Eloko nini tokoki kozongisela Jéhovah?
JÉHOVAH NZAMBE azali kopesa biso ndakisa malamu ya bokabi. Azali kopesa na mokili mobimba “bomoi mpe mpema mpe biloko nyonso.” (Misala 17:25) Azali kobimisa moi na ye likoló na bato mabe mpe na bato malamu. (Matai 5:45) Ezali solo, ‘Jéhovah apesi biso mbula na likoló mpe bilaka na kobota mbuma mingi, mpe atondisi mitema na biso na biloko na kolya mpe na esengo.’ (Misala 14:15-17) Ee, “makabo nyonso malamu mpe makabo nyonso mabongi makokitaka na nse longwa na Tata na moi.”—Yakobo 1:17.
Likoló na makabo nyonso ya mosuni, Nzambe azali kopalanganisa kongenga ya elimo mpe ya solo. (Nzembo 43:3) Jéhovah azali kopambola mingi basali na ye na kopesaka bango bilei ya elimo na ntango ekoki na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Matai 24:45-47) Tokoki kozwa bolamu na ebongiseli yango mpamba te Nzambe apesi nzela ete bato ya kokufa mpe ya masumu bazonga na bondeko elongo na ye. Motindo nini? Na nzela na liwa ya Mwana na ye, Yesu Klisto, oyo apesaki bomoi na ye lokola lisiko mpo na ebele. (Matai 20:28; Baloma 5:8-12) Oyo nde likabo malamu euti epai na Nzambe na biso ya bolingo, Jéhovah!—Yoane 3:16. Likoki lizali ya kozongisela ye?
Bikeke mingi liboso ete lisiko lipesama, mokomi na Nzembo moko, oyo amonisaki botondi ya bozindo na Nzambe mpo na mawa na ye bobikisi na ye mpe na lisalisi oyo azali kopesa ye, alobaki, na kopemama na nse ya elimo na Nzambe: “Nakozongisa nini epai na Jéhovah na ntina na mapamboli na ye epai na ngai? Nakosimba kopo na kobika, mpe nakobyanga nkombo na Jéhovah. Nakokokisa bilaka na ngai nyonso epai na Jéhovah, ee, liboso na bato na ye nyonso.”—Nzembo 116:12-14.
Soki tomipesi ma motema na biso mobimba na Jéhovah, tozali kobelela nkombo na ye mpe tozali kokokisa ndai na biso epai na ye. Na kozalaka Témoins de Jéhovah, tokoki kokumisa Nzambe na kolobelaka malamu mpo na ye na ntango nyonso mpe na kosakolaka nsango ya Bokonzi na ye. (Nzembo 145:1, 2, 10-13; Matai 24:14) Kasi biso tokoki te kokomisa Jéhovah mozwi, ye oyo azali na biloko nyonso, to kopesa ye eloko moko oyo ekokokana na bolamu nyonso oyo ye azali kopesa biso.—1 Ntango 29:14-17.
Makabo oyo tozali kosala mpo na bokoli ya mosala ya Bokonzi mazali nzela ya kozongisa na Jéhovah to ya kokomisa ye mozwi. Nzokande, makabo motindo yango mazali kopesa biso makoki ya kolakisa bolingo na biso mpo na Nzambe. Tokoki te kosala makabo na mokano moko oyo moyebani to lisusu mpo na komemela biso kokumisama, kasi kati na elimo ya bokabi mpe na mokano ya kopusa losambo ya solo; na lolenge wana, ye oyo azali kopesa azali kozwa esengo mpe azali kozwa lipamboli ya Jéhovah. (Matai 6:1-4; Misala 20:35) Na kotyaka ntango na ntango mwa eloko na mpembeni mpo na kosimba losambo ya solo mpe kosalisa baoyo bakoki na kosalisama, tondimisami mpenza na kokoka komema likabo na biso mpe kooka esengo oyo ezali kolandana. (1 Bakolinti 16:1, 2) Yango elingi koloba ete tosengeli kofuta ndambo na zomi?
Tosengeli kofuta ndambo na zomi?
