“Nde oyo eleki kati na yango misato, ezali bolingo”
“Bongo kondima mpe elikya mpe bolingo ezali koumela, yango misato. Nde oyo eleki kati na yango misala ezali bolingo.”—1 BAKOLINTI 13:13.
1. Moto moko na mayele alobaki nini na ntina etali bolingo?
MOTO moko na mayele mingi oyo ayekolá sianse etali bizaleli ya moto alobaki ete: “Mpo na mbala ya liboso kati na lisolo na biso bato, tomoni ete kati na bamposa ya ntina oyo moto azali na yango na makanisi, mposa ya bolingo eleki ntina mingi. Ezali ntei (centre) ya bamposa nyonso ya moto, lokola moi ezali ntéi ya biloko nyonso bizwami kati na etando na biso. . . . Na makambo nyonso, mwana oyo alingami te akeseni mingi mpenza, na mwana oyo alingami. Ata bokoli na ye ezali na bokeseni Toyebi sikawa ete moto abotami na mokili mpo afanda na esika moko oyo kozala na bomoi mpe bolingo ezali na boyokani. Ya solo, yango ezali likambo ya sika te. Ezali bobele kondimisama ya Lisolo likoló na ngomba.”
2. a) Na maloba nini ntoma Paulo amonisaki ntina ya bolingo? b) Mituna nini mibongi kotalelama sikawa?
2 Lokola moto na mayele oyo andimaki yango, solo wana etaleli ntina oyo bolingo ezali na yango mpo na bolamu ya bato ezali likambo ya sika te. Mbala mosusu bato na mayele bauti komona yango bobele sikawa, nzokande yango eyebisami kati na Liloba na Nzambe uta koleka bikeke 19. Yango wana ntoma Paulo akokaki kokoma ete: “Bongo kondima mpe elikya mpe bolingo ezali koumela, yango misato. Nde oyo eleki kati na yango misato, ezali bolingo.” (1 Bakolinti 13:13) Oyebi soki na likambo nini bolingo eleki kondima mpe elikya? Mpo na nini tokoki koloba ete bolingo eleki ntina mingi kati na bizaleli ya Nzambe mpe bambuma ya elimo na ye?
Mitindo minei ya bolingo
3. Bandakisa nini na bolingo ya mwasi ná mobali tozali kokuta kati na Biblia?
3 Mposa ya kolinga oyo epesameli bato, ezali elembo ya mayele na Nzambe mpe ya bolingo mingi oyo azali na yango mpo na bango. Bagreke ya Kala bazalaki na maloba minei mpo na kolobela “bolingo.” Moko na yango ezalaki érôs, oyo elimboli bolingo ya mwasi na mobali oyo etongami likoló na mposa ya kosangisa nzoto. Bakomi ya Makomami na greke ya boklisto basalelaki yango te, atako la Septante esaleli maloba oyo mauti na yango kati na Masese 7:18 mpe 30:16, mpe ezali likambo na bolingo ya mwasi mpe mobali kati na mikapo misusu ya Makomami na liebele. Na ndakisa, tozali kotanga ete Yisaka “alingaki” Rébecca. (Genese 24:67) Ndakisa moko ya polele mpo na bolingo ya motindo wana emonani kati na lisolo na Yakobo oyo, lokola yango eyebani, alingaki Rachel uta ntango oyo amonaki ye, mpamba te azalaki kitoko mingi. Nkutu, “Yakobo asalaki mbula nsambo mpo na Rachel mpe yango ezalaki lokola mwa mikolo mpo na bolingo ayokaki mpo na ye.” (Genese 29:9-11, 17, 20) Loyembo ya Salomo ezali mpe komonisa bolingo ya mwasi ná mobali oyo mobateli moko na mpate azalaki na yango mpo na elenge mwasi moko. Kasi tozali kobenda likebi ete bolingo ya motindo wana, oyo ekoki kopesa bosepeli mpe esengo mingi, esengeli komonisama bobele na boyokani elongo na mitinda ya sembo na Nzambe. Engebene Biblia, ezali bobele epai na mwasi na ye mpenza nde mobali akoki “koyoka esengo libela” na nzela na bolingo motindo oyo.—Masese 5.15-20.
