MOKAPO 4
Ndenge oyo lisangá ebongisami mpe etambwisamaka
NA MOKANDA ya liboso oyo ntoma Paulo akomelaki Bakorinti, alobelaki solo ya ntina mingi oyo etali Nzambe ntango akomaki ete: “Nzambe azali Nzambe, ya mobulu te, kasi ya kimya.” Na nsima, ntango alobelaki makita ya lisangá, alobaki ete: “Makambo nyonso esalema na ndenge ya lokumu mpe na molɔngɔ.”—1 Ko. 14:33, 40.
2 Na ebandeli mpenza ya mokanda na ye, ntoma yango apesaki toli mpo ayokaki ete bokabwani ezalaki na lisangá ya Korinti. Paulo alendisaki bandeko yango ete ‘bálobaka na boyokani’ mpe bázala “liboke moko mpenza na makanisi kaka moko mpe na motindo ya kokanisa kaka moko.” (1 Ko. 1:10, 11) Na nsima, apesaki bango toli oyo etali makambo ndenge na ndenge oyo ezalaki kobebisa bomoko ya lisangá. Apesaki bango ndakisa ya nzoto ya moto mpo na komonisa bango ntina oyo basengelaki kozala na bomoko mpe kosalisanaka. Alendisaki bandeko nyonso ya lisangá ya bokristo, bázala na mikumba to te, ete bátyelaka basusu likebi na bolingo mpenza. (1 Ko. 12:12-26) Mpo bandeko ya lisangá básala mosala na bomoko mpe na boyokani ya ndenge wana, ezalaki kosɛnga ete lisangá ebongisama malamu.
3 Kasi, ndenge nini lisangá ya bokristo esengelaki kobongisama? Nani asengelaki kobongisa yango? Esengelaki kozala ebongiseli ya ndenge nini? Banani basengelaki kozwa mikumba? Soki totiki Biblia etambwisa biso, tokozwa biyano ya polele na mituna yango.—1 Ko. 4:6.
EBONGISAMI NA NDENGE YA TEOKRASI
4 Lisangá ya bokristo ebotamaki na mobu 33 T.B., na mokolo ya Pantekote. Liteya nini tokoki kozwa soki totaleli lisangá ya bokristo na siɛklɛ ya liboso? Ebongisamaki mpe etambwisamaki na ndenge ya Teokrasi, elingi koloba na boyangeli (na Grɛki kratos) ya Nzambe (na Grɛki theos). Maloba wana mibale ezali na mokanda ya 1 Petro 5:10, 11. Lisolo ya Biblia oyo elobeli makambo oyo esalemaki na Yerusaleme eleki sikoyo mbula soki 2 000 emonisi polele ete Nzambe nde abandisaki lisangá ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo. (Mis. 2:1-47) Ezalaki ndako na ye. (1 Ko. 3:9; Ef. 2:19) Lelo oyo, lisangá ya bokristo ezali kolanda ndenge oyo lisangá ya siɛklɛ ya liboso ebongisamaki mpe etambwisamaki.
Lelo oyo, lisangá ya bokristo ezali kolanda ndenge oyo lisangá ya siɛklɛ ya liboso ebongisamaki mpe etambwisamaki
5 Lisangá ya liboso ebandaki na bayekoli soki 120. Elimo santu esopamaki liboso likoló na bango, mpo na kokokisa esakweli ya Yoele 2:28, 29. (Mis. 2:16-18) Kasi kaka na mokolo wana, bato mosusu soki 3 000 bazwaki batisimo na mai mpe bakɔtaki na lisangá ya bakristo oyo babotami na elimo. Bandimaki liloba etali Kristo mpe “bakobaki komipesa na mateya ya bantoma.” Nsima na yango, “Yehova akobaki kobakisela bango mokolo na mokolo baoyo bazalaki kobikisama.”—Mis. 2:41, 42, 47.
6 Lisangá oyo ezalaki na Yerusaleme ekolaki noki, yango wana nganga-nzambe monene ya Bayuda amilelaki ete bayekoli ya Yesu batondisi Yerusaleme na mateya na bango. Na kati ya bayekoli ya sika oyo bakɔtaki na lisangá na Yerusaleme, ezalaki mpe na ebele ya banganga-nzambe ya Bayuda.—Mis. 5:27, 28; 6:7.
