Toluka mayele epai na Jéhovah
“Nakopesa yo mayele mpe nakolakisa yo nzela ekoki na yo kotambola”—NZEMBO 32:8.
1. Tanga mua makambo makoki komonisa soki bikateli tozali kokamata ezali ya mayele to te. (Tala Deteronome 32:7, 29)
Mikolo nyonso tosengeli kokamata bikateli. Mosusu na yango ezali mike, nzokande misusu ezali minene. Bikateli oyo biso tozwaka emonisaka ete tozali na mayele? Mingimingi yango etali biso: tosalaka makambo mbangumbangu to tokanisaka nde malamumalamu liboso ya koloba mpe kosala likambo? Mpo na makambo mingi, ebongi kokanisa na mozindo mpo na koyeba kozwa bikateli ya mayele. Mbala mosusu esengeli toyeba epai wapi makambo na mokili mazali kokende, mpe makambo nini mazali koleka kuna na likoló. Kasi nzela ezali ya koyeba yango kozanga ete tolukaluka mpamba?
2. Tozali na mposa na nini mpo na koyeba kotambwisa malamu matambe na biso, mpe mpo na nini? (Masese 20:24)
2 Bato bazali na makoki mingi kati na boongo na bango, kasi bazalisamaki te mpo na komitambwisa bango moko kozanga komikitisa mpo na kondima lisalisi na kopemama na Nzambe. Yango wana mosakoli Yilimia akomaki na kopemama na Nzambe: “O Jéhovah, nayebi ete nzela na moto ezali kati na ye moko te, ekoki na motamboli te ete atambolisa makolo na ye moko.”—Yilimia 10:23.
3. Nini ekokomela biso soki toboi kotambwisama na Jéhovah? (Tala Genese 3:4-6, 16-24)
3 Ekozala boni soki toboyi kotia likebi na lilako oyo, kotyaka motema na makoki na biso moko to na bato mosusu, mpo na koyeba kozwa bikateli ya mayele to ya bozoba, ya malamu to ya mabe? Na komitika kotambwisama na makanisi ya bato, mbala mosusu tokomona likambo boye ete ezali malamu, nzokande ezali mabe na miso na Nzambe, mpe tokotalela etamboli boye ete ezali ya mayele, nzokande ezali bozoba na miso na Nzambe. (Yisaya 5:20) Wana tokoki kobetisa bamosusu mabaku ata tosali yango na nko te. (Tala 1 Bakolinti 8:9) Liloba na Nzambe eyebisi nini ekokomelaka bato oyo baboi komitika kotambwisama na Jéhovah: “Nzela ezali oyo emonani malamu epai na moto nde nsuka na yango bobele nzela na kufa.”—Masese 14:12.
4. Lisalisi nini Jéhovah alaki kopesa yango na basaleli na ye? (Tala Jérémie 10:21)
4 Tozali bongo na mposa na nini na makambo nyonso? Tozali na mposa na lisalisi ya Jéhovah. Mpe ye ayikisi biso mpiko na maloba oyo na elikya: “Nakopesa yo mayele mpe nakolakisa yo nzela ekoki na yo kotambola; nakopesa yo toli wana nazali kotala yo.”—Nzembo 32:8.
Mayele esengi nini?
5. Kozala na mayele elimboli nini?
5 Liloba mayele elakisi nini mpenzampenza kati na Makomami? Ezali lolenge ya komonela likambo, kososola likambo na mozindo. Engebene buku Lexique théologique de l’Ancien Testament (na Anglais), liloba ya hébreu ebongolami na “mayele” elakisi “boyebi engengisami likoló na ntina” na makambo. Ezali lolenge ya boyebi oyo ekopesa biso nzela ete tosala makambo na mayele mpe tolonga. Ezali na boyokani na ndimbola oyo ya moboko nde Traduction du monde nouveau ezali kosalela liloba “mayele”. Mpo na kobongola ndimbola nyonso ya verbe ya liloba oyo ya hébreu, ezali kosalela maloba lokola ‘se montrer avisé’, ‘agir prudemment’ mpe ‘avoir du succès’.—Nzembo 14:2.
