Tozala na motema molai epai na bato banso
“Bandeko, tolombi bino ete bopamela bato na goigoi; babondisa milimo minyokwami, bosunga bato na motau, bozala na motema molai epai na bato banso.”—1 BATESALONIKI 5:14.“MN.”
1. Epai wapi mpe na ntango nini ba Témoins de Jéhovah bakomonisa motema molai?
OYO nde ndakisa malamu ya motema molai ba Témoins de Jéhovah ya eleko na biso bazali komonisa! Na kala, bayikaki mpiko na ebele na mimekamo mpe minyoko, na nsé na biyangeli mabe ya Nazi mpe ya Fasciste mpe lelo, kati na mikili lokola Malawi. Baoyo bafandi kati na libota oyo bato nyonso bazali na bindimelo motindo moko te, bango mpe bazali na motema molai.
2. Tangá makambo mibale oyo mazali kolimbola ntina oyo libota na Jéhovah lizali na paradis ya elimo.
2 Atako minyoko mpe mimekamo mizali kozwa bango, libota na Jéhovah lizali kosepela na bolamu ya paradis ya elimo. Makambo maleki mamonisi ete baklisto bapakolami na elimo babandaki kozwa yango uta 1919. Mpo na nini ezalela wana ya paradis ezali kati na libota na Jéhovah? Libosoliboso, mpo ete Nzambe azongisaki lisusu basaleli na ye bapakolami kati na “mokili” na bango—ezali bongo ezalela moko—epai kuna bazali kosalela losambo na peto. (Yisaya 66:7, 8) Lisusu, mpo ete moto moko na moko kati na baoyo bafandi na paradis kitoko wana ya elimo azali komonisa mbuma ya elimo na Nzambe, oyo kati na yango motema molai etangami. (Bagalatia 5:22, 23) Motuya ya ezaleli wana kati na paradis na biso ya elimo, emonisami na oyo ekomamaki na molimboli na Biblia, William Barclay, ete: “Kozanga makrothumia [motema molai], bolingo ya bandeko ekoki kozala te. . . . Ntina ezali ete, makrothumia ezali ezaleli na Nzambe (Baloma 2:4; 9:22).’’ (A New Testament Wordbook, page 84) Ee. motema molai ezali na motuya monene.
Tozala na motema molai epai na bandeko na biso
3. Liteya nini Yesu apesi na Petelo na ntina na kozala na motema molai?
3 Emonani ete, ntoma Petelo azalaki na mwa nkaká ya komonisa motema molai, mpamba te, mokolo moko, atunaki Yesu ete: “Nkolo, soki ndeko na ngai asaleli ngai mabe, nalimbisa ye mbala boni? Kino mbala nsambo?” Yesu apesaki ye toli oyo ete: “Nalobi na yo te ete kino mbala nsambo, kasi kino mbala ntuku nsambo na nsambo.” (Matai 18:21, 22, MN) Na elobeli mosusu, ndelo ezali te mpo na motuya na mbala oyo tosengeli koyikana mpiko mpe kolimbisa moto oyo asaleli biso lisumu. Tokoki mpenza kokanisa te ete moto moko akoki kotanga mabunga ya moto mosusu kino 77. Ata ezali lolenge nini, ye oyo akolimbisa motindo wana, azali solo na motema molai.
4. Mpo na nini bankulutu basengeli mpenza kozala na motema molai?
4 Ntembe ezali te ete, kati na lisangá, bankulutu basengeli kopesa ndakisa na komimonisáká na motema molai epai na bandeko na bango kati na kondima. Mbala mosusu kozanga sembo to ezaleli ya kotalela makambo mpamba ya bamoko na baninga na bango, ekoki kotya motema petee na bango na komekama. Esengeli kosala noki mpo na kolongola mimeseno mabe. Bankulutu basengeli ntango nyonso kosenzela ete basilika te to bazokisama mpe nokinoki te na motema mpo na bolembu ya bandeko na bango baklisto, mibali mpe basi. Nzokande, babateli na mpate na elimo basengeli komikundwela toli oyo te: “Ekoki na biso bato na nguya ete toyika mpiko na bolembu na bato bazangi nguya, kasi tokoki te komisepelisa biso moko.”—Baloma 15:1.
5. makambo nini tokoki koyikela yango mpiko soki nde tozali na motema molai?