Na monoko ya mosakoli na ye Malaki, Jéhovah alobaki: “Boyeisa ndambo na zomi nyonso kati na ndako na ebombelo ete bilei bizala na ndako na ngai; meka ngai na yango, . . . soko nakozipwela bino maninisa na makoló te kosopela bino lipamboli kino esika ekozanga mpo na yango.” (Malaki 3:10) Libongoli mosusu lizali kobongola maloba yango boye: “Boyeisa ndambo mobimba na ndako na ebombelo.”—TOB.
Ndambo na zomi ezali mingimingi ndambo na zomi ya eloko moko. Ezali komonisa ndambo, 10%, ya eloko moko oyo bazali kopesa to kofuta mpo na ntáko, mingi na mokano moko ya losambo. Yango elimboli ete bokopesa ndambo na zomi ya bozwi na yo mpo na bokoli ya losambo.
Tata na mabota Abalayama (Abram) apesaki na Melekisedeke, mokonzi—nganga na Salem, ndambo na zomi na biloko oyo elonga na ye na mokonzi Kedolaomele mpe basangani na ye ememelaki ye. (Genese 14:18-20; Baebele 7:4-10) Na nsima, Yakobo akataki ndai na kopesa ndambo na zomi na biloko na ye epai ya Nzambe. (Genese 28:20-22) Kati na moko na makambo oyo, ezali nde na bolingo na bango moko nde mibali yango bakamataki likatami ya kopesa ndambo na zomi na oyo bazalaki na yango; solo mpenza, Baebele ya liboso bazalaki na mobeko moko te oyo ezalaki kotinda bango na kofuta ndambo na zomi.
Ndambo na zomi na nse ya Mibeko
Bayisrael, oyo bazalaki libota ya Jéhovah, bazwaki mibeko na oyo etali ndambo na zomi. Emonani ete mibeko yango mizalaki komonisa ndambo na zomi mibale ya bozwi oyo ezali kozwama na mbula, atako bakomi mosusu na Biblia bazali kokanisa ete ezalaki bobele ndambo na zomi moko na mbula. Na boumeli na mbula na sabata, Bayisraele bazalaki kofuta ndambo na zomi te mpo ete bazalaki kolikya kozwa eloko moko te na likoló. (Levitike 25:1-12) Ndambo na zomi ezalaki koya kobakisama na ba mbuma na liboso oyo epesami na Nzambe.—Exode 23:19.
Bayisraele bazalaki komema ndambo na zomi na nkona na mabelé mpe na mbuma na nzeté, na mpe, banyama nyonso oyo baleki na nse na nzeté na motangi; bazalaki kopesa yango na balevite, baoyo bazalaki na libula moko te kati na mboka. Bango moko mpe bazalaki kopesa ndambo na zomi na oyo bazalaki kozwa na bongángá na Alona mpo na kosalisa ye na kokokisa bamposa na ye. Ezali solo ete Bayisraele bazalaki kotuta mbuma, bazalaki kokomisa bambuma ya miwiti na vino mpe bazalaki kobimisa mafuta ya olive liboso na kokokisa ndambo na zomi. Soko Moyisraele moko akanisaki kopesa mosolo na esika na biloko ya bolei, akokaki kosala yango bobele soki abakisi ndambo na mitano ya motuya ya biloko.—Levitike 27:30-33; Mituya 18:21-30.
Emonani lokola ete bazalaki kolengele ndambo na zomi mosusu likoló na oyo. Na kotalela mpenza, ezalaki kosalelama mpo na libota ntango bato bazalaki koyangana na libaku ya bilambo. Kasi Bayisraele bazalaki kosala nini soki ntaka oyo ekabolaki bango na Yelusaleme elekaki monene mpo na komema biloko nyonso oyo ezalaki kosangisa ndambo na zomi kozanga nkáka? Kati na likambo yango, mbuma, vino ya sika, mafuta mpe banyama ezalaki kobongola yango na mosolo, oyo ekokaki komemama kozanga mpasi. (Deteronome 12:4-18; 14:22-27) Na nsuka ya mbula ya misato mpe na mbula ya motoba ya eleko na sabata oyo ezalaki koumela mbula sambo, ndambo na zomi ezalaki kotyama na mpembeni mpo na balevite, bapaya, bakufeli mibali mpe baoyo bakufeli tata.—Deteronome 14:28, 29; 26:12.