6. Mpo na nini tokoki koloba ete “ye oyo akangi monoko na ye” azali na mayele?’
6 Na motindo yango, elobami mpo na “ye oyo akangi monoko na ye” ete “azali na mayele”, (perspicace). (Masese 10:19) Liboso ya kofungola monoko, akokanisa naino malamumalamu mpe akokeba soko maloba na ye makoyokama boni. Wana elingi ye koloba epai na mozalani na ye, akomituna soki akoloba na mayele mpe na bolingo, to soki esengeli ete aloba bongo. (Masese 12:18; Yakobo 1:19) Epusami ye na bolingo mpo na banzela ya Jéhovah mpe na mposa mpenza ya kosalisa bazalani na ye, azali na maloba ya kolendisa.—Masese 16:23.
7. Ndenge nini Davidi azwaki lokumu na moto na mayele?
7 Tozali kotanga boye na ntina na Davidi, mwana na Yese ete “akendaki bipai nyonso oyo Saulo atindaki ye mpe atambolaki na mayele” (prudemment), elingi koloba na mayele mabengami perspicacité. Davidi ayebaki ete bitumba azali kobunda ezali ya bato te, kasi ezali bitumba ya Jéhovah, oyo ye na baninga na ye bazalaki kobunda. Azalaki bongo koluka kotambwisama mpe kopambwama na Jéhovah. (1 Samwele 17:45; 18:5; 2 Samwele 5:19) Mpo na yango, azalaki kolonga se bolongi na bitumba na ye nyonso.
8. Na Makomami ya greke ya boklisto, verbe oyo ebongolami ete ‘kozala na mayele’ ezali mbala mosusu na ndimbola nini?
8 Na Makomami ya greke ya boklisto, verbe oyo ebongolami ete ‘kozala na mayele’ (perspicacité) ezali mbala mosusu kobongolama ete ‘kokanga ntina’ to “kososola”. (Baloma 3:11; Matai 13:13-15; Baefese 5:17) Oyo nyonso ezali makoki Nzambe alaki kopesa na basaleli na ye. Kasi azali kosala yango ndenge nini?
Ndenge nini Yosua azwaki mayele?
9. Na ntango ya kala, ndenge nini Jéhovah apesaki mayele na Bayisraele?
9 Na Yisraele ya kala, Jéhovah apesaki na Balevi mokumba ya koteya bato Mibeko na ye. (Levitike 10:11; Deteronome 33:8, 10) Mibeko mipemamaki na Nzambe, mpe elimo na Jéhovah ezalaki kosala likoló na bibongiseli bikamatamaki mpo na mateya yango. (Malaki 2:7) Na motindo yango, lokola tokoki kotanga yango na Nehemia 9:20, (MN) Jéhovah ‘apesaki mayele na Bayisraele’ to bososoli.
10, 11. (a) Lokola emonisi yango Yosua 1:7, 8, eloko nini elingaki kopesa Yosua mayele? (b) Ebongiseli nini ekamatamaki na makambo matali mateya Yosua asengelaki kotosa yango? (c) Ye moko asengelaki kotya molende nini?
10 Nzokande, Yisraele mokomoko alingaki komonisa ete azali na mayele? Esengelaki komonana na misala na bango. Mpamba te, wana epesaki ye na Yosua mokumba ya kokotisa Yisraele na Mabelé ya ndaka, Jéhovah alobaki na ye: “Ozala bobele makasi mpe yika mpiko mingi mpo na kokeba kotosa mibeko nyonso oyo Mose, moombo na ngai, alakelaki yo. Pengwa na yango epai na loboko na mobali to na loboko na mwasi te, na ntina ete [ozala na mayele] soko wapi ekokenda yo. Buku na mobeko oyo ekolongwa na monoko na yo te, kasi okokanisa yango butu na moi, ete okeba kotosa makambo nyonso makomami na yango. Mpo ete bongo okozalisa nzela na yo malamu mpe bongo okozala [na mayele].”—Yosua 1:7, 8.
11 Ndenge nini Jéhovah alingaki kopesa mayele na Yosua? Ezali na ekamwiseli te, kasi na nzela na Liloba na ye ekomami. Yosua asengelaki kokotisa yango na elimo na ye mpe na motema na ye na kotangaka yango mpe kokanisaka likoló na yango mikolo minso. Yosua ayebaki ete ezali mokumba ya Balevi ya koteya Mibeko. Asengelaki bongo kotosa ebongiseli yango, amitangola te, na kokanisaka ete lokola ye azali mokonzi ya libota akoki kokanga ntina ya Liloba yango ye moko. (Masese 18:1) Esengelaki ete Yosua ayekolaka mikoló nyonso Liloba na Nzambe ekomami. Soki asali motindo yango, kozanga kotika pembeni eteni moko na Liloba yango, mpe soki atosi yango, bongo nde asali mosala na ye na mayele.—Tala 1 Mikonzi 2:3.
