Mokolo na Nkolo: Ekolimbola nini mpo na yo?
“Zala na bokonzi kati na banguna na yo.”—NZEMBO 110:2.
1-3. (a) Mpo na nini ebandeli ya mokolo na Nkolo ezalaki eleko na etumba, mpe mwa bitumba nini Yesu alongaki? (b) Ndenge nini Yesu “akolonga lisusu”?
EZALI, na 1914 nde Yesu atyamaki Mokonzi ya Bokonzi na Nzambe mpe mokolo na Nkolo ebandaki. Mokonzi yango ya sika aumelaki te kokutana na botemeli makasi oyo eutaki na Satan le Diable mpe na basali na ye awa na mabelé. (Nzembo 2:1-6) Bambula ya ebandeli ya mokolo na Nkolo ezalaki bongo eleko ya bitumba na boumeli na yango Yesu akei “kozala na bokonzi kati na banguna na ye.’—Nzembo 110:2.
2 Mokonzi yango ya sika azwaki bolongi mingi ya lokumu. Nsima na 1914, Satana amekaki “kolya” Bokonzi oyo ebotamaki sika kasi babwakaki ye longwa na likoló mpe ayokaki nsoni mingi. (Emoniseli 12:1-12) Atako na nsima abandaki “kobundisa” batikali na baklisto bapakolami, akokaki te kopekisa bango ete ‘batelema na makolo na bango’ na 1919 to kopekisa bango ete bakamata “mokanda moke” na maboko na Yesu Klisto. (Emoniseli 10:8-11; 11:11, 12; 12:17) Akokaki mpe te kopekisa koyanganisama ya basangani ya nsuka ya ba 144 000 to oyo ya ebele monene (bauti na mabota nyonso), baoyo ‘bakosalaka mosala na bulee butu na moi kati na tempelo ya Jéhovah.’—Emoniseli 7:1-3, 9-15.
3 Solo, uta 1914, Yesu “abimi mpo na kolonga.” Kasi atikali lisusu na makambo mingi ya kosala: asengeli “kolonga lisusu”. Asengeli lisusu kolimwisa bilembo nyonso ya biloko mabe ya mokili mobimba ya Satana. (Emoniseli 6:1, 2; 19:11-21) Likambo yango ya monene ekolimbola nini mpo na mokomoko na biso?
Bolumbu na Babilone emonisami polele
4. Emoniseli elakisi lingomba na lokuta na lolenge nini?
4 Kufa na mokili ya Satana ekobanda na kobomama ya lingomba na lokuta. Emoniseli elakisi lisanga ya mokili mobimba ya lingomba na lokuta-bakisa boklisto ya mokili oyo na lolenge ya mwasi na pite, Babilone Monene, oyo azali kosangana na bakonzi ya mokili mpe azali kolangwisa bato na pite na ye. Oyo nde nsoni! Mwasi na pite yango ye mpenza alangwi na makila, ee na makila na basaleli na Nzambe. (Emoniseli 17:1-6) Emoniseli elobeli mpe kobomama ya mwasi na pite yango oyo anuni mpe atondi na mbindo. Tokoyoka malamu mpenza ndimbola ya liwa na ye na kotalelaka makambo mayelaki mwasi na pite mosusu ya lingomba na ekeke ya nsambo liboso ya eleko na biso.
5, 6. Mpo na nini Yelusaleme oyo ezangaki bosembo ebengamaki mwasi na pite, mpe etumbu nini Jéhovah ayeisaki likoló na ye?
5 Mwasi na pite yango ezalaki engumba ya Yelusaleme. Mbele ezalaki esika monene ya losambo na Jéhovah na mabelé, kasi Nzambe alobaki na yango ete: “Yo osili kokweisama na ntina na makila oyo otangisaki.” (Ezekiele 22:4) Mbele azalaki mpeto na elimo, kasi amibebisaki na pite na kosanganaka elongo na mabota. Yango wana Jéhovah akamwaki na ntina na ye ete: ‘Natondi na nkele mpenza mpo na yo, awa esali yo makambo oyo nyonso, mosala na mwasi na pite na nsoni te.!’—Ezekiele 16:30; 23:1-21; Yakobo 4:4.
