Topambola nkombo mosantu na Jehovah!
“Monoko na ngai ekosanzola Jéhovah; tika mpe mosuni nyonso epambola nkombo na ye na bulee, lobiko na lobiko.”—NZEMBO 145:21.
1, 2. (a) Motindo nini Satana abetaki ntembe na boyangeli na Nzambe? (b) Mituna nini mizwi eyano kati na Nzembo 145:11-21?
NTEMBE moko ezali te ete Jéhovah azali Moyangeli ya molongo mobimba. Kasi,Satana asili kobeta ntembe na boyangeli mpe na lotomo na Nzambe mpo na koyangela (Genese 2:16, 17; 3:1-5) Diable asili mpe kobeta ntembe mpo na bosembo ya basaleli nyonso na Nzambe ezala na likoló to na nse. (Yobo 1:6-11; 2:1-5; Luka 22:31) Na bongo, Jéhovah atikaki ntango mpo ete bikelamu na ye ya mayele bikoka komona mbuma mabe ya botomboki epai na bokonzi na ye mpe bamonisa nini ezali etelemelo na bango kati na makambo yango.
2 Nzembo 145 ezali kosalisa biso na kozwa etelemelo makasi na ngambo ya boyangeli na Nzambe. Ndenge nini? Davidi alobi nini na ntina na bokonzi na Jéhovah? Mpe ndenge nini Nzambe azali kotalela bato oyo bazali kosala mpo na bokonzi yango? Biyano kitoko bipesami na mituna oyo kati na Nzembo 145:11-21.
Toloba mpo na bokonzi na Jéhovah
3. Soki bokonzi na Jéhovah ezali na motuya epai na biso, likambo nini tosengeli kosala?
3 Bokonzi na Jéhovah ezalaki na esika ya liboso kati na makanisi ya Davidi, ye oyo akomaki ete: “Bakoloba mpo na nkembo na bokonzi na yo, bakosakola mpo na nguya na yo, mpo na koyebisa bato misala na ye na nguya mpe nkembo na bokonzi na ye.” (Nzembo 145:11, 12) Tokolobaka na ntina na biloko oyo tozali kosepela na yango. Na ndakisa, moto moko akoki koloba mpo na libota na ye, ndako na ye mpe mbuma na ye oyo auti kobuka. Yesu alobaki ete: “Moto malamu abimisi mpo malamu kati na makambo malamu mabombami na motema na ye.” (Luka 6:45) Soki boyangeli na Nzambe ezali na motuya mpo na biso, tokosambela mpo ete Bokonzi na ye eya, mpe tokoloba epai na bazalani na biso mpo na boyengebene mpe kimya oyo ekozala na nse na boyangeli yango. Tokokumisa Jéhovah, “Mokonzi na seko”, mpe tokoloba mpo na bokonzi na ye, oyo ekomonisama na nzela na Bokonzi na Masiya, Mwana na ye molingami, Yesu Klisto. (Emoniseli 15:3; Yisaya 9:6, 7) Ezali libaku moko kitoko mpenza mpo na koloba na ntina na nkembo na likoló ya bokonzi na Jéhovah, oyo ekomonana mosika te kati na bonzenga ya paradis na mabelé oyo ekotonda na bikelamu oyo bazali mpenza na esengo ya kokoka.—Luka 23:43.
4. Ntango nini tozali na likoki ya koloba mpo na “nguya” ya Jéhovah, mpe nini ezali kosunga biso kati na mosala yango?
4 Botondi na biso ekopusa biso mpe na koloba mpo na “nguya” ya Jéhovah. Atako azali “monene na nguya,” asalelaka yango na lolenge mabe te. (Yobo 37:23) Asalelaki nguya na ye mpo na kozalisa mabelé mpe moto, mpe akosalela yango mpo na koboma bato mabe. Tozali na likoki ya koloba mpo na nguya na Nzambe ntango tozali kosakola nsango malamu. Bongo, bozali na botondi te lokola Liziba monene wana na nguya azali kopesa biso makasi ya kokokisa mosala yango? (Yisaya 40:29-31) Ee, biso baoyo tozali ba Témoins de Jéhovah, tosungami na nguya mpe na elimo na Nzambe kati na mosala ya bulee. Ezali bobele na nzela ya lisungi wana nde nsango na Bokonzi esakolami sikawa na molende moko ya kokamwa kati na mokili mobimba.—Nzembo 28:7, 8; Zakaria 4:6.
