Lolenge nini kosalisa bato oyo banyokwami na makanisi na kozwa lisusu esengo
EPAFOLODITE, moklisto na ekeke ya liboso, anyokwamaki na makanisi. Atindamaki mpo na kokende kosalisa ntoma Paulo, ye oyo akotaki boloko, kasi Epafolodite abelaki maladi makasi mpenza. Atako abikaki, anyokwamaki na makanisi mpo ete lisangá kuna esika ye autaki, oyo litindaki ye na Rome, “bayokaki ete azalaki na maladi”. (Bafilipi 2:25, 26.) Lokola azalaki mosika, Epafolodite anyokwamaki na makanisi. Na ntembe te, azalaki lisusu kokanisa ete bango balɛmbaki na ntina na ye. Ndenge nini bakokaki kosalisa ye na kozwa lisusu esengo?
Basengaki na Epafolodite ete azonga epai na ye na Filipe elongo na mokanda oyo ntoma Paulo akomaki. Kati na yango, Paulo asengaki boye na lisangá: “Bongo boyamba ye lokola na liboso kati na Nkolo, na esengo; mpe bokumisa lolenge oyo na bato. ’‘ (Bafilipi 2: 2730 MN) Baklisto ya Filipe balendisamaki na kobelema penepene na Epafolodite na lolenge ya bolingo ya bondeko, ezalela ya liboso mpenza oyo ezali komonisa lisangá na boklisto. Maloba na bango na koyikisa mpiko malakisa ye ete bazali kosepela na ye mingi, ee ete ‘balingi’ ye mingi. Komonisama ya bolingo wana ekozala na ye lisungi monene mpo na kobika na konyokwama na makanisi.
Ndakisa oyo emonisi ete, ata soko baklisto nyonso ‘bazali kosepela kati na Nkolo’, bamosusu kati na bango bazali konyokwama mitindo ndenge na ndenge na makanisi (Bafilipi 4:4,) Konyokwama makasi na makanisi ezali mobulungano moko monene kati na mayoki, oyo ekoki ntango mosusu komema moto na komiboma. Mbala mosusu, ezalaka mpo ete boongo ebebi to mpo na maladi mosusu na nzoto. Nzokande, konyokwama na makanisi ekoki kokita na lisalisi litondi na bososoli, oyo likopesamaka na bamosusu. Yango wana, Paulo apesi elendiseli oyo na baklisto: “Bolobaka na motindo na kobondisa epai na bato balembi.” (1 Batesaloniki 5:14, M.N.) Na yango, masangá ya ba Témoins de Jéhovah masengeli kopesa lisungi malamu, na esengo epai na bato oyo bazali konyokwama na makanisi. Na 1903, lisangá na boklisto liyebaki mpenza ete mokumba oyo motalelaki bango. Na yango, tala lolenge oyo nimero moko ya La Tour de Garde na Lingelisi na mobu yango ezalaki koloba na ntina na milimo oyo minyokwami na makanisi to oyo mizangi mpiko: “Baoyo bazangi mpiko mpe baoyo bazangi makasi, bazali na mposa ya kosalisama, kosungama mpe kolendisama.” Kasi lolenge nini okoki kosalisa milimo oyo minyokwami na makanisi?
Okoki kosalisa moto oyo anyokwami na makanisi na kobimisa “bozito” bozali mpenza kotungisa motema na ye, libosoliboso ‘na komityaka na esika na ye’. Na nsima, ‘maloba malamu’ makoki kosalisa ye na kosepela (1 Petelo 3:8; Masese 12:25.) Na kopesaka ye nzela na koloba kozanga kokata ye mpe na komonisaka ete ozali na mposa na ye mpenza, ekoki kozala lisungi monene mpo na ye. Marie, monzemba moklisto mwasi moko oyo abundaki na maladi oyo ekonyokolaka makanisi, alimboli boye: “Nazalaki na mwa baninga oyo nakokaki koyebisa bango makambo na ngai. Nazalaki na mposa ya moto oyo akoki koyokamela ngai.” Ezali na ntina monene mpenza na kozala na moto oyo okoki kolobela ye makanisi ya motema na yo, na ntango okutani na mikakatano.
