Nyoka amonisami polele
“Mokolo moko, bana na Nzambe bayaki liboso na Jehovah mpe Satana ayaki na bango elongo.—YOBO 1:6.
1. (a) Ebandeli mpe ndimbola ya nkombo “Satana” ezali nini? (b) Nkombo Satana ezali komonana mbala boni kati na Makomami, mpe mituna nini yango ebimisi?
EBANDELI mpe ndimbola ya nkombo “Satana” ezali nini? Kati na Biblia, nkombo yango esalemi na makomi misato ya liebele w (Sin), v (Teth), mpe : (Noun). Elongo na bapwé-vwayele, makomi yango masali liloba “Satana” oyo engebene Edward Langton, “euti na liloba oyo elimboli ‘kotemela’, ‘kozala motemeli to kosala lokola motemeli’” (Tala 1 Petelo 5:8) Atako liloba “Satana” ezwami koleka mbala 50 kati na Biblia, tozali kokuta yango bobele mbala 18 kati na Makomami na liebele, bobele kati na mokanda ya 1 Ntango, ya Yobo mpe ya Zakaria. Na bongo mituna oyo mizali kotunama: Ntango nini moto asosolaki botomboki mpe misala ya Satana? Satana amonisamaki polele mpo na mbala ya liboso kati na eteni nini ya Makomami na liebele?
2. Motuna nini mozwaki eyano nokinoki te nsima na botomboki ya Adam mpe Eva?
2 Biblia ezali kolimbola na maloba ya petee, kasi na mozindo ndenge lisumu mpe botomboki ebimaki na mabelé kati na esika oyo ezalaki elanga kitoko, epai na Moyen-Orient. (Tala Genese mikapo 2 mpe 3) Atako lisolo yango elobeli nyoka lokola mobandisi ya kozanga botosi ya Adam mpe Eva, epesi elembo te oyo ezali kopesa nzela na koyeba nguya to mayele oyo ebombanaki nsima na mongongo oyo eutaki na nyoka. Kasi, Adam azwaki ntango mingi mpo na kokanisa na makambo masalemaki na Edene oyo epesaki nzela na kobimisama na ye na paradis wana ya kitoko.—Genese 3:17, 18, 23; 5:5.
3. Atako Adam akosamaki te, lisumu nini ye asalaki, mpe yango ebotaki nini mpo na bato?
3 Na ntembe te Adam ayebaki ete banyama bazalaki na likoki te ya koloba na mayele lokola bato. Ayebaki mpe ete liboso na komekama ya Eva, Nzambe alobaki na ye na nzela ya nyama ata mbala moko te. Na bongo nani alobaki na mwasi na ye ete aboya kotosa Nzambe? Engebene Paulo, mwasi moto akosamaki, kasi Adam te. (Genese 3:11-13, 17; 1 Timote 2:14.) Ekoki kozala ete Adam asosolaki ete ekelamu moko ezangi komonana nde elakisaki bango nzela mosusu ekeseni na oyo ya botosi epai na Nzambe. Atako nyoka alobaki na ye mpenza te, Adam aponaki kolanda mwasi na ye na nzela ya kozanga botosi Na likambo yango ya nko, abebisaki nzoto oyo elingaki kobimisa bato ya kokoka, akotisaki lisumu kati na mokili mpe akweisaki bato na liwa engebene maloba oyo masakolamaki. Na yango, na nzela na nyoka, Satana akomaki mobomi ya liboso na bato.—Yoane 8:44; Baloma 5:12, 14.
4, 5. (a) Esakweli nini ya kosambisa Nzambe ayebisaki likoló na nyoka? (b) Esakweli yango ezalaki na mabombami nini?
4 Botomboki ya Edene epusaki Nzambe na koyebisa esakweli ya kosambisama oyo emonisaki “libombami na bulee oyo eyaki kolimbolama polelepolele bobele nsima na bankoto na bambula. Nzambe alobaki na nyoka ete: “Nakotya mpe likunya kati na yo mpe mwasi, kati na libota na yo mpe libota na ye; ye mpe akotuta motó na yo mpe okoswa litindi na ye.”—Baefese 5:32; Genese 3:15.