5. Lokola “misala na nguya” ya Jéhovah miyebani te epai na bato mingi, likambo nini esengeli na biso kosala?
5 Tosengeli koyebisa epai na bato “misala na nguya” ya Jéhovah, kolandaka ndakisa ya Bayisraele oyo bazalaki koloba epai na bana na bango ndenge Nzambe abikisaki bango na boombo kati na Ezipito. (Exode 13:14-16) Bato bazali kotonga bamonima mpo na lokumu ya bato oyo basalaki makambo oyo bango bazali komona ete ezali ya kokamwa, kasi bato boni bayebi misala na nguya ya Nzambe? Molimboli moko ya Biblia akomaki boye: “Bazali kokoma misala ya bilombe na bango likoló na etanda na kwivre, kasi misala na nkembo na Jéhovah mikomami likoló na zelo, mpe na boumeli ya mikolo mizali kolimwa kati na boongó na bato.” Ya solo, atako mingi bayebi yango te, nzokande misala yango milimwe te. Ntango tozali kosakola ndako na ndako, ntango tozali kotambwisa boyekoli na Biblia, to mpe na mabaku mosusu, toloba na molende nyonso mpo na misala na nguya ya Nzambe.
6. (a) Esili koleka mbula mingi, na libaku nini molende oyo tozali kokokisa na yango mosala na biso mpo na Nzambe emonisamaki mpenza polele? (b) Na mokuse, nini elobamaki na 1922 na ntina etali kosakolama ya Bokonzi?
6 Tosengeli mpe koyebisa na molende nyonso nkembo ya bokonzi na Nzambe. Molende mpo na mosala ya Bokonzi yango emonanaki mpenza na 1922, ntango, Joseph Rutherford, wana ezalaki ye prezida ya la Société Watch Tower, alobáká na bayoki oyo bayanganaki mpo na likita na mboka cedar Point (Etats-Unis) ete: “Kobanda 1914 Mokonzi na nkembo azwaki nguya na ye . . . Bokonzi na likoló ebelemi; Mokonzi azali koyangela; boyangeli ya Satana ekwei; bamilió na bato oyo bazali na bomoi lelo bakokufa te. Bondimi yango? . . . Soki ezali boye, bozonga na elanga, bino, bana na Nzambe oyo—aleki—likoló! Bolata molato na bino ya etumba! Bozala na bokatikati, bosenzela, bolemba te, bozala na nguya! Bokenda liboso kati na etumba kino esika nyonso ya Babilone ekokóma esobe. Bopalanganisa nsango na bisika nyonso. Mokili esengeli koyeba ete Jéhovah azali Nzambe mpe Yesu Klisto azali Mokonzi na bakonzi mpe Nkolo na bankolo. Oyo ezali mokolo eleki mikolo nyonso. Tala, Mokonzi azali koyangela! Bino bozali basakoli na ye. Yango wana: Bosakola, bosakola, bosakola mokonzi mpe bokonzi na ye.”
7. Mayoki na biso masengeli kozala nini epai na mosala na biso lokola basakoli na Bokonzi?
7 Oyo nde esengo na ‘kokanisa na nkombo na Nzambe’, na koloba epai na bazalani na biso mpo na boyangeli na ye mpe kosakola Bokonzi na Masiya, Mwana na ye molingami! (Malaki 3:16) Biso baoyo tozali basakoli mpe bakoteli na Bokonzi, tozali kosepela na libaku oyo tozali na yango mpo na kosakola nsango malamu mpe kobalola mitema ya bazalani na biso epai na Nzambe, epai na Klisto mpe epai na Bokonzi. Tosengeli kozika na mposa ya koloba zingazinga na biso mpo na nkembo monene ya bokonzi na Jéhovah.—Tala Yilimia 20:9.
8. (a) Na nini boyangeli na Jéhovah emonisami lelo? (b) Mpo na nini tokoki koloba ete Nzambe azali kosalela bokonzi na ye kino “mabota na mabota”?