6 Mpo na yango, Jéhovah asakolaki esambiseli oyo likoló na mwasi na pite yango: “Tala, nakoyanganisa mibali na yo nyonso, baoyo osepelaki na bango, mpe baoyo nyonso (mabota) olingaki, . . . mpe bakolongola bilamba na yo mpe bakokamata biloko kitoko na yo ya kokembisa nzoto, mpe bakotika yo bolumbu nzoto mobimba. Mpe bakotumba ndako na yo na móto.” (Ezekiele 16:37, 39, 41; 23:25-30) Lisolo ya bomoi na bato eyebisi biso ete na 607 liboso na eleko na biso bato na Babilone babutaki kotemela Yelusaleme mpe bakamataki biloko na yango nyonso. Bamemaki bafandi na yango mpe bozwi na yango na Babilone. Engumba yango ebomamaki, tempelo na yango etumbamaki mpe mboka etikalaki mpamba.—2 Ntango 36:17-21.
7. Nsuka ya Babilone Monene ekozala nini?
7 Nsuka ya Babilone Monene ekozala mpe motindo moko. Na yango Emoniseli epesi likebisi oyo: “Bakonzi” ya lelo, elingi koloba batambwisi oyo Babilone Monene asali pite ya elimo elongo na bango, “bakoyina mwasi na pite, bakobebisa ye mpe bakozalisa ye bolumbu; bakolya mosuni na ye mpe bakotumba ye mobimba na móto.” (Emoniseli 17:2, 16) Makambo mayelaki Yelusaleme ya kala masalisi biso na koyeba ntina ya maloba yango. Lingomba na lokuta ekobomama na biyangeli oyo ‘balingaki’ ye liboso. Bozwi na ye ekobotolama mpe ekotumbama na móto, akobomama nyee. Tala nsuka oyo ebongi mpenza na lisangá yango ya mbindo!
Likoló eyindi
8. Bolozi monene ekozala eleko ya motindo nini mpo na bato?
8 Kobomama na Babilone Monene ekozala ebandeli ya “bolozi monene” oyo Yesu asakolaki. (Matai 24:21; Emoniseli 7:14) Na ntina na eleko yango, totangi boye kati na Emoniseli: “Koningana monene ya mabelé esalemi; mpe moi ekomi moindo lokola liboke na nsuki, mpe sanza mobimba ekomi lokola makila, mpe myoto na likoló mikwei na mabelé.” (Emoniseli 6:12, 13, M.N.) Koningana monene yango ya mabelé ekokani na “koningana monene ya mokili na Yisraele” oyo Ezekiele asakolaki. (Ezekiele 38:18, 19; Yoele 3:14-16) Ekozala kobomama ya seko ya biloko mabe ya ntango oyo. Kasi mbongwana ya solosolo ekosalema na moi, na sanza mpe na myoto na ntango wana?
9, 10. Esakweli nini Ezekiele apesaki mpo na Ezipito, mpe yango ekokisamaki ndenge nini?
9 Kosakolaka kobelema na kokwea ya Ezipito, mokili na nguya oyo ezalaki epai na nse na Yisraele, Ezekiele alobaki: “mpe wana ekozimisa ngai yo [Faraó], nakozipa likoló mpe nakoyindisa myoto na yango: nakozipa moi na lipata, mpe sanza ekopela te. Nakoyindisa pole makasi nyonso na likoló na ntina na yo, mpe nakotya butu na mokili na yo: Nkolo Jéhovah alobi bongo.”—Ezekiele 32:7, 8.