Na nse na Mibeko, etumbu moko te ezalaki kopesama na kozanga kofuta ndambo na zomi. Jéhovah azalaki kosepela ete Bayisraele bapusama na bango moko na makanisi na bango na kopesa yango. Mbala mosusu, basengelaki koloba liboso na Nzambe ete basilaki kofuta yango mobimba. (Deteronome 26:13-15) Soki moto moko abombaki eloko moko na ndambo na zomi, bazalaki kotalela lokola ayibaki epai na Nzambe.—Malaki 3:7-9.
Ndambo na zomi ezalaki bozito te. Na yango, ntango Bayisraele bazalaki kobatela mibeko, bazalaki kobika na bomoi moko malamu koleka. Ndambo na zomi ezalaki kosalisa bango na losambo ya solo mpe na koboyaka ete bato bapesa ntina mingi ya koleka na ezalela ya mosuni ya likambo yango. Na yango, mibeko mpo na ndambo na zomi mizalaki mpo na bolamu ya bato nyonso na Yisraele. Kasi yango ezali boni mpo na baklisto?
Baklisto basengeli kofuta ndambo na zomi?
Na boumeli na mwa ntango, kofuta ndambo na zomi ezalaki kosalama kati na boklisto ya mokili oyo. Encyclopédie américaine elimboli: “Eyaki . . . kosalema mingi liboso na ekeke ya motoba. Lisangani ya Tours na 567 mpe lisangani ya mibale na Macon na 585 epesaki etinda ya bofuti ndambo na zomi. . . . Bobebisi ekomaki komonana mingi, mingimingi ntango ba laics bazalaki mbala mingi kozwa to kosomba lotómo ya kokongola ba ndambo na zomi. Ezali papa Grégoire Vll nde, moto ya liboso, oyo alobaki ete lolenge yango ya kosala ezali ya malamu te. Ba laics mingi nde bamonisaki motuya, ya lotómo na bango ya kokongola ba ndambo na zomi, epai na bisika oyo ba sango bafandaka mpe na ba ndakonzambe. Bobongisi to Réforme ekweisi te bopesi ya ndambo na zomi, mpe motindo yango ya kosala ezali kolandama kosalelama kati na Lingomba katolike mpe kati na mikili ya ba protestants.” Ndambo na zomi ebomamaki to ebandaki kolongolama mokemoke kati na ba mboka ekeseni, mpe lelo oyo mangomba mike bazali kosenga yango.
Na bongo, baklisto basengeli kofuta ndambo na zomi? Kati na mokanda na ye concordance ya Biblia, Alexander Cruden alobi: “Ezala Mobikisi na biso ezala bantóma na ye bapesaki etinda ata moko te na oyo etali ndambo na zomi.” Ezali solo ete, baklisto bazwaki te mobeko oyo mozalaki kopusa bango na kofuta ndambo na zomi. Nzambe ye moko atyaki nsuka na Mibeko na Mose, na mitinda na yango na oyo etali ndambo na zomi, na kobakisaka yango elongo na Yesu na nzeté na mpasi. (Baloma 6:14; Bakolose 2:13, 14) Na yango, na esika ya kopusama na kopesa mosolo oyo mopesami na lisangá mpo na kokokisa ba mposa ekeseni, baklisto bazali kosala makabo ya bolingo malamu.