4. Bandakisa nini ya bolingo na libota Makomami mazali kopesa biso?
4 Ezali mpe na bolingo makasi ya libota Bagreke bazalaki kolimbola bolingo wana ya solo etongami likoló na bikanganeli ya makila na liloba storge. Bolingo wana nde ezali na ebandeli ya lisese oyo ete: “Mongongo ya makila ezali makasi koleka nyonso mosusu.” Tozali na ndakisa monene kati na bolingo oyo Marie mpe Marthe bazalaki na yango mpo na Lazare ndeko na bango ya mobali. Bazalaki na bolingo mingi mpo na ye, mpamba te balelaki mingi mpo na liwa na ye ya mbalakaka Kasi esengo na bango ezalaki monene ntango Yesu azongisaki ye na bomoi. (Yoane 11:1-44) Bolingo ya mama epai na mwana ezali mpe ndakisa mosusu ya lolenge na bolingo wana. (Tala 1 Batesaloniki 2:7) Yango wana, mpo na komonisa bozindo ya bolingo na ye mpo na Siona, Jéhovah alobaki ete yango ezalaki mingi koleka oyo ya mama mpo na mwana na ye.—Yisaya 49:15.
5. Ndenge nini kozanga bolingo ya solo ezali komonana na mikolo na biso?
5 Kozanga “bolingo ya solo” ezali elembo ete tozali kobika na “mikolo na nsuka.” (2 Timote 3:1, 2) Ezali komema bilenge na kokima ndako ya baboti na bango, mpe mikoló na koboya kosalisa baboti na bango mibangé. (Tala Masese 23:22) Ezali mpe komonana na ntalo mingi ya minyoko makasi epai na bana bamosusu basengeli kokóta lopitalo mpo ete babetamaki makasi epai na baboti na bango. Kozanga bolingo ezali komonana mpe na likambo oyo ete baboti mingi bazali kopesa toli te epai na bana na bango. Kotika bana ete basala na lolenge elingi bango ezali elembo ya bolingo te, kasi ezali nde nzela ya bolembu. Tata oyo alingi mpenza bana na ye azali kopesa bango toli to mpe bitumbu na ntango yango esengeli.—Masese 13:24; Baebele 12:5-11.
6. Pesa bandakisa ya Biblia oyo ezali komonisa bolingo kati na baninga?
6 Totalela sikawa liloba na greke philia, oyo elimboli bolingo (elimboli ata soko moke te likambo ya kosangisa nzoto) kati na baninga, na ndakisa basi mibale to mibali mibale oyo bakembi. Tozali na ndakisa moko kitoko kati na bolingo oyo David mpe Yonatane bazalaki na yango moko mpo na mosusu. Ntango Yonatana abomamaki na etumba, David alelaki ye na maloba oyo: “Nayoki mawa mingi mpo na yo, Yonatana, ndeko na ngai! Bolingo na yo epai na ngai ezalaki malamu na kokamwa koleka bolingo na basi.” (2 Samwele 1:26) Toyekoli lisusu ete Klisto azalaki na boninga makasi elongo na ntoma Yoane, oyo ayebani lokola moyekoli “oyo Yesu alingaki.”—Yoane 20:2.
7. Bolingo ya motindo nini liloba agapé ezali kolimbola, mpe ndenge nini bolingo yango emonisamaka?
7 Liloba nini ya greke Paulo asalelaki kati na 1 Bakolinti 13:13, epai oyo azali kotanga kondima, elikya mpe bolingo, mpe abakisi lisusu ete “oyo eleki kati na yango misato, ezali bolingo”? Liloba esalelami awa ezali agapê, ezali yango moko oyo ntoma Yoane asalelaki ntango alobaki ete: “Nzambe azali bolingo.” (1 Yoane 4:8, 16) Ezali nde bolingo oyo etambwisami to mpe eyangelami na mibeko. Yango ekoki komonisama epai na moto nyonso kozanga koponapona, kasi ekokani na liyoki ezangi koluka litomba oyo ezali kopusa na kosala malamu epai na bamosusu ata soko makoki na bango ezali nini to mpe matomba oyo ekoki kozwama na yango. Ezali bolingo wana nde etindaki Nzambe na kopesa Yesu Klisto, Mwana na ye bobele moko, oyo alingami mingi, oyo azalaki elongo na ye, “mpo ete moto na moto oyo akondima ye abebisama te, kasi azala na bomoi na seko.” (Yoane 3:16) Lokola Paulo akundweli biso yango lisusu, “Moto akondima mpenza kokufa mpo na moyengebene te. Kasi soki moto azali malamu mingi, mosusu akoki kozala na molende mpo na kokufela ye. Nde Nzambe amonisi bolingo na ye mpo na biso na nzela oyo: naino ezalaki biso bato na masumu, Klisto akufelaki biso.” (Baloma 5:7, 8) Na yango, bolingo agapé ezali kopusa moto oyo azali na yango na kosala malamu epai na bamosusu ata soko ezalela ya bomoi na bango ezali nini mpe atako yango ekosenga ye nini.
