Ndenge nini moto azali kobebisa mabele?
Eleki mbula 300, bomoi ya moto ekangamaki mingi na biloko oyo Nzambe asili kozalisa. Na yango, bomoi na ye ezalaki na likama te lokola ezali lelo mpo na mbongwana oyo ye moko asali na ezingelo na ye. Kotongama ya bamasini ndenge na ndenge ebandaki naino te. Biloko oyo bizali kobebisa mopepe lokola ba centrales baizine, mituka ezalaki te. Moto akokaki kokanisa te ete mokolo moko akobebisa etando mobimba.
Nzokande, ata na ntango yango, likebisi epesamaki mingi na ntina na kobebisama ya etando mobimba. Likebisi yango ekomamaki na mokanda ya nsuka ya Biblia, mpe ezalaki kosakola ntango oyo Nzambe akokotela makambo na bato mpo na “kobebisa babebisi na mokili”.—Emoniseli 11:17, 18.
Mpo na baoyo bazali komitungisa na lolenge oyo moto azali kobebisa mokili, ezali elendiseli na koyeba ete Mozalisi na etando na biso kitoko akobikisa yango! Kasi, okoki komituna ete: ‘Mokili esili mpenza kobebisama kino ete ezali ntina mpo na Nzambe akota na likambo yango?’ Na yango, tala ndenge makambo mazali mpe okata likambo yo moko.
Zamba
Zámba ezali kobongisa mabelé mpe ezali kopesa bilei mpe esika ya kolala mpo na bikelamu mingi na bomoi. Wana banzete ezali kobota mpe ezali kobimisa bilei, ezali mpe kokokisa misala mosusu ya ntina mpo na bomoi; na ndakisa, banzete ebendaka mopepe oyo ebebi (gaz carbonique) mpe ezali kobimisa mopepe kitoko (oxygène). Mokanda National Geographic elobi mpo na yango ete “ezali nkisi mpo na mopepe oyo ezali kokóma móto, oyo ezali likama mpo na bikelamu nyonso na bomoi na mabelé.”
Nzokande, moto azali se kobebisa zámba oyo ezali libula na ye. Na Amérique du Nord mpe na Mpoto to Europe, zamba ezali kokufa mpo na kobeba ya mopepe. Zámba na mikili oyo moi ezali makasi, ezali kokatama mpo na kokokisa mposa ya bamboka oyo ezali na bamasini mingi. Zulunalo moko ya Afrike elimbolaki ete, mpo na 1989, “bakanelaki kotinda tonne 66 milió (ya mabaya) 48 na mokili ya Japon mpe 40 na mokili ya Mpoto”.
Lisusu, na bamboka mosusu, basali na bilanga bazali kotumba bazamba mpo na kozwa mabelé ya kosala na yango bilanga. Kasi mabelé ya zámba mazali kobeba noki mpo na kobotisa elanga, mpe basengeli bongo kotumba bisika mosusu ya sika. Emonani lokola ete na boumeli na ekeke ya ntuku mibale, ndambo na zámba ya mokili esili kolimwa.
Mai na monana (océans)
Mai na monana (océans) ezali mpe na mosala monene mpo na kopetola mopepe; kasi misala ya moto mizali kobebisa yango. Mai na monana (océans) ezali komela mopepe mingi ya mabe (gaz carbonique), mpe phytoplancton (banzete to banyama ya mikemike na kati ya océan) ezali kobimisa mopepe kitoko (oxygène). George Small alimboli ntina na mbongwana yango na bomoi na maloba oyo ete: “70 % ya oxygéne oyo ezali kokota na mopepe mbula na mbula euti na plancton ya mai na monana.” Nzokande, bato mosusu ya sianse bazali kosakola ete boike ya phytoplancton ekokita mingi mpo ete ozone (eboke ya mopepe oyo elembisaka nguya ya moi) esili kokoma moke. likambo oyo lisalami na bato.
Lisusu, bato bazali kobwaka bosoto kati na ba océans, pétrole mpe ata basalité euti na ba izine. Wana bamboka mosusu bazali koyokana mpo na kotya ndelo na boike ya basalité oyo ebimi na ba izine oyo epesameli nzela ya kobwaka na mai na monana, bamboka mosusu bazali koboya. Mboka moko ya Mpoto emipesaki nkutu lotomo ya kosopa basalité ya nikleere na la mer. Moyekoli na lokumu na makambo na mai na monana, Jacques-Yves Cousteau, apesaki likebisi oyo: “Soki tolingi kobikisa mokili, mokumba na biso ya liboso ezali ya kobikisa ba océane (mai na monana).”