Nzokande, ekoki bobele te koyokamela mpe kopesa batoli ya likolólikoló, lokola oyo: “Talela bomoi na lolenge malamu”, to: “Zalaka na elikya.” Motindo na maloba wana makoki komonisa kozanga komitya na esika ya moto oyo anyokwami na makanisi. Ezali yango nde Masese 25:20 emonisi na maloba oyo: “Ye oyo akoyemba nzembo liboso na motema na bozito, azali lokola ye oyo akolongola elamba na ntango ya mpio.” Maloba na kolendisa oyo maleki ndelo ekoki ata kotya lisusu moto oyo anyokwami na makanisi na mobulungano koleka. Mpo na nini bongo? Mpo ete motindo na milende wana ezali kotalela te makambo oyo mazali kobimisa maladi yango.
Kokembisa na maloba
Moto oyo anyokwami makasi mpenza na makanisi azali bobele na mawa mpamba te, kasi zali lisusu koyoka lokola ete azangi ntina mpe zali na elikya te. Liloba na greke oyo libongolami na “milimo minyokwami na makanisi” elimboli na polele mpenza, “baoyo bazali komituna lokola ete bazali mpamba”. Moto moko oyo ayekoli monoko ya greke alimboli liloba yango boye: “Moto oyo azali kooka mpasi oyo kosala ete motema na ye molembi.” Bolingo na ye esili bongo kokauka mpe asili kobungisa motuya na ye moko.—Tala Masese 17:22.
Mbele Yobo alobaki: “Nakembisaki bino na maloba na monoko na ngai.” (Yobo 16:15.) Liloba na hébreu oyo libongolami na ‘kokembisa’, lizali ntango mosusu kobongolama na ‘kolendisa’. Esalelami mpo na kolobela motindo oyo temple ‘ekembisamaki’ na nzela ya kobongisama. (Yisaya 41:10; Nahumu 2:1; 2 Ntango 4:13) Na lolenge mosusu, maloba na yo masengeli kotonga lisusu na mayele mpenza, bolingo na moto oyo anyokwami na makanisi, biliki mokomoko. Mpo na yango, esengeli na yo ‘kososola’ elongo na ye. (Baloma 12:1.) Nimero ya La Tour de Garde ya 1903 oyo toutaki kolobela na paragrafe moko eleki, elobaki boye na ntina na bato oyo banyokwami na makanisi: “Kozangaka. . .. elikya epai na bango moko, bazali na mposa ya kopusama na motema petee mpo na kosalela akoki oyo bazali na yango mpenza, mpo na kolendisama na bango moko mpe lisusu mpo na elamu ya baninga na bango nyonso kati na ondima.”
Ndakisa ezwami na Biblia, oyo ya Elekana mpe Hana, mwasi na ye oyo anyokwamaki na akanisi, ezali komonisa na malamu lolenge yo okoki kokembisa moto moko na maloba okola oyo Yobo asalelaki. Elekana azalaki na mwasi mibale. Moko kati na bango, Penina azalaki na bana mingi, kasi Hana azalaki ekomba. Boye Hana azalaki komiyoka ete azali na ntina te. (Tala Genese 30:1.) Lokola soko nde bozito yango ezali moke, mbanda na ye Penina azalaki na maloba mabe epai na ye, mpe Hana azalaki koyoka ata mposa ya kolia te. Atako Elekana yebaki mpenza te bozindo ya mpasi na ye, na komonaka ye bongo, atunaki ye boye: “Mpo na nini ozali kolela mpe ozali kolya te‘? Motema na yo etondi na mawa mpo na nini?”—1 Samwele :1-8.
Na kotunaka ye mituna wana ya bolingo kozanga kofunda ye, Elekana apesaki na Hana likoki ya kobimisa mayoki na ye. Na yango, ata ayanolaki to mpe te, yango esalisaki ye na kotalela mpo na nini azalaki komiyoka kozanga motuya. Bobele lolenge moko, moto anyokwami na makanisi akoki koloba boye: ‘Nazali bobele mpamba.’ Okoki kotuna ye boye: ‘Mpo na nini ozali na mayoki motindo wana?’ Mpe yokamela ye na likebi mpenza, nde ayebisi yo mpasi na ye ya motema.—Masese 20:5.
Elekana atunaki lisusu na mwasi na ye motuna oyo na kolendisa “Ngai moko nazali malamu epai na yo te koleka bana babali zomi?” Akundwelaki bongo Hana, bolingo nyonso oyo azalaki na yango mpo na ye atako azalaki ekomba. Hana azalaki na motuya na miso na ye, mpe akokaki bongo kosukisa boye: ‘Nazali eloko mpamba te mpo ete mobali na ngai alingi ngai mingi mpenza!’ Maloba ya Elekana makembisaki Hana, mpamba te azwaki lisusu mposa ya kolya mpe akendaki na temple.—1 Samwele 1:8, 9.