10 Likoló mpenzampenza eyindaki te ntango Faraó mpe mampinga na ye babomamaki. Nzokande bilikya na Ezipito, bikomaki na molili. Lokola emonisi yango Carl Keil, molimboli na Biblia, “molili oyo ebimaki [na kokwea ya Faraó] ezali elilingi ya ezaleli ya kozanga bilikya mpenza”. Ezipito ebungisaki libela esika na yango ya nguya ya mokili mobimba oyo ezalaki na bonsomi mpe na nsima ekomaki koyangelama na banguya ya mokili mobimba oyo elandanaki. Na mikolo na biso, eteni eleki monene ya teritware ya nguya yango ya Faraó na kala eyangelami na libota ya ba Arabe.
11. (a) Makambo oyo mayelaki Ezipito mazalaki elilingi ya nini? (b) Na ndimbola nini mikolo mikoya mikozala mpenza molili mpo na mokili ya Satana na ntango na bolozi monene?
11 Kasi mpo na Carl Keil, esakweli na Ezekiele ezali na ndimbola molai koleka. Akomi boye: “Kokweisama na nguya yango ya mokili mobimba [Ezipito] ezali kosakola kokweisama ya banguya nyonso ya mabe na mokolo na kosambisama ya nsuka.” Na oyo etali ndimbola, maloba yango mazali solo. Lokola Emoniseli elakisi yango, na ntango na bolozi monene bilikya na bato oyo batemeli Nzambe bikozala mpe na molili lokola oyo na Ezipito. Ekozala lokola soki moi ezalaki kopanza pole na yango lisusu te na boumeli ya mokolo mpe lokola soki kongenga kitoko ya sanza mpe engengiseli ya myoto ezalaki lisusu koyeisa likoló polele na butu te. Baoyo bazali koboya kokumisa Mokonzi oyo atyamaki na Jéhovah, bakokufa mpe bakokundama ata na lokumu te ntango Mofandi na mpunda ya mpembe akolonga lisusu. (Emoniseli 19:11, 17-21; Ezekiele 39:4, 17-19) Ezali likambo na kokamwa te ete bato mabe bakonganga “epai na bangomba mpe na mabanga ete: ‘Bokweya likoló na biso mpe bobomba biso na miso na Mofandi na kiti na bokonzi mpe na nkele na Mwana na Mpate, mpamba te mokolo monene na nkele na bango eyei mpe nani akoki kotelema?”’—Emoniseli 6:16, 17, M.N.; Matai 24:30.
Etumba ya ntango nyonso
12. Na lolenge nini Satana azali komonisa koyina na ye epai na Yesu Klisto na boumeli ya mokolo na Nkolo?
12 Bongo baklisto, bazali kati na ezaleli nini na boumeli ya mokolo na Nkolo? Banyokwami mingi mpo na etumba ya ntango nyonso oyo ezali katina Satana mpe Mofandi na mpunda ya mpembe. Lokola Satana akoki te mpo na kosilikela Yesu ye moko, ayeisi nkele na ye nyonso likoló na batikali ya baklisto bapakolami mpe na nsima, likoló na ebele monene ya bampate mosusu baoyo bayangani zingazinga na bango. Lokola Yesu akebisaki bango, baklisto yango “mabota nyonso [bayini bango] mpo na nkombo na [ye].” (Matai 24:9) Satana azali kobundisa bango na kosalelaka bibundeli na ye nyonso, lokola botemeli mpe botomboki ya bato, kotya na boloko, minyokoli mpe koboma.—2 Timote 3:12.
