Nani akokamba bato epai na kimya?
LOKOLA bato bakoki kotya kimya te, yango elimboli ete tokozwa kimya lisusu te? Te. Lokola Satana, oyo aleki biso na nguya, azali epekiseli ya nsuka mpo na kimya awa na mabelé, Moto mosusu oyo azali na nguya koleka ye lisusu, nsuka na yango akokamba bato epai na kimya. Biblia, oyo ezali koloba mpo na Satana, ezali mpe kolobela mpo na Moto yango. Biblia elobi: “Bokonzi ekozala likolo na lipeka na ye. Akobyangama na nkombo ete, Mopesi toli na kokamwa, Nzambe na nguya, Tata na seko, Nkolo na kimya.” (Yisaya 9:6, 7; MN) Nkolo na kimya yango ezali nani? Ezali Yesu Klisto, mpe abongi mpo na yango koleka bato nyonso. Na ndimbola nini?
Azali na makoki oyo eleki ya bato
Ya liboso, liwa ezali na nguya likoló na Yesu te. Ezali solo ete azalaki moto mpe akufaki lokola mbeka. Kasi, na nsima, asekwisamaki mpo na bomoi na likoló kozanga kokufa, mpe ezali na kati na ezalela wana nde akomi Nkolo na kimya. Ezali mpo na ntina yango esakweli elobi: “Bokonzi na ye ekozala na nsuka te.” (Luka 1:32, 33). Na kokesana na mokonzi ya Orient Asóka, Yesu akozala na bomoi seko, yango ezali ndanga ete mosala na ye malamu ekobebisama te na bakitani oyo bazali na makoki moke.
Lisusu, Yesu azali na masumu te, mpe boyangeli na ye etongami likoló na mayele mpe mitinda ya sembo ya Nzambe. Mosakoli Yisaya asakolaki ete: “Mpe elimo na Jéhovah ekofanda epai na ye, elimo na mayele mpe na bososoli, elimo na toli mpe na bokasi, elimo na boyebi mpe na kobanga Jéhovah; . . . akosambisa te kobila oyo emonani na miso na ye, akokata te kobila oyo eyokani na matoi na ye. Kasi na boyengebene akosambisa babola.” (Yisaya 11:2-4). Na bokeseni na Mindele na bikeke bilekaki, Yesu akobatela kimya epai na ye te mpo na kosala bitumba bipai mosusu. Na nse na boyangeli na ye, kimya ekozala bipai binso.
Lisusu, Yesu azali na nguya ya kotya kimya. Esakweli elobi ete “elimo na Jéhovah, . . . elimo na toli mpe na bokasi”, efandi epai na ye. Elimo na Nzambe esalaki mosala mpo na kozalisama na molongo mobimba, mpe mpo na misala nyonso na nguya mpe na sembo oyo Biblia ezali kolobela. Ata Satana, motemeli monene, akoki kolonga te nguya ya elimo na Nzambe.
Makambo mazali komema epai na kimya
Ndenge nini Yesu akokamba bato epai na kimya? Mbala mosusu okokamwa na koyoka ete asili kobanda kosala yango. Mokanda na esakweli na Emoniseli (to Apokalypse) emonisi biso Yesu azali kozwa bokonzi na likoló epai na Nzambe. (Emoniseli 11:15). Soki tozali kotalela na mozindo bisakweli na Biblia mpe tozali kokokanisa yango na makambo mazali koleka na ntango na biso, tozali komona ete kotyama na Yesu lokola Mokonzi na makoló esalamaki na 1914. (Matai 24:3-42). Ezalaki litambe monene oyo ememaki na kotyama na kimya na mabelé.