5 Esakweli yango ya monene ezali na mabombami mingi. “Mwasi” yango azalaki mpenza nani? Ezalaki Eva, to mwasi ya elilingi oyo aleki ntina mpenza? Epai mosusu, ‘libota na mwasi’ mpe ‘libota na nyoka’ bamonisi banani? Mpe nani azali Nyoka oyo libota na ye ekoyina libota na mwasi? Lokola tokomona yango emonani lokola Jéhovah azwaki ekateli ete mituna yango mikoyanolama nyonso na ntango na yango.—Tala Danyele 12:4 mpe Bakolose 1:25, 26.
Bilembo mosusu ya botomboki na makoló
6. Mwa moke liboso na mpela, makambo nini mamonisaki ete botomboki esalemaki na makoló?
6 Lokola lisolo ya Biblia emonisi yango, mwa moke liboso na mpela, wana ekweaki moto na lisumu uta bikeke soki zomi na mitano, makambo mosusu mayaki kondimisa ete bikelamu oyo bileki bato na nguya bitombokelaki Nzambe. Lisolo na Biblia eyebisi biso ete “bana na Nzambe bamonaki ete bana basi na bato bazalaki bonzenga, mpe bakamataki kati na bango bana basi na bango na libala, baoyo eponaki bango.” Bana oyo babotamaki na bosangani yango ya mbindo babengamaki “Nefilime”. Bazalaki “bilombé na kalakala, bato na lokumu.” (Genese 6:1-4; tala Yobo 1:6 mpo na komonisa “bana na Nzambe na solo.”) Mwa bikeke 24 na nsima, Yuda alobelaki na mokuse makambo yango na kokomaka ete: “Mpe baanze oyo . . . batikaki esika na bango mpenza, asili kobatela bango na nkanga na seko kati na molili kino kosambisama na mokolo yango monene.”—Yuda 6; 2 Petelo 2:4, 5.
7. Atako mabe na bato mazalaki, nani tokamwi ete balobeli ye te kati na mikanda ya Biblia oyo milobelaka masolo na bomoi ya bato?
7 Na eleko yango liboso na mpela, ‘masumu na bato mazalaki mingi na mokili mpe makanisi nyonso kati na mitema na bango mazalaki bobele epai na mabe mikolo nyonso.’ Nzokande na mokanda na Genese oyo epemamaki na Nzambe, Satana amonisamaki sikisiki te lokola mobandisi na botomboki ya baanze mosusu mpe ya mabe na bato. (Genese 6:5) Na yango, na boumeli ya lisolo na bato, Yisraele mpe Yuda bakweaki mbala na mbala kati na losambo ya bikeko mpe losambo ya lokuta kasi bakomi bapemamaki na Nzambe ya mikanda na Basambisi, ya Samwele mpe ya Mikonzi, ata mbala moko te batangi Satana na nkombo mpe bamonisi ye te lokola mobandisi azangi komonana ya kopengwa ya mabota. Nzokande, ndenge ye moko alobaki yango, ‘azalaki kotambolatambola kati na mokili’.—Yobo 1:7; 2:2.
8. Na ebandeli ya mimekamo na ye, Yobo asosolaki ete Satana nde azalaki komonisa ye bampasi? Ndenge nini toyebi yango?
8 Ata ntango tozali kotalela lisolo ya ntina etali bomoi na Yobo mpe minyoko na ye, tomoni ete mobali yango alobaki te ete bampasi na ye eutaki na monguna na ye, Satana. Emonani lokola na eleko yango asosolaki te ete etamboli na ye elingaki koyanola na motuna moko ya ntina. (Yobo 1:6-12) Yobo ayebaki te ete minyoko na ye miutaki na Satana, oyo atyaki ntembe na bosembo na ye epai na Jéhovah. Na bongo, ntango mwasi na ye apamelaki ye na kolobaka na ye ete: “Ozali naino kosimba makasi bokangami na yo? Lakela Nzambe mabe mpe kufa!”, ayanolaki ye ete: “Tokozwa na maboko na Nzambe bobele malamu, tokozwa mpe mabe te?” Lokola ayebaki ntina mpenza ya bampasi na ye te, emonani ete azalaki nde kotalela yango lokola eutaki na Nzambe mpe asengelaki kondima yango. Bokangami na Yobo etyamaki bongo na komekama makasi.—Yobo 1:21; 2:9, 10.
