“Basi oyo bakosalaka makasi kati na Nkolo”
‘Mbote na Tulufaina mpe Tulufosa, [basi oyol bakosalaka makasi kati na Nkolo.”—BALOMA 16:12.
1. Na likambo nini mosala na Yesu awa na mabelé ezalaki lipamboli mpo na basi?
MOSALA na Yesu awa na mabelé mozalaki solo lipamboli mpo na basi Bayuda. Mosala oyo abandaki mosengelaki komema elendiseli, elikya mpe lokumu ya sika epai na basi ya mposo nyonso. Yesu atyaki ata likebi te na mibeko ya lingomba na Bayuda oyo ebebisaki “liloba na Nzambe.” (Matai 15:6) Mingi na mibeko yango mityolaki lotomo oyo Nzambe apesaki na basi.
Ezaleli na Yesu epai na basi
2. Mpo na nini tokoki koloba ete lolenge oyo Yesu azalaki kotalela basi ezalaki likambo ya sika?
2 Oyo nde kokesena monene kati na ezaleli na Yesu mpe oyo na bakonzi na lingomba ya Bayuda epai na basi! Totangi kati na mokanda Encyclopédie Judaica ete bakonzi wana batalelaki basi lokola “bato na lokɔso, baoyo bakolukaka koyoka makambo na bato mosusu nde bayebi kobomba yango te, bagoigoi mpe bato na zuwa.” Mobali oyo azalaki kosolola elongo na mwasi moko, atyolamaki, mpe “ezalaki likambo na nsoni mpo na mobali oyo atangi kelasi ete asolola elongo na mwasi moko kati na balabala.” (Yelusaleme na ntango na Yesu, na Lingelesi, ekomami na Yoakime Yilimiase; tala Yoane 4:27.) Tokoki koloba makambo mingi lisusu likoló na lolenge mabe oyo bakonzi na lingomba ya Bayuda bazalaki kotalela basi. Kasi makanisi oyo topesi ekoki mpo na komonisa ete lolenge oyo Yesu azalaki kotalela basi ezalaki mpenza likambo ya sika na eleko wana.
3. Biteni nini ya mosala na Yesu bimonisi ete azalaki pene na koteya makambo mozindo na elimo epai na basi?
3 Yesu apesi biso ndakisa ya kokoka ya mobali oyo azalaki na boyokani malamu elongo na basi, mpe yango na peto nyonso. Azalaki bobele kosolola na bango te; azalaki mpe koteya bango makambo mozindo na elimo. Na solo, moto ya yambo mpenza oyo ye ayebisaki ete azali Masiya, ezalaki mwasi, ye Mosamaria (Yoane 4:7, 25, 26) Lisusu, oyo ye asalaki elongo na Malatá mpe Marie, emonisi mpenza ete, na kokesena na bakonzi na lingomba ya Bayuda, Yesu akanisaki te ete basi bazali na lotomo te ya kotika kolamba mwa ntango moke mpo na koyoka makambo ya elimo. Mokolo wana, Marie “aponaki oyo malamu”: atyaki biloko ya elimo na esika ya liboso. (Luka 10:38-42) Nzokande, mwa basanza na nsima, ezali Malatá kasi Marie te, oyo, na nsima na liwa ya ndeko na bango, amonisaki molende mingi mpo na kokenda kokutana na Nkolo. Lelo lisusu, tozali na esengo na kotangáká lisoló mozindo kati na elimo, oyo Yesu asololaki yango elongo na Malatá likoló na elikya ya lisekwa. (Yoane 11:20-27) Oyo nde libaku kitoko Malatá azalaki na yango!
Basi oyo basalelaki Yesu
4, 5.. Longola bantoma, banani mosusu balandaki Yesu na boumeli ya mosala na ye na Galilai, mpe motindo nini basalelaki ye?