8 Tosengeli komiyoka ete topusami na kosakola Bokonzi na Nzambe na molende makasi, mpamba te Davidi alobi lisusu ete: “Bokonzi na yo ezali bokonzi na seko, mpe nguya na yo ekoumela mabota na mabota.” (Nzembo 145:13) Na kolandaka kokanisa likoló na boyangeli na Jéhovah, mokomi na nzembo akomi kosalela ebengeli “yo” na esika ya kosalela ebengeli “ye,” kotindaka‘bongo libondeli na ye mbala moko epai na Nzambe. Ya solo, boyangeli na Jéhovah oyo emonisami na Bokonzi na Masiya ezwi esika na bokonzi na seko na Nzambe te. Mpamba te ntango bato na botosi bakokóma na ezalela ya kokoka, Klisto akozongisa Bokonzi epai na Tata na ye. (1 Bakolinti 15:24-28) Nzambe azali bongo na bokonzi kino “mabota na mabota.” Jéhovah azalaki Mokonzi ntango Adam azalisamaki mpe akosalela libela bokonzi na ye likoló na bato na sembo.
9. Kati na Nzembo 145, ezali boni mpo na verset oyo ezali kobanda na likomi ya liebele noun?
9 Kati na makomi ya ba massorétes (bato oyo bazalaki na boyebi ya kolimbola makomi na liebele), loyembo oyo ezali ata na verset moko te ebandi na likomi ya liebele noun. Nzokande, na boyokani na la Septante (libongoli na monoko ya greke), na la Peshitto (libongoli na monoko ya siriaque) mpe la Vulgate (libongoli na monoko ya latin), ezali kotongama kati na makomi na kala na monoko na liebele ete: “Jéhovah azali sembo kati na maloba na ye nyonso mpe azali sembo kati na misala na ye nyonso.” (Traduction du monde nouveau, ebimeli ya Anglais oyo ezali na mitindami, note). Nzambe azali kokokisa bilaka na ye nyonso mpe azali “sembo” epai na baoyo bazali kosepela na boboto na ye.—Yosua 23:14.
Lisungi na Jéhovah ezangaka te
10. Ndenge nini Nzambe azali ‘kosunga biso’?
10 Mokonzi na seko akangaka miso te liboso na mpasi ya basaleli na ye. Yango wana Davidi akokaki koloba ete: “Jéhovah akosimbaka baoyo nyonso (bakwei) mpe akotelemisa baoyo nyonso bangumbami.” (Nzembo 145:14) Uta eleko ya Abele, Jéhovah azali kosunga basambeli na ye. Soki atikaki biso, mbele tosila kokwea mbala mingi mpo na mikumba na biso. Biso moko, tokozala na nguya te ya koyikela mikakatano nyonso ya bomoi mpiko mpe monyoko oyo tozali kozwa mpo ete tozali kosalela Jéhovah, kasi Ye azali kosunga biso. Lolenge na verbe na liebele oyo esalelami kati na verset oyo emonisi ete, Nzambe azali ‘kosunga biso’ ntango nyonso. Toyeba ete Yoane Mobatisi mpe Mwana na Nzambe basalisaki basumuki minene na kotelema kati na elimo. Ntango bato wana babongwanaki mpe bakómaki basaleli na Jéhovah, bazwaki bolamu boleki nyonso: yango lisungi na Nzambe.—Matai 21:28-32; Malako 2:15-17.
11. Motindo nini Jéhovah ‘azali kotelemisa baoyo nyonso bangumbami’?
11 Ezali likambo ya kolendisa na koyeba ete ‘Jéhovah azali kotelemisa baoyo nyonso bangumbami’ na mimekamo ndenge na ndenge Azali kopesa nguya epai na baoyo kati na biso bazali na mitungisi, azali kolendisa baoyo bazali na mawa mpe azali kosalisa biso na koloba liloba na ye na molende ntango tonyokwami. (Misala 4:29-31) Apesaka nzela te ete mikakatano na biso mikweisa biso soki tondimi lisalisi na ye. (Nzembo 55:22) Yango wana, lokola “mwana mwasi na Abrahame” oyo “angumbamaki mokongo,” kasi abikisamaki na Yesu, tosengeli “kokumisa Nzambe” ntango atelemisi biso kati na elimo na bolingo nyonso. (Luka 13:10-17) Baklisto bapakolami baoyo bangumbamaki na boombo ya Babilone bazalaki na botondi epai na Nzambe ntango atelemisaki bango na 1919; kobanda 1935, azali kotelemisa “bampate mosusu” baoyo bazali na botondi.—Yoane 10:16.
