Tózala na kondima oyo etongami likoló na solo
“Soki moto azangi kondima, akoki kosepelisa Nzambe te. Mpo ete ekoki na babɛlɛmi na Nzambe kondima ete azali mpe ete akozongisa libonza epai na bango bakolukaka ye.”—BAEBELE 11:6.
1, 2. Lolenge nini kondima ya Adam etyamaki na komekama, mpe nini ekómaki?
KOZALA na kondima, ezali te bobele kondima ete Nzambe azali. Adam, moto na liboso, abɛtaki ntembe te ete Nzambe azalí. Jéhovah azalaki kosolola elongo na ye, mpenzampenza na nzela na Mwana na Ye, Liloba. (Yoane 1:1-3; Bakolose 1:15-17) Nzokande, Adam abungisaki bomoi ya seko mpo ete atósaki Jéhovah te mpe azalaki na kondima epai na ye te.
2 Na ntango Eva azangaki botósi epai na Jéhovah, emonanaki lokola ete bolamu ya Adam mpo na mikolo mikoya ebebaki. Wana akanisaki ete alingaki kobungisa mwasi na ye, makanisi ya mobali na liboso mabulunganaki mpe kondima na ye etyamaki na komekama! Nzambe akokaki kobongola makambo na motindo boye ete Adam alanda kozala na bomoi na esengo mpe na bozwi? Na kolandáká Eva kati na mabe na ye, Adam amonisaki mpenza ete akanisaki motindo wana te. Amekaki kosilisa likambo yango na motindo na ye moko, na esika ete aluka litambwisi na Nzambe na makasi nyonso. Mpo ete azangaki kondima epai na Jéhovah, Adam amemaki mokumba ya liwa na ye moko mpe oyo ya bakitani na ye nyonso.—Baloma 5:12.
Kondima ezali nini?
3. Kokesena nini ezali kati na ndimbola ya kondima epesami na Biblia mpe oyo epesami na diksionere moko?
3 Diksionere moko elimboli kondima lokola “endimeli makasi mpo na eloko moko ezangi bilembeteli.” Nzokande, Biblia epesi ndimbola ekeseni. Kondima ezwi moboko na yango likoló na makambo masili kosalema, na makambo makoki kotyamela ntembe te mpe likoló na solo. Totangi kati na Makomami ete: “Kondima ezali bozeli na biloko bikolikya biso; ezali mpe elimbweli na biloko bizangi komonana.” (Baebele 11:1) Moto oyo azali na kondima akomonaka lokola ete makambo nyonso malakámi na Nzambe, masili kokokisama. Biloko bizangi komonana bikoyelaka ye na makanisi na lolenge na solosolo kino elobami mpo na kondima ete, ekokani na elembeteli.
4. Tozali kotanga nini kati na mokanda moko oyo ezali kolimbola kondima lokola Biblia esalaki ango!
4 Kati na Traduction du monde nouveau, na lolenge na yango na komonisa ntina na likambo, verbe ya hébreu ’a.man’ ebongolami na bisika mosusu ete “kondimela.” Engebene mokanda moko (Theological Wordbook of the Old Testament), “ndimbola na mozindo ya liloba wana ezali kopesa likanisi ya kondimisama . . . oyo ekeseni na makanisi ya lelo oyo malakisi kondima lokola eloko moko ekoki kosalema, oyo moto azali kolikya, nde ezali solo mpenza te.” Mokanda yango mobakisi ete: “Liloba ’ãmen solo mpenza,’ ezali kati na Kondimana na Sika na lolenge ya amɛ̃n, oyo ebimisi liloba ‘amen.’ Yesu asalelaki liloba yango mbala na mbala (Mt 5:18, 26, mpe biteni mosusu) mpo na kolakisa kondimisama.” Liloba oyo libongolami na “kondima” kati na Makomami na greke na boklisto, yango mpe elimboli endimeli makasi oyo etongami likoló na makambo ya solo mpe likoló na solo.
5. Lolenge nini mobu na greke oyo libongolami na “bozeli” na Baebele 11:1 esalelamaki kati na mikanda na kala ya mombóngo, mpe baklisto basukisi nini na yango?