5 Nzokande, matáta makoutaka kati na bomoto ya bato mibale oyo bokeseni mpenza na bizaleli, ekoki komonana na ntina na bolemu na mabe ya nzoto na biso bato. ekoki kokóma ete mabe wana mpe lolenge na ezaleli na biso, eyokisa bandeko na biso nkanda, lokola oyo na bango mpe ekoki kookisa biso nkanda. Mpo na yango, toli oyo elandi azali na ntina mingi, ete: “Boyikanaka mpiko, bolimbisanaka. Pelamoko Jéhovah alimbisi bino.” (Bakolose 3:13) “Koyikana mpiko’’ elimboli kozala na motema molai, ata soki tozali na bantina ya kofunda moto moko. Tosengeli kozongisa mabe te to kopesa etumbu na ndeko na biso te, ata komilela mpe te na ntina na ye.—Yakobo 5:9.
6. Mpo na nini kozala na motema molai ezali likambo na mayele?
6 Likanisi motindo moko lizwami na toli oyo ezali na Baloma 12:19, ete: “Balingami, bobukanisa mpo na bino mpenza te, kasi tika esika na nkanda na Nzambe. Mpamba te ekomami ete: ‘Jéhovah alobi ete, “Kobukanisa ezali likambo na ngai, ngai nakofuta.” ’ ‘Kotika esika na nkanda’ elimboli kozanga kooka nkanda noki to kozala na motema molai. Ye oyo akomonisaka ezaleli wana, azali komonisa mayele, mpamba te azali kozwa bolamu na yango elongo na baoyo bazali zingazinga na ye. Soki mikakatano ebimi, nde tomimonisi na motema molai, biso moko tokomiyoka bobele ete tozali malamu mpamba te, tozali koyeisa makambo minene te. Mpe ye oyo tomonisi motema molai, akomiyoka malamu mpo ete biso topesi ye etumbu te mpe tobukanisi mpo na biso te na motindo moko to mosusu. Ezali likambo na kokamwa te ete Paulo apesaki toli epai na baninga na ye baklisto ete bazala na maloba na ‘kobondisa mpo na milimo minyokwami, na kosunga bato na motau mpe kozala na motema molai epai na bato banso.’—1 Batesaloniki 5:14, MN.
Kati na libota
7. Mpo na nini mibali mpe basi oyo babali basengeli kozala na motema molai?
7 Elobami mingi ete libala ya esengo ezali oyo esalemi na bato mibale oyo bayebi kolimbisana. Yango elimboli nini? Ete mpo na kosala libala ya esengo, babalani basengeli kozala na motema molai moko epai na mosusu. Mbala mingi, bato mibale bakokómaka na matata mpo ete makanisi na bango makeseni. Kokesena wana ekoki kobenda mindondó kati na bango, mpe kozala liziba ya matáta oyomakobakisama na mikakatano mpe mpasi oyo ezali kosala ete uta sikawa, baklisto babalani bazali kozwa “bolozi kati na nzoto.” (1 Bakolinti 7:28) Na ndakisa, soko mobali akolinga koyeba makambo malamumalamu te to akomonisaka mwa elimo ya kotalela makambo na bopotu. Tala likambo likoki kozala mpasi mpo na mwasi na ye. Mpe soki makanisi oyo mapesami na boboto mazwi bopusi likoló na ye te, ekosengela bobele mbala mosusu ete mwasi yango ayika mpiko mpo na bolembu ya mobali na ye na kozaláká na motema molai.
8. Mpo na nini mibali oyo babali basengeli kozala un motema molai?
8 Epai mosusu, ekoki kokóma ete mwasi moko abimisa mindondó mpo na likambo moko moke mpe kozala na momeseno ya koswanisa mobali na ye. Tala likambo likoki mpenza kokundola verset oyo, ete: “Kofanda na litumu na likoló na ndako, eleki malamu na kozala na ndako monene esika moko na mwasi na makelele.” (Masese 25:24) Na ntango wana, esengeli kozala na motema molai mpo na komiyokanisa na toli na Paulo, ete: “Bino mibali, bolingaka basi na bino, bosalelaka bango makambo na makasi te.” (Bakolose 3:19) Mibali bazali lisusu na mposa ya kozala na motema molai mpo na kolanda toli oyo ya ntoma Petelo: “Bino mibali lokola, bozalana na basi na bino na bososoli, kopesáká bango lokumu lokola mbeki na motau, mpo ete bakozwa libula ya bomoi elongo na bino; boye mabondeli na bino makopekisama te.” (1 Petelo 3:7, MN) Mobali moko akoki mbala mosusu kotyama na komekama mpo na bolembu ya mwasi na ye, kasi motema molai ekosalisa ye na kolonga yango.