Ezali na ntina mingi koleka kondima mpe elikya—mpo na nini?
8. Mpo na nini bolingo agapé eleki kondima?
8 Kasi mpo na nini Paulo alobi ete bolingo yango (agapé) ezali na ntina mingi koleka kondima? Akomaki na 1 Bakolinti 13:2 ete: “Ata mpe nazali kosakola mpe koyeba makambo nyonso mabombami mpe makambo nyonso na mayele, ata nazali na kondima nyonso mpo na kolongola ngomba, nde soko nazangi bolingo, nazwi litomba te.” (Tala Matai 17:20) Na yango, soki milende na biso mpo na kozwa boyebi mpe kokóla kati na kondima epusamaki na mposa ya moimi, ekozwila biso ata bolamu moko te epai na Nzambe. Na likanisi motindo moko, Yesu amonisaki ete bato mosusu ‘bakosakola na nkombo na ye, bakobimisa bilimu mabe na nkombo na ye mpe bakosala bikamwiseli mingi ya nguya na nkombo na ye,’ kasi, atako bongo, akondima bango te.—Matai 7:22, 23.
9. Mpo na nini bolingo eleki elikya?
9 Mpo na nini bolingo agapé ezali mpe na ntina mingi koleka elikya? Mpamba te elikya ekoki kozala na moimi, ezwami epai na moto oyo azali komibanzabanza liboso mpo na litomba na ye moko, nzokande bolingo “ekolukaka malamu na yango mpenza te.” (1 Bakolinti 13:4, 5) Lisusu, elikya lokola oyo ya kobikisama na “bolozi monene” mpe kokota kati na mokili ya sika ekolimwa ntango yango ekokokisama. (Matai 24:21) Ezali yango nde Paulo azali kolimbola na maloba oyo ete: “Mpamba te tobiki na elikya oyo. Kasi elikya na eloko esili komonana ezali elikya na solo te. Nani akolikya mpo na yango ezali ye komona? Nde soko tokolikya mpo na yango ezali biso komona te, tozali kotalela yango na mpiko.” (Baloma 8:24, 25) Nzokande mpo na oyo etali bolingo, totangi ete eyikaka mpiko na makambo nyonso, mpe ekosuka te. (1 Bakolinti 13:7, 8) Bolingo ekolukaka litomba na yango te, (agapé) ezali bongo na ntina mingi koleka kondima to mpe elikya.
Ezali na ntina koleka mayele, boyengebene mpe bokosi?
10. Mpo na nini tokoki koloba ete bolingo eleki bizaleli minene minei ya Nzambe?
10 Totalela sikawa bizaleli minene minei ya Jéhovah Nzambe: mayele, boyengebene, bokasi mpe bolingo. Tokoki mpe koloba ete bolingo eleki bizaleli oyo? Ntembe soko moke ezali te. Mpo na ntina nini? Mpamba te bolingo ezali nguya oyo ezali na ebandeli ya misala na Nzambe. Yango wana ntoma Yoane akomaki ete: “Nzambe azali bolingo.” Ya solo, Jéhovah ye moko azali mpenza bolingo. (1 Yoane 4:8, 16) Totangi naino esika moko te kati na Makomami ete Nzambe azali mayele, azali boyengebene to bokasi. Nzokande, elobami ete Jéhovah azali na bizaleli wana. (Yobo 12:13; Nzembo 147:5; Danyele 4:37) Bizaleli minei wana bizali mpenza na bokatikati epai na ye. Na bolingo, Jéhovah azali kokokisa mikano na ye na kosaleláká, to na kotaleláká mpe bizaleli na ye mosusu misato.
11. Nini etindaki Jéhovah na kozalisa molóngo, bakisa baanzelu mpe bato?
11 Nini etindaki Jehovah na kozalisa molongo, bakisa mpe baanzelu mpe bato? Mayele na ye? Bokasi na ye? Te, mpamba te Nzambe asalelaki bizaleli mibale wana bobele mpo na kozalisa. Na ndakisa, totangi ete: “Jéhovah asalaki mokili na nzela na mayele.” (Masese 3:19) Lisusu, ezaleli na ye oyo mosusu boyengebene, etindaki ye mpe te ete azalisa bato oyo bazali na makanisi mpe na bonsomi. Ezali bolingo na ye nde epusaki ye na kokabola bisengo ya kozala na bomoi lokola bato ya mayele. Ezali lisusu na bolingo nde azwaki mwango ya kolongola etumbu na liwa oyo boyengebene ekweiselaki bato na ntina na lisumu ya Adam. (Yoane 3:16) Ezali mpe lisusu bolingo nde epusaki Jéhovah na kolinga ete bato na botosi bazala na bomoi kati na Paradis ya mabelé na mikolo mizali koya.- Luka 23:43.