5 Liloba na greke (hy.po’sta.sis) libongolami na “bozeli” na Baebele 11:1, esalelamaki mbala na mbala kati na mikanda na kala ya mombóngo oyo ekomamaki na papyrus mpo na kopesa likanisi ya kozala na ndanga ya kozwa eloko moko na ntango ekoya. Moulton mpe Milligan babongoli motindo oyo, ete: “Kondima ezali ndanga ya biloko oyo tokolikyaka.” (Vocabulary of the Greek Testament) Emonani ete, soki moto azali na ndanga, azali kati na “bozeli” ete mokolo moko elikya na ye ya kozwa eloko wana ekokokana.
6. Liloba na greke libongolami na “elimbweli” na Baebele 11:1 elimboli nini?
6 Na Baebele 11:1, liloba na greke libongolami na “elimbweli” (e‘ leg. khos) ezali na likanisi ya kopesa bilembeteli bikomonisa eloko moko, mingimingi mpo na eloko oyo ekeseni na oyo ekomonanaka, Bilembeteli wana malamu to ya solo ekolakisaka polele likambo oyo lisosolamaki liboso te, mpe, na yango, ezali kokweisa likambo oyo lindimamaki liboso. Emonani bongo polele kati na Makomami na hébreu lokola mpe na Makomami na greke ete, kondima ekeseni na “endimeli makasi kati na eloko moko oyo ezangi bilembeteli.” Nzokande, kondima etongami mpenza likoló na solo.
Kondima etongami likoló na solo ya moboko
7.Ntóma Paulo mpe Davidi balobaki nini na ntina na baoyo baboyi kondima ete Nzambe azali?
7 Ntóma Paulo amonisaki solo na moboko wana akomaki, ete “bizaleli na ye [Mozalisi] bizangi komonana uta kozalisama ya mokili, bimonani polele longwa na misala na ye na kozalisa, mpamba te yango esalami na mayele, ee, na nguya na ye ya seko mpe na bonzambe na ye, na boye ete [baoyo bazali kondima yango te] bakolimbisama te.” (Baloma 1:20, MN) Na yango, “likoló ekosakolaka nkembo na Nzambe” mpe “mabelé matondi mɛkɛ na biloko bisalaki [yel.” (Nzembo 19:1; 104:24, MN) Kasi esengeli kosala nini soki moto moko aboyi kotalela bilembeteli? Davidi, mokomi na nzembo alobaki na ntina yango ete: “Na lolendo na ye mosumuki akokanisa eloko te, akomilobela ete: ‘Nzambe azali te.”’ (Nzembo 10:4, Liloba lya Nzambe; Nz 14:1) Kondima etongami mpenza likoló na solo oyo na moboko ete: Nzambe azali.
8. Baoyo bandimeli bandimisami na likambo nini, mpe basosoli likambo nini?
8 Kasi, ezali bobele te ete Jéhovah azali; azali mpe Nzambe abongi na kotyela motema, mpe tokoki kozala na kondima na bilaka na ye. Alobaki ete: “Lokola mwango mobongisaki ngai, ekozala mpe bongo; lokola mokano mokanaki ngai, ekosalema mpe bongo.” (Yisaya 14:24; 46:9, 10) Wana ezali maloba mpamba te. Ezali na bilembeteli bimonisi polele ete bisakweli mingi bizwami kati na Liloba na Nzambe, esili kokokana. Pole oyo emonisami likoló na bisakweli ya Biblia, ezali mpe kopesa bososoli ya ntina epai na baoyo bandimeli mpo na koyeba ete bisakweli mingi mosusu bizali kokokisama. (Baefese 1:18) Na ndakisa, bazali komona kokokana na “elembo” ya koya na Yesu; kopalangana na mosala ya kosakola Bokonzi botyami mpe bokóli ya losambo na peto, makambo oyo masali bongo elembo yango. (Matai 24:3-14; Yisaya 2:2-4; 60:8, 22) Bayebi ete mosika te mabota bakosakola “Kimya mpe libateli!”, mpe nsima mwa moke Nzambe ‘akobebisa baoyo bazali kobebisa mokili.’ (1 Batesaloniki 5:3; Emoniseli 11:18) Ezali malamu mpenza na kozala na kondima oyo etongami likoló na solo na bisakweli.
