Mituna na batangi
◼ Mpo na nini bobele ba Témoins de Jéhovah moke balyaka limpa mpe bamelaka vinyo na Ekaniseli ya Nkolo oyo esalemaka mbula na mbula?
Ezali mpo ete na bokeseni na Mangomba ya mokili oyo, ba Témoins de Jéhovah bandimaka liteya ya Biblia oyo elobi ete bobele etuluku moke ya bato ekosangola bomoi ya makolo, basaleli ya sembo ya Nzambe oyo nyonso batikali bakozwa bomoi ya seko na mabelé.
Mangomba mazali koteya uta kala ete bato nyonso oyo bandimami na Nzambe bakendaka na likolo, bamosusu bakokenda na lifelo ya moto. Biblia elobi bongo te. Makomami mamonisi polele ete mwa bato moke, lokola bantoma, bakoyangela elongo na Klisto na likolo. Yesu alobaki ete bazali “etuluku moke”, mpe Biblia emonisi ete bazali 144 000. (Luka 12:32; Emoniseli 14:3, 4) Bato mingi oyo basalelaki Jéhovah na bosembo nyonso mpe bandimamaki epai na ye bakufaki liboso ete Yesu afungola nzela ya bomoi na likolo. (Matai 11:11; Baebele 10:19-21) Epai mosusu, nsima wana basangani na “etuluku moke” baponamaki, bamilio mosusu na bato basili kokoma baklisto ya solo. Biblia epesi epai na bato nyonso ya bosembo, oyo bazali kati na “etuluku moke” te likoki ya kozala na bomoi ya seko na mabelé oyo ekobongwana paradis. (Nzembo 37:20, 29; Emoniseli 21:4, 5) Kasi mpo na nini baklisto yango balyaka limpa te mpe bamelaka vinyo te na ntango na Ekaniseli ya Nkolo? Mpamba te, lokola Yesu alimbolaki yango, libaku yango epesami epai na baoyo babyangami mpo na bomoi ya likolo, baoyo bakotisami na kondimana na sika.
Ya solo, mpo na kozwa lilimbisi na Nzambe mpe kosangola bomoi ya seko, ezala na likolo to na mabelé, ezali na ntina ya kozala na kondima na mbeka na Yesu. Ezali yango Klisto amonisi kati na Yoane 6:51-54: “Ngai nazali limpa na bomoi oyo ekiti longwa na likolo. Soko moto nani akolya limpa oyo, akozala na bomoi libela; . . . limpa ekopesa ngai, ezali nzoto na ngai mpo na bomoi na mokili [bato oyo bakoki kosombama]. . . Ye oyo akolya nzoto na ngai mpe akomela makila na ngai azali na bomoi na seko.”
Tokomona awa ete Yesu alobaki bobele na bayekoli na ye te wana ebimisaki ye maloba oyo; na yango, mokolo eutaki koleka aleisaki na ndenge ya ekamwiseli bankoto na bato; bibele bayaki bongo kotala ye, na région ya Kapernaume, mpe lisolo ebimaki kati na yango. Yesu alobaki maloba oyo mazwami na Yoane 6:51-54. Na bongo, maloba na Yesu matalaki libosoliboso bayekoli na ye te, wana elobaki ye ete azali ‘limpa euti na likolo’, oyo ekokaki komema elikya ya bomoi ekoumela koleka mana elyamaki epai na Bayuda na esobe.—Yoane 6:24-34.
Mpo na yango, tomikundola lisusu nani azalaki na esobe nsima na kobima na Ezipito. Ezalaki ‘Bayisraele, babali nkoto nkama motoba kozanga kotanga bana mpe ebele na bato na ndenge na ndenge.’ (Exode 12:37, 38; 16:13-18) Kati na “ebele na bato na ndenge na ndenge” tokoki kotanga Baezipito oyo babalanaki na Bayisraele mpe Baezipito mosusu oyo basanganaki na Bayisraele. Mpo na kotikala na bomoi Bayisraele mpe “ebele na bato’ wana basengelaki kolya mana. “Ebele na bato” oyo ezalaki mpe na elikya moko na Bayisraele? Te, mpamba te ata bazalaki kosambela Jéhovah elongo na Bayisraele mpe bazalaki na elikya ya kokola na Mabelé na ndaka, bato yango bakokaki ata moke te, kokoma mikonzi to banganga-nzambe, engebene Mibeko. Na yango, ata bango nyonso balyaki mana kati na esobe, bazalaki na elikya moko te.