Soki yango ezali, mpo na nini Etumba ya Liboso ya Mokili mobimba ebandaki na 1914? Mpe mpo na nini bitumba oyo bibomaki bato mingi na Lisolo na bato bisalami na ekeke na biso? Ezali mpo ete likambo ya liboso oyo Mokonzi na likoló asalaki ezalaki ya kobengana Satana na makoló mpo na libela, mpe kobwaka ye zingazinga na mabele. Ebimisaki likambo nini? Esakweli elobi: “Mawa na mokili mpe na mai monene, mpamba te Satana akiteli bino na kongala mingi, awa eyebi ye ete azali na mwa elaka mokuse.” (Emoniseli 12:7-12). Bitumba minene na ekeke na biso bizali mpo na nkanda ya Satana. Kasi simba likambo oyo malamu: nkanda ya Satana ezali mpo “na mwa elaka mokuse.” Mosika te mpasi ekosila.
Nzokande, liboso na nyonso wana, Nkolo na kimya azwi bibongiseli mosusu ya ntina mpo na kotya kimya. Ya yambo, bato basengeli koyeba mokano na Nzambe oyo etali kotya kimya na nsima na Klisto. Ezali mpo na ntina yango nde Yesu asakolaki ete na mikolo na biso ‘nsango malamu oyo na bokonzi ekosakolama na mokili mobimba, lokola litatoli na mabota nyonso’. (Matai 24:14.) Sikawa, ba Témoins de Jéhovah bazali kosakola sango malamu na Bokonzi na mokili mobimba, mpo na kokokisa esakweli yango.
Lisusu, bato na mitema malamu basengeli koteyama kati na banzela ya kimya. Biblia epesi elaka oyo: “Bana na yo nyonso bakoteyama na Jéhovah, mpe kimya ya bana na yo ekozala mingi.” (Yisaya 54:13 MN). Uta sikawa, bamilió na bato na mitema malamu bazali kozwa mateya yango.
Likambo oyo ekolanda
Ntango ekomi sikawa pene mpo na koleka na likambo mosusu monene oyo ekomema na kotyama ya kimya. Likambo yango ezali nini? Ezali likambo moko oyo bato mingi bayebi nkombo na yango, kasi bato moke nde bayebi mokano na yango ya solo. Biblia ezali koloba mpe na “etumba na mokolo monene na Nzambe Mozwi—na-nguya-Nyonso”, to Armagedon. (Emoniseli 16:14, 16). Bato mingi bazali kokanisa ete Armagedon ekozala etumba ya nikleere oyo ekoboma mokili. Nzokande, ezali kokotela nokinoki na Yesu. Nkolo na kimya, mpo na kosala mbongwana ya ntina mpo na kotya kimya.
Ya yambo, na Armagedon moto nyonso oyo azali kotia nkaka mpo na kimya akobomama. Esakweli ya Nzembo 37:10 elobi: “Nsima na mwa ntango moke, moto na mabe akozala lisusu te; okotala esika na ye, nde ekomonana te.” Ya solo, Yesu akoboma “bato mabe” nyonso na mabelé, elingi koloba baoyo bazali kobundisa bitumba, babomi, ba terroristes, mpe baoyo nyonso bakoboya kotosa Nkolo na kimya. Bakozala lisusu na lotomo ya kozala na bomoi likoló ya etando na biso te.—Emoniseli 19:19-21.
Lisusu, na Armagedon esakweli oyo na Danyele ekokokisama: “Mpe na mikolo na mikonzi yango, Nzambe na likoló akotelemisa bokonzi bokobebisama soko moko te, mpe bokonzi yango ekopesama na bato mosusu te; ekobuka mpe ekosilisa makonzi oyo nyonso mpe ekotikala lobiko na lobiko.” (Danyele 2:44). Bokabwani na bikolo, oyo mbala mingi ezali ntina na bitumba mingi, ekosila. Na nsuka, ekotikala bobele boyangeli moko na mokili mobimba oyo ekotambwisama na mokonzi oyo tokoki kotyela ye motema.