9. Motuna nini tokoki komituna mpo na Moïse?
9 Sikawa motuna moko mozali kotunama. Soki, lokola tozali kokanisa yango, Moïse azali mokomi ya mokanda na Yobo, ayebaki ete Satana azalaki kotambolatambola kati na mokili. Na motindo yango, ndenge nini atangi nkombo na Satana ata na mokanda moko te kati na mikanda mitano ya liboso ya Biblia oyo ye akomaki? Mpo na nini Satana alobelami mingi te kati na Makomami na liebelea?
Satana amonisami bobele moke
10. Mpo na nini Makomami na liebele mazali komonisa Satana polele te?
10 Na kokweisaka misala ya bilimu mabe, emonani lokola ete Jéhovah, na mayele na ye, azalaki na bantina malamu ya kosenzela ete Makomami na liebele malimbola bobele moke Monguna na ye, Satana. (Levitike 17:7; Deteronome 18:10-13; 32:16, 17; 2 Ntango 11:15) Yango wana, atako bakomi ya Makomami na liebele bazalaki na mwa boyebi ya Satana mpe ya mokumba na ye kati na botomboki oyo esalemaki na makoló, Nzambe apemisaki bango bobele mpo na mabe ete balobela mpe bamonisa masumu ya basaleli na ye mpe mabota oyo bazingaki bango mpe bakebisa bango mpo na mabe na bango. (Exode 20:1-17; Baebele 8:9-13) Na yango, nkombo ya Satana etangamaki mbala mingi te.
11, 12. Ndenge nini toyebi ete bakomi na Makomami na liebele babungaki te ete Satana azali mpe azali kosala bopusi?
11 Bakomi ya Makomami na liebele oyo bapemamaki na Nzambe bayebaki makambo masalemaki na Edene, bayebaki mbindo ya “bana na Nzambe na solo”, mpe bayebaki makambo ya Yobo. Na bongo babungaki te ete Satana azali kosala bopusi mabe oyo eleki nguya na bato. Mosakoli Zekaria oyo akomaki mokanda na ye pene na nsuka na ekeke ya motoba liboso ya ntango na biso, amonaki na emonaneli nganga monene Yosua mpe “Satana atelemaki na loboko na ye ya mobali mpo na kotemela ye. Na bongo anzelu na Jéhovah alobaki na Satana ete: ‘Tika ete Jéhovah apamela yo, e Satana, ee, tika ete Jéhovah apamela yo’.” (Zakaria 3:1, 2, M.N.) Na ngambo na ye, na ekeke ya mitano liboso ya ntango na biso, mokomeli Ezela, wana ezalaki ye kolobela lisolo ya Yisraele mpe ya Yuda, alobaki ete “Satana atemelaki Yisraele mpe . . . apusaki Davidi ete atanga motuya na Yisraele.”—1 Ntango 21:1.
12 Na ndenge yango, na eleko ya Zakaria, elimo santu epesaki nzela ete Makomami malimbola mosala na Satana na motindo na polele koleka. Kasi esengelaki lisusu kozela bikeke mitano liboso ete Liloba na Nzambe emonisa na polele nyonso ekelamu yango ya mabe. Na lisalisi ya Biblia, ndenge nini tokoki koyeba mpo na nini ntango yango ezalaki na ntina liboso ete Satana amonisama mobimba polele?
Ndenge nini tokoki koyeba libombami yango?
13-15. (a) Solo nini ya moboko esalisi biso na koyeba mpo na nini Makomami na liebele malimboli Satana polele te? (b) Na boyei na Yesu, ndenge nini Satana emonisamaki polele?
