Kabola mai ya solo epai na baboti na yo
“LOKOLA mai na mpio mpo na molimo molembi, bobele bongo ezali nsango malamu longwa na mokili na mosika”, elobaki Salomon. (Masese 25:25) Moto oyo alembi akolendisama te na koyoka nsango oyo omemeli ye, nsango malamu na bomoi ya seko kati na Paradis ekoya? Ezali na lolenge yango nde monoko na yo ekomi “liziba na bomoi’‘.—Masese 10:11; Yisaya 52:7.
Na kopolisa mabelé, mai ezali kopesa nzela na milona ekoka kokola, nzokande, mai mingi ekoki kozala likama. To lisusu, mai ya malili ezali kosilisa mposa; nzokande, nani alingi kokangama kati na mopepe na mbula mpembe to mopepe makasi ya matandala to mbula ya mabanga? Mai oyo mazali kobima makokisami na maloba na monoko na biso: elingi koloba ete tosengeli kokeba mingi mpo na mateya na biso. (1 Timoté 4:16) Tosengeli koyeba mingimingi makambo makeseni oyo “mai” makoki kobimisa ntango tozali kopesa litatoli epai na basangani na libota na biso.
‘Tosopela’ bandeko na biso mai
Na kala, Rahab afungolaki nzela na lobiko epai na libota na ye; corneille apesaki litatoli epai na bandeko na ye. (Yosua 2:18; 6:23; Misala 10:24, 30-33). Mpo na Petelo, ezali ndeko na ye André moto asalisaki ye kozala moyekoli na Yesu. (Yoa.ne 1:40-42) Lelo oyo, mingi na ba Témoins de Jéhovah bazali kosakola solo na Biblia epai na basangani na libota na bango. Masese 11:25 epesi elaka oyo: “Ye oyo akotyela moninga na ye mai mingi, ye mpe, bakotyela ye mai mingi.”
Na Mpoto, mwasi moko azalaki na mposa ya koyebisa kondima na ye oyo azwaki sika epai na baboti na ye, bandeko na ye ya mibali mpe ya basi baoyo bafandaki na mokili ya Philippines. Alobi boye: “Nazalaki kolobela yango kati na mikanda nyonso oyo nazalaki kokomela bango. Liboso na kozwa batisimo, natindelaki bango mikanda mpe natunaki bango soki bakoki kosepela na vizite ya ba Témoins de Jéhovah.” Ezalaki esengo mingi mpo na ye, mpamba te bandimaki mpe, sikawa mwambe kati na bango bazali kosambela Jéhovah. Batemwe bazwaki matomba malamu na kopesa lokola likabo epai na bandeko na bango abonema ya La Tour de Garde mpe Réveillez-vous!.
Okosala nini soki basangani na libota na yo bazali komonisa ata bosepeli moke te? Yesu akutanaki na ezalela motindo yango. Na ntango moko, “bandeko na ye bandimelaki ye te”. Kasi, na nsima, “baumelaki na motema moko”, na etingya na kobondela elongo na bantoma. (Yoane 7:5; Misala 1:14) Mpo na nini mitema na bango ebongwanaki? Ezali komonana ete Yesu asalisaki basangani na libota na ye liboso ya kobuta na likoló. Na lolenge nini? Asalisaki bango bazala na kondima na komonanaka epai na ndeko na ye ya leki Yakobo. (1 Bakolinti 15:7) Na ntina yango, kotika te koluka kosalisabasangani na libota na yo. Batemwe mingi bakokaki bongo kosolola solo na Biblia elongo na bandeko na bango baoyo bazali bandimi te nsima na kozela na motema molai ntango oyo ezali malamu.
Nzokande, ‘koaopela’ basangani ya libota na yo mai, ezali te ete opoliea bango na maloba. Babalani mibale Bayugoalave balobi boye: “Likama ezali ntango nyonso na kolinga kosakola epai na bango na kolekisa ndelo.” Mpe mokengeli moko ya zongazonga alobi boye ete: “Mbala mingi, bandeko balekisa ndelo, bazali na molende oyo ezali malamu te.” Ludwíg azali koyebisa oyo azalaki kosala wana ebandaki ye koyekola Biblia: “Na boumeli ya bangonga mingi, nazalaki kolimbola epai na mama makambo nyonso nayekolaki na Biblia, mpe mbala mingi likambo yango ezalaki kobimisa matata, mingimingi elongo na tata”.
