Mokolo na kobukanisa na Nzambe
LOKOLA tomonaki yango kati na lisolo ya liboso, ezali na bantina mingi oyo mpo na yango biso tosengeli kozongisa mabe na mabe te. Ya liboso, mpo ete na nsuka na yango ekobongisa likambo moko te. Na nsima, mpo ete kozongisa mabe na mabe ezali koyeisa koyinana makasi na esika ya kosala bondeko. Mpe na nsuka, mpo ete elimo ya motindo yango ezali mabe mpo na ye oyo akobombaka makanisi ya nkanda.
Nzokande, ezali na ntina moko oyo eleki lisusu mpenza; tozali kokuta yango kati na maloba na Moise oyo alobaki na libota na lsrael: “Jéhovah, Nzambe na yo, azali Nzambe na motema mawa.” (Deteronome 4:31) Lokola Nzambe azali na motema mawa, biso mpe tosengeli komonisa ezaleli oyo. Yesu alobaki na bayekoli na ye: “Na bongo bolanda kozala na motema mawa, lokola Tata na bino azali na motema mawa.”—Luka 6:36.
Nzokande, Biblia elobi lisusu na ntina na Jéhovah ete azali “Nzambe oyo akobukanisa.” (Nzembo 94:1) Mosakoli Yisaya alobeli “mbula na boboto na Jéhovah,” kasi alobeli lisusu “mokolo na kobukanisa na Nzambe na biso.” (Yisaya 61:2) Ndenge nini Nzambe akoki kozala na mbala moko na motema mawa mpe na kobukanisa? Lisusu, soki tosengeli komekola Nzambe kati na motema mawa na ye, mpo na nini tokokamata ndakisa na ye te mpo na kozongisa mabe na mabe?
Mpo na koyanola na motuna ya liboso, Nzambe azali na motema mawa mpo ete alingi bato; azali kolimbisa bango mbala na mbala mpe kino na meko oyo akoki kosala yango, na ntina ete apesa bango likoki na kobongisa ba nzela na bango. Lokola ntóma Paulo, bato mingi basili kozwa litomba na ezaleli na mawa yango. Kasi Nzambe azali lisusu Nzambe na kobukanisa—na lolenge oyo azali kosɛnga ete bosembo esalama—mpamba te motema mawa motindo yango mokoki te koumela libela na libela. Na ntango ekomonana ete bato mosusu bakolinga kobongwana te, Nzambe akoyeisa bikateli na ye na mokolo na kobukanisa na ye, lokola Biblia ebengi yango.
Mpo na koyanola na motuna ya mibale: te, eloko moko te ezali kopesa biso nzela na kozongisa mabe na mabe na kolobaka ete Nzambe azali Nzambe na kobukanisa. Jéhovah azali na bosembo ya kokoka. Yango ezali ndenge moko te, na biso bato. Nzambe azali kotalela makambo nyonso ya ezalela moko mpe ntango nyonso azali kokamata makatami oyo mazali sembo. Tokoki koloba motindo boye te mpo na biso. Nde na ntina yango Paulo apesaki toli oyo elandi: “Balingami, bozongisaka mabe na mabe te bino mpenza, kasi tika esika mpo na nkanda; mpamba te ekomami ete: ‘Kobukanisa ezali likambo na ngai; ngai nakofuta, elobi Jéhovah.’” (Baloma 12:19) Mpo na bolamu na biso, ezali malamu, na kotikela Jéhovah lotomo ya kobukanisa.
Mpo na nini mokolo na kobukanisa?
Na mbala mingi, Biblia elimboli ete baoyo bazali kosala mabe kozanga kobongola motema bakozwa etumbu mpo na yango. Na ndakisa ntóma Paulo asakolaki ete, na nzela na Yesu, Nzambe, “akopesa etumbu likolo na baoyo bayebi Nzambe te mpe baoyo bazangi kotosa nsango malamu na Nkolo na biso Yesu Klisto.” (2 Batesaloniki 1:8) Tozali na bantina malamu na kondima mpenza maloba oyo. Mpo na nini?
Mpo ete lelo oyo ebele na bato bazali sé kotelemela bokonzi ya Mozalisi mpe bazali kotosa mibeko na ye te. Ata bakolobaka ete bazali bandimi to te, bazali komonisa na etamboli na bango ete bazali kobanga Nzambe te kati na makambo bazali kosala. Maloba oyo ya mokomi na Nzembo mazali kokokana nde na bango: “Mpo na nini moto mabe akotyola Nzambe? Akoloba na motema na ye: ‘Yo akoluka likambo te.’” (Nzembo 10:13) Jéhovah akotika te ete batyela ye motindo yango libela na libela. Nzambe ya bolingo, azali mpe lisusu Nzambe na bosembo. Akoyoka kongɛnga na baoyo balingi mpenza bosembo: “Ɛ Jéhovah, Telema likolo! E Nzambe tomona loboko na yo. Kobosana banyokolami te ”—Nzembo 10-12.