4 Ezalaki ye kotambola na mboka, Yesu andimaki mpe basi ete basalela ye. Kati na Nsango Malamu engebene Malako, tozali kotanga ete basi “balandi ye wana ezalaki ye na Galilai mpe basaleli ye.” (Malako 15:40, 41) Basi yango banani, mpe motindo nini basalelaki Yesu? Toyebi nkombo na bango nyonso te, kasi Luka atangi ndambo na bango mpe alimboli lolenge oyo basalelaki Yesu.
5 Luka akomi ete: “Na nsima Yesu atambolaki kati na mboka minene mpe mboka mike. Asakolaki mpe alakisaki nsango malamu ya Bokonzi na Nzambe, mpe Bazomi na mibale bazalaki na ye esika moko, na basi mosusu oyo babikisamaki na bilimu mabe mpe na maladi: Marie oyo abengamaki moto na Magadala, oyo bilimu mabe nsambo bibimaki na ye, mpe Yoana, mwasi na Kuja kapita na Hérode, mpe Suzana mpe basi mingi mosusu, oyo basalelaki bango na biloko bizalaki na bango.” (Luka 8:1-3) Yesu amonaki mabe te ete basi wana balanda ye mpe basalela biloko na bango mpo na kosunga ye na mosuni elongo na bantoma na ye.
6. (a) Banani balandaki Yesu na boumeli ya mobémbo na ye ya nsuka na Yelusaleme? (b) Banani bazalaki elongo na Yesu kino na liwa na ye, mpe bamoko kati na bango basili kozwa mbano nini? (c) Wana tozali kotalela mibeko na bonkoko ya Bayuda, likambo nini kitoko likeseni na yango, lizwami kati na Yoane 20:11-18?
6 Na ntango babomaki Yesu, “basi mingi bazalaki na esika yango kotaláká longwa na mosika, bango balandaki Yesu mpo na kosalela ye kolongwa na Galilai; kati na bango, Marie moto na Magadala, mpe Marie mama na Yakobo mpe Yozefe.” (Matai 27:55, 56) Na yango, basi mingi na sembo bazalaki pene na Yesu na mokolo na liwa na ye. Tomoni lisusu ete basi nde bazalaki bato ya yambo oyo bamonaki lisekwa na Yesu. (Matai 28:1-10) Yango ekweisaki mpenza bonkoko ya Bayuda, mpamba te, mpo na lingomba ya Bayuda, basi babangaki te mpo na kotatola likambo na esambiselo. Na likambo oyo, totanga naino Yoane 20:11-18, mpe tomeka kokanisa mayoki oyo Marie moto na Magadala azalaki na yango na ntango Nkolo na ye abimelaki ye, mpe abengi ye na nkombo na ye mpe asɛngi ye ete atatwela bayekoli na ye na ntina na lisekwa na ye.
Basi baklisto ya sembo
7, 8. (a) Ndenge nini toyebi ete basi bazalaki wana ntango elimo santu esopamaki na Pantekote? (b) Mosala nini basi bakokisaki kati na kopalangana ya boklisto ya ebandeli?
7 Nsima na komata na Yesu na likoló, basi bakobangaka Nzambe bazalaki elongo na bantoma ya sembo na Yelusaleme kati na eteni na ndako na likoló. (Misala 1:12-14) Emonani ete basi bazalaki kati na bato oyo elimo santu esopamaki likoló na bango, na mokolo ya Pantekɔte. Mpo na nini bongo? Mpo ete ntango Petelo alimbolaki likambo oyo lisalemaki, atangaki Yoele 2:28-30, oyo elobeli “bana basi” mpe “basaleli na basi” to “baombo na basi.” (Misala 2:1, 4, 14-18) Na yango, ezalaki na basi oyo babotamaki na elimo, basi baklisto bapakolami, kati na lisangá ya boklisto uta ebandeli na yango.