13 Mpo na moklisto oyo azali kondima Liloba na Nzambe, biyano na mituna oyo mitunamaki liboso bikopesamela biso na nzela na makanisi minene ya bato te, lokola soki Biblia ezalaki bobele mokanda lokola misusu to eloko mpamba oyo euti na makanisi na bato. Kasi likoki ya koyeba yango epesami na nzela na solo mibale ya miboko na Biblia. Ya liboso, ndenge mokonzi Salomo akomaki yango, “nzela na bayengebene ezali lokola pole oyo ekongenga lisusu mpe lisusu kino mokolo ekomonana malamu koleka.” (Masese 4:18; tala Danyele 12:4; 2 Petelo 1:19-21) Nzambe amonisi solo kati na Liloba na ye moke na moke, na ntango na yango, engebene bamposa na basaleli na ye mpe likoki na bango ya kososola solo yango.—Yoane 16:12, 13; tala 6:48-69.
14 Solo mosusu kati na solo mibale yango ya moboko elobelami kati na mokanda oyo ntoma Paulo akomaki epai na moyekoli moklisto Timoté ete: “Makomami nyonso mapemami na elimo na Nzambe mpe mazali na litomba mpo na koteya . . . . ete moto na Nzambe azala mobongi oyo aselingwi mpo na misala nyonso malamu.” (2 Timote 3:16, 17) Yesu, Mwana na Nzambe, alingaki komonisa Satana polele, mpe likambo yango esengelaki kokomama kati na Makomami. Lisangá ya boklisto esengelaki bongo komibongisa mpo na kotelema ngwi liboso na Satana mpe kolongisa boyangeli ya Jéhovah.—Yoane 12:28-31; 14:30.
15 Likoló na miboko yango, pole emonanaki moke na moke mpo na mabombami oyo mapesamaki na Genese 3:15. Na kotambwisama na elimo santu to nguya na Nzambe, Makomami na liebele mapesaki mwa kongenga likoló na Masiya oyo alakamaki, to libota na ndaka. (Yisaya 9:6, 7; 53:1-12) Bobele na ntango yango, epesaki mwa bandimbola mpo na Satana, Monguna ya Nzambe mpe ya bato. Kasi na boyei na Yesu, Satana amonisamaki mobimba polele, mpamba te abundisaki na makasi mpe na polele libota ya ndaka, Yesu Klisto. Mokumba na “mwasi”, lisangá na Jéhovah ya elimo mpe ya likoló, mpe ya libota na ndaka, Yesu Klisto, emonisamaki polele kati na Makomami ya greke ya boklisto na boumeli na makambo oyo masalemaki na ekeke ya liboso. Bobele na ntango yango, mosala na Satana, “nyoka na kalakala”, emonisamaki lisusu polele koleka.—Emoniseli 12:1-9; Matai 4:1-11; Bagalatia 3:16; 4:26.
Libombami na bulee elimbolami
16, 17. “Libombami na bulee na Klisto” etalaki nini?
16 Ntoma Paulo akomaki mingi mpo na “libombami na bulee ya Klisto”. (Baefese 3:2-4; Baloma 11:25; 16:25) Libombami yango ya bulee etalaki “libota” ya solosolo oyo ekoya konyata nyoka na kalaka, Satan le Diable. (Emoniseli 20:1-3, 10) Engebene libombami yango, Yesu azalaki mosangani aleki-monene ya “libota” yango, kasi “basangoli mosusu na ‘libula’ elongo na ye bakozala, baoyo bakouta liboso kati na Bayuda na nsima Basamaria mpe Bapakano, mpo ete motuya nyonso na basangani ya “libota” yango ekoka.—Baloma 8:17; Bagalatia 3:16, 19, 26-29; Emoniseli 7:4; 14:1.
17 Paulo alimboli ete: “Libombami yango eyebisamaki te epai na bana na bato na mabota masili koleka kasi emonani sikawa na nzela na elimo epai na bantoma na bulee mpe basakoli.” Libombami yango ezalaki nini? “Yango ete, kati na Klisto Yesu, bapakano bazali batuki na libula, ndambo na nzoto moko na biso elongo mpe bazwi na elaka, na nzela na nsango malamu.”—Baefese 3:5, 6; Bakolose 1:25-27.