Mbuma na elimo santu
9. Boyokani nini bozali kati na kondima mpe elimo santu?
9 Solo oyo kondima etongami likoló na yango ezali‘kati na Biblia, oyo ekomamaki na nzela na elimo santu. (2 Samwele 23:2; Zakaria 7:12; Malako 12:36) Ezali solo ete, soki elimo santu ezali te, mbɛlɛ kondima ezali te. Tala ntina oyo Paulo akomaki ete: “Mbuma na elimo ezali [kati na yango] kondima.” (Bagalatia 5:22) Nzokande, bato mingi baboyi solo na Nzambe, mpe bazali kobebisa bomoi na bango na bamposa mpe na makanisi ya mosuni oyo ezali kookisa elimo na Nzambe mawa. Na yango, “bato nyonso bazali na kondima te” mpo ete bazali ata na moboko moko te likoló na yango bakoki kotonga kondima wana.—2 Batesaloniki 3:2; Bagalatia 5:16-21; Baefese 4:30.
10. Lolenge nini basaleli mosusu ya kala na Jéhovah bamonisaki ete bandimelaki?
10 Atako bongo, bamoko na bakitani na Adam bandimelaki. Baebele 11 (MN) etangi bato oyo “bazwaki litatoli mpo na kondima na bango”: Abele, Enoka, Noa, Abrahame, Sara, Yisaka, Yakobo, Yozefe, Moïse, Rahaba, Gédéon, Barake, Samson, Yefeta, Davidi mpe Samwele, mpe ebele na basaleli mosusu na Jéhovah baoyo nkombo na bango ekomami te. Tala oyo esalemaki “mpo na kondima.” Mpo na kondima, Abele “atombweli Nzambe mbeka” mpe Noa “atongi masuwa.” Mpo na kondima, Abrahame “atósaki wana ebyangami ye ete abima kokenda kino esika ekozwa ye libula.” Mpo na kondima, Moïse “atikaki Ezipito.”—Baebele 11:4, 7, 8, 27, 29, 39.
11. Misala 5:32 ezali komonisa biso nini na ntina etali bato oyo bakotósaka Nzambe?
11 Emonani ete, basaleli nyonso wana ya Jéhovah basalaki makambo maleki kondima bobele ete Nzambe azali. Bandimelaki mpe batyaki motema epai na Ye oyo “akozongisa libonza epai na bango bakolukaka ye. ”(Baebele 11:6) Bazalaki kosala makambo na kopusama na elimo na Nzambe, engebene boyebi ya solo oyo bazalaki na yango na eleko wana, atako boyebi yango ezalaki mingi te. Oyo nde kokesena monene na etamboli na Adam! Ye asalaki te elongo na kondima oyo etongami likoló na solo, mpe asalaki te na boyokani na litambwisi ya elimo santu. Nzambe akopesaka elimo na ye bobele na baoyo bakotosaka ye.—Misala 5:32.
12. a) Endimiseli nini Abele azalaki na yango mpo na kondima na ye, mpe lolenge nini amonisaki yango? (b) Eloko nini Abele mpe batemwe mosusu na Jéhovah na ntango ya kala bazwaki yango te, atako bazalaki na kondima?