7 Yesu alobaki ete: “Bokozala batatoli na ngai na Yerusaleme mpe na Yudea mobimba mpe na Samaria mpe tii na esika eleki mpenza mosika na mabele.” (Mis. 1:8) Esalemaki mpenza bongo mpamba te ntango monyoko moko monene ebimaki na Yerusaleme nsima ya liwa ya Stefano, bayekoli oyo bazalaki kofanda kuna bapalanganaki na Yudea mpe na Samaria mobimba. Kasi, na bisika nyonso oyo bazalaki kokende, bakobaki kosakola nsango malamu mpe kokómisa bato bayekoli, ezala mpe Basamaria mosusu. (Mis. 8:1-13) Na nsima, nsango malamu esakolamaki mpe ebotaki mbuma epai ya bato oyo bakatami ngenga te, bato oyo bazalaki Bayuda te. (Mis. 10:1-48) Na nzela ya mosala nyonso wana ya kosakola, bato mingi bakómaki bayekoli mpe masangá ya sika ebotamaki na bisika mosusu, longola na Yerusaleme.—Mis. 11:19-21; 14:21-23.
8 Bibongiseli nini ezwamaki mpo masangá nyonso ya sika ebongisama mpe etambwisama ndenge Nzambe alingi, to na ndenge ya Teokrasi? Na litambwisi ya elimo ya Nzambe, ebongiseli moko ezwamaki mpo babateli ya mpate-basungi bábatela etonga. Paulo ná Barnabasi batyaki bankulutu na masangá oyo batalaki na mobembo na bango ya liboso na mosala ya misionɛrɛ. (Mis. 14:23) Luka, moko ya bakomi ya Biblia, alobeli likita oyo Paulo asalaki elongo na bankulutu ya lisangá ya Efese. Paulo alobaki na bango ete: “Bókeba mpo na bino moko mpe mpo na etonga mobimba, oyo elimo santu etye bino bakɛngɛli na kati na yango, mpo na kobatela lisangá ya Nzambe, oyo ye asombaki na makila ya Mwana na ye moko.” (Mis. 20:17, 28) Bakómaki bankulutu mpo bakokisaki makambo oyo Biblia esɛngi. (1 Tim. 3:1-7) Tito, moninga ya mosala ya Paulo, azwaki ndingisa ya kotya bankulutu na masangá ya Krɛtɛ.—Tito 1:5.
9 Wana masangá mingi ezalaki kobotama, bantoma mpe bankulutu oyo bazalaki na Yerusaleme bakobaki kozala bakɛngɛli ya libosoliboso ya lisangá na siɛklɛ ya liboso, oyo epalanganaki na mikili mingi. Bango nde bazalaki lisangani ya mikóló-bakambi.
10 Ntango ntoma Paulo akomelaki lisangá ya Efese, alimbolaki ete lisangá ya bokristo ekotikala na bomoko kaka soki ezali kosala na boyokani na elimo ya Nzambe, mpe soki ezali kotosa bokonzi ya Yesu Kristo. Alendisaki bakristo ya Efese ete bálona ezaleli ya komikitisa mpe bábatela ‘bomoko ya elimo’ mpe báfanda na kimya na bato nyonso na lisangá. (Ef. 4:1-6) Na nsima azongelaki maloba oyo ezali na Nzembo 68:18 mpe amonisaki ete maloba yango eyokani na ebongiseli oyo Yehova azwaki ya kotya mibali oyo bakokisi masɛngami ya Makomami mpo básalela lisangá lokola bantoma, basakoli, bapalanganisi ya nsango malamu, babateli ya mpate mpe bateyi. Mibali yango, oyo bazali makabo ya Yehova, basengelaki kotonga lisangá mobimba mpo etonda na elimo mpe esepelisa Nzambe.—Ef. 4:7-16.