Lisusu, baoyo bazali kotelemela mibeko bazali kobebisa etando na biso. Bazali kobebisa mopepe, bazali kobebisa mabele mpe mai; mpo na bango, kozanga bosembo mpe kosala mabe ekomi likambo ya mikolo nyonso. Mpe bazali kobomba ebele na bibundeli ya ndenge na ndenge oyo ekoki kosilisa bato nyonso awa na mokili. Lisalisi na Nzambe lizali na ntina mpo na kobikisa bato ya botosi. (Emoniseli 11:18) Ezali nde lisalisi yango Yisaya alobelaki mpo na mokolo na kobukanisa.
Eloko nini mokolo na kobukanisa na Nzambe ekosala?
Engebene Dictionnaire interprétatif des mots de l’Ancien et du Nouveau Testament ya Vine (na anglais), kati na Makomami ya greke, liloba libongolami na kobukanisa, ntango elobelami mpo na Nzambe, elimboli mpenzampenza “ ‘oyo euti na bosembo’; ezali te, lokola esalamaka mbala mingi mpo na botomboki ya bato, liyoki oyo lizali kozwama na nsima na kozokisama to bobele na mayoki na nkanda.” Na bongo, kobukanisa na Nzambe likoló na banguna na ye ekozala te libaku mpo na ye na kosopa makila na motindo mobongi te, lokola esalamaka na ntango na vendetta to bozongisi mabe na mabe. Biblia elobi na biso ete “Jéhovah ayebi kobikisa bato na bizaleli na kobanga Nzambe kati na komekama mpe kobatela bakeseni mpo na mokolo na kosamba, mpo ete bazwa etumbu.”—2 Petelo 2:9.
Basaleli na Nzambe bazali kozela na motema mokuse mokolo na kobukanisa na Jéhovah, koyebaka ete ezali eleko oyo bosembo ekolongisama mpe eleko oyo basembwi bakosikolama na monyoko na bato mabe. Yango elingi koloba te ete baklisto bazali bato na makanisi mabe na motema to bakobómbaka nkanda Biblia ezali kokebisa biso ete “ye oyo akosepela mpo na mpasi na mozalani akozanga etumbu te.” (Masese 17:5) Kutu, bazali komonisa motema mawa mpe ngolu, na kotikaka esika na Jéhovah na kokamata ekateli ya kobukanisa.
Ezali solo ete, ntango moto moko azali na nkanda, ezali na ye pete te na kosala bongo, kasi akoki kolónga, mpe bato mingi basili kolonga yango. Na ndakisa, na bomwana na ye Pedro akolaki na mpasi mpe mbala mingi azalaki kobetama na yaya na ye ya mobali. Na ntango akomaki mokolo, akomaki mobulu, mbala mingi azalaki kozwana na mikakatano na bapolisié mpe nkanda oyo azalaki na yango epai na ndeko na ye azalaki kosilisa yango na mwasi na ye mpe na bana na ye. Mokolo moko, ayokaki Témoin de Jéhovah moko mpe, na nsima, andimaki koyekola Biblia elongo na ye. Alobi ete: “Na lisalisi ya Jéhovah, namibongolaki mpe, sikawa nabundaka lisusu na bato te, kasi nazali kosalisa bango, mpo ete nazali nde nkulutu kati na lisangá moko ya boklisto.” Kosalisamaka na Biblia mpe na elimo santu, ebele na bato mosusu basili kosala mbongwana kati na bizaleli na bango mpe na lolenge yango, na esika ete bazala bato mabe to bato na nkanda, bazali sikawa komonisa bolingo mpe motema molai epai na bamosusu.
Okosala nini?
Na kobatelaka na elimo koya na mokolo na kobukanisa na Nzambe, tokoki kozwa litomba monene na motema molai na ye. Kasi likoki yango likopesama na biso libela te. Mosika te mokolo yango ekoya. Ntóma Petelo alimbolaki mpo na nini mokolo yango eyei naino te: “Jéhovah ekoumela nsima na elaka na ye te, lokola bamosusu bazali kokanisa ete akoumela, kasi azali na motema molai epai na bino, alingi te ete bamosusu babeba kasi ete bato nyonso bakoma na kobongwana na motema.”—2 Petelo 3:9.
Ezali likambo na lombango na komibongisa kobanda sikawa mpo na mokolo oyo Nzambe akotuna moto na moto mpo na misala na ye; mpo na yango, esengeli na biso koyekola Makomami mpe kosalela batoli na yango. Na bongo, tokoki kolanda maloba’oyo ya mokomi na Nzembo ete: “Zala na nkanda te mpe tika kosilika; yoka zuwa te mpo ete ekolekisa yo na mabe. Mpamba te basali na mabe bakosuka, nde baoyo bazali kotya motema epai na Jéhovah bakosangola mokili.”—Nzembo 37:8, 9.
[Elilingi na lokasa 7]
Nsima na mokolo na kobukanisa na Nzambe, ‘baoyo bazali kotya motema epai na Jéhovah bakosangola mokili’