Mai na komela
Bato bazali kobebisa ata mai oyo bakoki komela! Mbula nyonso, na bamboka na bobóla, ebelé na bato bazali kokufa mpo na mai oyo ebebisami. Kati na bamboka na bozwi mingi, maziba na mai mabebisami na biloko lokola, bankisi mpo na kobotisa mabelé mpe bankisi mpo na koboma banyama mike oyo babebisaka milona na bilanga, bankisi oyo ezali kosopana na bibale mpe kokota na nsé na mabelé esika oyo maziba na mai mazali. Na 1986, kati na mokili mobimba basalaki batone 2,3 millions ya bankisi yango mpe, engebene ba rapports, mosala yango ezali na bokoli ya 12 % mbula na mbula.
Bisika oyo bazali kobwaka salité ya bankisi ezali mpe liziba ya kobeba ya mopepe, mai mpe mabelé. Zulunalo Scientific American elimboli boye: “Batonó (mangungulu) na manzanza oyo ezali na basalite ya bankisi ezali solo ba bombes oyo ekopasuka mokolo batonó yango ekobeba.” Zulunalo yango ebakisi ete, motindo oyo na kobebisa mabéle, mopepe to mai, ezali ndenge moko “na bisika ebele oyo bazali kobomba salité ya bankisi kati na mokili mobimba”.
Yango ebimisi nini? Na mabelé mobimba bibalé oyo kala bizalaki na mai ya peto, ekomi bimemeli minene ya basalité ya ba izine. Na ndakisa, bakanisi ete mindele 20 milió ya Mpoto bazali komela mai ya ebale Rhin, nzokande ebale yango esili kobeba na boye ete zelo na yango ya kati ekómi likáma mpo na kosalela yango.
Metode ya sika ya kosala bilanga
Bato bazali kobebisa ata mabelé ya kosala na yango bilanga na lolenge oyo ezali kobangisa Engebene zulunalo Scientific American, bobele na Etats-Unis mpamba, 20 % ya mabelé oyo babongisaki mpo na kosala na yango bilanga ebebisamaki. Mpo na nini? Mpo ete nzela batimolaki mpo na komema mai, ememaki mai mingi mpe epesaki móngwa mingi na mabelé. Na kosaláká bongo bamboka mingi ebebisaki bitando minene na mabelé oyo ezalaki kobota. Mokanda The Earth Report elobi: “Mabelé mingi sikawa mazali kobota te na ntina na móngwa mpo ete mabelé ezali kobota sikawa na nzela ya metode ya sika ya komwangisa mai.” Mokakatano mosusu oyo mopalangani ezali oyo ete matiti mazali kosila na ntina na bibwele mingi, likambo yango ezali kobakisa mabelé mazangi nzete to désert.
Mituka mileki mingi
Tala lolenge oyo mabelé mpe mai na etando na biso ebebisami. Kasi, ezali ndenge nini mpo na mopepe? Yango mpe esili kobebisama mpe bato mingi babebisi yango. Topesa ndakisa ya mituka. Bazulunalo misato ya makambo ya sianse, oyo eyebani mingi epesaki makebisi oyo: “Mituka mizali kobebisa mingi mopepe koleka mosala mosusu nyonso na moto.” (New Scientist). “Na mokili, mituka mizali sikawa koleka 500 milió . . . Mizali kosalela pene na ndambo na misato ya petrole oyo ezali kobimisama na mokili . . . Bokóli na motuya ya mituka eleki oyo ya bato.” (Scientific American). “Essence ezali ntina monene ya kobeba ya ezingelo na biso mpe ya bamaladi, kobanda na ntango bazali kobenda yango na mabelé, ntango bazali kosalela yango mpe ntango ekobebaka.”—The Ecologist.
Ntembe ezali te ete, etando na biso ezali kosalelama na ndenge mabe, ezali kobebisama. Mai na monana, mai kitoko mpo na komela, mabelé na yango mpo na milona mpe ata mopepe na yango nyonso ebebisami mpenza. Ya solo, yango ekoki mpo na komonisa ete, sikawa ntango ekomi pene oyo Nzambe akokótela mpo na “kobebisa babebisi na mokili”. (Emoniseli 11:18.) Kasi, mabelé ebebisami na makambo mosusu mabe koleka. Totalela yango soki ezali nini.
[Likanisi ya paragrafe on page 4]
’’Soki tolingi kobikisa mokili mokumba na biso ya liboso ezali ya kobikisa ba océans.” jacques Yves Cousteau.