Nzambe bayebaki ye te. Soki bayebaka ye, balingaki kotosa maloba oyo ezali na Zekaria 8:16: “Talá makambo oyo bosengeli kosala: Bólobanaka mpenza solo. Bósambisaka na solo mpe na lisambisi ya kimya na baporte na bino.” Mikóló ya Yisraele bazalaki kokutana na porte ya engumba mpe basengelaki kosambisa makambo, na kolanda te kaka makambo oyo bayoki liboso to na makanisi na bango moko, kasi na boyokani na makanisi ya Nzambe. (Kolimbola Mibeko 22:15) Mpe Yehova akebisaki bango na likambo etali kopona bilongi, na ndakisa liboso ya bazwi to bato ya lokumu. (Balevi 19:15; Kolimbola Mibeko 1:16, 17) Basambisi basengelaki koluka kozongisa kimya kati na bato oyo bazalaki na matata, mpe kosala “lisambisi ya kimya.”
19, 20. (a) Mpo na nini bankulutu bakoki koyekola makambo mingi na mikanda ya basakoli 12? (b) Ndenge nini bankulutu bakoki komonisa ete bayebi Yehova mpe bosembo na ye?
19 Ntango akomelaki bakristo, ntoma Paulo atángaki ndambo ya maloba oyo ezali na Zekaria 8:16. (Baefese 4:15, 25) Na yango, tokoki mpenza kondima ete makebisi mpe batoli oyo basakoli 12 bapesaki na likambo etali bosembo ezali na ntina mpo na lisangá ya bokristo lelo oyo. Bankulutu basengeli kozala ndakisa na oyo etali koyeba Yehova mpe komonisa bosembo na ye. Yisaya 32:1 elobeli bango lokola ‘bankumu mpo na bosembo.’ Makambo nini ya ntina etali bankulutu yango tokoki kososola na makebisi mpe batoli oyo ezwami na mikanda ya basakoli 12?
20 Bankulutu basengeli kobosanaka te solo ya Makomami mpe ndenge Makomami emonisi makanisi ya Yehova. Bikateli na bango esengeli koutaka na Makomami kasi te na makanisi na bango moko to na ndenge kaka eyeli bango na motó. Biblia emonisi ete ekoki kozala na makambo mosusu ya mpasi, oyo esɛngaka komibongisa mingi, koluka na Biblia mpe na mikanda oyo ezali na toli ya bwanya oyo eutaka na moombo ya sembo mpe ya mayele. (Kobima 18:26; Matai 24:45) Ntango bankulutu bazali kosala milende ya ndenge wana, na ntembe te bakoyina oyo ezali mabe mpe bakolinga oyo ezali malamu na miso ya Nzambe. Yango ekosalisa bango ‘básala ete bosembo ezala na porte’ mpo ete ‘básambisaka na bosembo ya solosolo.’—Amose 5:15; Zekaria 7:9.
21. Mpo na nini bankulutu basengeli koboya kopona bilongi, kasi nini ekoki kokosa bango bákwea na motambo yango?
21 Ata soki moto oyo azali na mokumba ya kosambisa azali na boyebi ya Biblia, akoki mpe ntango mosusu kopona bilongi. Malaki amilelaki mpenza mpo na banganga-nzambe, oyo bazalaki liziba ya boyebi, kasi ‘bazalaki kopona bilongi na mobeko.’ (Malaki 2:7-9) Ndenge nini yango ekoki kosalema? Mika alobi ete batambwisi mosusu bazalaki ‘kosambisa kaka mpo na kanyaka, mpe banganga-nzambe bazalaki kolakisa kaka mpo na lifuti.’ (Mika 3:11) Ndenge nini makanisi ya nkulutu ekoki mpe kobeba ndenge wana? Ezali boni soki moto oyo nkulutu azali kotalela likambo na ye azalaki kokabela ye, to soki amoni ete na mikolo ezali koya moto yango akoki kosalisa ye? To kanisá ete azali kotalela likambo ya moto oyo azali mpenza ndeko na ye ya makila to azali molongani, sɛmɛki to bokilo na ye. Libota to bandeko ya lisangá bakoki koleka mitinda ya Biblia? Nkulutu akoki kokóma kopona bilongi soki azali kotalela likambo ya moto oyo asali mabe to ntango azali kotalela soki ndeko boye to boye akokisi masɛngami mpo na kozwa mikumba na lisangá.—1 Samwele 2:22-25, 33; Misala 8:18-20; 1 Petro 5:2.