Baoyo balingi kosalisa moto oyo azali konyokwama na makanisi basengeli kosala lokola Elekana, oyo alobaki polele mpe amonisaki na mwasi na ye ete, azalaki na lotomo ya kozala na makanisi malamu mpenza mpo na ye moko. Na ndakisa, moklisto mwasi moko, Naomi, alimbolaki bongo nini oyo esalisaki ye na kozwa lisusu esengo: “Ebele na baninga na ngai baklisto bazalaki kopesa ngai longonya na lolenge na ngai ya kobokola mwana na ngai ya mobali; lolenge na ngai ya kobongisa ndako na ngai, ata mpe lolenge ya kobongisa nzoto na ngai atako nazalaki konyokwama na makanisi. Maloba wana na kolendisa masalisaki ngai mingi mpenza.” Na yango, longonya oyo lobongi ezali kosalisa molimo monyokwami na makanisi na kosepela na bizaleli na ye mpe na kozanga komimona eloko mpamba.
Soki mwasi na yo azali konyokwama na makanisi, mpo na nini te kolendisa ye na boyokani na maloba oyo ya Masese 31:28, 29? Totangi yango boye: “Mobali na ye akotelema mpe akosanzola ye . Bana basi mingi bamimonisi sembo, nde yo oleki bango nyonso.” Nzokande, ekoki kokoma ete mwasi oyo azali konyokwama na makanisi aboyi motindo ya longonya wana. Akoki kozala na mayoki oyo ete, azangi makoki mpo ete azali kokokisa te misala na ye ya ndako lokola alingi kosala. Na kokundwelaka ye lolenge nini ya mwasi oyo ye azali mpo na kitoko ya motema na ye, mpe lolenge nini ya mwasi ye azaláká liboso na kobela maladi wana, na ntembe te okokoka kondimisa ye ete longonya na yo ezali maloba mpamba mpo na kozimbisa te. Okoki lisusu koloba na ye ete, oyo ezali ye kosala sikawa, ezali kosɛnga na ye molende mingi. Okoki koloba boye: ‘Nayebi ete ezalaki na yo mpasi na kosala yango. Obongi mpenza na longonya mpo na milende na yo!’ Mpo ete akoka kozala lisusu na confiance epai na ye moko, azali na mposa makasi ya kondimama mpe ya longonya euti na mobali na ye mpe na bana na ye, baoyo bayebi ye malamu.—Tala 1 Bakolinti 7:33, 34.
Okoki ntango mosusu kosalisa moto oyo azali konyokwama na makanisi na kososola na nini asengeli kobongola lolenge na ye ya kokanisa na kotangaka bandakisa ezwami na Biblia. Ekoki ntango mosusu kozala moto oyo atungisamaka mingi mpenza na ntina na makanisi ya bato mosusu. Okoki kolobela ye likambo ya Epafolodite mpe kotuna ye boye: ‘Na likanisi na yo, mpo na nini Epafolodite anyokwamaki na makanisi wana eyokaki ye ete lisangá na ye lisilaki koyeba ete, ye azalaki na maladi? Azalaki mpenza moto oyo azangi makoki? Mpo na nini Paulo alobaki ete bolinga ye? Motuya ya bomoto ya Epafolodite ezalaki nde likoló na mikumba na ye na mosala?’ Mituna motindo oyo mikoki kosalisa moklisto oyo azali konyokwama na komisosola ye moko mpe na koyeba ete azangi makoki te.
“Bosunga bato bazangi nguya”
Biblia etindi ete: “Bosunga bato bazangi nguya.” (1 Batesaloniki 5:14, M.N.) Likambo ya kozala kati na lingomba ya solo ezali litomba mosusu, oyo ya kozala na baninga baklisto mingi baoyo bakoki komemela yo lisalisi malamu. Baninga ya solo ‘babotami mpo na ntango ya mpasi’ mpe bazalaka kokima te mpenza, moto oyo azali konyokwama na makanisi (Masese 17:17.) Na ntango ntoma Paulo ‘anyokwamaki’ mpe akomaki “kobanga”, akembisamaki “wana emonaki ye Tito” (2 Bakolinti 7:5, 6.) Bobele bongo, na ntembe te bato oyo bazali konyokwama na makanisi bakosepelaka mingi kotala bango to koloba na bango maloba ya kolendisa na nzela ya telefone na ntango malamu. Okoki kotuna ye soko ebongi kosalisa ye na kokendela ye etinda, na kosala misala ya ndako to makambo mosusu ya lolenge wana. Moklisto mwasi moko na nkombo Maria alobaki: ‘Na ntango nazalaki konyokwama na makanisi, moninga na ngai moko azalaki kokomela ngai mikanda mbala mingi.a Kati na mikanda na ye, azalaki ntango nyonso kotya mikapo ya Biblia oyo mizalaki kolendisa ngai. Nazalaki kotanga mpe kozongela kotanga lisusu mikanda yango esika moko na kolela. Mikanda yango mizalaki mpo na ngai eloko ya motuya monene.