9. Mpo na nini tosengeli kozala na motema molai epai na bana na biso?
9 Mpo na kolónga na kobokolo bana, esengeli kozala na motema molai. Ekómaka ete bilenge bazongela mbala na mbala bobele mabunga moko, oyo ekomonisa bango lokola bana na motó makasi to bana bayebi kokanga ntina noki te, mpe bazali mbala na mbala kotya motema petee ya baboti na bango na komekama. Na ntango wana, baboti baklisto basengeli kooka nkanda noki te mpe basengeli kobungisa kimya na bango te, kasi bakozala na bokatikati kotelemáká ngwi likoló na mitinda na boyengebene. Batata basengeli komikundola ete bango mpe bazalaki bilenge mpe basalaki mabunga. Basengeli bongo kosalela toli oyo na Paulo ete: “Bino batata, botumbolaka bana na bino te, mpo ete bolemba te.”—Bakolose 3:21.
Epai na bato ya libandá
10. Lokola yango emonisami na ndakisa moko, tosengeli kozala na etamboli nini na esika na biso ya mosala?
10 Kozanga kokoka mpe moïmi oyo moto abotami un yango, ekoki kobimisa matáta na esika oyo moklisto akosalaka. Bwanya esengi ete tozala na mayele mpe toyika mpiko wana bakosalela biso mabe, esengeli bongo mpo na kobatela kimya. Likambo likómelaki moklisto moko oyo azwaki mikakatano likoló na zuwa ya moninga moko ya mosala, emonisi motindo oyo etamboli wana ezali na mayele. Na esika ya kotya likebi na matumoli oyo bazalaki kosalela ye, moklisto wana amonisaki motema molai, mpe, na nsima, abandaki boyekoli na Biblia elongo na mosali oyo azalaki kobimisela ye mikakatano.
11. Na mabaku nini tosengeli mpenzampenza kazaka na motema molai, mpe mpo na nini?
11 Basaleli na Jéhovah basengeli mpenzampenza komonisa motema molai wana ezali bango kopesa litatoli na libandá ya lisangá na boklisto. Mbala mingi boklisto bakutanaka na kozanga bonkóndé to na maloba makasimakasi. Ekozala likambo malamu to na mayele na kozongisa mabe? Te, mpamba te yango ezali komonisa motema molai te. Mayele esengi komikundola lisese oyo libongi mpo na koteya mpe kolanda yango, ete: “Eyano ya boboto ekosilisaka nkanda, kasi liloba makasi likopesaka nkele.”—Masese 15:1.
Kondima mpe elikya ezali kosalisa biso na kozala un motema molai
12, 13. Bizaleli nini bikosalisa biso na kozala na motema molai?
12 Eloko nini ekoki kosalisa biso na komonisa motema molai mpe koyika mpiko na makambo na mpasi? Epai moko, ezali nde kondima kati na bilikya na Nzambe. Tosengeli kondima makambo oyo Nzambe azali koloba na biso.Tozali kotanga kati na Makomami ete: “Komekama moko ekómeli bino te oyo ezangi epai na bato nyonso. Nzambe azali sembo; ye oyo akotika bino te ete bomekama na koleka nguya na bino, kasi na komekama, akobongisa ekimelo ete bokoka koyika mpiko,” (1 Bakolinti 10:13) Na elobeli mosusu, lokola oyo elobaki moklisto moko aumeli mingi na lisangá, ete “soki Nzambe apesi nzela na yango, elingi koloba ete nakoki koyikela yango mpiko” Ee, tokoki koyika mpiko na kozala na motema molai.
13 Oyo esangani mpenza na kondima ezali elikya na Bokonzi na Nzambe. Ntango Bokonzi yango ekoyangela mabelé, makambo mabe nyonso oyo mazali komonana lelo, makambo nyonso mazali kopesa mpasi, makolongolama. Mpo na yango, Davidi, mokomi na nzembo alobaki ete: “Zalá na nkanda te mpe tika kosilika; kotomboka ekomemaka bobele na kosala mabe. Mpamba te basali na mabe bakosuka, nde baoyo bazali kotya elikya na Jéhovah bakosangola mokili.” (Nzembo 37:8, 9) Elikya makasi oyo ete, mosika te Nzambe akotya nsuka na makambo manso na mpasi, ezali kosalisa biso na kozala na motema molai.