Ndenge nini Jéhovah azali kopesa biso mayele lelo
12. Wapi makambo misato tosengeli kokokisa mpo na kozwa mayele oyo Jéhovah alaki biso?
12 Uta ntango yango, Jéhovah azali kopesa na basaleli na ye malako masengeli mpo ete bazala na mayele. Soki tolingi kozwa litomba na malako yango, esengeli na biso kotosa makambo mingi: 1) Lokola Yosua, tosengeli kotosa lisanga ya Jéhovah. Yango elimboli ete tosengeli kosala mosala na boyokani na lisanga ya baklisto bapakolami, “moombo na sembo mpe na mayele” elongo na Collège central na yango. (Matai 24:45-47; tala mpe Misala 16:4) Yango elimboli mpe koyangana poso na poso na makita ya boklisto. (Baebele 10:24, 25) 2) Tosengeli moto na moto koyekola ntango nyonso Liloba na Nzambe mpe mikanda oyo kelasi na “moombo” ezali kobimisela biso mpo na kosalisa biso ete tokanga ntina na yango. 3) Esengeli mpe tokamata ntango ya kokanisa na mozindo likoló na lolenge oyo tokoki kosalela kati na bomoi na biso makambo mazali biso koyekola mpe kosalela yango mpo na kosalisa bazalani na biso.
13. Wapi ndimbola na elaka oyo ekomami na Yilimia 3:15?
13 Na ntina na bilei mpe kobatelama na elimo oyo abongisaki mpo na biso na eleko oyo, Jéhovah alobaki na Yilimia 3:15: “Nakopesa bino babateli babongi na motema na ngai baoyo bakoleisa bino na boyebi mpe na bososoli.” Mateya oyo na elimo makoki solo kopesa biso nzela na koyeba kososola makambo mpe komona malamu nzela nini tokoki kolanda mpo ekoka komonana ete tozali na mayele. Epai wapi tokoki kozwa mayele oyo to bososoli? Bobele epai na Jéhovah Nzambe.
14. Mpo na nini kelasi na “moombo na sembo” bazali na mayele?
14 Mpo na nini kelasi na “moombo na sembo” bazali na mayele to na bososoli? Ezali mpo ete bazali kolukaluka kati na Liloba na Nzambe mpe bazali kolanda toli na yango. Epai mosusu, lokola bazali koluka kotambwisama na ye, Jéhovah atii elimo na ye likoló na bango mpe azali kosalela bango mpo na kokokisa mokano na ye. (Luka 12:43, 44; Misala 5:32) Esili koleka kala mpenza, mokomi na nzembo akomaki na kopemama na Nzambe: “Naleki balakisi na ngai nyonso na mayele, mpo ete matatoli na yo mazali kati na makanisi na ngai.”—Nzembo 119:99.
15. (a) Toli nini kelasi ya “moombo” bapesaka soki totuni bango motuna? (b) Esili koleka mbula mingi, eloko nini epesaki nzela na kelasi na “moombo” ete bapesa “mayele mpe bososoli” esengeli na ntina etali likanisi ya boklisto likoló na likambo ya makila?
15 Na ntango batunaka “moombo na sembo mpe na mayele” ete ebongi kosala ndenge nini na likambo boye to na likambo boye, bango bazongisaka ntango nyonso toli oyo: ‘Bolanda oyo Biblia elobi mpe botya motema epai na Jéhovah.’ (Nzembo 119:105; Masese 3:5, 6) Ntango likambo ya kozongisa makila ebimaki mpe ba Témoins de Jéhovah bakomaki kokutana na likambo yango, La Tour de Garde ya le 1er Juillet 1945 (na Anglais) epesaki likanisi ya boklisto na ntina etali ezaleli ya bulee ya makila. Elimbolaki ete mobeko na Nzambe epekisi kolya makila na nyama mpe makila na moto. (Genese 9:3, 4; Misala 15:28, 29) Zulunalo yango elobaki te mpo na makama oyo makobimaka nsima na kozangisa makila, mpamba te makama yango mayebanaki mpenza te na eleko yango. Elobelaki mingi botosi na mobeko ya Nzambe; lelo ezali se ndenge moko. Bato mingi babandi komona ete kondima makila ezali likambo na mayele te, mpe bakomi kobanga ete bazongisa bango makila. Nzokande, uta kala, ba Témoins de Jéhovah batambolaki na mayele mpo ete batyaki motema epai na Mozalisi, ye oyo ayebi malamu makila koleka bato nyonso.