8 Atako bayangelaki te, basi basalaki mosala monene mpo na kopalanganisa losambo na boklisto. Marie, mama na Malako mpe ndeko mwasi na mama na Balanaba, apesaki lisangá na Yelusaleme ndako na ye oyo, na ntembe te, ezalaki monene. (Misala 12:12) Oyo eleki mpenza ezali oyo ete, apesaki yango na ntango oyo minyoko makasi mibimaki likoló na baklisto. (Mosala 12:1-5) Bana basi minei na Filipo, molakisi na nsango malamu, bazwaki libaku ya kozala basi baklisto basakoli.—Misala 21:9; 1 Bakolinti 12:4, 10.
Ezaleli ya Paulo epai na basi
9. Kati na mokanda na ye ya liboso epai na Bakolinti, Paulo apesaki toli nini na ntina na basi, mpe alendisaki bango na kotósa etinda nini na Nzambe?
9 Mbala mosusu bakofundaka Paulo ete azalaki na mayoki ya koyina basi mpe azalaki kotyela bango motema te. Ezali solo Paulo nde asengaki ete basi bazala na esika na bango kati na lisangá na boklisto. Basengelaki koteya te na ntango na makita. (1 Bakolinti 14:33-35) Moklisto mwasi akokaki koteya lisangá bobele soki ndeko mobali azali te to soki apusamaki na elimo santu mpo na kosakola. Na bongo, asengelaki kokanga litambála na motó. Litambála oyo alataki ezalaki “elembo na bokonzi,” elembeteli elakisaki ete mwasi yango azalaki kotósa ebongiseli ya Nzambe na ntina na bokonzi.—1 Bakolinti 11:3-6, 10.
10. Na likambo nini bato mosusu bazali kofunda ntoma Paulo, kasi nini emonisi ete efundeli yango ezali na moboko te?
10 Emonani ete, Paulo amonaki ntina ya kokundola mitinda wana na bonzambe epai na baklisto ya liboso, ete “makambo nyonso masalema na motindo na nsoni te mpe na mobulu te. ” (1 Bakolinti 14:40) Kasi, tosengeli nde kosukisa lokola bamosusu ete, Paulo ayinaki basi? Te. Kati na mokapo ya nsuka ya mokanda na ye epai na Baloma, Paulo apesi mbote epai na basi baklisto libwa. Atondi na bolingo epai na Foibe, na Pilisikia, na Tulufaina mpe na Tulufosa, awa elobi ye ete “bakosalaka makasi kati na Nkolo.” (Baloma 16:1-4, 6, 12, 13, 15) Ezali Paulo nde akomaki na kopemama na Nzambe ete: “Moyuda azali te soko Mogreke te, moombo azali te soko nsomi te, mobali azali te soko mwasi te. Mpo ete bino nyonso bozali moko kati na Klisto Yesu.” (Bagalatia 3:27, 28)Ezali bongo polele ete Paulo alingaki mpe azalaki kosepela na bandeko basi baklisto, kati na bango Ludi, oyo amonisaki boyambi monene na eleko na mpasi.—Misala 16:12-15, 40; Bafilipi 4:2, 3.
Basi oyo bazali lelo kosala na makasi
11, 12. (a) Lolenge nini Nzembo 68:11 ezali lelo kokokana polele mpenza? (b) Mingi na bandeko na biso ya basi bazali kati na ezalela nini, mpe mpo na nini bazali ma mposa ya bolingo na biso mpe mabondeli na biso?
11 Kati na lisangá na boklisto lelo, ezali na “basi oyo basakolaka makasi kati na Nkolo.’’ Na bokuse, motuya na bango emonisi ete “basi oyo bapalangisi nsango malamu, bazali mingi mpenza”; basi bazali eteni eleki monene na limpinga ya ba Témoins oyo Jéhovah azali kosalela na ntango oyo ya nsuka. (Nzembo 68:11) Na mosala na bango makasi, basi baklisto wana bazali kozwa lokumu malamu, mpamba te bazali kobunda mpo na kokokisa mokumba na bango ya basi na mabala, ya bamama na mabota mpe ya basali na ndako, mpo na kokokisa bamposa ya mabota na bango, mpe kozala basakoli baklisto.