Tomikundola ebongiseli yango mpe totalela makambo oyo Yesu alobaki epai na bayekoli na ye, mbula moko na nsima wana abimisaki maloba mazwami kati na Yoane 6:51-54. Na libaku yango, Yesu alobelaki mpenza limpa mpe vinyo oyo elingaki kozala elilingi ya nzoto na ye mpe makila na ye. Ntango abandisaki Ekaniseli ya Nkolo, alobaki epai na bayekoli na ye: “Kopo oyo elimboli kondimana na sika na makila na ngai masili kosopana mpo na bino.” Abakisaki boye liboso na mwa etuluku yango, bantoma na ye: “Nde bino bato bosili koumela na ngai elongo kati na makambo na ngai na mpasi. Pelamoko Tata na ngai apesaki ngai Bokonzi, ngai mpe napesi bino bokonzi na kolya mpe komela na mesa na ngai kati na bokonzi na ngai, mpe bokofanda na kiti na bokonzi mpe bokosambisa mabota zomi na mibale na Yisraele.”—Luka 22:20, 28-30.
Maloba oyo mamonisi ete baoyo basengelaki kolya limpa mpe komela vinyo, bilembo bizali kolimbola nzoto mpe makila na Yesu, bazalaki bayekoli oyo bakotaki kati na “kondimana na sika”. Bango balingaki kokola kati na kondimana mosusu oyo Yesu alingaki kosala elongo na bango mpo ete bayangela ‘kati na bokonzi na ye’. Ezali polele ete Yesu azalaki kolobela awa mpo na baoyo balingaki koyangana mpo na ‘bokonzi’ mpe kozala banganga mpo na Nzambe, mpo na koyangela awa na mabelé’. (Emoniseli 5:10) Na ekeke ya yambo. Nzambe abandaki kopona ba 144 000 oyo balingaki kokota na Bokonzi ya makolo. Baklisto na Korinte batangamaki mpe na motango yango, mpamba te Paulo alobaki na ntina na bango ete “babulisamaki kati na Klisto Yesu, babyangamaki ete bazala basantu”. (1 Bakolinti 1:2; tala Baloma 1:7; 8:15-17.) Ezali “basantu” motindo yango nde basengeli kolya limpa mpe komela vinyo na Ekaniseli na Nkolo, na koyebaka ndimbola ya limpa na elilingi mpe vinyo oyo ezali komonisa “kondimana na sika esalemi na nzela na makila na ngai”.—1 Bakolinti 11:23-26.
Lelo oyo bobele litika moke ya bato etikali awa na mabelé kati baoyo Nzambe aponaki mpo na kofanda na makolo. Lokola bazali kati na “kondimana na sika”, bobele baklisto yango nde bakoki kolya limpa mpe komela vinyo na elilingi na ntango na ekaniseli ekosalemaka mbula na mbula.
Ee, baklisto nyonso ya solo bazali na elikya ya kozala na bomoi ya seko na mabelé oyo ekoyangelama na Bokonzi bayebi ete basengeli kozala na kondima kati na mbeka na Yesu. Lokola alobaki yango epai na bibele, Yesu azali “limpa na bomoi oyo ekiti longwa na likolo.”. (Yoane 6:51) Ata bongo, yango elingi koloba te ete baklisto oyo bazali na elikya ya kozala na bomoi awa na mabelé basengeli kolya limpa mpe komela vinyo na ntango na Ekaniseli, mpamba te bazali ata kati na “kondimana na sika” te ata kati na kondimana mosusu te oyo esalemaki na Yesu mpo ete ’bafanda na bakiti na bokonzi kati na bokonzi na ye’.
Mpo na yango, baklisto mingi oyo bazali na elikya ya kofanda awa na nse balyaka limpa te mpe bamelaka vinyo te. Elingi koloba te ete bazangi kondima na nzoto mpe makila na Yesu, to bazangi botondi mpo na mbeka na Klisto. Bazali komona ete mbeka mpe elikya kitoko ya kofanda awa na mabelé oyo bazali na yango ezali kopesa bango botondi mozindo oyo ezali kopusa bango mpo na koyangana mbula nyonso-na kozalaka batali mpamba-na Ekaniseli na Nkolo. Na bongo, bazali komonisa kondima na bango mpe bazali komonisa na esengo nyonso ete mika na “etuluku moke” mpe “bampate mosusu” mingi bazali na bomoko ya makasi.—Yoane 10:16.
Libota na Nzambe oyo eyebisami kati na Malaki 2:15 ezali nini?
Mokapo oyo ndimbola na yango ezali mpasi ezali nde koloba boye: “Mpe ezali na moko oyo asalaki bongo te, mpamba te atikalaki na mwa ndambo na elimo. Ye, azalaki koluka nini? Libota na Nzambe.” (MN) Tokoki kokanisa ete ‘’libota” yango elimboli libota na Yisraele na kala, oyo losambo na yango ebebisamaki, ntango mokapo oyo ekomamaki.