Ozali “liziba na mayele”
“Maloba na bato na mayele makopesa yo mposa ya koyekola, kasi monoko na bazoba mokosopa se bolema”, mpe “motema na moyengebene ekobanzaka liboso na kozongisa liloba”, tozali kotanga bongo kati na Biblia. (Masese 15:2, 28 Liloba lya Nzambe) Tosengeli bongo kozala na bokatikati, kozala na mayele mpe bososoli mpo ete maloba na biso masilisa mposa mpe masepelisa. Ezali ntina mingi mpo na koyeba kopona ntango mpo na koloba mpe kopona lisolo, mpe lisusu kotalela malamu ndelo na maloba na biso.
Na mokolo na moi makasi, kopo moko na mai ya malili ezali mpenza kosilisa mposa na moto oyo azali na mposa ya mai. (Matai 10:42)! Nzokande, nani akoki kolinga ete amisopela katini mobimba ya mai na motó? Moto moko te! Mokengeli ya zongazonga oyo totangaki liboso alobi lisusu boye: “Baoyo bazali kozwa matomba malamu ezali baoyo bazali kolamusa epai na bandeko na bango mposa ya koluka koyeba na kopesaka bango litatoli lokola bakopesaka doze mokemoke.” Soko moko na basangani na libota oyo azali motemeli akomi na mposa, mpe abandi kotuna mituna, mbala mingi masolo ya Biblia mazalaka na matomba malamu.
Ezali yango moklisto moko na mokili ya Turquie na nkombo ya Huriye azwaki epai naye, na kotikaka mikanda oyo mizali kolimbola Biblia mifungolami na masolo oyo akanisaki ete makoki kosepelisa mobali na ye oyo azalaki mondimi te. Azalaki kotanga masolo ya Biblia epai na bana na ye mpe, soki mobali na ye ezalaki kolunda, azalaki bongo kobakisa bandimbola mosusu oyo ekokaki kosalisa ye. Mbala mingi, azalaki bobele koyebisa ye ete: ’’Lelo, nayekolaki likambo boye to likambo boye na boumeli na boyekoli na ngai. Yo okanisi nini mpo na yango?” Mpe alobi polele mitinda nini na lolenge ya kosalela alandaki : “Zala na motema ya kokita, kosilika te, kopela na nkunda te. Komimonisa te ete oyebi makambo nyonso. Zala na komikitisa mpe komitia liboso te.” Na nsuka, mobali na ye andimaki solo ya Bokonzi, mpe sikawa azali pionnier.
Marijan asalisaki bandeko na ye mingi na koyamba kondima na ye. Apesi toli oyo: “Kosengisa makambo na makasi te, kasi ozela ntango oyo ebongi. Ezali etinda ya kolanda ntango basangani na libota na biso bapekisi biso tolobela bango mpo na solo te. Tosengeli kozala na motema molai mpe na bolingo.’’ Wana bandeko na yo batye ntembe na yo, na ntango yango Mosakoli 3:7 ebongi mpenzampenza. Texte yango elobi ete ezali na “ntango mpo na kozala nyee mpe ntango mpo na koloba”. Yango elingi koloba kozala mpe na mposa na koyoka bato mosusu mpe kozala na motema molai, kokata bango maloba te mpe kotosa makanisi na bango. “Ezali na ntina te kosilika ntango ozali kosolola elongo na bandeko na yo”, Petar alobi bongo, ye oyo azalaki kotya ntembe makasi, kasi abongolaki makanisi na ye nsima.
Sakola na nzela na etamboli na yo malamu
Na boumeli na bambula mingi, mobali moko azalaki kosala matata epai na mwasi na ye oyo azalaki moklisto, kino kokangela ye ndako ete atikala na libanda. Mokolo moko, asilikaki makasi kino apasolaki mokanda moko oyo mwasi na ye abosanaki kotya yango na esika na yango. Eloko nini ebongolaki ye? Alimboli boye: “Mikolo nyonso nazalaki komituna mpo na nini mwasi na ngai atelemaki ngwi mpe azalaki na elikya epai na Jéhovah. Nazalaki komona eloko ya mabe te epai na ye, mpo azalaki kobatela ndako malamu, azalaki mwasi malamu mpe mama malamu mpo na bana na biso.” Mokolo moko, lokola mobali oyo azalaki koluka makambo na kosepelisa oyo akosala lokola lisolo ya minite mitano na esika na ye ya mosala, mwasi na ye apesaki ye nimero mibale ya Réveillez-vous! Na kondima na mitema mibale, abwakaki liso na kati, kasi akamwaki kokuta na kati lisolo moko kitoko mpo na lolenge ya kosala ekomeli oyo babengi crayon. Ezali na lolenge yango nde bosepeli na ye mpo na baperiodike ekolisamaki. Lelo oyo, mobali yango na libota na ye basangani kati na mosala ya Jéhovah.