12. Na ndimbola nini ‘miso na bato banso mazali kotala na elikya’ nyonso epai na Nzambe?
12 Jéhovah atikaka basaleli na ye soko moke te, lokola Davidi andimaki yango na polele nyonso na maloba oyo ete: “Bato nyonso bakotalelaka yo (na elikya, MN) mpe okoleisa bango na ntango malamu. Okozipola loboko na yo mpe okosilisa mposa na (bikelamu) nyonso na bomoi.” (Nzembo 145:15, 16) Ezali lokola ete miso ya bikelamu nyonso na bomoi ezali kotala epai na Nzambe mpo na kokoka kozala na bomoi. Baanzelu bazali kotala epai na Nzambe mpo balanda kozala na bomoi. Mpe bobele lokola mwana azali kotala epai na tata na ye to mama na ye mpo na kozwa biloko oyo azali na yango mposa, motindo moko mpe biso tozali kotala epai na Tata na biso ya likoló. Ezali mpenza epai na ye nde bato mpe banyama bazali kozwa nyonso esengeli na bango mpo na bomoi. Moto mosusu te akoki kokokisa bamposa na bango nyonso. Nzambe azali kopesa bango “bilei na ntango na yango,” elingi koloba ntango mposa na yango esengeli.
13. Motindo nini Jéhovah ‘azali kozipola loboko na ye mpe azali kokokisa mposa na bikelamu nyonso na bomoi?’
13 Nzambe ‘azali kozipola loboko na ye mpe azali kokokisa mposa na bikelamu nyonso na bomoi.’ (Nzembo 104:10-28) Ya solo, ntango mosusu banyama bakufaka mpo na nzala. Bato mingi mpenza bazangi eloko ya kolya likoló na moimi, na monyokoli mpe na lolenge mabe ya kosalela bozwi ya mokili. Lisusu, Yesu asakolaki ete “nzala’’ ekozala moko kati na makambo na “elembo” ya kozonga na ye na mikolo na nsuka. (Matai 24:3, 7) Kasi, yango elingi koloba te ete Jéhovah azali na bokabi te to azangi likoki ya kopesa biloko oyo bato bazali na yango mposa. Kanisa na bamiliare na bikelamu oyo ye azali koleisa! Lisusu, nzembo oyo ezali kopesa biso elikya ete na nse na Bokonzi na Nzambe, ntango ‘moto akoyangela lisusu moninga na ye moto te mpo na konyokola ye,’ Nzambe akokokisa bamposa na biso nyonso ya mosuni mpe ya elimo. (Mosakoli 8:9; Yisaya 25:6) Kobanda sikawa, tobatelami mpo na nzala ya elimo, mpamba te Nzambe azali kopesa ebele na bilei ya elimo na elaka na yango na nzela na “moombo na sembo mpe na mayele.” (Matai 24:45-47; 1 Petelo 2:2) Kati na elimo, ba Témoins de Jéhovah bazali bato baleisami malamu koleka bato banso. Omonisaka botondi mpo na ebele na bilei wana?
Jéhovah azali kobatela baoyo balingi ye
14. Mpo na nini Davidi akokaki koloba ete “Jéhovah azali boyengebene kati na banzela na ye nyonso mpe na sembo na misala na ye nyonso”.
14 Bolema na biso ekoki ‘kobebisa nzela na biso’ mpe kobendela biso mikakatano, kasi tosengeli ata mbala moko te kopamela Nzambe mpo na mpasi yango. (Masese 19:3) Davidi amonisi ntina wana alobi ete: “Jéhovah azali na boyengebene na nzela na ye nyonso; azali mpe (sembo, MN) na misala na ye nyonso.” (Nzembo 145:17) Nzambe asalaka ntango nyonso na bosembo, na boyengebene mpe na ngolu. Amonisaki mpenzampenza ezalela oyo ngolu na kopesáká lobiko na nzela ya mbeka na lisiko na Yesu. (Misala 2:21; 4:8-12) Jéhovah azali mpe “sembo kati na misala na ye nyonso,” ntango nyonso atondi na bolingo mpe kozanga koponapona. Biso baoyo tozali “bamekoli na Nzambe,” tozala mpe alima, bato na boyengebene, bato na ngolu, bato bazangi koponapona mpe bato na sembo.—Baefese 5:1, 2; Deteronome 32:4; Nzembo 7:10; 25:8; Yisaya 49:7; Misala 10:34, 35.