12 Na likeseni na Adam tata na ye, Abele, moto na kobanga Nzambe, azalaki na kondima. Na ntembe te, epai na baboti na ye, azwaki boyebi ya esakweli ya liboso oyo ete: “Nakotya [Jéhovah nde azali koloba] koyinana kati na yo mpe mwasi, kati na libota na yo mpe libota na ye; ye mpe akotuta motó na yo mpe yo okoswa litindi na ye.” (Genese 3:15) Na maloba oyo, Nzambe apesaki elaká ya kolongola mabe mpe kozongisa boyengebene. Abele ayebaki te lolenge nini esakweli oyo esengelaki kokokana. Kasi, mpo na kondima na ye, andimisamaki ete Nzambe azali Ye oyo akozongisaka libonza na baoyo bakolukaka ye mpe yango epusaki ye na kotombwela ye mbeka. Ntembe ezali te ete akanisaki mingi likoló na esakweli wana, mpe asukisaki ete kosopama ya makila ezalaki na ntina mingi mpo ete elaká yango ekokana mpe ete bato batombwama kino na ezalela ya kokoka. Tala ntina oyo mbeka na nyama oyo Abele atumbaki, ezalaki mpenza malamu. Nzokande, atako bazalaki na kondima, Abele mpe batemwe mosusu ya Jéhovah ya ntango na kala, “bazwi yango elakámi te.”—Baebele 11:39.
Kondima ekokisami
13. a) Abrahame mpe Davidi bayebaki nini na ntina etali kokokisama na elaká? (b) M po na nini tokoloba ete ’solo eyei na nzela na Yesu Klisto’?
13 Na boumeli ya bikeke mingi, mokemoke Nzambe ayebisaki lolenge nini elaká na ntina na ‘libota ya mwasi’ ekokokana. Anzelu moko alobaki na Abrahame ete: “Mabota nyonso na nsé makopambolama mpo na libota na yo.” (Genese 22:18) Na nsima, eyebisamaki epai na Davidi ete Libota na ndaká likobima na molongó ya bakonzi bakitani na ye. Na mobu 29, Libota yango limonanaki ete ezali Yesu Klisto. (Nzembo 89:3, 4; Matai 1:1; 3:16, 17) Na likeseni na Adam oyo azangaki sembo, Yesu Klisto, “Adam ya nsuka,” amonisaki kondima ya kokoka. (1 Bakolinti 15:45) Apesaki bomoi na ye na mosala ya Jéhovah mpe akokisaki bisakweli mingi oyo bisakolamaki na ntina na Masiya. Yesu amonisaki bongo pole mingi likoló na solo na ntina na Libota na ndaká mpe apesaki nzela ete makambo oyo mazalaki bobele elilingi na Mibeko na Moïse, makóma makambo na solo. (Bakolose 2:16, 17) Na yango tokoki koloba ete, ’solo ebimaki na nzela na Yesu Klisto.’—Yoane 1:17.
14. Lolenge nini ntoma Paulo amonisaki eyei na Bagalatia ete kondima ekómaki lisusu monene?
14 Ntango solo ebimaki na nzela na Yesu Klisto, moboko likoló na yango kondima kati na “elaká” wana ekokaki kotongama, mozipwamaki. Kondima elendisamaki makasi mpe, tokoki koloba ete ekómaki lisusu monene. Mpo na yango, ntóma Paulo alobelaki baklisto oyo bapakolamaki na elimo lokola ye, ete: “Makomami masili kokangisa makambo nyonso kati na bolɔkɔ na lisumu ete, elaká mpo na kondima na Yesu Klisto epesama epai na baoyo bandimeli. Naino kondima eyaki te, tokangamaki na nsé na Mibeko, tokɛngɛlamaki kino emonanaki kondima oyo esengelaki koya. Bongo, Mibeko ezalaki Mobateli na biso kino koya na Klisto, ete totangama bayengebene mpo na kondima. Nde awa kondima esili koya, tozali lisusu na nsé na mobateli te. Mpamba te bino nyonso bozali bana na Nzambe kati na Klisto Yesu na nzela na kondima.”—Bagalatia 3:22-26, MN.
15. Nini ezalaki mwango bobele moko mpo ete kondima ekokisama?
15 Bayisraele bandimelaki na ntina na misala oyo Nzambe asalelaki bango na nzela na kondimana na Mibeko. Nzokande, esengelaki na bango sikawa ete bazala na kondima eleki monene. Lolenge nini? Na kondimeláká Yesu, ye oyo apakolamaki na elimo, mpe Mibeko misengelaki kokamba bango epai na ye. Ezalaki mwango bobele moko mpo ete kondima na kala ekokisama. Mpo na yango, ezalaki ntina ete baklisto ya liboso “batalela Yesu, Mosaleli na liboso mpo na kondima na biso, ye oyo azali kokokisa yango.” (Baebele 12:2, MN) Solo mpenza, ezali yango nde baklisto nyonso basengeli kosala.