12 Mingi na bandeko basi wana na molende, bazali na babalani oyo bazali bandimi te. Bazali koyika mpiko na ezalela wana mokolo na mokolo. Bamoko na bango bazali kobunda uta bambula mingi mpo na kozala basi malamu na mabala mpe kokokisa makambo oyo masengami na basaleli na sembo na Jéhovah. Ezali petee te, kasi bazali koyikela yango mpiko, kozaláká ntango nyonso na elikya ete mokolo mosusu mibali na bango ‘bakondima,’ na kotalela etamboli na bango kitoko na boklisto. Oyo nde esengo mpo na libota mobimba wana mobali andimi solo! (1 Petelo 3:1, 2) Na ntango nyonso wana, bandeko basi yango na sembo bazali na mposa na bolingo ya bandeko mpe na mabondeli ya basangani mosusu ya lisangá. Lokola “elimo na bopolo mpe na kimya” oyo bazali kosala makasi na komonisa ezali “na motuya monene na miso na Nzambe,” bobele bongo bosembo na bango ezali na motuya mingi epai na biso.—1 Petelo 3:3-6.
13. Mpo na nini tokoki koloba na ntina na bandeko basi oyo bazali ba pionniers ete bazali “basi oyo bakosalaka makasi kati na Nkolo,” mpe ndenge nini tosengeli kotalela bango kati na lisangá?
13 Na ntembe te, tokoki koloba na ntina na basi ba pionniers ete “bakosalaka makasi kati na Nkolo”. Longola mosala ya kosakola, mingi kati na bango basengeli kobongisa ndako mpe kosalela mibali mpe bana na bango. Bamoko bazali kosala mosala ya mosuni na bisika oyo bakozwaka bango mpo na mokolo mobimba te mpo ete bakokisa bamposa na bango. Nyonso wana esengi ebongiseli malamu, ekateli makasi, kolendendela, mpe kosala mingi. Basi baklisto wana basengeli kooka bolingo mpe lisungi ya baninga na bango baoyo, likoló na ezalela ya makambo na bango, bakoki te kolekisa ntango mingi lokola ba pionniers kati na mosala ya kosakola.
14. (a) Ndakisa malamu nini etangami awa mpo na kolendendela? (b) Basi nini mosusu babongi kokumisama, mpe mpo na nini? Tángá bandakisa ya mboka na bino.
14 Basi baklisto mosusu bazali komonisa molende makasi kati na mosala ya pionnier. Mwasi moko ya canada na nkombo Grace Lounsbury akómaki pionnier na mobu 1914. Mpo na bantina ya kolongono na nzoto na ye, na 1918, atikaki mosala yango, kasi azongelaki yango na 1924. Lelo oyo tokomeli bino, mwasi yango azali bobele na molongó ya ba pionniers, atako akómi na mobu 104! Mingi na bandeko basi bamisionere baoyo, na bambula 1940, bakɔtaki na bakelasi ya yambo ya Galaad, Eteyelo ya Biblia ya la Société Watchtower, bazali bobele sembo ezala kati na mosala ya misionere, na Béthel ya Brooklyn to kati na moko na ba filiales ya la Société Watchtower. Basi baklisto wana nyonso, mpe bandeko basi nyonso oyo bazali na mosala mingi na Béthel, bazali komonisa elimo ya komipesa mpe bazali bandakisa kitoko. Tomonisaka bango boni tozali kosepela na bango?
Basi ya bakengeli ya zongazonga
15, 16. Etuluku nino ya basi baklisto oyo babongi ete topesa bango longonya na mɔtɔ nyonso, mpe mpo na nini?