Malaki akokisaki mosala na ye ya mosakoli na eleko moko oyo bizaleli na mboka bibebisamaki. Bayisraele bazalaki kobala ‘bana basi na nzambe na bapaya‘ mpe bazalaki koboma libala na bango na basi na bango ya liboso oyo bazalaki Bayuda, ‘basi ya bolenge na bango’, mbala mosusu mpo na kobala basi ya bapakano oyo balekaki bilenge. Kasi, Bayisraele nyonso bazalaki kosala “likambo na bosoto” oyo te. (Malaki 2:11, 13, 14; Deteronome 7:3, 4) Kolobelaka mpo na baoyo bazalaki koboya kokata boyokani na bango ya libala oyo ekangisaki bango na basambeli na Jéhovah, Malaki akomaki: “Mpe ezali na moko oyo asalaki bongo te, mpamba te atikalaki na mwa ndambo na elimo.”
“Elimo” oyo elobelami awa ezali elimo santu ya Nzambe, oyo ye asopaki likolo na libota. Kasi Bayisraele oyo bazangaki botosi bazalaki kotemela elimo yango, mpe na ndenge yango bazalaki koyokisa yango mpasi. (Yisaya 63:10; Misala 7:51-53; tala Baefese 4:30.) Mwa Bayuda bamimonisaki sembo na mibeko na Nzambe, mpe na nzela na botosi na bango babatelaki “mwa ndambo na elimo”. Basambeli yango ya sembo bazalaki na moimi te mpo na koluka malamu na bango moko. Na ntina na bato yango, Malaki akomaki: “Ye, azalaki koluka nini’? Libota na Nzambe.” “Libota yango” ezalaki Yisraele na kala oyo, lokola Malaki alobaki yango ’ezalisamaki na Nzambe’. ‘Kozalisama ‘yango esalemaki ntango Jéhovah akolisaki Bayisraele na boyokani ya kondimana elongo na ye na ngomba Sinai, kozalisaka bango “bato na ye” mpe “libota mosantu”. “Libota” ya solo ya Abrahame oyo ekopambola bato na mabele mobimba esengelaki kobima na libela yango.—Malaki 2:10; Exode 19:5, 6; Genese 22:18.
Nzokande, Bayisraele basengelaki komibatela peto mpo na makambo na losambo na kobalanaka te na bato na mabota oyo mazalaki kosambela Jéhovah te. Ezaleli mabe ya bato yango elingaki kobebisa, lokola yango esalemaki na mikolo na Esdras. Bayisraele ya ntango yango ‘bandimaki bana basi mosusu [ya mabota na zongazonga] mpo na bango mpe mpo na bana na bango ya mibali; bango, libota na bulee basili komiyanganisa na bato na mikili’. (Esdrase 9:2) Bayisraele basalaki lisusu “mabe monene wana” na mikolo ya Nehemia, oyo azalaki na bomoi na ntango na Malaki. Bayuda oyo bazalaki sembo epai na Nzambe bayebaki likama na elimo oyo mabala yango ekokaki kobimisa mpo na bango mpe mpo na bana oyo bazalaki kobotama na yango. Bazalaki na likama ya komitika kopengolama na losambo ya Jehovah na mwasi moko oyo azalaki kosambela ye te. Na ntina na Bayuda oyo babalanaki na bapaya, Nehemia alobaki ete ata mwana na bango moko te ayebaki monoko na bayuda.’—Nehemia 13:23-27.
Bayuda oyo bazangaki bosembo bazalaki koluka bisengo na bango moko kozanga komibanzabanza mpo na mabe oyo bazalaki kosala kati na makambo etali losambo mpo na libota na bango, “libota na Nzambe”. Likambo ya kokamwa ezali te ete Malaki apamela bango na maloba oyo: “Boye bokeba mpo na elimo na bino ete moko asalela mwasi na bolenge na ye bokosi te!” (Malaki 2:15) Bayuda na bosembo bazalaki kosenzela na elimo na bango, to ezalela na bango, mpo ete batikala sembo epai na basi na bango Bayuda. Mibali yango bazalaki komona ete bopeto ya losambo ya “libota mosantu” na bango ezalaki na ntina monene. Bazalaki na mposa ete bana na bango batanga Liloba na Nzambe mpe bakola kati na bolingo ya Jéhovah, kopesaka bongo nzela ete losambo epikama makasi kati na libota.
Lelo, ezali malamu ete baklisto oyo bamipesi na Jéhovah bango mpe babatela elimo na bang, to ezalela oyo ezali kotambwisa bango. Soki basila kobala, basengeli koboma libala te na kosalelaka babalani na bango mabe. Mpo na baklisto oyo bazali minzemba esengeli na bango kolanda toli ya ntoma Paulo oyo ezali kosenga bango na kobala “kati na Nkolo” na kokamataka lokola mobalani Témoin de Jéhovah oyo amipesi mpe abatisami.—1 Bakolinti 7:39.