16. Mpo na nini toli epesami kati na Mosenzeli na ntina etali etamboli malamu na makambo ya mwasi mpe mobali, na ntina na mabota oyo bazali bobele na tata to bobele na mama mpe na ntina na baoyo bazali kobela maladi ya makanisi, emonani ete ezali toli ya litomba mpenza?
16 Awa etamboli na nsoni esili kopalangana mingi, Mosenzeli ezali ntango nyonso kopesa na batangi na yango toli ya mayele etongami likoló na Makomami, na esika ya kotika nzela na lipanda lokola ezali komonana na bato mingi. Zulunalo oyo ezali bongo kosalisa batangi na yango ete babatela malamu boyokani na bango ya motuya elongo na Jéhovah mpe koluka bolamu bokoumela na esika ete basepela na esengo ya ntango mokuse. Bobele bongo, masolo ya La Tour de Garde oyo mabimisamaki mpo na mabota oyo mazali bobele na mama to bobele na tata, mpe masolo mosusu mpo na bato oyo bazali kobela maladi ya makanisi, ezali komonisa mayele mazwami bobele epai na baoyo bazali kotosa malako na Jéhovah mpe bazali kobondela ye ete: “Lakisa ngai ete nasala mokano na yo mpo ete yo ozali Nzambe na ngai.”—Nzembo 143:10; 139:17a.
17. (a) Bambula mingi liboso, eloko nini basaleli ya Jéhovah basilaki koyeba yango na ntina na 1914? (b) Atako bayebaki makambo mosusu te nsima na 1914, nzokande boyebi nini epesaki nzela na basaleli na Nzambe ete batambwisa bomoi na bango na mayele?
17 Na nsima na “moombo na sembo mpe na mayele”, Jéhovah asalisaki mpe basaleli na ye ete basosola, bambula mingi na liboso, ete 1914 ekozala nsuka na ntango na Bapakano. (Luka 21:24, Crampon 1905) Ntango Etumba ya Liboso ya mokili mobimba esilaki, mituna misusu mizalaki naino kotungisa bango, kasi bazalaki na mua boyebi ekoki mpo na kotambola na mayele. Babosanaki te ete engebene Makomami, ntango oyo Nzambe akanaki mpo na koboma biloko na lelo esili kobelema mpe ekozala likambo na bozoba soko bakotya elikya na bango na mokili oyo to soko bamipesi na koluka bozwi ya mokili. Bayebaki mpe ete bobele Bokonzi ya Jéhovah nde ezali elikya ya solo mpo na kosilisa bampasi nyonso ya bato. (Danyele 2:44; Matai 6:33) Bakangaki ntina malamu ete esengeli na baklisto nyonso ya solo ete basakola Yesu Klisto, Mokonzi apakolami na Jéhovah, mpe basakola Bokonzi na Ye. (Yisaya 61:1, 2; Matai 24:14) Na 1925, lisolo ya La Tour de Garde oyo ezalaki na motó ya likambo ete “Kobotama ya libota” elendisaki bango, kopesaka bango bososoli malamu na mokapo 12 ya Emoniseli; uta ntango yango bayebaki eloko nini esalemaki kati na makolo, kozanga komonana na miso na bato. Bososoli yango esalisaki bango ete batambola na mayele.
18. Libaku malamu nini mpe mokumba nini tozali na yango sikawa, mpe nini tosengeli komituna?
18 Na kondima, mua bankoto na bato oyo bazalaki kotatola mpo na Jéhovah na eleko wana bapalanganisaki kati na mokili mobimba mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi na Nzambe oyo eutaki kosalema. Na motindo yango, bamilió na bato bayei koyeba Jéhovah mpe kolinga ye, mpe bazali komona liboso na bango elikya ya kozala na bomoi ya seko. Biso nyonso oyo toyambi solo mpo na molende na bango ya kozanga koluka litomba, tozali kokanga ntina ete tozali mpe na libaku malamu mpe na mokumba ya kosangana na mosala yango na kopesaka litatoli mobimba epai na baoyo nyonso bandimi koyoka mpe na kolandaka mosala yango kino Jéhovah akoloba ete esili. (Emoniseli 22:17; tala lisusu Misala 20:26, 27) Lolenge na bomoi na biso ezali komonisa ete tozali kosepela na mayele oyo Jéhovah apesi na basaleli na ye na nsima na lisanga na ye?