15 Basi ya bakengeli ya zongazonga bazali mpe etuluku ya basi baklisto oyo babongi na longonya mpe na kolendisama na mɔtɔ nyonso. Na mposa na bango moko, bandeko basi wana na bolingo, bakolandaka mibali na bango, baoyo bakokendeke lisangá na lisangá to circonscription na circonscription mpo na kolendisa elimo ya bandeko na bango. Mingi kati na basi yango basili kotika bandako kitoko; poso nyonso bazali kolala na bisika bikeseni, oyo mbala mosusu ezalaka malamu te. Kasi, na esengo nyonso bazali kondima oyo bandeko bakoki kopesa bango. Bazali mpe kopesa ndakisa malamu epai na bandeko na bango ya basi kati na kondima.
16 Lokola basi bakobangaka Nzambe oyo “balandaki” Yesu mpe “basalelaki ye,” basi baklisto wana bazali kopesa lisungi monene epai na mibali na bango. (Malako 15:41) Bazali na ntango mingi te ya kolekisa elongo na mibali na bango, baoyo bazali “ntango nyonso na mosala mingi kati na Nkolo.” (1 Bakolinti 15:58) Bamoko na basi yango, lokola Rosa Szumiga na France, ye oyo abandaki mosala ya pionnier na 1948, bakobongisaka biloko ya mibali na bango ete bakende mobémbo mpe bazali kosala mibémbo elongo na bango uta bambula 30 to 40. Soki bazali komipesa, yango ezali mpo na Jéhovah mpe mpo na bandeko na bango mibali mpe basi. Boye babongi na botɔndi na biso, na bolingo na biso mpe na mabondeli na biso.
Basi ya bankulutu
17, 18. (a) Bizaleli nini bisengami epai na basi baklisto oyo mibali na bango bazali na mikumba kati na lisangá? (b) Makambo nini basi ya bankulutu bazali pene na kondima yango mpo na makambo na Jéhovah mpe na oyo ya bandeko na bango, mpe ndenge nini basi mosusu bakoki kosalisa mibali na bango?
17 Wana atangaki masengami ya bandeko mibali oyo bakoki koponama lokola bankulutu mpe basaleli na misala, ntoma Paulo akomaki mpe na ntina na basi ete: “Basi mpe basengeli kozala bato babongi, batongi te, bato na bizaleli malamu, bato basembwi na makambo nyonso.” (1 Timoté 3:11, MN) Ya solo, toli oyo etaleli basi baklisto nyonso; kasi, na kotalela ba versets ya zingazinga, emonani ete yango esengelaki kosalelama mpenza epai na basi ya bandeko oyo bazali na mikumba kati na lisangá.
18 Esengo mpenza, mpamba te yango nde emonani epai na ebele na basi ya bankulutu. Bazali na bizaleli malamu mpe na molato mobongi, bazali kotalela bomoi na boklisto na motindo mobongi, bazali kokeba na maloba na bango, mpe bazali kosala makasi mpo na kozala sembo na makambo nyonso. Lisusu, bazali pene na komipesa, mpamba te bandimi ete mibali na bango balekisa ntango mingi na makambo ya lisangá koleka ntango oyo bakoki kolekisa elongo na bango. Ebongi na biso ete tolinga basi baklisto wana mpe tolendisa bango na mɔtɔ nyonso. Kati na masangá na biso, bandeko mingi bakoki mbala mosusu koluka mikumba misusu soki basi na bango bandimi na komikitisa nyonso ete bamipesa motindo wana mpo na bolamu ya bato nyonso.
“Mibangé basi” na sembo
19. Mpo na nini ebele na mibangé bandeko basi na sembo bazali na lokumu malamu kati na masangá na bango, mpe biso tosengeli kozala na mayoki nini epai na bango?