13. Ndenge nini Satana asalelaka mayele mabe kati na etumba na ye epai na libota na Nzambe?
13 Satana asalelaka mpe mayele mabe. (Baefese 6:11) Na nzela na “nguya na bokosi ya bozwi”, azali kopusa baklisto mosusu ete basangana mingi te na mosala ya bulee to mpe ete batika kosala yango. (Matai 13:22, M.N.; 1 Timote 6:9, 10) Azali kotindika bamosusu na komipesa na etamboli ya mbindo mpe ya mabe. (1 Bakolinti 5:1, 2) Lokola bato mingi bazali komibanzabanza mingi mpo na “mitungisi na bomoi” Satana azali mpe kosalela likambo yango mpo ámeka “koyeisa [bango] kilo”. (Luka 21:34; M.N.) Azali kosalela matata oyo ebimaka mpo na bokeseni ya bizaleli, to asalelaka ezaleli ya botomboki mpo na kopengwisa baklisto mosusu “na makambo maleki ntina”.—Bafilipi 1:10; 1 Bakolinti 1:11, 12; Yakobo 4:1-3.
14, 15. Ndenge nini tokoki kolonga Satana?
14 Baklisto basengeli bongo komonisa mpiko na boumeli na mokolo na Nkolo; Bamosusu bazali kokwea, mpe lipengwi nyonso ezali bolongi ya moke mpo na Satana. (1 Petelo 5:8) Kasi, mingi bazali kobosana te ndaka oyo na Yesu ete: “Ye oyo akoyika mpiko kino nsuka, ye wana akobika.” (Matai 24:13) Awa basalisami na Jéhovah, bazali kolonga mpe kosepelisa motema na ye.—Masese 27:11; 1 Yoane 2:13, 14.
15 Moto te kati na biso azali na mposa ya kosepelisa Satana wana ekomona ye biso kotika Jéhovah! Na bongo tolanda toli na Paulo, mpe tokamata lokola bibundeli, solo, boyengebene mpe kondima na kosakolaka nsango malamu na molende mpe na koyekola mpo na kobatela kondima ya makasi. Tosambelaka ntango nyonso mpe tosenzelaka. Na kosalaka bongo, tokozala “na ekweli te na mokolo na Nkolo na biso Yesu Klisto.” (1 Bakolinti 1:8; Baefese 6:10-18; 1 Batesalonike 5:17; 1 Petelo 4:7) Na ndenge yango mokolo na Nkolo ekomemela biso mapamboli minene.
Mabaku kitoko ya mosala
16. Mpo na nini bapekisaki Yoane ete akoma te maloba na bankake nsambo mpe yango elimbolaki nini mpo na baklisto bapakolami na 1919?
16 Na Emoniseli 10:3, 4, Yoane alobi ete “bankake nsambo” eyokisaki mingongo na yango mpenza. Alingaki kokoma maloba na yango kasi, elobi ye, “nayoki mongongo kobima na likoló ete: ‘Bomba makambo malobi bankake yango nsambo mpe kokoma yango te.’ Emonani ete ntango ekokaki naino te mpo na kosakola yango. Nzokande, Yoane azwaki motinda ya kokamata mokanda yango ya moke mpe kolya yango. Emonani ete bankake nsambo yango ekoki kozala elilingi ya komonisama mobimba ya mikano na Jéhovah. (Nzembo 29:3; Yoane 12:28, 29; Emoniseli 4:5) Na 1919, ntango baklisto bapakolami balyaki mokanda yango ya moke, na maloba ya elilingi, ntango ekokaki naino te mpo bakanga ntina nyonso na mikano na Jéhovah. (Tala Danyele 12:8, 9) Nzokande, na mayele oyo bazalaki na yango, bakendeki liboso, na molende, mpe bamimonisaki ete babongaki mpo na kozwa bandimbola oyo eleki mingi lisusu.
17. Tanga mwa bandimbola ya polele oyo Jéhovah apesaki na libota na ye uta 1919.
17 Na nsima, na boumeli na bambula, moke na moke bazwaki mayele ya polele koleka mpo na mokano ya Jéhovah. Na ndakisa, basosolaki ete bampate ya lisese na Yesu bazali kokabwana na bantaba liboso na Ar- magedon. (Matai 25:31-46) Basosolaki ete kobotama ya Bokonzi oyo esalemaki uta 1914, ezalaki kokokisa Emoniseli mokapo 12. Bayebaki malamu mpenza ntina na nkombo ya Jéhovah mpe bayebaki malamumalamu makambo matali ebele monene oyo balobelami na Emoniseli mokapo 7. Bokoli moke na moke ya bandimbola yango epesaki mpenza elikya epai na libota na Nzambe!—Masese 4:18; 2 Petelo 1:19.
