Mangomba nyonso mazali malamu?
“Likambo oyo likomeli ntango no biso lizali monene: tozali na mposo ye lingomba, kasi uta na esika moko te tozali kokuta Nzambe moko oyo ebongi mpo na yango”—Lucian Blaga mokomi na mosolo mpe filozofe moroumain
“Lingomba mpo bokonzi na mangomba bozalaki mpo mbala mosusu bakotikala, mpo ntango molai lisusu, kati na banguna minene yo bokoli mpo yo bonsomi”—Khristo Botev, mokomi na mosolo ya mboka Bulgarie
MALOBA oyo mayokani na liponi oyo ebele na bato ya mitema malamu bazwami kati na yango. Kati na bango moko mpenza, bazali kooka mposa ya losambo, kasi bazali koyeba te mpe kolinga nzambe oyo ayebani te, oyo bakonzi na mangomba bazali koteya. Lisusu, bazali koyeba ete ndambo monene ya bokoli mpe ya bonsomi ya bato ekangisamaki na bakonzi na mangomba mpe na mangomba minene. Na yango, atako bato bazali kooka mposa ya kosambela mingi, bato oyo balongobani balingi te komikɔtisa na lingomba nyonso.
Bokeseni monene
Losambo ezali kokokisa mokumba moko monene kati na bokelami mpe lisolo ya bato Mokanda Nouvelle Encyclopédie britannique elobeli losambo “lokola likambo moko oyo esengeli kozela kati na bomoi ya moto, na mayele mpe na lisolo ya bato” mpe abakisi: “Kati na makambo nyonso ya bomoi, ezali na bilembeteli oyo bizali kolakisa ete bato bazali na bamposa ya losambo.” Kasi lisolo ya bato limonisaki ete moko te kati na mangomba minene ya mokili emonanaki ya malamu mpo na bato.
Jawaharlal Nehru, moto ya Bokonzi na mboka lnde, alobaki mokolo moko: “Etaliseli ya oyo babengi losambo, to mpe losambo oyo lobongisami, na mokili ya lnde mpe bipai mosusu, ezali kotondisa biso na kobanga.” Na kotalelaka bitumba nyonso oyo bisalamaki mpe koboma nyonso oyo bisalamaki na nkombo na lingomba, tokoki te, na kolongobana nyonso, kondima likanisi na ye?
Na ekeke ya zomi na libwa, Voltaire, mokomi mofalanse, asalaki bokeseni moko ya kitoko. Akomaki: “Bolobi ete, losambo, esali ba nkoto na ba nkoto ya mabe: ebengami biyambayamba, oyo ezali koyangela likoló na etando na biso ya mawa; yango ezali monguna mabe oyo aleki ya losambo na peto oyo tosengeli kopesa na Ekelamu oyo Aleki.” Voltaire atelemelaki makanisi ya lingomba na eleko na ye, kasi atako bongo azalaki kotalela te Nzambe Mozalisi na molongó. Amonaki bokeseni bozali kati na lingomba ya solo mpe lingomba ya lokuta.
Esengeli kopona
Bato nyonso bazali na boyokani te na Voltaire. Basusu bazali koloba ete makambo malamu mazali kati na mangomba nyonso; na ntina yango, bazali kooka mpenza te mposa ya koluka lingomba ya solo. Bato yango basengelaki kotalela likebisi oyo lipemami na mosakoli Yisaya, oyo akomaki: “Mawa epai na bango bakobyangaka mabe ete malamu mpe malamu ete mabe, baoyo bakotyaka molili mpo na polé mpe polé mpo na molili; baoyo bakotyaka bololo mpo na elɛngi mpe elengi mpo na bololo!” (Yisaya 5:20) Lingomba ya lokuta epesaki na bato eloko oyo ezali mabe. Yango ekɔtisaki bango kati na molili ya elimo, mpe bato ya mitema malamu bakomaki kino na kooka mabe.
Ezali te na kopona kati na kokoma na kozanga kondima to na kondima na lingomba nyonso. Ezali mpe pete te na motindo yango. Soki moto andimi ntina na kobongwana epai na Nzambe mbala moko, esengeli abanda koluka lingomba ya solo. Lokola molukiluki Emile Poulat amonisaki yango polele kati na mokanda Le Grand Atlas des Religions: “Bakoki kozala kondima na (mangomba) nyonso te, na kotalela bokesene monene ezali na oyo bazali koteya mpe bazali kosenga.” Kati na makanisi bobele yango, Encyclopoedia Universalis elobi: “Soki ekeke ya ntuku mibale na moko ezongi lisusu na kosambela, . . . moto akozala na lotomo ya kozwa likatami ya solo to ya lokuta na makambo ya bulee oyo mapesameli ye.”