15. Ndenge nini ‘tobelelaki Nzambe na solo’, mpe yango ememeli biso nini?
15 Tobendami epai na Nzambe mpo ete azali moyengebene mpe sembo. Lisusu, Davidi apesi biso elikya oyo: “Jéhovah azali penepene na bango nyonso (bakobelela, MN) ye, baoyo (bakobelela) ye na solo.” (Nzembo 145:18) Ntango tozwaki batisimo, biso baoyo tozali bandimi bamipesi na Nzambe, tobelelaki nkombo na Jéhovah. (Misala 8:12; 18:8; Baloma 10:10-15) Lokola tosilaki kobelema na motindo wana epai na Nzambe, ye mpe akobelema pene na biso. (Yakobo 4:8) Tozali ‘kobelela ye na solo’ mpo ete tozali kosala yango na lolenge malamu, na nsima na Yesu Klisto. Mpe Jéhovah akotikala ntango nyonso pene na biso soki tozali kosambela ye na “elimo mpe na solo”, soki tozali komonisa “kondima moko ezangi bokosi”, mpe soki ‘totikali ngwi lokola ete tozali komona Ye oyo akomonanaka te.’ (Yoane 4:23, 24; 1 Timote 1:5; Baebele 11:27) Na kosalaka bongo, tokobondela mpo na mpamba te, tokozala mpe biso moko te mpo na kobundisa mokili ya Satana, kasi tokolanda kozwa lisalisi mpe litambwisi na Nzambe. (Nzembo 65:2; 1 Yoane 5:19) Oyo nde libateli tozali kozwa na nzela yango!
16. Mpo na nini mpe ndenge nini Jéhovah ‘azali kokokisa mposa ya baoyo bazali kobanga ye’?
16 Soki tozali na libateli ya solo, ezali mpe na ntina na makambo mosusu oyo Jéhovah azali kosala mpo na biso. Davidi alobaki ete: “Akosukisa mposa na bango baoyo bakobangaka ye, akoyoka mpe konganga na bango mpe akobikisa bango.” (Nzembo 145:19) Jéhovah azali ‘kokokisa mposa na biso’ mpamba te tozali na mposa makasi ya kosambela ye mpe kobanga ebongi ya kozanga kosepelisa ye. (Masese 1:7) Motema na biso ya botosi epusaki biso na komipesa na Jéhovah, mpe makanisi na biso mazali na boyokani elongo na libondeli oyo: “Tika ete mokano na yo esalema.” Lokola mokano na ye ezali ete tosakola nsango na Bokonzi, azali kosukisa mposa na biso ya kokokisa mosala yango. (Matai 6:10; Malako 13:10) Azali ‘kosukisa mposa na biso’ mpamba te tozali kobondela ye na moimi te, kasi na boyokani na mokano na ye. Azali kopesa biso oyo ezali na boyokani na mokano na ye mpe oyo ekoki kokolisa bolamu na biso.—1 Yoane 3:21, 22; 5:14, 15; tala Matai 26:36-44.
17. Mpo na nini tokoki kondimisama ete Nzambe akoyoka “konganga na biso”?
17 biso baoyo tozali ba Témoins de Jéhovah na sembo, tokoki mpe kondimisama ete akokanga matoi te na “konganga na biso.” Nzambe abikisaka Davidi na mpasi, abikisaka mpe Yesu, na kosekwisaka ye kati na bakufi. Tokoki kondimisama ete Jéhovah akobikisa biso na matumoli ya banguna na biso, mingi mpenza na ntango Gog akobundisa biso. (Ezekiele 38:1. kino 39:16) na yango, ata nini ezali mikakatano na biso, tokoki kobondela na elikya nyonso lokola Davidi: “E Jéhovah, monisa ngai boboto mpo ete nazali kati na mpasi. . . . Nayoki bato bakolobaka na mpwempwe nsomo mingi mpenza! na epai na ngai; bakoyangela ngai mwango elongo mpo na kobebisa bomoi na ngai.kasi nazali na elikya epai na yo, e Jéhovah! nalobi ete: ‘Yo ozali Nzambe na ngai.”’—Nzembo 31:9-14.
18. Koyeba likambo oyo ete Jéhovah azali ‘kobatela bato nyonso oyo balingi ye,’ nzokande ‘akoboma bato mabe’ epesi biso nini?