Ntoma Petelo alobaki ete mwasi akoki kozwa mobali na ye oyo azali mondimi te ‘kozanga maloba, kasi na bizaleli malamu mpe na limemya‘. (1 Petelo 3:1, 2.) Ezali etinda oyo etaleli mpe basangani mosusu ya libota. Mokolo moko, mobali moko na mwasi na ye batikaki lingomba ya baboti na bango ba Roumains mpe makambo na bonkoko oyo ezali na boyokani na Biblia te. Libota mobimba etelemelaki bango. Mwasi na ye nkutu azwaki matata na bokilo na ye ya mwasi oyo alingaki koboma ye. Nikolic alobi: “Totikaki te ete likambo oyo elembisa biso to esilikisa biso. Tokitisaki mitungisi na biso epai na Jéhovah”. Lelo oyo, nsima na mibu 11, baboti na ye, bandeko na ye mibale ya basi mpe basemeki na ye ya mibali bazwaki batisimo, bakomi ba Témoin de Jéhovah. Eloko nini efungolaki nzela? “Ezali etamboli malamu na boklisto. Elingi koloba, tolekisaki ntango mingi mpo na kolobela bango solo te; kasi, tosalaki nde makasi mpo na kosalela yango.”
Kotika elikya te
Lokola ezali kopesa esengo na komona bandeko na biso kobanda kosambela Nzambe ya solo, tokoki kosala nini soki bamosusu balandeli kaka kozala na ntembe? Yo okozala na ezaleli nini? Yesu asakolaki ete losambo ya solo mbala mosusu ekobimisa bokabwani makasi kati na mabota. (Matai 10:34-37) Ntango Marica akomaki Témoin de Jéhovah, libota na ye nyonso baboyaki ye. Aboyaki losambo na ye te, kasi andimaki ete “libota na ye ezalaki mpe na lotomo ya kozala na lolenge na bango ya kotalela makambo’’. Ezalela na ye epusaki bandeko na ye komemya ye lokola ezalaki liboso.
Ludwig akangaki ntina ete ezalaki mokumba na ye kolinga baboti na ye, uta soki baponaki lolenge na bango ya bomoi oyo ekeseni na oyo ya ye. Mbala mingi azalaki kokanisa likolo na mikapo ya Biblia oyo mikokanaki na likambo na ye, lokola oyo: “Kumisa tata na yo mpe mama na yo”; “tika ete maloba na bino mazala na ngolu, na elɛngi na mungwa ntango nyonso”; “boselingwaka mikolo nyonso . . . kasi bozongisa monoko yango na bopolo mpe na limemya”; “ebongi te ete moombo na Nkolo aswanaka”. (Baefese 6:2; Bakolose 4:6; 1 Petelo 3:15; 2 Timoté 2:24.) Ludwig alobi: “Ntango nazalaki kotelefoné baboti na ngai to ntango nazalaki kokenda kotala bango, nazalaki kobondela Jéhovah ete apesa ngai mayele, mpe moke moke boyokani na biso ezongaki lisusu malamu. lokola baninga.”.
Kotika elikya te na kokanisa ete bambuma na solo ekokola te kati na mitema na basangani na libota na yo. Mobali moko oyo akomaki Témoin de Jéhovah mibu 31 nsima na mwasi na ye alobaki boye: “Nakotala nsima, nasengeli kondima ete mwasi na ngai azalaki anzelu moko na motema molai mpo na ngai. Nayebaki malamu ete azalaki kobondela Jéhovah mpo na ngai”.
Tika ete maloba oyo mazali kobima na monoko na yo mazala ntango nyonso ya kolendisa mpe ya kosilisa mposa lokola mai ya malili! Ee, sakola “nsango malamu na nkembo na Nzambe na esengo” epai na bato nyonso, mpe bandeko na yo. (1 Timoté 1:11; Emoniseli 22:17) Wana nde maloba oyo na Yesu makokokisama: “Ye oyo akondima ngai, lokola elobi Likomi ete: ‘Longwa na motema na ye, bibale na mai na bomoi ekobima”’—Yoane 7:38.