Ndenge nini kopona lingomba ya malamu
Eloko nini ekosalisa biso na koyeba lingomba ya malamu? Encyclopedia Universalis ezali na elonga na kolobela makasi ntina ya solo. Lingomba oyo lizali koteya lokuta ekoki kozala lingomba ya solo te. Mosakoli monene koleka oyo amonana naino te na etando na biso alobaki: “Nzambe azali elimo, mpe baoyo bazali kosambela ye basengeli kosambela ye na elimo mpe na solo.”—Yoane 4:24
Mosakoli yango ezalaki Yesu Klisto; ye alobaki lisusu: “Bokeba mpo na basakoli ya lokuta baoyo bakoya liboso na bino na bilamba na mpaté nde na katikati bazali ba nkoi na kongala Bokoyeba bango na mbuma na bango. . . . Nzeté malamu ekobotaka mbuma malamu nde nzeté mabe ekobotaka mbuma mabe.” (Matai 7:15-17) Nakomonaka ba mbuma mabe mpe na libanda na yango. Nzokande, soki, na libiangi na Yesu, tosaleli solo lokola elembeteli oyo ekosalisa biso na koyeba ná ba mbuma oyo mangomba bazali kobimisa, tokozala na likoki ya koyeba lingomba ya solo.
Lingomba ya solo mpe mbuma na yango
Yesu alobelaki solo. Kati na likambo yango, etuluku nini ya bandimi ebwaki lokuta oyo ezwaki ebandiseli na yango kati na masapo ya kaka mpe na filozofi greke, mpe oyo mingi kati na yango mangomba basili komikotisa? Liteya oyo ete molimo ya moto na yango moko mpenza ekufaka te ezali mpe na kati ya lokuta yango.aLiteya yango esili kobota liteya moboko oyo ezali ya kozanga bokumisi mpo na nzambe,liteya lifelo ya moto.
Yesu alobelaki mpe ba mbuma oyo ebimisami na mangomba. Na likambo yango, oyebi lingomba moko oyo esili komonisa bondeko ya solo na mokili mobimba, epai kuna bokubolani ya loposo, ya nkota mpe ya ekólo etiki esika na bolingo mpe na boyokani moko ya malamu? Oyebi lisangá moko ya mokili mobimba oyo basangani na yango basepelaka konyokwama na esika ete bamitika kopusama na bakonzi ya politiki mpe ya mangomba na koyina bandeko na bango ya mibali mpe ya basi kati na kondima kino kokoma na koboma bango mpo na bolingo ya ekólo to ya lingomba? Lingomba oyo ekobwaka lokuta motindo yango ya losambo mpe oyo ekobimisa ba mbuma malamu, ekomonisa bilembeteli oyo bikoki kondimisa ete ezali lingomba ya solo, boye te?
Lingomba ya solo lizali
Lingomba motindo yango lizali? Ee, ezali moko. Kasi esengeli koyeba malamu ete ezali te kati na mangomba minene ya mokili. Tosengeli kokamwa mpo na likambo yango? Te. Kati na lisolo na ye oyo eyebani Lisolo likolo na ngomba, Yesu alobaki: “Bokota na ekuke ya nkáka; mpamba te ekuke na nzela monene ekomema na libebi, mpe mingi bazali koleka na yango; kasi ekuke ya nkáka mpe nzela moke ezali komema kino bomoi ya seko mpe baoyo bamoni yango bazali bobele moke.”—Matai 7:13, 14, MN.
Na bongo epai nini tokoki kokuta lingomba ya solo? Na komikitisa nyonso mpe na kolongobana nyonso, tosengeli kondima ete ba Témoins de Jéhovah basali lisangani moko ya mokili mobimba oyo ezali kotambola na ‘nzela yango moke mpe ya nkáka.’ Ezali solo ete mangomba minene mazali kobenga na kokitisa mpenza ba Témoins de Jéhovah na mokabwano. Kasi ezali mpenza motindo yango bakonzi ya mangomba bapengwi ya ekeke ya liboso bazalaki kobenga baklisto ya ekeke ya liboso.—Misala 24:1-14
Mpo na nini ba Témoins de Jéhovah bandimisami mpenza ete bazali na lingomba ya solo? Ezali solo ete, basali lisangani ya mokili mobimba oyo epalangani na koleka mikili 200 mpe oyo esilaki kolonga bokabwani ya bikólo, ya loposo, ya nkotá mpe ya lolenge ya bomoi. Lisusu, bazali koboya kondima mateya, ezala ya kala, oyo ezali komonana ete ezali na boyokani te elongo na oyo Biblia ezali koloba. Kasi motindo nini bakomaki na kobimisa mbuma malamu boye? Mpe nini esengisamaka na bosaleli ya lingomba na solo? Masolo mibale oyo malandi makoyanola na mituna yango mpe na misusu na oyo etali losambo.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na bolimbolami moko ya malamu oyo ezwami na kati ya mikanda na oyo etali eutelo na masapo ya endimelo yango, tala na mokanda L’ humanité à la recherche de Dieu oyo ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc., nkasa 52-57.
[Elilingi na lokasa 7]
Bitumba bibongami croisades bizali kati na bambuma mabe oyo ebisami na lingomba ya lokuta
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Bibliothèque nationale, na Paris
[Elilingi na lokasa 8]
Lingomba ya solo lizali kobimisa mbuma malamu