14. Lisoló nini lizali komonisa ntina oyo tosengeli kozala na motema molai epai na mobalani oyo azali mondimi te?
14 Tosengeli kozala na etamboli nini soki mobalani na biso oyo azali mondimi te, azali kobimisela biso mikakatano? Esengeli na biso ntango nyonso koluka lisalisi ya Nzambe mpe kobatela elikya ete, mobalani na biso oyo azali lelo motemeli, mokolo mosusu akokóma mosambeli na Jéhovah. Mwasi ya moklisto moko azalaki mbala mosusu koboya kolambela ye mpe kosukola bilamba na ye. Azalaki kolobela ye mabe, azalaki koboya kolobisa ye na boumeli ya mikolo mingi, mpe amekaki nkutu kosalela ye mabe na nzela na bondoki. Moklisto alobi ete, “Kasi, ntango nyonso nazalaki komibalola epai na Jéhovah na mabondeli. Nazalaki kotyela ye motema, akoki kosalisa ngai na kolóna ezaleli wana kitoko ete motema molai, mpo ete nabungisa bokatikati na ngai na boklisto te. Nazalaki mpe kolikya ete, motema ya mwasi na ngai ekobongwana mokolo mosusu.” Nsima na mbula 20 ya ezalela wana, mwasi na ye abandaki kobongwana, mpe moklisto yango alobaki ete: “Nazali kotondo Jéhovah na lolenge oyo asalisi ngai na kolóna mbuma wana na elimo, motema molai, mpo ete namoni matomba na yango lelo: mwasi na ngai azali kotambola na nzela ya bomoi!”
Lisalisi na libondeli, ya komikitisa mpe ya bolingo
15. Na likambo nini libondeli ekoki kosalisa biso na kozala na motema molai?
15 Libondeli ezali mpe lisalisi monene mpo na komonisa motema molai. Paulo apesaki toli oyo ete: “Bomitungisa mpo na likambo moko te, nde kati na makambo nyonso, tika ete bisengeli na bino biyebana epai na Nzambe na mabondeli mpe na malombo mpe na matondi. Mpe kimya na Nzambe oyo eleki makanisi nyonso, ekobatela mitema na bino mpe bikaniselo na bino kati na Klisto Yesu.” (Bafilipi 4:6, 7) Tomikundola lisusu toli oyo: “Kitisa mokumba na yo epai na Jéhovah mpe ye akosunga yo. Akokita soko moke te ete moyengebene atelengana.”—Nzembo 55:22.
16. Na likambo nini ezaleli ya komikitisa ekoki kosalisa biso na kozala na motema molai?
16 Komikitisa ezali mpe lisalisi mosusu monene mpo na kolona mbuma ya elimo oyo ete motema molai. Moto na lolendo ekozalaka na motema likoló. Akozokisamaka na motema ata na likambo moke, asilikaka noki mpe akokaka te ete basalela ye mabe. Nyonso wana ekeseni na motema molai. Nzokande, ye oyo azali mosokemi akomitalelaka na motuya mingi te. Akotikaka nyonso epai na Jéhovah, lokola Davidi, na ntango elandamaki na mokonzi Saulo mpe afingamaki na Simi, moto na Benzamina. (1 Samwele 24:4-6; 2 Samwele 16:5-13) Na yango, tosengeli kozala na mposa ya kotambola na ‘komikitisa nyonso mpe na bopolo, na motema petee, koyikana mpiko kati na bolingo.’ (Baefese 4:2) Oyo eleki mpenza, tosengeli ‘komikitisa liboso na Jéhovah.’—Yakobo 4:10.
17. Na likambo nini bolingo ezali kosalisa bino na kozala na motema molai?
17 Bolingo ya solo ezali kosalisa biso mpenza na kozala na motema molai. Ya solo, “bolingo ezali na motema molai,” mpamba te, na yango nde tokosepelaka na bazalani na biso. (1 Bakolinti 13:4) Bolingo ezali kosalisa biso na komitya na esika na bato mosusu. Epai mosusu, ezali kosalisa biso na kozala na motema molai mpo ete yango “ekomemaka makambo manso, ekondimaka nyonso, ekolikyaka nyonso, ekoyikaka mpiko na nyonso. Bolingo ekosuka te.” (1 Bakolinti 13:7, 8) Ee, lokola yango eyembami na loyembo No. 200 oyo ezwami na mokanda na nzembo Louons Jéhovah par nos chants, ete:
“Bolingo ekangami na oyo malamu.