19. (a) Tanga ndakisa ya Témoin moko oyo bomoi na ye emonisi botondi na ye mpo na mayele oyo Jéhovah azali kopesa na nzela na lisanga na ye. (b) Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa oyo?
19 Na lolenge ya bomoi na bango, ebele monene ya bato kati na mokili mobimba bazali koyanola ete ee na motuna oyo. Totalela ndakisa ya John Cutforth. Esili koleka bambula soko 48; akangaki na motema na ye toli ezwami na Biblia oyo kelasi na “moombo na sembo” ezalaki kolobela yango makasi ete: “Bolukaka nde liboso Bokonzi na Nzambe mpe boyengebene na ye mpe biloko oyo nyonso bikobakisama na bino. Bomitungisa te mpo na lobi.” (Matai 6:33, 34) Nsima na kosalela Jéhovah bambula mingi, ndeko Cutforth alobaki: ‘Moko na makambo makomami na mozindo kati na elimo na ngai, ezali boye ete awa na mokili Jéhovah azali na lisanga oyo azali kotambwisa, ete nakoki kosala elongo na lisanga yango, wana ekomemela ngai kimya, bosepeli, kotonda baninga mingi, mpe mapamboli mosusu mingi.’ Alendisamaki lisusu mingi kati na endimeli na ye oyo na boumeli ya bambula mingi oyo alekisaki na mosala ya kosakola na Etats-Unis, na Canada, na Australie mpe na Papouasie-Nouvelle-Guinéeb. Na ntembe te, mpo na biso nyonso nzela na mayele ezali ete tomonisa botondi na biso mpo na mwango oyo Jéhovah azali kosalela mpo na kopesa mayele na basaleli na ye.—Matai 6:19-21.
Tokeba ete tobungisa yango te
20, 21. (a) Ndenge nini bamoko basili kobungisa mayele oyo mazali kouta na Nzambe? (b) Nini ekosalisa biso ete totambola na nzela mabe te?
20 Mayele oyo Jéhovah apesi na basaleli na ye ezali eloko na motuya oyo tosengeli kolinga yango. Nzokande toyeba ete tokoki kobungisa yango soki totiki kotambola na nzela oyo tozwelaki mayele yango. Ezali likambo ya mawa na komona ete yango esili kokomela bamosusu. (Masese 21:16; Danyele 11:35) Baboyaki kondima disipline oyo epesamelaki bango, komekaka kolongisa etamboli na bango. Bazwamaki na motambo ya lolendo. Makambo oyo Liloba na Nzambe ezali komonisa yango ete ezali mabe, bango bazali komona yango ete ezali malamu; basili komilongola na lisanga ya Jéhovah. Ezali mawa mingi!
21 Ezalela na moto oyo abandi kotambola na nzela mabe eyebisami boye kati na Nzembo 36:1-3: “Mabe elobi epai na moto na yauli kati na motema na ye.” Elingi koloba ete, makanisi na ye moko mpe bamposa na ye ya moimi nde ezali kotinda ye na kosala lisumu. Mokomi na nzembo abakisi: ‘Nsomo na Nzambe ezali liboso na miso na ye te. Akomikembisa ye mpenza na miso na ye ete, akoyeba mpe akoyina masumu na ye te. Maloba na monoko na ye mazali na bokesene mpe na kokosa.” Akosuka na nini? ‘Atiki nzela na mayele mpe na kosala malamu’. Azali komindimisa ete oyo azali kosala ezali sembo mpe azali koluka kokweisa bamosusu ete balanda ye. Na bongo, ezali likambo na ntina mingi ete tozala na mayele mpe tobatela mayele na biso, kosepelaka ntango nyonso na mwango oyo Jéhovah asaleli mpo na kopesa biso mayele.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Tala ba lndex ya mikanda na la Société Watch Tower, na nse ya masolo “Libala”, “Libota”, “Kobeba ya bizaleli malamu” mpe “Mpasi ya (Makanisi)”.
Bozongeli
◻ Nini ekosalisa biso ete toyeba kokamata bikateli ya mayele?
◻ Kozala na mayele elimboli nini?
◻ Ndenge nini Jéhovah azali kopesa mayele epai na basaleli na ye na mikolo na biso?
◻ Tosengeli kosala nini soki tolingi kozwa litomba mpenza na mayele oyo Jéhovah azali kopesa?
[Elilingi na lokasa 8]
Mpo na kozwa mayele oyo euti na Jéhovah, tosengeli kosepela na lisanga na ye, koyekola biso moko ntango nyonso mpe kokanisa na motindo oyo tokosalela makambo tozali koyekola.