12. Bokasi, boyengebene mpe bolingo na Nzambe esengeli kotinda biso na kosala nini?
12 Lokola Nzambe azali mozwi-na-nguya nyonso, tomekaka kolamusa zuwa na ye te. Paulo atuni boye: “‘Tolingi koyokisa Jéhovah zuwa’? Biso toleki ye na makasi?” (1 Bakolinti 10:22, Kondimana ya Sika) Solo mpenza, Jéhovah azali “Nzambe na zuwa”, ezali na lolenge ya mabe te, kasi ezali mpo ete azali “kosenga bokangani mobimba epai na ye.” (Exode 20:5) Biso baklisto tozali na esengo na komona ndenge na ndenge na mayele mingi na Nzambe. (Baloma 11:33-35) Limemya mozindo oyo tozali na yango mpo na boyengebene esengeli kokabola biso mosika na masumu ya kokanela. (Baebele 10:26-31) Kasi na ntembe te, bolingo eleki mpenza kati na bizaleli minene minei ya Nzambe. Mpe ezali bolingo wana na Jéhovah ezangi moimi nde ezali kobenda biso epai na ye mpe ezali kopesa biso mposa ya kosepelisa ye, ya kosambela ye mpe kosangana na kobulisama ya nkombo na ye mosantu.—Masese 27:11.
Mbuma na elimo oyo eleki nyonso mosusu na ntina
13. Esika nini bolingo ezwi kati na bambuma ya elimo na Nzambe?
13 Esika nini bolingo ezali kozwa kati na bambuma libwa ya elimo na Nzambe oyo etangami kati na Bagalatia 5:22, 23? Paulo alobi ete, ezali, “bolingo, esengo, kimya, motema petee, boboto, malamu, kondima, bopolo mpe komikanga motema.” Na elonga mpenza, atangi bongo bolingo na esika ya liboso. Tokoki koloba ete bolingo eleki esengo, ezaleli oyo atangi yango na esika ya mibale? Ee, mpamba te moto akoki kooka esengo ya koumela te kozanga bolingo. Mpo na koloba solo, soki mokili ezali na esengo te, ezali mpo na moimi, mpe mpo na kozanga bolingo. Nzokande, ba Témoins de Jéhovah bazali na bolingo kati na bango, mpe bazali kolinga Tata na bango ya likoló. Na bongo, likambo ya kokamwa ezali te ete bazala na esengo. Nkutu esilaki kosakolama ete ‘bakoyemba mpo na esengo na motema.’—Yisaya 65:14.
14. Mpo na nini tokoki kokoba ete bolingo eleki kimya.
14 Bolingo eleki mpe kimya, mbuma mosusu na elimo. Likóló na kozanga bolingo, mokili ezali kati na bokabwani mpe na bitumba ndenge na ndenge. Nzokande, basaleli na Jéhovah bazali na kimya kati na bango na mokili mobimba. Ezali na ntina na bango nde bosolo ya maloba oyo na mokomi na nzembo ezali komonana: “Jehovah akopambola bato na ye na kimya.” (Nzembo 29:11) Ekoki bazali na kimya wana, ezali mpo ete bazali na elembo ya baklisto na solo, elingi koloba bolinga (Yoane 13:35) Bobele bolingo yango moko nde ekoki kosilisa makambo nyonso ya bokabwani, ezala mpo na oyo etali loposo, ekolo to bizaleli. Ezali “ekanganeli ekoki mpenza.”—Bakolose 3:14.
15. Ndenge nini ntina monene na bolingo emonisami ntango tozali kokokanisa ezaleli yango na motema petee?
15 Mosala monene ya bolingo ezali komonana lisusu ntango tokokisi yango na motema petee, na koyika mpiko mpo na mabe to mpo na matumoli. Kozala moto ya motema petee, elimboli kozala na motema molai mpe ya kosilika nokinoki te, Mpo na nini bato mosusu bazali na motema petee te mpe bazali bato na kooka nkanda noki? Ezali mpo ete bazangi bolingo, boye te? Na likeseni, Tata na biso ya likoló azali na motema petee mpe “akoyokaka nkanda noki te”. (Exode 34:6; Luka 18:7) Mpo na nini? Ezali mpo ete azali kolinga biso mpe “alingi te ete moto moko akufa.”—2 Petelo 3:9.