18. (a) Na maloba nini Paulo alimboli ete ntango esengelaki koleka liboso ete ndimbola na “libombami na bulee” emonisama? (b) Emoniseli yango esalisaki mpo na koyeba nini likoló na “nyoka na kalakala”?
18 Paulo akamwaki mingi mpenza ndenge aponamaki mpo na kosakola “nsango malamu na ntina na bozwi na Klisto oyo ekoki koyebana te mpe komonisa polele epai na bato nyonso mwango na libombami oyo ebombamaki uta bikeke na kalakala kati na Nzambe, ye Mozalisi na biloko nyonso.” Kati na mokanda na ye epai na Bakolose alobaki boye: “Liloba yango . . . libombamaki kalakala na miso na mabota nyonso kasi sikawa limonani epai na babulami na ye.” Na bosolo, soki libombami oyo etali “libota na ndaka” eyei koyebana, mbele ekopesa mpe nzela na komonisa polelepolele Monguna monene, “nyoka na kalakala.” Emonani lokola Jéhovah aboyaki kopesa motuya moleki monene na ntembe oyo Satana abimisaki, liboso ya boyei na Masiya. Nani akoki komonisa Satana polele koleka Libota na ndaka, Yesu Klisto ye moko?—Baefese 3:8, 9; Bakolose 1:26.
Yesu amonisi Monguna polele
19. Ndenge nini Yesu amonisaki Monguna polele?
19 Na ebandeli ya mosala na ye, Yesu abenganaki mpenza Momeki na kolobaka na ye ete: “Longwa na yo, Satana, mpamba te ekomami ete: “Okongumbamela Jéhovah Nzambe na yo mpe okosalela bobele ye.” (Matai 4:3, 10) Na libaku mosusu, Yesu amonisaki polele banguna na ye ya mangomba oyo bazalaki kotónga ye mpe koluka koboma ye. Amonisaki polele nani azalaki kotambwisa bango, kolimbolaka ete ezalaki ekelamu moko ya nguya nde alobaki na nzela ya nyoka na Edene. Alobaki na bango ete: “Bino bouti na tata na bino Satana mpe mokano na bino ezali ete bosala mposa na tata na bino. Ye mobomi na bato longwa na ebandeli; atelemi kati na solo te mpo ete solo ezali kati na ye te. Wana ekolobaka ye lokuta, azali kosolola makambo na ye moko mpo ete azali mobuki na lokuta mpe tata na yango.”—Yoane 8:44.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Kati na mokanda na ye Diable: Kososola mabe, uta na eleko na kalakala kino na boklisto ya solo ya yambo (Angl.), professeur Russell akomaki ete: “Lokoka Diable amonisami polele te kati na Kondimana na Kala, ezali kopesa ndingisa te na mateya na Nzambe to teoloji ya lelo ya bayuda mpe ya baklisto ete baboya kondima ete ye azali. Engebene ndimbola ya maloba, ezali lokuta na kokanisa ete ndimbola ya solosolo ya liloba moko to ya esengeli kozala na lolenge na yango ya kalakala mpenza. Solo ya kala emonisamaka na boumeli na ntango.”—Lokasa 174.
Bozongeli
◻ Mabombani nini mazali na boyokani na Genese 3:15 masengelaki kolimbolama?
◻ Makomami na liebele malobeli makambo nini oyo mamonisi ete botomboki bosalemaki na makóló?
◻ Solo mibale nini esalisi biso na koyeba ntina oyo Makomami na liebele matangi Satana mbala mingi te.
◻ Boyokani nini ezali kati na “libombami na bulee na Klisto” elongo na koyebana mpe mokumba na Satana?
[Bililingi na lokasa 23]
Bopusi ya Satana emonanaki mpenza na mabelé liboso na mpela.
[Elilingi na lokasa 24]
Ezali Satana, ekelamu ya solo, nde atyaki ntembe na bosembo ya Yobo liboso na Nzambe.