16. Na libaku nini elimo santu esopamaki na motindo na koleka, mpe mpo na nini?
16 Lokola boyebi ya solo na Nzambe ebakisamaki, mpe na yango kondima ekokisamaki, tokoki bongo komizela ete elimo santu epesama mingi koleka? Ee. Na Pantɛkote ya mobu 33, elimo na Nzambe, mosungi oyo Yesu alakàki, esopamaki likoló na bayekoli. (Yoane 14:26; Misala 2:1-4) Elimo santu ebandaki mosala na yango likoló na bango na motindo moko na sika mpenza, mpamba te bakómaki bandeko na Klisto baoyo bapakolami. Kondima na bango, oyo ezali mbuma na elimo santu, elendisamaki. Bamilengelaki bongo mpo na mosala monene ya kosakola oyo ezelaki bango.—Matai 28:19, 20.
17 a) Lolenge nini solo eyei mpe kondima ekokisami uta 1914? (b) )Elembeteli nini tozali na yango ete elimo santu ezali kokokisa mosala na yango uta 1914?
17 Koleka bikeke zomi na libwa sikawa, kondima eyaki na ntango Yesu amilakisaki lokola Mokonzi aponami na Nzambe. Kasi, lokola azali sikawa koyangela kati na makoló, moboko ya kondima na biso, elingi koloba solo oyo elakisami, esili mpenza kozipwa, likambo oyo lipesi nzela na kondima na biso ete ekokisama. Bobele bongo, mosala ya elimo santu esili kokóla. Likambo yango limonanaki na 1919, na ntango elimo santu epesaki lisusu makasi epai na basaleli na Nzambe baoyo bazalaki pene na ezalela ya kotika mosala. (Ezekiele 37:1-14; Emoniseli 11:7-12) Na eleko wana, moboko motyamaki mpo na paradis ya elimo, oyo esili kokóma solo mpenza mpe na kitoko mingi na boumeli na bambula.Ezali nde na elembeteli eleki monene ete elimo santu ezalaki na mosala na yango?
Mpo na nini tosengeli kotalela kondima na biso?
18. Na likambo nini kondima ya banɔngi Bayisraele ekeseneki kati na bango?
18 Nsima mwa moke Bayisraele basikolamaki na boombo na Ezipito, banɔngi 12 batindamaki mpo na konɔnga mokili ya Kanana. Kasi, zomi kati na bango bazangaki kondima mpe babɛtaki ntembe ete Jéhovah akokokisa elaká na ye te, mpo na kopesa mboka wana epai na Yisraele. Bamitikaki kotambwisama na oyo ezalaki bango komona, na biloko ya mosuni. Kati na banɔngi 12, bobele Yosua mpe Kaleba nde bamonisaki ete bazalaki kotambola na kondima, nde na komona te. (Tala 2 Bakolinti 5:7.) Mpo ete bandimelaki, bobele bango nde batikalaki na bomoi kati na mibali wana nyonso, mpe bakɔtaki na Mokili na ndaká.—Mituya 13:1-33; 14:35-38.
19. Mpo na nini tokoki koloba ete moboko oyo kondima na biso etongami likoló na yango, ezali mpenza mozindo? Atako bongo, tosengeli kosala nini?
19 Lelo oyo tozali pene na mokili na boyengebene molakámi na Nzambe. Kondima ezali na ntina mingi mpo na kokɔta kati na mokili yango ya sika. Likambo ya esengo mpenza ete, moboko ya solo likoló na yango kondima wana etongami, ezali mozindo mingi lelo. Tozali na Liloba na Nzambe na mobimba na yango, tozali na ndakisa na Yesu Klisto mpe bayekoli na ye bapakolami, tozali kozwa lisalisi ya bamilió na bandeko na biso ya elimo, mibali mpe basi, mpe tozali kozwa lisungi ya elimo santu na Nzambe koleka bileko ya liboso. Atako bongo, ezali na ntina mpenza ete totalela kondima na biso mpe tozwa meko ya kokembisa yango awa ntango ezali naino.