16. Esika ya bolingo ezali nini na kokokisa yango na boboto, malamu, bopolo mpe komikanga motema?
16 Mwa liboso toutaki komona bantina oyo bolingo eleki kondima mpe, bobele mpo na bantina yango moko, eleki mpe bambuma mosusu ya elimo oyo etikali, elingi koloba malamu, boboto, bopolo mpe komikanga motema. Bizaleli, nyonso oyo bizali na ntina, kasi ekozala na biso na litomba moko te soki bolingo ezali te. Ezali yango nde Paulo amonisi kati na 1 Bakolinti 13:3, epai kuna akomi ete: “Ata akopalanganisa nyonso ezali na ngai mpo na kopesaka makabo, ata nakopesa nzoto na ngai mpo na kotumbama, nde soko nazangi bolingo, nazwi litomba te.” Nzokande, ezali bolingo nde ekobotaka bizaleli oyo ete malamu, boboto, kondima, bopolo mpe komikanga motema. Tala mpo na nini Paulo azali kokoba na kolobáká ete, bolingo ezali malamu mpe ete “ekomemaka makambo nyonso, ekondimaka nyonso, ekolikya nyonso, ekoyikaka mpiko na makambo nyonso”. Epai mosusu, “bolingo ekosuka te.” (1 Bakolinti 13:4, 7, 8) Na ntembe te, bambuma mosusu ya elimo ezali bilembo ya bolingo, ezali oyo etangami na esika ya liboso. Ya solo, kati na bambuma libwa ya elimo, bolingo eleki mpenza.
17. Maloba nini ya Biblia mandimisi ete bolingo eleki bambuma nyonso mosusu ya elimo?
17 Paulo andimi ete bolingo eleki bambuma nyonso mosusu ya elimo na Nzambe ntango alobi ete: “Bozalaka na nyongo epai na moto moko te, bobele nyongo na kolingana. Mpo ete ye oyo akolingaka moto mosusu, azali kokokisa mibeko. Mibeko nyonso . . . miyanganisami na mobeko oyo ete: ‘Olinga mozalani na yo lokola yo moko.’ Bolingo ekosalelaka mozalani mabe te; bongo bolingo ezali kokokisa mibeko.” (Baloma 13:8-10)Na lolenge oyo ebongi mpenza, moyekoli Yakobo abengi mobeko yango oyo ezali kotinda na kolinga mozalani na yo lokola yo moko ete, “mobeko na bokonzi.”—Yakobo 2:8.
18. Bilembo nini mosusu bimonisi ete bolingo ezali ezaleli oyo eleki nyonso?
18 Tozali na bilembo mosusu oyo bimonisi ete bolingo eleki bizaleli nyonso mosusu oyo bisengeli? Ee. Totalela likambo lilakaki na ntango mokomeli moko atunaki na Yesu ete: “Lilako nini lizali liboso na malako nyonso?” Azalaki komizela mbala mosusu ete Yesu etanga moko na Mibeko Zomi. Kasi Yesu atangaki Deteronome 6:4, 5, mpe ayanolaki ye ete: “Oyo na liboso na nyonso ete, ‘Yoka Yisraele, Jéhovah Nzambe na biso, ye azali Jéhovah moko. Olinga mpe Jéhovah Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makasi na yo mobimba.”’ Na nsima Yesu abakisaki: “Oyo na mibale ezali mpe boye ete, Olinga mozalani na yo lokola yo moko. Lilako na koleka oyo na ntina ezali te.”—Malako 12:28-31.
19. Komonisa ya bolingo agapé ezali na matomba nini?
19 Te, Paulo alekisaki ndelo te wana alobaki, nsima na kotanga kondima, elikya mpe bolingo, ete: “Nde oyo eleki kati na yango misato, ezali bolingo.” Komonisa bolingo ezali kopesa biso nzela na kozala na boyokani malamu elongo na Tata na biso ya likoló mpe elongo na bazalani na biso, bakisa mpe basangani ya lisangá mpe ya libota na biso. Bolingo ezali kolendisa biso. Yango wana lisolo elandi ekomonisa matomba mingi oyo bolingo ya solo ekoki kopesa.
Bozongeli?
◻ Na nini bolingo eleki kondima mpe elikya?
◻ Bolingo agapé ezali nini, mpe ndenge nini emonisamaka?
◻ Mpo na nini bolingo eleki monene kati na bizaleli minene minei ya Nzambe?
◻ Na nini bolingo eleki bambuma nyonso mosusu ya elimo?
[Elilingi na lokasa 13]
Esengo epusaki Nzambe na kozalisa bato mpo ete bazala na bomoi kati na paradis na mabele. Ozali na elikya ya kozala kuna?