MASANGÁ YA MIKOLO NA BISO ELANDAKA NDAKISA YA LISANGÁ YA NTANGO YA BANTOMA
11 Lelo oyo, masangá nyonso ya Batatoli ya Yehova ebongisami na kolanda ndakisa wana. Masangá yango nyonso esali lisangá moko ya mokili mobimba oyo ezali na bomoko, mpe etongami likoló ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo. (Zek. 8:23) Yesu Kristo nde abongisi ete esalema bongo. Ndenge alakaki yango, azali kaka elongo na bayekoli na ye oyo batyami mafuta na elimo, “mikolo nyonso tii na bosukisi ya makambo ya ntango oyo.” Bato oyo bakɔti na lisangá, oyo ezali se kokola, bandimi nsango malamu ya Nzambe, bapesi bomoi na bango mobimba epai ya Yehova, mpe bazwi batisimo mpo na kokóma bayekoli ya Yesu. (Mat. 28:19, 20; Mrk. 1:14; Mis. 2:41) Bandimaka ete Yesu Kristo, “mobateli ya bampate oyo aleki malamu,” azali Mokonzi ya etonga mobimba, oyo na kati na yango ezali na bakristo oyo batyami mafuta na elimo ná “bampate mosusu.” (Yoa. 10:14, 16; Ef. 1:22, 23) Bango nyonso bazali “etonga kaka moko” mpe babatelaka bomoko mpo bandimaka na bosembo nyonso litambwisi ya Kristo mpe batosaka “moombo ya sembo mpe ya mayele,” oyo Kristo atye mpo na kobongisa makambo. Na yango, tókoba kondima mpe kotya motema mobimba na moombo ya sembo mpe ya mayele.—Mat. 24:45.
NTINA YA BIBONGISELI OYO ESALEMI NA KOLANDA MIBEKO YA LETA
12 Mpo na kopesa bilei ya elimo na ntango oyo ebongi mpe mpo ete nsango malamu ya Bokonzi esakolama liboso nsuka eya, ebongiseli ya Yehova esalá mwa bibongiseli mosusu na kolanda mibeko ya Leta. Bibongiseli yango endimami na mibeko ya Leta ya bikólo ndenge na ndenge, mpe nyonso esalaka na boyokani. Bibongiseli yango esalaka ete mosala ya kosakola nsango malamu na mokili mobimba esalema malamu.
NDENGE OYO FILIALE EBONGISAMI
13 Ntango kaka bafungoli biro ya filiale na ekólo moko, Komite ya filiale oyo ekoki kozala na bankulutu misato to koleka etyamaka mpo na kotambwisa mosala na ekólo to bikólo oyo filiale yango ezali kotalela. Moko ya bandeko oyo bazali na komite yango azalaka Mokambi-misala ya komite ya filiale.
14 Masangá ya teritware oyo filiale mokomoko etalelaka ebongisami na bazongazonga. Bazongazonga yango ezalaka ndenge moko te; bonene na yango etalelaka bisika oyo ezali, minɔkɔ mpe motángo ya masangá na esika oyo filiale ezali kotambwisa mosala. Mokɛngɛli ya zongazonga atyamaka mpo na kotalaka masangá ya zongazonga mokomoko. Biro ya filiale epesaka bakɛngɛli ya zongazonga malako oyo esalisaka bango bákokisa mikumba na bango.
15 Masangá endimaka mpe etosaka bibongiseli oyo ezwamaka mpo na bolamu ya bandeko nyonso. Endimaka mibali oyo batyami bankulutu mpo na kotambwisa mosala na bafiliale, na bazongazonga mpe na masangá. Etalelaka moombo ya sembo mpe ya mayele mpo na kozwa bilei ya elimo na ntango oyo ebongi. Lelo oyo, moombo ya sembo mpe atosaka mpenza bokonzi ya Kristo, akangamaka na mitinda ya Biblia, mpe alandaka ndenge elimo santu ezali kotambwisa makambo. Lokola biso nyonso tozali kosala na bomoko, tozali kozwa matomba lokola oyo bakristo ya siɛklɛ ya liboso bazwaki: “Masangá ekobaki mpenza kokóma makasi na kondima mpe bato bazalaki kobakisama mokolo na mokolo.”—Mis. 16:5.