20. Mituna nini mibongi na biso komituna?
20 Okoloba mbala mosusu ete: ‘Ezali solo!’ Kasi, kondima na yo ezali na makasi nini? Omituna boye: ‘Bokonzi ya likoló na Jéhovah emonani na ngai solo lokola boyangeli na bato? Nandimaka bokonzi ya lisangá ya Jehovah oyo ezali komonana mpe bokonzi ya collège central, mpe nazali kosunga yango mpenza? Nazali nde komona, na miso ya kondima, mayele mabe oyo ezali komema mabota na ezalela ya nsuka epai na Armagedon? Kondima na ngai ekokani nde na kondima oyo ya “lipatá na batatoli” lilobelami na Baebele mokapo 11?’—Baebele 12:1; Emoniseli 16:14-16.
21. Baoyo bazali na kondima bapusami na kosala likambo nini, mpe mapamboli nini bazali kozwa? (Lobela makambo oyo mazolonganisami encadré na lokasa 13.)
21 Baoyo bazali na kondima etongami likoló na solo, bapusami na kosala mosala. Lokola mbeka na Abele na ntango na kala, mbeka na bango ya masanzoli ezali kosepelisa Nzambe. (Baebele 13:15, 16) Lokola Noa, mosakoli na boyengebene oyo atósaki Nzambe, bango bazali na bomoi ya sembo na kosakoláká Bokonzi. (Baebele 11:7; 2 Petelo 2:5) Na ndakisa ya Abrahame, baoyo kondima na bango etongami likoló na solo, bakotosaka Jéhovah ata soki yango ezali kotungisa bango, to kati na mabaku ya mpasi mingi. (Baebele 11:17-19) Lokola basaleli ya sembo na Jéhovah na ntango ya kala, baoyo bazali na kondima bapambolami mingi mpenza na Tata na bango ya likoló, oyo alingi bango mpe azali kobatela bango.—Matai 6:25-34; 1 Timoté 6:6-10.
22. Lolenge nini tokoki kokembisa kondima na biso?
22 Ozali mosaleli na Jéhovah, mpe ozali kooka ete kondima na yo ezali na mwa bolembu mpe ozali komituna lolenge nini osengeli kobengisa yango. Boye kembisa kondima na yo na koyekoláká Liloba na Nzambe mpe na monoko na yo, bimisa mai na solo oyo matɔndi na motema na yo. (Masese 18:4) Soki kondima na biso elendisami mbala na mbala te, ekoki kolɛmba mpe kotika kosala mosala, ata nkutu kokufa. (1 Timoté 1:19; Yakobo 2:20, 26) Tozwa ekateli mpo ete kondima na biso ezwa nsuka motindo wana te.Tolomba Jéhovah ete asalisa biso na likambo yango mpe toloba na ye ete: “Sunga ngai esika ezangi ngai kondima!”—Malako 9:24. MN.
Bozongeli
◻ Kondima ezali nini?
◻ Mpo na nini kondima ekoki kozala te soki solo mpe elimo santu ezali te?
◻ Lolenge nini Yesu Klisto akómaki Ye oyo azali kokokisa kondima na biso?
◻ Mpo na nini tosengeli kotalela malamu makasi ya kondima na biso?
[Etanda na lokasa 13]
BAOYO BAZALI NA KONDIMA. . .
◻ Bakolobaka na ntina na Jéhovah.—2 Bakolinti 4:13.
◻ Bazali kosala misala lokola oyo na Yesu.—Yoane 14:12.
◻ Bazali maziba ya bilendiseli—Baloma 1:8, 11, 12.
◻ Basili kolónga mokili.—1 Yoane 5:5.
◻ Bakobanga eloko te.—Yisaya 28:16.
◻ Bazali na elikya ya kozala na bomoi ya seko.—Yoane 3:16.