Ntango nini etumba na Armagedon ekosalema? Biblia ezali koyebisa mokolo te, kasi makambo mazali koleka na mokili, oyo mazali kokokisa bisakweli, mamonisi ete etumba yango ekosalema mosika te. Biblia esakoli polele likambo oyo ekosalema liboso mpenza. Ntoma Paulo alimboli ete: ‘Ntango bakoloba ete: “Kimya ezali, makambo mazali te!’’ wana libebi ekokwela bango pwasa.’ (1 Batesaloniki 5:3). Lisusu, mbala moko nsima na libebi ya pwasa oyo ekokokisama na Armagedon, epekiseli monene mpo na kimya ekolongolama. “Mwa elaka mokuse” na Satana ekosila, mpe akokangama mpo atungisa lisusu bato te. (Emoniseli 20:1-3). Oyo nde kimya!
Mokili ya kimya
Kanisa ndenge makambo makozala na ntango wana. Mokomi na nzembo asakolaki: “Bato na bopolo bakosangola mokili, bakosepela mpe na kimya na solo.” (Nzembo 37:11). Bato oyo na bopolo bakolandela kokokisa esakweli kitoko oyo na Yisaya: “Bakotula mipanga na bango ete mizala bitimweli mpe makonga na bango ete mazala bikateli na matiti. Libota moko bakotombwela libota mosusu mopanga te, bakoyekola etumba lisusu mpe te.”—Yisaya 2:4.
Na nsuka, mpo na mbala ya liboso uta Edene, bato nyonso bakopambolama na Jehovah, mpe ye akokokisa elaka oyo: “Tala, efandelo na Nzambe ezali na bato esika moko. Akofanda na bango esika moko, mpe bango bakozala bato na ye, mpe Nzambe ye mpenza akozala na bango elongo.
Akolongola mpisoli nyonso na miso na bato, mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa na kolela, na mpasi ,lisusu mpe te.mpo ete makambo na liboso masili koleka.’’—Emoniseli 21:3, 4.
Elikya ya solo
Na yango nani akokamba bato epai na kimya? Ezali Yesu klisto Nkolo na kimya nde aponami mpo na yango. Ezali elikya ya solo mpo na biso? Soki bisakweli na Biblia ezali solo te, elikya ya kimya ekokaki kozala te. Bato bakoki kolandela kobunda mpe kobomana mikolo nyonso. Kasi Biblia ezali solo mpe Bokonzi na Nzambe, oyo etambwisami na Klisto, ekomema kimya mpenza. Tozali kolendisa yo kotia likebi na sango malamu na bokonzi oyo ba témoins de jehovah bamemeli yo epai na yo, mpe na kokata likambo moko. Na yango, ntango ekoya, okozala kati na bato na bopolo baoyo bakosangola mokili,baoyo bakosepela mpe na kimya na solo.
Elikya ya kimya oyo elobelami kati na lisolo oyo ezwami na Biblia. Na mikolo na biso, wana ete bato mingi bazali kondima Biblia lisusu te, okoki komituna soki elikya yango ezali ya solo mpenza. Ba Témoins de Jéhovah bandimi yango na motema moko. Bazali kotalela Biblia lokola Liloba lipemami na Nzambe mpe, na bongo, ekoki mpenza kotyelama motema. Na 1989, babimisaki mokanda La Bible: Parole de Dieu ou des hommes? oyo ezali komonisa bilembeteli mingi ete Biblia epemami na Nzambe. Makambo mosusu mazwami na mokanda yango matalelami na nkasa 11 kino 21, kati na masolo mibale ya boyekoli, oyo tosengi na yo kotanga.
Makambo mingi matali elaka na Biblia mpo na kimya makopesama kati na lisolo “Kimya ya mokili mobimba: Ekolimbola nini mpenza?”, ekobimisama na nimero ya Mosenzeli’ ya le 15 Avril 1990.
[Likanisi ya paragrafe on page 8]
Bobele Yesu nde azali na makoki masengami mpo na kokamba bato epai na kimya.
[Likanisi ya paragrafe on page 9]
Lelo nsango malamu na Bokonzi esakolami na mokili mobimba.