Tokumisa Jéhovah na biloko na biso ya motuya
Ezali na likambo moko te mpenza kati na Biblia oyo ezali kotemela na motindo oyo ete moklisto apesa na motema na ye ndambo na zomi ya bozwi na ye mpo na kosimba losambo ya solo. Elenge mobali moko ya mibu 15, oyo azali na mboka Papouasie-Nouvelle-Guinée, akomaki likambo oyo kati na mokanda oyo ezalaki elongo na likabo na ye: “Ntango nazalaki mwana moke, tata na ngai azalaki koloba na ngai mbala mingi ete: ‘Na ntango okobanda kosala, osengeli kopesa biloko ya motuya na Jéhovah.’ Nazali komikundwela maloba ya Masese 3:1, 9, kolobaka ete tosengeli kokumisa Jéhovah na kopesaka ye biloko na biso ya motuya. Na yango nalakaki kosala bongo, mpe sikawa nasengeli kobatela elaka na ngai. Nazali na esengo mingi ya kotinda mosolo oyo mpo na kosimba mosala ya Bokonzi.” Biblia ezali kopusa baklisto na makasi te mpo na kokamata makatami motindo wana. Nzokande, makabo oyo masalami na motema malamu mazali nzela ya kolakisa litomba malamu mpo na kopusa losambo ya solo.
Moklisto akoki kozwa ekateli na kotya ndelo ya sikisiki te na makabo oyo azali kosala mpo na kopusa losambo ya Jéhovah Nzambe. Tala ndakisa moko: Na boumeli ya assemblée moko ya ba Témoins de Jéhovah, baklisto mibale ya basi oyo basili kokola bazalaki kolobana mpo na makabo oyo makoki na kosala mpo na mosala ya Bokonzi. Mpo na oyo etali bilei oyo bibongisami mpo na bayangani na esika ya assemblée, moko na baklisto yango, oyo azalaki na mibu 87, atunaki motuya oyo yango ekokaki kosenga, mpamba te alingaki kopesa mosolo oyo mokokani. Moklisto ya mwasi mosusu, oyo azalaki na mibu 90,alobaki:’pesa oyo yo okani ete ekokani na yango-mpe bakisa mwa mosusu na likolo.’Oyo nde ezaleli ya elimo malamu moklisto oyo ya mwasi asili kokola amonisaki!
Lokola ba Témoins de Jéhovah basili komipesa mobimba na Nzambe, bazali na esengo na kosalisa na mosolo, mpe na lolenge mosusu lisusu, losambo ya solo. (Tala 2 Bakolinti 8:12.) Ya solo mpenza, motindo wana ya kosala ezali kopesa mabaku na baklisto na kolakisa bokangami na bango na losambo ya Jéhovah. Makabo matyami ndelo te na ndambo ya zomi ya bozwi, mpe na makambo mosusu moklisto moko akoki kozala na mposa ya kopesa mingi koleka mpo na kopusa matomba ya Bokonzi.—Matai 6:33
Ntóma Paulo akomaki: “Moto na moto asala lokola ekani motema na ye kosala, na mposa moke te mpe na kopusama te; mpamba te Nzambe alingi ye oyo akopesaka na esengo.” (2 Bakolinti 9:7) Soki tozali kopesa na esengo mpe na bokabi kati na mokano ya kosalisa losambo ya solo, tokozwa na yango bolamu, mpamba te lisese moko ya mayele elobi: “Kumisa Jéhovah na biloko na yo ya motuya, mpe na mbuma na liboso ya bozwi na yo na nyonso. Boye bibombelo na yo ekotonda mpenza, mpe bikamwelo na yo ekobimisa vinyo na sika mingi mpenza.”—Masese 3:9, 10.
Tokoki te kokomisa oyo Aleki—Likoló mozwi. Wolo nyonso mpe palata nyonso, bibwele likoló na ngomba nkoto na nkoto mpe biloko nyonso ya motuya kozanga kotanga ezali ya ye. (Nzembo 50:10-12) Tokoki ata mbala moko te kozongisela na Nzambe mpo na bolamu nyonso oyo azali kopesa biso. Kasi likoki lizali na komonisa na ye botondi na biso ya bozindo mpo na libaku oyo apesi biso ya kosalela ye mosala ya bulee na kokumisa ye. Mpe tokoki kondimisama mpenza ete baoyo bazali kopesa na bonsomi kati na mokano ya kopusa losambo ye peto mpe kokumisa Nzambe oyo atondi na bolingo mpe bokabi oyo azali Jéhovah bazali kozwa mapamboli mingi.—2 Bakolinti 9:11.