Nsima na kolendisa basangani ya lisangá na kosalisa “milimo minyokwami na makanisi” ntoma Paulo alobaki na bango boye: “Bozala na motema petee epai na bato nyonso. Bokebaka ete moto azongisa mabe mpo na mabe te. (1 Batesalonike 5:14, 15.) Motema petee ezali na ntina monene, mpamba te soko oyo azali konyokwama na makanisi azali na elimo ya kolemba, soko azali na makanisi ya kozonga nsima to alɛmbi likoló ya kozanga mpongi akoki bongo koloba “maloba mazangi ntina” lokola Yobo. (Yobo 6:2, 3.) Rachel, moklisto mwasi moko oyo mama na ye azalaki konyokwama na makanisi alobi boye: “Mbala mingi ezalaki kokomela mama na kobimisa maloba mabe. Na ntango wana, nazalaki kosala molende ya komikundola motindo na moto nini mama azali mpenza—mwasi moko ya bolingo, na kosepelisa mpe mokabi. Nayekolaki ete bato oyo banyokwami na makanisi bakoki koloba makambo oyo euti mpenza na motema te. Na ntango yango soki okobimisa ntembe, kopesa eyano mabe te kosala likambo na nkanda, ekoleka nde komonisa bango mpasi.”
Baklisto basi oyo bateli bakoki mpenza mpo na komema lisalisi epai na basi mosusu oyo bazali na mpasi na makanisi (Tala 1 Timote 5:9, 10.) Baklisto basi oyo bazali na eksperiansi bakoki kosala molende ya kosolola elongo na bango na bantango oyo ebongi, mpo na kobondisa bango. Ntango mosusu, baklisto basi oyo bateli bakoki mpenza koleka baklisto mibali mpo na oyo etali kopesa lisalisi oyo mwasi moko azali na yango mposa. Na kobongisaka makambo mpe na kosenzelaka ete makambo yango masalama na lolenge ebongi; bankulutu bakosala nyonso mpo ete bato banyokwami na makanisi bazwa lisalisi oyo bazali na yango mposa.
Bankulutu na maloba malamu
Babateli na mpate ya elimo basengeli mpenza kozala na “boyebi mpe bososoli” soko balingi ‘koyeba lolenge nini kolendisa na maloba moto oyo alembi’. (Yilimia 3:15; Yisaya 50:4.) Nzokande, soko nkulutu akebi te, akoki kobakisa mpasi ya moto oyo azali konyokwama na makanisi na kozanga kokana yango. Na yango, baninga misato ya Yobo bakanisaki lokola ete bakendaki mpo “na kolela na ye elongo mpe kobondisa ye”. Kasi maloba na bango mapusamaki na kozanga boyebi likoló na mpasi ya Yobo eyaki nde ‘kotutatuta ye’ na esika ete elendisa ye.—Yobo 2:11; 8:1, 5, 6: 11:1,13-1; 19:2.
Masolo ndenge na ndenge ya mikanda ya la société Watch Tower ezali komonisa mitinda oyo mikoki kosalelama mpo na kopesa toli na moto. Mingi na bankulutu bazali kozwa matomba na mitinda yango. Kasi ntango mosusu, maloba ya bankulutu oyo mazangi bososoli malamu ezala na nkuku to kati na diskur—esili kosala mabe mingi. Yango wana nkulutu akosezele na koboya koloba na motindo na ’’kozokisa okola mopanga”, kasi akoloba nde na ‘lolemo ya bato na mayele, oyo eyebi kobikisa’. (Masese 12:18, M.N.) Soko akososola eloko nini maloba na ye ekoki kobimisa, liboso na koloba, akozala na maloba ya kolendisa. Na yango, bankulutu, boyokamela noki mpe bowelaka te kozongisa eyano liboso na koyeba mobimba ya likambo.—masese 18:13.