18. Mabaku malamu nini ya mosala libota na Jéhovah ezwi na boumeli ya mokolo na Nkolo, mpe yango epesi biso kondimisama nini?
18 Bobele na ntango yango, Jéhovah apesaki mabaku malamu ya mosala epai na basaleli na ye na mabelé. Na emonaneli, Yoane amonaki baanzelu oyo bazalaki kosakola nsango malamu ya seko epai na bato, koyebisaka bango kokwea ya Babilone Monene mpe kokebisaka bango mpo na elembo ya nyama. (Emoniseli 14:6-10) Na ntembe te baanzelu bazali bongo kotambwisa mabaku malamu ya mosala oyo mapesameli na Nzambe, kasi awa na mabelé, ezali bongo bato, ba Témoins de Jéhovah, nde bazali kosakola nsango yango epai na mokili ya bato. Yoane amonaki mpe Yesu azali “kobuka mbuma na mokili.” (Emoniseli 14:14-16) Nzokande, Yesu azali kobuka mbuma yango na zela na mosala ya kosakola bokonzi mpe kozalisa bayekoli, oyo esalami na baoyo bakofanda na mabelé kati na Bokonzi. (Matai 24:14; 28:19, 20) Oyo nde libaku malamu nini tozali na yango ya kosala elongo na baanzelu mpe Yesu Klisto ye moko kati na mosala yango ya lobiko! Na kokokisama yango, tozali mpenza na liyoki ete tozali kosala elongo na bikelamu na sembo ya elimo oyo bazali basangani na lisangá na Jéhovah ya likoló oyo ezangi komonana.
Libateli na Nzambe
19. (a) Likambo nini ekosalema ntango koyina ya Satana epai na libota na Nzambe ekokoma makasi mpenza? (b) Nani akolonga na etumba monene?
19 Na meko oyo nsuka na mokili oyo ezali kobelema, Satana azali kobundisa baklisto lisusu makasi koleka. Mikapo 38 mpe 39 na mokanda na Ezekiele, epai Satana abengami na maloba ya esakweli Gog de Magog, emonisi ndenge nini akoyeisa koyina na ye makasi koleka. Ndenge esakweli yango oyo epemamaki eyebisi biso, Satana akobundisa makasi libota na Jéhovah mpo na koluka koboma yango libela. Akolonga? Tala eyano ya Emoniseli: “Maseke yango zomi [“bakonzi” to batambwisi na politike ya eleko na biso] . . . bakobundisa Mwana na Mpate. Kasi Mwana na Mpate akoleka bango mpo ete azali Nkolo na bankolo mpe Mokonzi na bakonzi. Mpe balongi na ye elongo bazali babiangami, mpe baponami mpe basembwi.” (Emoniseli 17:12, 14) Na ntembe te, baklisto ya solo bakolonga soki batikali sembo epai na Mokonzi monene oyo azali kolonga. Mpo na oyo etali banguya ya Gog, ekobomama nyee.—Ezekiele 39:3, 4, 17-19; Emoniseli 19:17-21.
20. Mokolo na Nkolo ekomema mapamboli nini epai na baklisto ya sembo na ntango na bolozi monene?
20 Mokolo na Nkolo elimboli bongo lobiko mpo na libota na Nzambe. Esika na likoló mpo na baklisto bapakolami baoyo bakozala naino na mabelé na ntango ya bolozi monene, ekobatelama mpo na bango, mpe bakozala na ekateli ya kotikala mpenza sembo kino liwa na bango. (Emoniseli 7:1-3; 2 Timote 4:6-8) Mpo na oyo etali basangani ya ebele monene, bango mpe bakobika mpe Yesu “akokamba bango epai na mitó na mai na bomoi. Nzambe mpe akolongola mpisoli nyonso na miso na bango” (Emoniseli 7:14, 17) Oyo nde lifuti kitoko mpo na mpiko mpe bosembo na bango!