22. (a) Bankulutu bazali na mokumba nini na likambo etali bosembo? (b) Bizaleli nini mosusu ya Nzambe bankulutu basengeli komonisa ntango bazali kotalela moto oyo asali lisumu?
22 Ntango moto asali lisumu moko monene, bankulutu ya lisangá basalaka nyonso mpo na kobatela lisangá na makama nyonso, oyo ekoki kobebisa yango. (Misala 20:28-30; Tito 3:10, 11) Kasi, soki moto oyo asali lisumu abongoli mpenza motema, bankulutu basengeli “kosembola moto yango na elimo ya boboto.” (Bagalatia 6:1) Kasi, na esika ya kozala makambo makasi, basalelaka toli oyo: “Bósambisaka na bosembo ya solosolo; mpe bómoniselanaka motema boboto mpe motema mawa.” (Zekaria 7:9) Mibeko oyo Yehova apesaki Bayisraele na likambo etali kosambisa makambo emonisi polele bosembo mpe motema mawa na ye. Atikelaki basambisi bonsomi na bikateli mingi oyo bazalaki kozwa, bakokaki komonisa motema mawa, na kotalela makambo oyo etindaki mosumuki asala mabe to ezaleli oyo akomonisa. Mpo na yango, bankulutu basengeli kosala makasi básambisaka “na bosembo ya solosolo” mpe komonisaka “motema boboto mpe motema mawa,” mpe soki bamonisi bizaleli yango, ekomonisa ete bayebi Yehova.
23, 24. (a) Ndenge nini bankulutu bakoki kosala “lisambisi ya kimya”? (b) Mikanda ya basakoli 12 esalisi yo ososola nini na likambo etali bosembo?
23 Kanisá Zekaria 8:16: “Bósambisaka na solo mpe na lisambisi ya kimya na baporte na bino.” Mpo na mokano nini? Mpo na “lisambisi ya kimya.” Ata ntango bantoma bazalaki na bomoi, kowelana mpe koswana ezalaki kati na bakristo mosusu. Ndenge Paulo asalaki mpo na Evodi mpe Sɛntishe, bankulutu bakoki mpe lelo oyo kosala bongo mpo na kosalisa baoyo bazali na mokakatano ya ndenge wana. (Bafilipi 4:2, 3) Bankulutu basengeli mpenza kosala makasi mpo na kosala “lisambisi ya kimya,” koluka kozongisa kimya kati na bandeko oyo bazwanaki matata. Toli ya Makomami oyo bapesaka mpe ezaleli oyo bamonisaka mpo na kosala bongo, ekoki kosala ete kimya ezala na lisangá mpe kimya ná Nzambe ezala. Na ndenge yango, ekomonana polele ete bayebi Yehova mpe bosembo na ye.
24 Makambo mibale oyo touti kolobela emonisi ete ezali na ntina kosalela mokolo na mokolo toli oyo etali bosembo oyo ezwami na mikanda ya basakoli 12. Ezali mpenza lipamboli ntango biso ná bazalani na biso totiki ete “bosembo etíyola”!
OYEKOLI NINI?
• Na oyo etali bosembo, ndakisa ya nani olandaka?—Nzembo 37:28; Hosea 2:19, 20.
• Mpo na nini osengeli kolona bosembo mpe kolanda yango?—Amose 5:6, 7; Sefania 2:3.
• Ndenge nini okoki komonisa bosembo na mosala to na makambo etali mbongo?—Hosea 5:10; 12:6, 7; Amose 8:5; Mika 2:1, 2; Malaki 3:5.
NDENGE NINI TOKOKI KOSALELA TOLI YANGO LELO?
• Mpo na nini bankulutu basengeli kokoba kosalela bosembo?—Mika 3:9.
• Zekaria 8:16 epesi bankulutu mpe bakristo mosusu toli nini?
• Makambo nini na oyo etali kopona bilongi tosengeli kokeba na yango, mpe mpo na nini?—Malaki 2:7-9; 1 Timote 5:21, 22.
[Elilingi na lokasa 71]
Habakuku
[Elilingi na lokasa 76]
Bosembo etambwisaka yo na esika ya mosala mpe na misala mosusu?
[Elilingi na lokasa 79]
Bankumu na mikolo ya Mika mpe Sefania bayebaki Yehova te
[Elilingi na lokasa 81]
Na makambo na bango nyonso, bankulutu ‘basalaka ete bosembo ezala na porte’