Ezali lisungi mpo na bandeko.
Ekozongisaka baoyo babungi, kati na bango.”
Ezali komona bizaleli malamu bizali
Kozala na motema molai elongo na esengo?
18. Ndenge nini tokoki kozala na motema molai elongo na esengo?
18 Paulo azalaki kobondela mpo ete baninga na ye kati na kondima baoyo bazalaki na Kolose, batonda na boyebi ya solo ya mokano na Nzambe, mpo ete batambola na motindo mondimami na Jéhovah, ete basepelisa ye mpe babota mbuma ya misala nyonso malamu. Na bongo nde ’’bokembisamaki na nguya nyonso kati na bokasi na ye na nkembo, mpo na koyika mpiko mpe kozala na motema molai elongo na esengo.” (Bakolose 1:9-11, MN) Kasi, lolenge nini tokoki kozala na ‘motema molai elongo na esengo’? Maloba oyo mazali bongolábongola te, mpamba te esengo oyo elobelami na Makomami, ezali bobele koseka mpamba te to komonisa ezalela malamu. Kati na mbuma wana ya elimo oyo ete esengo, ezali na bosepeli ya mozindo oyo tozalaka na yango na ntango tosali likambo moko malamu liboso na Nzambe. Tala ntina oyo Yesu alobaki ete: “Esengo na bino wana bakotuka bino mpe bakonyokola bino mpe bakolobela bino nyonso mpo na ngai. Bosepela mpe boyoka esengo, mpo ete libonza na bino lizali monene kati na likoló; mpamba te ezali bongo nde banyokolaki basakoli baoyo bazalaki liboso na bino.”—Matai 5:11, 12.
19. Bandakisa nini emonisi ete tokoki mbala moko kozala na motema molai mpe na esengo?
19 Yesu azalaki na esengo motindo wana. Ee, “mpo na esengo oyo etyamaki liboso na ye, ayikelaki nzete na mpasi mpiko, atyolaki nsoni.” (Baebele 12:2) Esengo wana epesaki Yesu nzela ete azala na motema molai. Bobele bongo, tala oyo ekómaki ntango bantoma babetamaki mpimbo mpe balakaki bango ete “baloba na nkombo na Yesu te.” Bongo “babimi na Koyangana, kosepeláká ete batangami babongi na kozwa nsoni mpo na nkombo na ye. Nde batiki te mokolo na mokolo, kati na tempelo mpe na ndako na ndako, bateyaki mpe basakolaki nsango malamu na ntina na Klisto, Yesu.” (Misala 5:40-42, MN) Tala ndakisa malamu oyo emonisi ete bayekoli na Klisto bakoki kozala na motema molai elongo na esengo.
20. Kozala na motema molai ekoki kozala na bopusi nini likoló na boyokani na biso elongo na bato mosusu?
20 Solo mpenza, Liloba na Nzambe lipesi toli malamu wana elendisi biso na kozongisa mabe te, na kooka nkanda noki te na kozaláká na elikya ete makambo makobongwana, na elobeli mosusu, kozala na motema molai. Tozali na mposa na kobondela mbala na mbala mpe kozala na mbuma wana ya elimo na Nzambe mpo na kozala na boyokani malamu elongo na bandeko na biso mibali mpe basi kati na lisangá, elongo na basangani ya libota na biso, elongo na baninga na biso ya mosala mpe elongo na bato oyo tozali kokutana na bango kati na mosala ya kosakola. Eloko nini ekoki kosalisa biso na komonisa motema molai? Ezali kondima, elikya, komikitisa, esengo mpe bolingo. Ee, na bizaleli motindo oyo, tokoki kozala na motema molai epai na bato banso.
Bozongeli
◻ Mpo nini motema molai ezali na ntina mingi mpo na kozala na paradis ya elimo?
◻ Mpo na nini bankulutu basengeli mpenza kozala na motema molai?
◻ Mpo na nini mibali mpe basi oyo babali basengeli kolóna motema molai?
◻ Bizaleli nini bizali kosalisa biso na kozala na motema molai?
[Elilingi na lokasa 17]
Toli nini na Yesu esalisaki Petelo na kozala na motema molai?