19 Na kotaleláká basi mingi oyo balobelami na Biblia, tosili komona ete mbula ekoki te kopekisa basi na kondima ete basalela jéhovah. Ezali yango nde emonisamaki na Sara, na Elizabete mpe Ana. Lelo oyo, mibangé basi baklisto mingi bazali kopesa ndakisa malamu ya kondima mpe ya koyika mpiko. Lisusu, bakoki kosunga bankulutu, na kopesa toli epai na bilenge bandeko basi. Lokola bayebi makambo mingi mpo na mbula na bango, bazali na likoki ya kopesa batoli ya mayele epai na bilenge basi, lokola yango epesami nzela na Makomami. (Tito 2:3-5) Ekoki mbala mosusu kokóma ete mobangé ndeko mwasi azala ye moko na mposa ya toli. Na bongo, nkulutu oyo azali koloba na ye asengeli ‘kobondela ye lokola mama.’ Bankulutu basengeli na ‘kokumisa basi bakufeli mibali’ mpe soki yango ekoki, basengeli kobongisa ete bazwa lisalisi na mosuni. (1 Timoté 5:1-3, 5, 9, 10) Mibangé bandeko na biso ya basi basengeli kooka bolingo oyo tozali na yango mpo na bango.
Bazali koyangela elongo na Klisto
20. Libaku nini eleki monene lisili kopesama epai na mingi kati na basi baklisto, mpe mpo na nini bampate mosusu bakoki kozala na esengo mpo na yango?
20 Makomami mamonisi polele mpenza ete “Nzambe akotalaka bilongi te.” (Baloma 2:10, 11; Bagalatia 3:28) Yango emonani mpe na lolenge oyo Jéhovah aponi baoyo basengeli kozala elongo na Mwana na ye kati na Bokonzi to Boyangeli. (Yoane 6:44) Ebele monene ya bampate mosusu basengeli kozala na balandi ete baal na sembo lokola Marie, mama na Yesu, Marie moto na Magadala, Pilisikia, Tulufaina, Tulufosa mpe ebele na basi baklisto mosusu ya ekeke ya liboso, bazali lelo koyangela kati na Bokonzi, kolendisa yango na bososoli malamu oyo bazali na yango na mikakatano oyo mwasi akoki kokutana na yango mpe na mayoki oyo akoki kozala na yango. Oyo nde ebongiseli etondi na bolingo mpe na mayele euti na Jéhovah!—Baloma 11:33-36.
21. Tozali na mayoki nini epai na “basi oyo bakosalaka makasi kati na Nkolo”?
21 Tokoki lelo kozala na bolingo mpe na botɔndi lokola oyo Paulo azalaki na yango wana alobaki na ntina na ‘basi oyo basalaki mosala elongo na ye kati na nsango malamu.’ (Bafilipi 4:3) Ezali esengo mpe libaku kitoko mpo na ba Témoins de Jéhovah nyonso, mibali mpe basi, ete basalana elongo na ‘basi mingi oyo bazali kosakola nsango malamu,’ ee, “basi oyo bakosalaka makasi kati na Nkolo.”—Nzembo 68:11; Baloma 16:12.
Bozongeli
◻ Lolenge nini Yesu amonisaki ete andimaki te ezaleli ya bakonzi na lingomba ya Bayuda oyo bazalaki kotyola basi?
◻ Ndenge nini basi bakobangaka Nzambe basalelaki Yesu, mpe bamoko na bango bazwaki libaku nini kitoko?
◻ Paulo apesaki toli nini na ntina na ezaleli ya basi na ntango na makita ya lisangá?
◻ Motindo nini na bandeko basi oyo babongi mpenzampenza ete tomonisela bango bolingo mpe lisungi na biso, mpe mpo na nini?
◻ Tosengeli kozala na mayoki nini epai na “basi [nyonso] oyo bakosalaka makasi kati na Nkolo”?
[Elilingi na lokasa 16, 17]
Basi basalelaki Yesu mpe bantoma na ye
[Bililingi na lokasa 18]
Na ezaleli na bango ya komikitisa, basi ya bakengeli ya zongazonga mpe oyo ya bankulutu mosusu, bazali kosunga mosala ya Nzambe