Na ntango bankulutu bazali solo komibanzabanza mpo na bato oyo bazali konyokwama na makanisi, bato yango bakoki komiyoka ete balingami mpe bazali eloko mpamba te. Motindo na bolingo wana ekoki kobosanisa bango makambo oyo mazali kolembisa. (Yakobo 3:2.) Bato oyo bazali konyokwama na makanisi bazali mbula mingi kotungisama na mayoki lokola soko ete basalaki mabe mpe bankulutu bakoki kosalisa bango na kozala na etaleli malamu na likambo yango. Ata soko lisumu monene lisili kosalema, lisalisi ya elimo lipemami na bankulutu ekoki kosala ete ‘motengumi abika’.—Baebele 12:13.
Na ntango bato oyo bazali konyokwama na makanisi bazwi mayoki oyo ete mabondeli na bango mazali na ntina te, bankulutu bakoki kobondela elongo na bango mpe mpo na bango. Na kotangaka elongo na bango masolo ya Biblia oyo nataleli konyokwama na makanisi, bakoki ‘kopakola’ bango na maloba ya elimo na kolendisa. (Yakobo 5:14, 15.) Bakoki lisusu kosalisa bango na kosala oyo Makomami elobeli mpo na kosilisa mokakatano moko oyo bakoki kozala na yango na ndeko mosusu, soki bazali kokoka kosala yango te. (Tala Matai 5:23, 24; 18:15-17.) Mbala mingi ezalaka matata kati na libota, yango nde ezali kopesa bamosusu mpasi ya konyokwama na makanisi.
Toyeba ete, esengeli ntango mpo na kobika na konyokwama na makanisi. Ata maloba na bolingo ya Elekana ebikisaki Hana mbala moko te. Ezali mabondeli na ye moko, mpe maloba ya kolendisa oyo ya nganga monene nde esalisaki ye na nsima (1 Samwele 1:12-18.) Na yango, zala na motema petee soko omoni ete kobika ezali koya noki te. Na solo, lokola bankulutu bazali bango nyonso minganga te, bakoki bongo komona ete milende na bango mikoki te na makambo mosusu. Na boyokani na libota ya moto oyo azali konyokwama na makanisi, bankulutu bakoki bongo kolendisa moto yango na koluka lisalisi ya monganga. Soko yango esengeli bankulutu to basangani ya libota bakolimbola polele mpenza na monganga ntina ya kotosa bindimeli ya lingomba ya moto oyo azali konyokwama na makanisi.
Lokola mokili ya sika etyami naino te, moto moko te akozala na kolongono ya nzoto ya kokoka, ezala na nzoto, na makanisi to na mayoki. Na kozelaka, baklisto oyo bazali kobungisa esengo na bango likoló ya konyokwama na makanisi, bakoki kozwa nguya bobele na lisangá na boklisto te, kasi lisusu epai ya Tata na biso ya Likoló, “oyo akopesaka mpiko na baoyo basili kolemba”—2 Bakolinti 7:6, Français courant.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Tala lisolo “Vaincre la dépression—ce que les autres peuvent faire”, oyo ebimaki kati na nimero ya Réveillez-vous! ya 8 Novembre 1987, lokasa 12 kino 16.
[Etanda na lokasa 29]
NDENGE NINI KOZALA NA MALOBA NA KOBONDISA
□ YOKAMELA NA LIKEBI NYONSO—Mituna ya mayele ezali kopesa nzela na ‘koyeba’ mayoki mozindo ya moto. Yokamela noki mpe kowela te na kozongisa eyano liboso na koyeba mobimba ya likambo.—Masese 20:5, 18:13
□ OMITYA NA ESIKA YA BAMOSUSU—‘Omitya na esika ya mozalani’ mpe zala na ‘boboto’ na ntango oyo ozali komeka koyeba mayoki ya moto azali konyokwama na makanisi. ’Lela elongo na oyo azali kolela.’—1 Petelo 3:8; Baloma 12:15.
□ ZALA NA MOTEMA—Petee-kosolola mbala mingi ekoki ntango mosusu kozala na ntina. Zala na motema pete. Kolanda te ’maloba mazangi ntina’ oyo moto anyokwami na makanisi akoki kobimisa mpo ete ayoki nkanda.—Baloma 6:3.
□ ZALA NA MALOBA YA—Kolendisa-salisa moto oyo azali konyokwama na makanisi na kosepela na bizaleli na ye. Pesa ye longonya na makambo ya sikisiki. Monisa ye ete mikakatano, mabe ya kala to mabunga ekosilisaka valɛrɛ ya moto te. Limbola ye mpo na nini Nzambe alingi ye mpe azali kobatela ye.—Yobo 16:5.