21. Makambo nini makosalema na mabelé na boumeli ya mokolo na Nkolo nsima na bolozi monene?
21 Na ntango yango tokokota kati na eleko kitoko ya mokolo na Nkolo: Boyangeli na mbula nkoto ya Yesu Klisto. (Emoniseli 20:6, 11-15) Ebale ya mai na bomoi oyo esakolamaki na Emoniseli mpe lisusu na mokanda na Ezekiele, ekobima longwa na kiti na bokonzi ya Jéhovah mpe ekoleka epai na bato. Bato oyo bakomela yango bakokola moke moke kino na ezaleli ya kokoka. (Ezekiele 47:1-12; Emoniseli 22:1, 2) Hadese ekotikala mpamba mpe ebele na bakufi bakopesamela likoki ya komela mai ya ebale yango.—Yoane 5:28, 29.
22. Makambo minene nini bato bakomona na nsuka na boyangeli ya mbula nkoto na Klisto?
22 Na nsuka ya mbula nkoto, bato bakokoma na ezaleli ya kokoka. Ekozala eleko malamu mpo ete Satana akota kati na makambo ya mokili mpo na mbala ya nsuka. Mbala oyo lisusu, akomeka kokosa bato mpe bamosusu bakolanda ye ata na ntango yango. Na maloba na elilingi babengami “Gog mpe Magog”, mpamba te bazali komonisa ezaleli ya elimo mabe lokola oyo na “ebele na Gog” oyo balobelami kati na esakweli ya Ezekiele. Nzokande, botomboki na bango ekolimwa libela ntango bakobwakama kati na libeke na móto ya elilingi, elongo na Satana ye mpenza mpe badémo na ye. (Emoniseli 20:7-10; Ezekiele 39:11) Bomoi kitoko mpenza ezali kozela baoyo bakotikala sembo na ntango na komekama yango ya nsuka, mpe bato oyo bakomi na ezaleli ya kokoka bakosangana ntango yango na lisangá ya molongo mobimba mpe ya boyengebene ya Jéhovah, oyo akozala ye mpenza “nyonso mpo na bato nyonso”.—1 Bakolinti 15:24, 28; Emoniseli 20:5.
23. Na kotalelaka eleko oyo tozali kobika kati na yango, toli nini ya Paulo ebongi ete mokomoko na biso alanda yango?
23 Oyo nde mapamboli nini tokozwa soki toyiki mpiko! Tobosana te ete tozali sikawa kati na mokolo na Nkolo. Makambo na kokamwa masilaki kobanda kosalema. Na yango, maloba oyo na Paulo makoki mpenza na eleko oyo: “Totikaka te kosala oyo ezali malamu mpamba te, na ntango ekoki, tokobuka mbuma soki tokolemba te.” (Bagalatia 6:9, M.N.) Solo, ‘totikaka te kosala oyo ezali malamu’ na mokolo na Nkolo. Soki toyiki mpiko, mokolo yango ekomema bolamu ya seko epai na moko na moko kati na biso.
Bozongeli
◻ Kobomama ya mokili na Satana ekobanda na nini?
◻ Ndenge nini Yesu “akolonga lisusu” banguna na ye?
◻ Ndenge nini Satana abundisi ba Témoins de Jéhovah kozanga kotika na boumeli na mokolo ya Nkolo?
◻ Mapamboli kitoko nini libota na Nzambe ezwaki uta 1919?
◻ Na kotalelaka esika oyo tokomi na boumeli na ntango, yo mpenza ozwi likatami ya kosala nini?
[Elilingi na lokasa 28]
Nsuka na Yelusaleme ya kala ezali kosakola makambo oyo mosika te makoyela Babilone Monene.