18 Jéhovah Nzambe zali ntango nyonso pene mpo na kosalisa biso. Mpo na yango Davidi alobi ete: “Jéhovah akobatela baoyo nyonso bakolinga ye kasi akoboma bato nyonso mabe.” (Nzembo 145:20) Ee, soki tolingi Nzambe, akopambola biso mpe akobatela biso. (Mituya 6:24-26) Azali ‘kopesa etumbu makasi epai na bato na lolendo’, kasi azali kobatela basaleli na ye oyo bamikitisi, kopesáká nzela na likambo moko te ete ebebisa bango mpo na libela. Lokola Jéhovah azali elongo na biso, tozala na mpiko. (Nzembo 31:20-24; Misala 11:19-21) ‘Ebundeli moko te esalemi mpo na kotemela biso ekozwa elónga.’ (Yisaya 54:17; Nzembo 9:17; 11:4-7) Ezali yango nde bato oyo balingi Nzambe na kosaleláká ye na bosembo mpe na molende bazali komona. Lokola lisangá, ba Témoins de Jéhovah bakobika na “bolozi monene” oyo ekokwea likoló na bato mabe. (Emoniseli 7:14) Kosilisama ya ntembe monene oyo etali bokonzi ya molongo mobimba na Jéhovah ekomema solo bolamu mpo na “baoyo nyonso balingi ye”!
Tolanda kopambola nkombo mosantu na Jéhovah
19. Mpo na nini monoko na biso ezali kosakola “lisanzoli na Jéhovah”?
19 Davidi asukisi nzembo kitoko oyo na maloba maye: “Monoko na ngai ekosanzola Jéhovah; tika mpe mosuni nyonso epambola nkombo naye na bulee, lobiko na lobiko!” (Nzembo 145:21)biso, ba Témoins de Jéhovah, toyebi bonene ya “Nzambe, na boboto na ye, na lolenge malamu na ye oyo azali kosalela bokonzi, na lisungi na seko mpe ya bolingo oyo azali komonisa biso. Na yango, tika ete monoko na biso, lokola oyo na Davidi, ‘eyebisa lisanzoli na Nzambe’! Tozali komiyoka ete topusami mpo na kozala na bokangami makasi epai na ye, na kotondo ye mpo na ebele na mapamboli na ye mpe na kokumisa “nkombo kitoko” na ye.—1 Ntango 29:10-13; Exode 20:4-6.
20. Wana ezali biso kozela bomoi na seko, tosengeli kozala na ekateli ya kosala nini?
20 Lokola Jéhovah azali kopambola biso mokolo na mokolo, topambola ye, to toloba malamu mpo na ye, ntango nyonso. Tosakola nsango malamu na molende mpo na kosanzola ye, na kolobáká na bazalani ete mosika te ‘nyonso oyo ezali na bomoi ekopambola nkombo mosantu na ye.’ Oyo nde esengo ya kozala na bomoi ntango bafandi nyonso na mabelé mpe ata bikelamu nyonso ya molongo bakoyemba masanzoli mpo ata na biso ya likoló! (Nzembo 148:1-13) Tika ete Jéhovah apambolama mpo ete ayebisi biso nkombo na ye mpe mpo ete apesi biso libaku kitoko ya kozala Batemwe na ye! (Nzembo 83:18; Yisaya 43:10-12) Tika ete biso banso tomitambwisa na lolenge ebongi na bato oyo bazali kokumba nkombo wana na bulee mpe kobondela mpo na kosantisama na yango! (Luka 11:2) Tosalela Nzambe na bosembo nyonso, mpo ete, kati na mokili ya sika, tokoka kosangisa mongongo na biso elongo na mingongo ya baoyo nyonso bakopambola libela nkombo mosantu na Jéhovah!
◻ Likambo nini tosengeli kosala soki bokonzi na Jehovah ezali na motuya na miso na biso?
◻ Na nini bokonzi na Jéhovah emonisami lelo?
◻ Ndenge nini Jéhovah ‘azali kotelemisa baoyo nyonso bangumbami’?
◻ Ndenge nini Nzambe ‘azali kozipola loboko na ye mpe kokokisa mposa na bikelamu nyonso na bomoi’?
◻ Ndenge nini tokoki kopambola (kobenisa) nkombo mosantu na Jéhovah?
[Elilingi na lokasa 17]
Na 1922, libyangi mpo na ‘kosakola Mokonzi mpe Bokonzi’ elendisaki bakoteli na bokonzi na Jéhovah